LISOLO YA BOYEKOLI 32
Bilenge—Bókoba kokola na elimo nsima ya batisimo
“Tókola na bolingo na makambo nyonso.”—EF. 4:15.
LOYEMBO 56 Monisá solo
NA MOKUSE *
1. Makambo nini ya malamu bilenge mingi basili kosala?
MBULA na mbula, ebele ya bilenge bazwaka batisimo mpo bákóma bakristo. Yo mpe osalá bongo? Soki eyano ezali Ɛɛ, bandeko na yo ya basi mpe ya mibali oyo bakɔmɛli na elimo mpe Yehova basepelaka na yo! (Mas. 27:11) Kanisá makambo mingi oyo osili kosala. Na ndakisa, oyekolaka Biblia na molende mpenza, mbala mosusu na boumeli ya bambula mingi. Boyekoli na yo endimisi yo ete Biblia ezali Liloba ya Nzambe. Longola yango, oyekoli koyeba mpe kolinga moto oyo akomisaki buku wana mosantu. Okómaki kolinga Yehova lisusu mingi, yango wana omipesaki epai na ye mpe ozwaki batisimo. Ozwaki ekateli moko ya malamu mpenza!
2. Tokoyanola na motuna nini na lisolo oyo?
2 Liboso ozwa batisimo okutanaki na makambo mingi oyo esalaki ete ezala mpasi otikala sembo epai ya Yehova. Kasi lokola ozali kokola na elimo, okokutana na komekama mosusu. Satana akoluka kosala ete otika kolinga mpe kosalela Yehova. (Ef. 4:14) Osengeli te kotika nzela ete likambo ya ndenge wana esalema. Nini ekoki kosalisa yo otikala sembo epai ya Yehova mpe okoba kokokisa elaka na yo ya kosalela ye? Osengeli kokoba kokola na elimo, elingi koloba, ‘kosala makasi’ mpo okóma mokristo oyo akɔmɛli na elimo. (Ebr. 6:1) Kasi, ndenge nini okoki kosala yango? Yango nde tokolobela na lisolo oyo.
OKOKI KOSALA NINI MPO OKÓMA MOKRISTO OYO AKƆMƐLI?
3. Likambo nini bakristo nyonso basengeli kosala nsima ya kozwa batisimo?
3 Nsima ya batisimo, biso nyonso tosengeli kolanda toli oyo ntoma Paulo apesaki bandeko na ye bakristo na Efese. Alendisaki bango bákóma bakristo ‘oyo bakoli mpenza.’ (Ef. 4:13) Yango elingi koloba ete basengelaki ‘kokoba kokende liboso.’ Ntoma Paulo akokanisaki bokoli na biso ya bokristo na ndenge mwana akolaka na nzoto. Baboti ya mwana oyo auti kobotama sika balingaka mpe basepelaka na ye mingi. Kasi mwana yango akoki kotikala mwana moke libela te. Wana azali kokola, ekosɛnga alongola “bizaleli ya mwana moke.” (1 Ko. 13:11) Ezali mpe bongo mpo na biso bakristo. Nsima ya batisimo, tosengeli kokoba kokende liboso. Tótala mwa makambo oyo ekosalisa biso tósala bongo.
4. Na kotalela Bafilipi 1:9, ezaleli nini ekosalisa yo okola na elimo? Limbolá.
4 Kobá kolinga lisusu Yehova mingi. Toyebi ete olingaka Yehova mingi. Kasi osengeli lisusu kolinga ye mingi koleka. Na ndenge nini? Ntoma Paulo alobelaki lolenge moko oyo okoki kosala yango, ndenge emonisami na Bafilipi 1:9. (Tángá.) Ntoma Paulo abondelaki ete bolingo ya Bafilipi “ebakisamaka lisusu mingi mpenza.” Yango wana, tosengeli kobakisa lisusu bolingo oyo tolingaka Yehova. Tokoki kosala yango ntango tozali kobakisa “boyebi ya solosolo ná bososoli mingi mpenza.” Soki tozali koyekola koyeba Yehova, tokokóma lisusu kolinga ye mingi mpe kosepela na bizaleli na ye mpe na lolenge na ye ya kosala makambo. Na ndenge yango, tokómaka na mposa makasi ya kosepelisa ye mpe koboya kosala likambo nyonso oyo ekosala ye mpasi. Mpe tosalaka makasi tósosola soki mokano na ye ezali nini mpe ndenge nini tokoki kosala makambo na boyokani na mokano yango.
