Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOYEKOLI 1

“Bókende mpe bókómisa bato bayekoli”

“Bókende mpe bókómisa bato bayekoli”

MOKAPO YA MOBU 2020: “Bókende mpe bókómisa bato bayekoli . . . , bóbatisa bango.”​—MAT. 28:19.

LOYEMBO 79 Tóteya bango bátɛlɛma ngwi

NA MOKUSE *

1-2. Likambo nini anzelu ayebisaki basi oyo bakendaki na lilita ya Yesu, mpe malako nini Yesu ye moko apesaki bango?

NA MOKOLO ya 16 Nisana ya mobu 33 T.B. na ntɔngɔntɔngɔ, mwa etuluku ya basi oyo bazalaki kobanga Nzambe bakendaki na lilita, epai bakundaki Nkolo Yesu Kristo ngonga koleka 36 liboso, mpe bazalaki na mpasi na motema. Ntango bakómaki kuna, bazalaki na mposa ya kotya matiti ya nsolo mpe mafuta ya nsolo kitoko na nzoto ya Yesu, kasi bakamwaki komona ete lilita etikalaki mpamba! Anzelu moko ayebisaki basi yango ete Yesu asekwi, mpe abakisaki: “Akei liboso na bino na Galile; kuna nde bokomona ye.”​—Mat. 28:1-7; Luka 23:56; 24:10.

2 Ntango basi yango balongwaki na lilita, Yesu ye moko akutanaki na bango mpe apesaki bango malako oyo: “Bókende, bópesa bandeko na ngai nsango, ete bákende na Galile; mpe kuna bakomona ngai.” (Mat. 28:10) Na ntembe te, Yesu azalaki na mwa malako ya ntina mingi mpo na bayekoli na ye, mpamba te likita wana nde likambo ya liboso oyo abongisaki nsima ya lisekwa na ye!

YESU ATINDAKI BANANI BÁKÓMISA BATO BAYEKOLI?

Ntango Yesu akutanaki na bantoma mpe bayekoli mosusu na Galile nsima ya lisekwa na ye, apesaki bango etinda ete: “Bókende . . . mpe bókómisa bato bayekoli” (Talá paragrafe 3-4)

3-4. Mpo na nini tokoki koloba ete etinda oyo ezali na Matai 28:19, 20 epesamaki kaka te epai ya bantoma? (Talá elilingi ya ezipeli.)

3 Tángá Matai 28:16-20. Na likita yango, Yesu alobelaki mosala ya ntina mingi oyo bayekoli na ye basengelaki kosala na siɛklɛ ya liboso​—oyo biso mpe tozali kosala lelo oyo. Yesu alobaki: “Bókende mpe bókómisa bato bayekoli na bikólo nyonso, . . . bóteya bango bátosa makambo nyonso oyo napesi bino mitindo.”

4 Yesu alingi ete bayekoli na ye nyonso básakolaka. Apesaki etinda yango kaka te epai ya bantoma na ye 11 ya sembo. Ndenge nini toyebi yango? Tókanisa naino: kaka bantoma nde bazalaki wana ntango etinda ya kokómisa bato bayekoli epesamaki na ngomba wana na Galile? Tóbosana te ete anzelu ayebisaki basi ete: “Kuna [na Galile] nde bokomona ye.” Na ntembe te basi wana ya sembo mpe bazalaki na likita yango. Kasi esuki wana te. Ntoma Paulo alobaki ete Yesu “abimelaki bandeko koleka nkama mitano (500) na mbala moko.” (1 Ko. 15:6) Abimelaki bango wapi?

5. Mpo na nini tokoki koloba ete 1 Bakorinti 15:6 elobeli likita ya Matai 28, oyo esalemaki na Galile?

5 Makambo mingi ekoki kotinda biso tókanisa ete Paulo azalaki kolobela nde likita wana ya Galile, oyo Matai mokapo 28 elobeli. Makambo nini? Ya liboso, bayekoli mingi ya Yesu bazalaki bato ya Galile. Na yango​—ngomba moko na Galile nde ebongaki mpo na koyanganisa ebele ya bato—​kasi te ndako ya moto moko na Yerusaleme. Ya mibale, nsima ya lisekwa na ye, Yesu asilaki kobimela bantoma 11 kaka bango moko na ndako moko na Yerusaleme. Soki Yesu alingaki kopesa malako ya kosakola mpe ya kokómisa bato bayekoli kaka epai ya bantoma na ye, akokaki kosala yango na Yerusaleme, na esika asɛnga bango ná basi wana, mpe bato mosusu bákutana na ye na Galile.​—Luka 24:33, 36.

