Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOYEKOLI 33

Yehova abatelaka mpe atyelaka basaleli na ye likebi

Yehova abatelaka mpe atyelaka basaleli na ye likebi

“Liso ya Yehova ezali kotala baoyo babangaka ye.”​—NZ. 33:18.

LOYEMBO 4 “Yehova azali Mobateli na ngai”

NA MOKUSE *

1. Mpo na nini Yesu asɛngaki Yehova abatela bayekoli na ye?

 NA BUTU liboso akufa, Yesu abondelaki Tata na ye ya likoló mpo na kosɛnga ye likambo moko ya ntina. Asɛngaki Yehova abatela bayekoli na ye. (Yoa. 17:15, 20) Na ntembe te, Yehova atalaka ntango nyonso basaleli na ye mpe atyelaka bango likebi mpe abatelaka bango. Kasi, Yesu ayebaki ete bayekoli na ye bakokutana na botɛmɛli makasi oyo ekouta epai ya Satana. Yesu ayebaki mpe ete bakozala na mposa ya lisalisi ya Yehova mpo na kotɛmɛla makaneli ya Zabolo.

2. Na kotalela Nzembo 33:18-20, mpo na nini tosengeli te kobanga mikakatano oyo tozali kokutana na yango?

2 Lelo oyo, mokili oyo eyangelami na Satana ezali kobimisela bakristo mikakatano ebele mpenza. Tozali kokutana na mikakatano oyo ekoki kolɛmbisa biso nzoto, ata mpe komeka bosembo na biso epai ya Yehova. Kasi ndenge tokomona yango na lisolo oyo, tozali na eloko ya kobanga te. Yehova azali kotala biso, elingi koloba, azali komona mikakatano oyo tozali kokutana na yango, mpe azali pene mpo na kosalisa biso tóyikela yango mpiko. Tótalela bandakisa mibale ya Biblia oyo emonisi ndenge Yehova abatelaka mpe atyelaka “baoyo babangaka ye” likebi.​—Tángá Nzembo 33:18-20.

NTANGO TOMIYOKAKA ETE TOZALI BISO MOKO

3. Ntango nini tokoki komiyoka ete tozali biso moko?

3 Atako tozali na bandeko basi mpe mibali mingi na lisangá, ekoki kokóma ete tómiyoka ete tozali biso moko. Na ndakisa, bilenge bakoki komiyoka ete bazali bango moko ntango bazali kolimbwela baninga na bango ya kelasi bindimeli na bango, to ntango bakei na lisangá ya sika. Mingi na biso tokoki kozala na mawa to kobunda na makanisi mabe, mpe kokanisa ete tokoki kosilisa yango kaka biso moko. Tokoki kokakatana koyebisa basusu ndenge tozali komiyoka, mpamba te tobangaka ete bakomitya te na esika na biso. Na bantango mosusu, tokoki ata mpe komituna soki moto moko akotyela biso likebi. Komiyoka ete tozali biso moko mpo na ntina nini, ekoki kosala ete tózala na elikya te mpe tómitungisa. Yehova alingi soki moke te tómiyoka bongo. Mpo na nini tolobi bongo?

4. Mpo na nini mosakoli Eliya alobaki ete: “Natikali kaka ngai moko”?

4 Tótalela ndakisa ya Eliya moto moko ya sembo. Yezabele ayebisaki ye ete akoboma ye, yango wana Eliya abangaki, akimaki mpe atambolaki mikolo 40. (1 Bak. 19:1-9) Nsukansuka, azalaki ye moko na mobenga moko, mpe alobaki na Yehova ete: “Natikali kaka ngai moko [mosakoli].” (1 Bak. 19:10) Ezalaki na basakoli mosusu na mokili yango; Obadia abikisaki basakoli 100 mpo Yezabele aboma bango te. (1 Bak. 18:7, 13) Na yango, mpo nini Eliya amiyokaki ete azalaki ye moko? Akanisaki ete basakoli oyo Obadia abatelaki bango nyonso bakufaki? Mbala mosusu azalaki komiyoka ete azalaki ye moko mpo bato mosusu basanganaki na ye te mpo na kosalela Yehova nsima ya kolonga basakoli ya Baala na Ngomba Karamele? Azalaki komiyoka bongo mpo ayebaki ete banguna na ye balingaki koboma ye to moto moko te azalaki kotyela ye likebi? Lisolo yango emonisi makambo nyonso te mpo na kolimbola ndenge Eliya azalaki komiyoka. Kasi makambo oyo toyebi ezali ete Yehova ayebaki ntina oyo Eliya azalaki komiyoka bongo mpe ayebaki malamu makambo ya kosala mpo na kosalisa ye.