5-6. Ndenge nini tokoki kolinga lisusu Yehova mingi?
5 Yesu amekolaki bizaleli ya Tata na ye na ndenge ya kokoka. Yango wana, soki toyekoli koyeba Yesu malamumalamu, tokokóma kolinga lisusu Yehova mingi. (Ebr. 1:3) Soki tolingi koyeba Yesu malamumalamu, tosengeli koyekola masolo oyo ezali na baevanzile minei. Soki omeseni naino te kotánga Biblia mokolo na mokolo, okoki kobanda kotánga yango sikoyo! Ntango ozali koyekola masolo etali Yesu, tyá makanisi mingimingi na bizaleli na ye. Bato mingi bazalaki kosepela kozala elongo na Yesu mpe kosolola na ye; azalaki kolinga bana mpe azalaki kokamata bango na mabɔkɔ na ye. (Mrk. 10:13-16) Azalaki kosalela bayekoli na ye makambo makasimakasi te; yango wana bayekoli na ye bazalaki kobanga te koyebisa ye ndenge oyo bazalaki komiyoka. (Mat. 16:22) Na ndenge yango, Yesu amekolaki Tata na ye ya likoló. Yehova alingaka mpe ete bato bápusana penepene na ye. Tokoki kopusana penepene na ye na nzela ya libondeli. Ntango tozali kobondela Yehova, tokoki kofungolela ye motema na biso. Tondimaka ete akosambisa biso te. Alingaka biso mpe atyelaka biso likebi.—1 Pe. 5:7.
6 Yesu azalaki koyokela bato mawa. Ntoma Matai alobi boye: “Ntango amonaki ebele ya bato yango ayokelaki bango mawa, mpo banyokwamaki mpe basundolamaki lokola bampate oyo ezangá mobateli.” (Mat. 9:36) Yehova mpe amiyokaka ndenge nini? Yesu alobaki: “Tata na ngai oyo azali na likoló alingaka te ete moko ya bato mike oyo abeba.” (Mat. 18:14) Oyo nde maloba ya kosimba mpenza motema! Soki tozali koyekola koyeba Yesu malamumalamu, tokolinga lisusu Yehova mingi.
7. Ndenge nini kozala elongo na bakristo oyo bakɔmɛli ekoki kosalisa yo?
7 Okoki mpe koyekola komonisa lisusu bolingo mingi mpo na bandeko mpe kokóma mokristo oyo akɔmɛli na elimo soki ozali kolekisa ntango elongo na bakristo oyo bakɔmɛli na elimo na lisangá na bino mpe koluka koyeba bango malamumalamu. Talá ndenge bazalaka na esengo. Bayokaka mawa te na ekateli oyo bazwaki ya kosalela Yehova. Tuná bango báyebisa yo mwa makambo oyo bakutanaki na yango na mosala ya Yehova. Okoki kosɛnga bango toli, ntango olingi kozwa ekateli moko ya ntina. Kobosana te ete “lobiko ezali soki bapesi-toli bazali ebele.”—Mas. 11:14.
8. Okoki kosala nini soki ozali na bantembe na makambo oyo Biblia eteyaka?
8 Longolá bantembe oyo ozalaka na yango. Ndenge tolobaki yango na paragrafe ya 2, Satana akoluka kosala ete otika kolinga mpe kosalela Yehova. Lolenge moko akoki kosala yango ezali ya kotya bantembe na motema na yo mpo na mateya mosusu ya Biblia. Na ndakisa, bato mosusu bakomeka kondimisa yo ete Nzambe akelaki biso te, kasi tozali awa mpo biloko nyonso ebimá kaka yango moko. Mbala mosusu ozalaki kotya likebi te na liteya ya evolisyo ntango ozalaki naino elenge. Kasi awa okómi mokóló, mbala mosusu ozali kokutana na liteya yango na eteyelo. Mbala mosusu makambo oyo balakisi na yo bazali koloba mpo na liteya ya evolisyo ekoki komonana ete ezali solo mpe ekoki kosala ete ondima yango. Kasi mbala mosusu bameká naino te koluka bilembeteli oyo emonisi ete Mozalisi azali. Kobosana te etinda oyo ezali na Masese 18:17: “Moto oyo alobaka liboso na ntango azali kosamba amonanaka moyengebene; moninga na ye akoya mpe akolandela mpenza ye malamumalamu.” Na esika ya kondima makambo nyonso oyo balakisi bayebisi yo na eteyelo, talelá malamumalamu mateya ya solo oyo ezali na Liloba ya Nzambe, Biblia. Salá bolukiluki na mikanda na biso oyo elimbolaka Biblia. Sololá na bandeko basi mpe mibali oyo liboso bazalaki kondimela liteya ya evolisyo. * Tuná bango nini endimisaki bango ete ezali na Mozalisi moko oyo alingaka biso. Masolo ya ndenge wana ekoki kosalisa yo omona bilembeteli oyo emonisi ete Mozalisi azali.