6. Ndenge nini Matai 28:20 emonisi ete etinda ya kokómisa bato bayekoli etali mpe biso lelo, mpe nini emonisi ete etinda yango ezali kotosama?

6 Tólobela likambo ya misato. Etinda ya Yesu ya kokómisa bato bayekoli esukaki kaka te epai ya bakristo ya siɛklɛ ya liboso. Ndenge nini toyebi yango? Na nsuka ya maloba na ye, Yesu ayebisaki bayekoli na ye boye: “Nazali elongo na bino mikolo nyonso tii na bosukisi ya makambo ya ntango oyo.” (Mat. 28:20) Ndenge kaka Yesu alobaki, ebele ya bato lelo oyo bazali kosala mosala ya kokómisa bato bayekoli. Kanisá naino! Mbula na mbula, bato pene na 300 000 bazwaka batisimo mpo na kokóma Batatoli ya Yehova mpe bayekoli ya Yesu Kristo!

7. Tokolobela nini sikoyo, mpe mpo na nini?

7 Bato mingi oyo bayekolaka Biblia bakolaka tii na kozwa batisimo. Kasi, emonani ete bato mosusu oyo toyekolaka na bango Biblia mbala na mbala bakakatanaka mpo na kokóma bayekoli ya Yesu. Basepelaka koyekola, kasi bakolaka na elimo te. Soki oyekolaka Biblia na moto, tondimi ete olingaka kosalisa moyekoli na yo asalela makambo oyo boyekolaka mpe akóma moyekoli ya Kristo. Lisolo oyo emonisi ndenge tokoki kosimba motema ya moyekoli mpe ndenge tokoki kosalisa ye akola na elimo. Mpo na nini ebongi tólobela likambo yango? Mpo na bantango mosusu, ekoki kosɛnga tótala soki tosengeli kokoba koyekola na moto Biblia to kokata boyekoli.

SALÁ MAKASI OSIMBA MOTEMA YA MOYEKOLI

8. Mpo na nini bayekoli mosusu ya Biblia bakoki kozala na mokakatano mpo na kolinga Yehova?

8 Yehova alingi bato básalela ye mpo balingaka ye. Yango wana, mokano na biso ezali ya kosalisa bayekoli na biso ya Biblia bákanga ntina ete Yehova atyelaka mokomoko na bango likebi mingi mpe alingaka bango mingi. Tolingi kosalisa bango bámona ete Yehova azali “tata ya bana mibali oyo batata bakufá mpe mosambisi ya basi oyo mibali bakufá.” (Nz. 68:5) Ntango bayekoli na yo bakómi komona ndenge Nzambe alingi bango, yango ekoki kosimba mitema na bango mpe bolingo na bango mpo na Nzambe ekokola. Bayekoli mosusu bakoki kozala na mokakatano ya komona Yehova lokola Tata ya bolingo, mpo batata na bango bazalaki komonisela bango bolingo te. (2 Tim. 3:1, 3) Na yango, ntango bozali koyekola, bendáká likebi na bango na bizaleli ya kokamwa oyo Yehova azali na yango. Salisá bayekoli na yo bákanga ntina ete Nzambe na biso ya bolingo alingi bázwa bomoi ya seko, mpe ete azali pene ya kosalisa bango mpo bákokisa mokano yango. Makambo nini mosusu tokoki kosala?

9-10. Babuku nini tosengeli kosalela mpo na koyekola na bato Biblia, mpe mpo na nini?