Ntango tomiyokaka ete tozali biso moko, liteya nini ya kobɔndisa tokoki kozwa na ndenge Yehova asalisaki Eliya? (Talá paragrafe 5-6)

5. Ndenge nini Yehova akitisaki Eliya motema ete ayzalaki ye moko te?

5 Yehova asalaki makambo mingi mpo na kosalisa Eliya. Alendisaki Eliya aloba. Mbala mibale atunaki Eliya boye: “Ozali kosala nini awa?” (1 Bak. 19:9, 13) Mbala nyonso, Yehova azalaki koyoka ntango Eliya azalaki koyebisa ye ndenge azalaki komiyoka. Yehova ayanolaki Eliya na ndenge amonisaki ye ete azali elongo na ye mpe azali na nguya mingi. Lisusu, akitisaki Eliya motema ete azalaki na basambeli mosusu ebele. (1 Bak. 19:11, 12, 18) Na ntembe te, motema ya Eliya ekitaki nsima ya koyebisa Yehova ndenge azalaki komiyoka mpe ndenge Yehova ayanolaki ye. Yehova apesaki Eliya mikumba mingi ya ntina. Asɛngaki ye atya Hazaele mafuta mpo akóma mokonzi na Siri, Yehu mpo akóma mokonzi na Yisraele, mpe Elisha mpo akóma mosakoli. (1 Bak. 19:15, 16) Ntango Yehova apesaki Eliya mikumba yango, alingaki kosalisa ye azala na makanisi ya malamu. Lisusu, Nzambe apesaki ye moninga moko ya malamu mpenza, Elisha. Ndenge nini Yehova akoki kosalisa yo ntango ozali komiyoka ete ozali yo moko?

6. Na kotalela Nzembo 62:8, makambo nini okoki kobondela mpo na yango ntango ozali komiyoka ete ozali yo moko?

6 Yehova asɛngi yo obondelaka ye. Amonaka makambo oyo ozali kokutana na yango, mpe azali kokitisa yo motema ete akoyoka mabondeli na yo ntango nyonso. (1 Tes. 5:17) Asepelaka koyoka basambeli na ye. (Mas. 15:8) Makambo nini okoki kobondela mpo na yango ntango ozali komiyoka ete ozali yo moko? Fungolelá Yehova motema na yo, ndenge Eliya asalaki. (Tángá Nzembo 62:8.) Yebisá ye mitungisi na yo mpe ndenge ozali komiyoka mpenza mpo na yango. Sɛngá Yehova asalisa yo oyeba makambo ya kosala ntango ozali komiyoka ete ozali yo moko to ozali na mawa. Na ndakisa, soki ozali komiyoka ete ozali yo moko mpe kobanga ntango ozali kopesa litatoli na eteyelo, sɛngá Yehova apesa yo mpiko oyo osengeli na yango mpo na koloba. Okoki ata kosɛnga ye apesa yo bwanya mpo olobela kondima na yo na mayele mpenza. (Luka 21:14, 15) Soki ozali komitungisa na makanisi to olɛmbi nzoto, sɛngá Yehova asalisa yo osolola na ndeko mokristo moko oyo akɔmɛli na elimo mpo na likambo yango. Okoki kosɛnga Yehova asalisa ndeko yango ayoka yo na likebi ntango ozali koloba mpo amitya na esika na yo. Fungolelá Yehova motema na yo mobimba, talelá ndenge ayanolaka na mabondeli na yo mpe ndimáká lisalisi ya basusu; yango ekosala ete omiyoka ete ozali yo moko te.

Ozali koluka ndenge oyo okoki kosakola lisusu mingi mpe kosakwela basusu? (Talá paragrafe 7)