9. Ndakisa ya Melissa eteyi yo nini?
9 Ndeko mwasi moko na nkombo Melissa azwaki matomba mingi na ndenge asalaki bolukiluki na makambo etali bozalisi. * Alobi boye: “Na eteyelo, balakisi bazalaki kolimbola liteya ya evolisyo na ndenge oyo bazalaki kotinda bato bákanisa ete ezali solo. Na ebandeli, nazalaki kolinga kosala bolukiluki te mpamba te nazalaki kobanga ete nakoya koyeba ete liteya ya evolisyo ezali solo. Kasi nayaki kokanisa ete Yehova alingaka ete tózala na bilembeteli ya solosolo oyo etindaka biso tósalela ye. Yango wana, nabandaki kosala bolukiluki. Natángaki buku Y a-t-il un Créateur qui se soucie de vous? mpe mwa buku La vie a-t-elle été créée? mpe Cinq questions à se poser sur l’origine de la vie. Ezalaki mpenza makambo oyo nazalaki koluka. Nakanisi ezalaki makambo oyo nasengelaki kosala banda kala.”
10-11. Na kotalela 1 Batesaloniki 4:3, 4, nini ekoki kosalisa yo otikala pɛto na bizaleli?
10 Boyá etamboli ya mabe. Ntango ozali naino elenge, mposa ya kosangisa nzoto ekoki kokóma makasi, mpe na bantango mosusu bato mosusu bakoki kotya yo mbamba osala pite. Yango nde likambo Satana alingi osala. Nini ekoki kosalisa yo otikala pɛto na bizaleli? (Tángá 1 Batesaloniki 4:3, 4.) Ntango ozali kobondela yo moko, yebisáká Yehova ndenge ozali komiyoka, mpe sɛngá ye apesa yo makasi. (Mat. 6:13) Kobosana te ete Yehova alingaka kosalisa yo, kasi kosambisa yo te. (Nz. 103:13, 14) Longola yango, Biblia mpe ekoki kosalisa yo. Melissa, oyo tolobelaki liboso, asalaki makasi mpo na koboya makanisi ya mbindo. Alobi boye: “Kotánga Biblia mokolo na mokolo esalisaki ngai nalonga bamposa ya mbindo oyo nazalaki na yango. Yango ezalaki kokundwela ngai ete nazali moto ya Yehova mpe nalingi kosalela ye.”—Nz. 119:9.
11 Koluka te kosilisa mikakatano oyo ozali na yango yo moko. Yebisá baboti na yo mikakatano oyo ozali kokutana na yango. Na ntembe te, ezali pɛtɛɛ te kolobela makambo oyo etali yo moko, kasi kosala bongo ezali na ntina mpenza. Melissa alobi boye: “Nabondelaki na mpiko mpenza mpe na nsima nayebisaki tata na ngai mokakatano oyo nazalaki na yango. Nsima na yango, nayokaki malamu mpenza. Nayebaki ete Yehova azalaki kosepela na ngai.”