7. Ndakisa ya Mauricio eteyi yo nini?

7 Yehova apesá biso nyonso mosala moko ya ntina mingi. Okoki komindimisa ete amonaka mpe asepelaka na milende nyonso oyo osalaka mpo na kokokisa mokumba na yo na lisangá mpe na mosala ya kosakola. (Nz. 110:3) Ndenge nini komipesa mingi na mosala yango ekoki kosalisa yo ntango ozali komiyoka ete ozali yo moko? Tótalela ndakisa ya elenge mobali moko na nkombo Mauricio. * Mwa moke nsima ya batisimo ya Mauricio, moninga na ye moko ya motema abandaki mokemoke kotika solo. Mauricio alobi boye: “Ntango namonaki ete atikaki kosalela Yehova, nalɛmbaki nzoto. Namitunaki soki nakokoka kokokisa ndai na ngai ya kosalela Yehova mpe kotikala na libota na ye. Namiyokaki ete nazalaki ngai moko mpe nakanisaki ete moto moko te akomitya na esika na ngai.” Nini esalisaki Mauricio? Alobi boye: “Nakómaki kosakola mingi. Yango esalisaki ngai natika kokanisa kaka makambo na ngai moko mpe nalongola makanisi mabe oyo nazalaki na yango. Nayokaki esengo mpe nazalaki lisusu te komiyoka ete nazalaki ngai moko ntango nazalaki kosakola elongo na bandeko mosusu.” Ya solo, ata soki tokoki te kosakola elongo na bandeko na biso bakristo boye, tolendisamaka ntango tosakolaka elongo na bango na nzela ya kokoma mikanda mpe na telefone. Eloko nini mosusu esalisaki Mauricio? Abakisi boye: “Nakobaki kosala mingi na lisangá. Nazalaki kosala makasi mpo na kobongisa badevuare mpe kosala yango na makita. Mikumba yango esalisaki ngai namona ete Yehova mpe bandeko bazwaka ngai na motuya mingi.”

NTANGO TOZALI KOKUTANA NA KOMEKAMA MAKASI

8. Komekama makasi oyo tozali kokutana na yango ekoki kosala biso nini?

8 Tozali kokutana na komekama mingi na mikolo oyo ya nsuka. (2 Tim. 3:1) Kasi, komekama mosusu eyelaka biso pwasa mpe lolenge na yango ekamwisaka biso. Tokoki kokóma na mbalakaka na mokakatano ya mbongo, bakoki kozwa biso na maladi moko ya mabe, to tokoki kobungisa moto oyo tolingaka na liwa. Na bantango ya ndenge wana, tokoki kolɛmba nzoto mpe komitungisa mingi, mingimingi soki emonani ete tozali kokutana na komekama moko nsima na mosusu na mbala moko. Atako bongo, tóbosana te ete Yehova ayebi makambo oyo tozali kokutana na yango, mpe na lisalisi na ye tokoki kozala na elikya ete tokoyikela komekama nyonso mpiko.

9. Lobelá mwa mikakatano oyo Yobo akutanaki na yango.

9 Tótala ndenge Yehova asalisaki Yobo, moto moko ya sembo. Kaka na mwa ntango moke akutanaki na makambo mingi ya mpasi. Na mokolo moko, bayebisaki Yobo ete bayibaki to babomaki bibwele na ye nyonso mpe babomaki basali na ye mpe likambo ya mpasi mingi, bana na ye oyo azalaki kolinga mingi bakufaki. (Yobo 1:13-19) Mwa moke na nsima, wana azalaki koyika mpiko na makambo wana ya mpasi, Yobo akómaki kobɛla makasi. (Yobo 2:7) Ntango mikakatano na ye ekómelaki ye bololo mpenza, Yobo alobaki boye: “Naboyi; nalingi kozala na bomoi te.”​—Yobo 7:16.

Yehova azali koyebisa Yobo ndenge atyelaka biloko nyonso oyo asalá likebi mpo na komonisa ete alingaka Yobo mpe atyelaka ye likebi (Talá paragrafe 10)

10. Makambo nini Yehova asalaki mpo Yobo ayikela komekama oyo akutanaki na yango mpiko? (Talá elilingi ya ezipeli.)

10 Yehova azalaki kotyela Yobo likebi. Lokola Yehova azalaki kolinga Yobo mingi, apesaki ye oyo asengelaki na yango mpo alonga komekama oyo akutanaki na yango mpe atikala sembo. Yehova asololaki na Yobo, akundwelaki ye bwanya na ye oyo ezali na nsuka te mpe likebi oyo atyelaka biloko oyo asalá. Alobelaki banyama mingi ya kokamwa. (Yobo 38:1, 2; 39:9, 13, 19, 27; 40:15; 41:1, 2) Lisusu Yehova asalelaki Elihu, elenge mobali moko ya sembo, mpo alendisa Yobo mpe abɔndisa ye. Elihu akitisaki ye motema ete Yehova apesaka ntango nyonso mbano na basaleli na ye mpo na ezaleli na bango ya koyika mpiko. Kasi Yehova asalelaki mpe Elihu mpo apesa Yobo toli na bolingo mpenza. Elihu asalisaki Yobo atika kokanisa kaka makambo na ye moko na ndenge ayebisaki ye ete azali moke soki amikokanisi na Yehova, Mozalisi ya molɔ́ngɔ́ mobimba. (Yobo 37:14) Yehova apesaki mpe Yobo mokumba moko; asengelaki kobondela mpo na baninga na ye wana misato oyo basalaki lisumu. (Yobo 42:8-10) Ndenge nini Yehova asungaka biso lelo ntango tozali kokutana na komekama makasi?

11. Ndenge nini Biblia ekoki kosalisa biso ntango tozali kokutana na mikakatano?

11 Yehova alobaka na biso te mbala moko boye, ndenge alobaki na Yobo, kasi alobaka na biso na nzela ya Liloba na ye, Biblia. (Rom. 15:4) Abɔndisaka biso na ndenge apesi biso elikya mpo na mikolo ezali koya. Talelá mwa makanisi ya Biblia oyo ekoki kopesa yo makasi ntango ozali kokutana na mikakatano. Na kati ya Liloba na ye, Yehova alobi ete eloko moko te, elingi koloba mokakatano moko te, ekoki “kokabola biso na bolingo ya Nzambe.” (Rom. 8:38, 39) Ayebisi biso lisusu ete “azali pene na baoyo nyonso bazali kobelela ye” na libondeli. (Nz. 145:18) Yehova ayebisi biso ete soki totyeli ye motema, akosalisa biso tóyikela mikakatano ya ndenge nyonso mpiko mpe tokobatela esengo na biso atako tozali kokutana na mikakatano. (1 Ko. 10:13; Yak. 1:2, 12) Lisusu, Liloba ya Nzambe ezali kokundwela biso ete mikakatano na biso ezali ya ntango mokuse soki tokokanisi yango na mbano oyo akopesa biso mpo na libela. (2 Ko. 4:16-18) Yehova apesi biso elikya ya solosolo ete akolongola bato nyonso oyo babimiselaka biso bampasi, elingi koloba, Satana mpe bato nyonso oyo bamekolaka ye mpe basalaka makambo ya mabe. (Nz. 37:10) Okangá na motó mwa bavɛrsɛ ya kobɔndisa oyo ekoki kosalisa yo oyika mpiko na mikakatano oyo ekoki koya na mikolo ezali koya?

12. Yehova alingi tósala nini mpo tózwa matomba na Liloba na ye?

12 Yehova alingi ete tózwaka ntango ya kotánga mpe koyekola Biblia mbala na mbala mpe komanyola na mozindo na makambo oyo tozali kotánga. Ntango tosalelaka makambo oyo tozali koyekola, kondima na biso ekómaka makasi mpe topusanaka penepene na Tata na biso ya likoló. Yango epesaka biso makasi ya koyikela minyoko mpiko. Yehova apesaka mpe elimo santu na ye epai baoyo batyelaka Liloba na ye motema. Mpe elimo yango ekoki kopesa biso “nguya oyo eleki makasi” mpo na koyikela minyoko mpiko.​—2 Ko. 4:7-10.

13. Ndenge nini bilei ya elimo oyo “moombo ya sembo mpe ya mayele” apesaka esalisaka biso tóyikela komekama mpiko?

13 Na lisalisi ya Yehova, “moombo ya sembo mpe ya mayele” abimisaka masolo ndenge na ndenge, bavideo, mpe nzembo oyo ekoki kosalisa biso tókómisa kondima na biso makasi mpe tólala te mpɔngi na elimo. (Mat. 24:45) Tosengeli kosalela malamumalamu biloko nyonso oyo Yehova azali kopesa biso na ntango oyo ebongi. Ndeko mwasi moko oyo afandaka na États-Unis amonisi botɔndi mingi mpo na bilei ya elimo oyo azali kozwa. Alobi boye: “Bosembo na ngai emekami mbala mingi na boumeli ya mbula 40 oyo nalekisi na mosala ya Yehova.” Akutanaki na komekama ya makasi mpenza. Na ndakisa, sofɛlɛ moko oyo alangwaki masanga atukaki nkɔkɔ na ye wana azalaki na kati ya motuka mpe akufaki, baboti na ye bakufaki na maladi moko ya nsɔmɔ, mpe ye moko bakangaki ye na maladi ya kanser mbala mibale. Nini esalisaki ye ayika mpiko? Alobi boye: “Yehova asalisaka ngai ntango nyonso. Bilei ya elimo oyo apesaka na nzela ya moombo ya sembo mpe ya mayele esalisaka ngai nayika mpiko. Yango wana, nakoki koloba maloba oyo ya Yobo: ‘Kino nakokufa, nakotika bosembo na ngai te!’”​—Yobo 27:5.