12. Ndenge nini okoki kozwa bikateli ya malamu?
12 Tiká mitinda ya Biblia etambwisa yo. Wana ozali kokóma mokóló, baboti na yo bakotikela yo nzela ozwaka bikateli yo moko. Kasi yebá ete oyebi naino makambo mingi te. Ndenge nini okoki koboya kosala libunga oyo ekoki kosala ete boyokani na yo ná Yehova ebeba? (Mas. 22:3) Ndeko mwasi moko na nkombo Kari alobi makambo oyo esalisaki ye mpo azwa bikateli ya malamu. Ayaki koyeba ete mokristo oyo akɔmɛli na elimo, azalaka na mposa te ete mobeko ezala na likambo mokomoko ya bomoi. Alobi boye: “Nasengelaki nde kokanga ntina ya mitinda ya Biblia na esika ya koyeba kaka mibeko.” Ntango ozali kotánga Biblia, omitunaka boye: ‘Makambo oyo nayekoli eteyi ngai nini mpo na Yehova? Ezali na mitinda oyo ekoki kosalisa ngai nasala makambo ya malamu? Soki bongo, matomba nini nakozwa soki nasaleli yango?’ (Nz. 19:7; Yis. 48:17, 18) Kotánga Biblia mpe komanyola na mitinda na yango, ekosalisa yo ozwaka bikateli oyo esepelisaka Yehova. Lokola ozali kokende liboso na elimo, okoya koyeba ete osengeli te na mobeko na likambo mokomoko ya bomoi, mpamba te okoyeba ndenge Yehova akanisaka mpe ndenge atalelaka makambo.
13. Na kotalela Masese 13:20, ndenge nini baninga ya malamu bakoki kosalisa yo?
13 Poná baninga oyo balingaka Yehova. Ndenge tolobaki liboso, baninga oyo oponaka bakoki kosalisa yo okóma mokristo oyo akɔmɛli. (Tángá Masese 13:20.) Ndeko mwasi moko na nkombo Sara abungisaki esengo na ye. Na nsima likambo moko esalemaki oyo esalisaki ye abongola makanisi na ye. Sara alobi boye: “Nazwaki baninga ya malamu na ntango oyo ebongi mpenza. Ngai ná ndeko mwasi moko ya elenge tozalaki koyekola Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli elongo pɔsɔ nyonso. Moninga mosusu asalisaki ngai nabanda kopesa biyano na makita. Lokola baninga na ngai basalisaki ngai, nakómaki kozwa na motuya boyekoli na ngai moko, mpe kobondela lisusu mingi. Nabandaki kokómisa boyokani na ngai ná Yehova makasi, mpe nazongelaki lisusu esengo na ngai.”
14. Ndenge nini ndeko Julien azwaki baninga ya malamu?
14 Ndenge nini okoki kopona baninga ya malamu oyo bakosalisa yo? Ndeko Julien, oyo azali lelo nkulutu, alobi boye: “Ntango nazalaki elenge, nazwaki baninga ya malamu ntango tozalaki kosakola elongo. Baninga yango bazalaki molende mpenza, mpe basalisaki ngai namona esengo oyo mosala ya kosakola ekoki kopesa. Nabandaki komityela mokano ya kosala mosala ya ntango nyonso. Lisusu, nayaki komona ete nazalaki na baninga ya malamu mingi te, mpo baninga oyo nazalaki na bango bazalaki bato oyo nazalaki na bango mbula moko. Na nsima, nazwaki mpe baninga ya malamu na Betele. Ndakisa na bango esalisaki ngai nayeba kopona kominanola ya malamu, mpe yango esalaki ete napusana lisusu penepene na Yehova.”
15. Na kotalela 2 Timote 2:20-22, likebisi nini ntoma Paulo apesaki Timote mpo na kosala boninga?
15 Ezali boni soki omoni ete ndeko moko na lisangá azali moninga ya malamu te mpo na yo? Ntoma Paulo ayebaki ete bandeko mosusu na lisangá na siɛklɛ ya liboso bazalaki na bizaleli ya malamu te, yango wana ayebisaki Timote akeba na bato ya ndenge wana. (Tángá 2 Timote 2:20-22.) Boninga na biso ná Yehova ezali na motuya mingi. Tosalaka makasi mpo tópusana penepene na Yehova, yango wana tosengeli te kozala na baninga oyo bakobebisa boninga na biso ná Tata na biso ya likoló.—Nz. 26:4.
NDENGE NINI KOMITYELA MIKANO EKOSALISA YO OKƆMƐLA NA ELIMO?
16. Mikano nini osengeli komityela?
16 Omityela mikano oyo ekomemela yo matomba. Omityela mikano oyo ekokómisa kondima na yo makasi mpe oyo ekosalisa yo okóma mokristo oyo akɔmɛli na elimo. (Ef. 3:16) Na ndakisa, okoki kozwa ekateli ya koyekola mpe kotánga lisusu Biblia mbala na mbala. (Nz. 1:2, 3) To okoki komeka lisusu kobondela mingi mpe kobongisa mabondeli na yo. Mbala mosusu, osengeli komonisa lisusu komipekisa na makambo etali kominanola mpe ndenge ya kosalela ntango na yo. (Ef. 5:15, 16) Yehova akosepela mingi ntango azali komona ndenge ozali kosala milende mpo na kokende liboso na elimo.
17. Matomba nini okozwa soki ozali kosalisa basusu?
17 Okokóma mokristo oyo akɔmɛli na elimo ntango ozali kosalisa bato mosusu. Yesu alobaki: “Esengo ya kopesa eleki oyo ya kozwa.” (Misala 20:35) Okozwa matomba mingi soki ozali kosalela ntango na yo mpe makasi na yo ya bolenge mpo na kosalisa basusu. Na ndakisa, okoki komityela mokano ya kosalisa mibange mpe bandeko oyo bazali bibɔsɔnɔ oyo bazali na lisangá na bino. Okoki kokende kosombela bango biloko to kosalisa bango báyeba ndenge ya kosalela baaparɛyi. Soki ozali ndeko mobali, omityela mokano ya kokóma mosaleli na misala mpo na kosalela bandeko na yo ya basi mpe ya mibali. (Flp. 2:4) Lisusu, okomonisa bato oyo basambelaka Yehova te bolingo soki ozali kosakwela bango nsango malamu ya Bokonzi. (Mat. 9:36, 37) Soki likoki ezali, omityela mokano ya kosala mosala ya ntango nyonso.
18. Ndenge nini mosala ya ntango nyonso ekoki kosalisa yo okola na elimo?
18 Mosala ya ntango nyonso ekoki kopesa yo mabaku mingi mpo okola na elimo. Soki ozali mobongisi-nzela, okoki kokɔta na Eteyelo ya bapalanganisi ya nsango malamu ya Bokonzi, okoki kosala na Betele to na mosala ya botongi ya bandako ya Teokrasi. Ndeko mwasi moko na nkombo Kaitlyn, oyo azali elenge mpe mobongisi-nzela, alobi boye: “Kolekisa ntango na mosala ya kosakola elongo na bandeko basi mpe mibali oyo bakɔmɛli na elimo esalisaki ngai mpenza nakola na elimo nsima ya batisimo na ngai. Ndakisa na bango elendisaki ngai nayekolaka Biblia na mozindo mpe nabongisa makoki na ngai ya koteya.”
19. Mapamboli nini okozwa soki ozali kokoba kokende liboso na elimo?
19 Wana ozali kokoba kokende liboso na elimo, okozwa mapamboli mingi. Okoboya kolekisa ntango na yo ya bolenge mpo na kosala makambo oyo ezangi ntina. (1 Yoa. 2:17) Okokima makama oyo eutaka na bikateli ya mabe. Kasi, okozala na bomoi ya malamu mpe esengo ya solosolo. (Mas. 16:3) Ndakisa na yo ya malamu ekolendisa bandeko na yo bakristo, ezala bilenge mpe mibange. (1 Tim. 4:12) Lisusu, likambo oyo eleki ntina, okozala na kimya mpe na esengo oyo eutaka na kosepelisa Yehova mpe okozala na boninga ya malamu elongo na ye.—Mas. 23:15, 16.
LOYEMBO 88 Teyá ngai banzela na yo
^ Basaleli nyonso ya Yehova bazalaka na esengo mingi ntango bamonaka bilenge bazali kozwa batisimo. Na ntembe te, nsima ya batisimo bayekoli ya sika basengeli kokoba kokola na elimo. Lisolo oyo ekolobela mingimingi makambo oyo bilenge oyo bauti kozwa batisimo bakoki kosala mpo bákoba kokola na elimo mpo bandeko nyonso bázwa matomba na lisangá.
^ Okoki mpe kotala lisolo “Makanisi na oyo etali ndenge bomoi ebandá” na jw.org
^ Bankombo mosusu topesi bango kopesa.