Ndenge nini tokoki kozala mapamboli mpo na basusu na lisangá? (Talá paragrafe 14)

14. Na kotalela 1 Batesaloniki 4:9, ndenge nini Yehova asalelaka bandeko na biso bakristo mpo na kosalisa biso na ntango ya mikakatano?

14 Yehova ateyaka basaleli na ye bálinganaka mpe bálendisanaka na ntango oyo bakutani na mikakatano. (2 Ko. 1:3, 4; tángá 1 Batesaloniki 4:9.) Mpo na komekola Elihu, bandeko na biso ya basi mpe ya mibali bazalaka na mposa makasi ya kosalisa biso tótikala sembo ntango tokutani na makambo ya mpasi. (Mis. 14:22) Na ndakisa, tótala ndenge bandeko ya lisangá ya Diane balendisaki ye mpe basalisaki ye atikala penepene na Yehova ntango mobali na ye azalaki kobɛla makasi mpenza. Alobaki boye: “Ezalaki mpasi. Kasi tomonaki bolingo ya Yehova mpe lobɔkɔ na ye ya nguya ezalaki elongo na biso na basanza wana ya mpasi oyo tolekisaki. Bandeko ya lisangá basalisaki biso mingi mpenza. Bazalaki koya kotala biso, kobenga biso na telefone, mpe koyamba biso, makambo wana nde tozalaki na mposa na yango mpo esalisa biso tóyika mpiko. Lokola nayebaka kotambwisa motuka te, bandeko bazalaki kosala nyonso mpo báyeba soki nazalaki na likoki ya kokende makita mpe kobima na mosala ya kosakola.” Epesaka biso esengo lokola tozali na libota ya elimo oyo basangani na yango balinganaka mpenza!

ZALÁ NA BOTƆNDI MPO NA LIBATELI YA YEHOVA OYO ETONDI NA BOLINGO

15. Mpo nini tondimaka ete tokoki kolonga mikakatano oyo tokutanaka na yango?

15 Biso nyonso tokokutana na lolenge moko boye ya komekama. Kasi, ndenge toyekoli yango, tokozala biso moko soki moke te ntango tozali kokutana na komekama. Lokola tata oyo alingaka bana na ye, Yehova abatelaka mpe atyelaka biso likebi ntango nyonso. Azali pene na biso, ayokaka kolela na biso ntango tosɛngaka ete asalisa biso mpe azalaka na mposa makasi ya kosunga biso. (Yis. 43:2) Tondimaka ete tokoki kolonga mikakatano oyo tozali kokutana na yango mpo Yehova apesaka biso eloko nyonso oyo tosengeli na yango mpo na koyika mpiko. Apesi biso likabo ya kobondela, Biblia, ebele ya bilei ya elimo, lisangá mobimba ya bandeko mpo na kosalisa biso na ntango oyo esengeli.

16. Ndenge nini tokoki kotikala na nse ya libateli ya Yehova oyo etondi na bolingo?

16 Tozali na botɔndi mingi ndenge tozali na Tata ya likoló oyo abatelaka mpe atyelaka biso likebi! “Motema na biso esepelaka na ye.” (Nz. 33:21) Tokoki komonisa Yehova ete tozali na botɔndi mpo na libateli na ye oyo etondi na bolingo ntango tozwaka matomba na bibongiseli nyonso oyo azwi mpo na kosalisa biso. Biso nde tosengeli kosala makasi mpo tótikala na nse ya libateli ya Nzambe. Na maloba mosusu, soki tokobi kosala nyonso oyo tokoki mpo na kotosa Yehova mpe kosala oyo ezali malamu na miso na ye, akobatela biso mpo na libela!​—1 Pe. 3:12.

LOYEMBO 30 Tata na ngai, Nzambe na ngai, mpe moninga na ngai

^ Tosengeli na lisalisi ya Yehova mpo na koyika mpiko na mikakatano oyo tozali kokutana na yango lelo oyo. Lisolo oyo ekosalisa biso tómona ete Yehova abatelaka mpe atyelaka basaleli na ye likebi. Amonaka mikakatano oyo mokomoko na biso azali kokutana na yango, mpe apesaka biso oyo tosengeli na yango mpo na koyikela yango mpiko.

^ Bankombo mosusu topesi bango kopesa.