9 Salelá buku “Makambo oyo Biblia eteyaka” mpe “Ndenge ya kotikala na kati ya bolingo ya Nzambe.” Mikanda yango ebongisami mpenzampenza mpo na kosalisa biso tósimba mitema ya bayekoli na biso ya Biblia. Na ndakisa, mokapo 1 ya buku Makambo oyo Biblia eteyaka epesi biyano na mituna oyo: Nzambe akipaka biso to azali nde moto mabe?, Nzambe ayokaka ndenge nini ntango bato bazali konyokwama?, mpe okoki kozala moninga ya Yehova? Bongo buku Ndenge ya kotikala na kati ya bolingo ya Nzambe? Mokanda yango ekosalisa moyekoli amona ndenge kosalela mitinda ya Biblia ekoki kobongisa bomoi na ye mpe kosalisa ye akóma moninga ya Yehova. Ata soki osilá koyekola mikanda yango na bato mosusu, osengeli komibongisa liboso okende koyekola na moto mpe talelá bamposa na ye.

10 Kasi, okosala nini soki lisolo oyo moyekoli asepeli na yango ezali na mokanda oyo ezali te na kati ya Bisaleli mpo na koteya? Okoki kolendisa ye atánga mokanda yango ye moko mpo okoba koyekola na ye na moko ya babuku oyo touti kolobela, oyo ebongisami mpo na koyekola na bato.

Bóbondela liboso ya kobanda boyekoli (Talá paragrafe 11)

11. Ntango nini tosengeli kobanda mpe kosukisa boyekoli na libondeli, mpe ndenge nini tokoki kolobela likambo ya kobondela?

11 Bóbondelaka liboso ya kobanda boyekoli. Mbala mingi, ezalaka malamu koumela mingi te mpo na kobanda mpe kosukisa boyekoli na libondeli, ntango mosusu nsima ya koyekola ata mwa bapɔsɔ. Tosengeli kosalisa moyekoli amona ete tokoki kokanga ntina ya Liloba ya Nzambe kaka na lisalisi ya elimo ya Nzambe. Mpo na kolobela likambo ya kobondela, bandeko mosusu batángelaka moto Yakobo 1:5, oyo elobi: “Soki moko na bino azangi bwanya, akoba kosɛnga Nzambe.” Na nsima, akoki kotuna moyekoli ete: “Ndenge nini tokoki kosɛnga Nzambe bwanya”? Na ntembe te, moyekoli akondima ete tosengeli kobondela Nzambe.

12. Ndenge nini okoki kosalela Nzembo 139:2-4 mpo na kosalisa moyekoli afungwelaka Yehova motema?

12 Teyá moyekoli ndenge ya kobondela. Monisá ye ete Yehova alingaka koyoka mabondeli na ye oyo euti na motema. Yebisá ye ete ntango azali kobondela ye moko, akoki mpenza kofungwela Yehova motema, koyebisa ye makambo oyo akoki kobanga koyebisa moto mosusu. Kutu, Yehova ayebaka makanisi mpenza ya mitema na biso. (Tángá Nzembo 139:2-4.) Tokoki mpe kolendisa moyekoli asɛnga Nzambe asalisa ye alongola makanisi ya mabe mpe atika mimeseno ya mabe. Na ndakisa, kanisá ete moto oyo ayekoli Biblia mwa ntango mingi asepelaka mingi na fɛti moko oyo eutá na bapakano. Ayebi ete ezali mabe, kasi mpo na koloba solo, alingaka makambo mosusu ya fɛti yango. Lendisá ye ayebisa Yehova na bosikisiki ndenge oyo azali komiyoka mpe asɛnga asalisa ye alinga kaka makambo oyo Nzambe alingaka.​—Nz. 97:10.

Bengisá moyekoli aya na makita (Talá paragrafe 13)

13. (a) Mpo na nini tosengeli koumela te mpo na kosɛnga moyekoli ayanganaka na makita? (b) Nini ekoki kosala ete moyekoli azala na motema ya kokita ntango ayei na Ndako ya Bokonzi?

13 Koumela te mpo na kosɛnga moyekoli ayanganaka na makita. Makambo oyo moyekoli na yo akoyoka mpe akomona na makita ekoki kosimba motema na ye mpe kosalisa ye akola na elimo. Lakisá ye video Makambo esalemaka ndenge nini na Ndako ya Bokonzi? mpe bengisá ye na makita. Soki likoki ezali, yebisá ye ete okoya kozwa ye mpo bókende na makita. Ezali malamu okendaka na basakoli ndenge na ndenge mpo na koyekola na moto yango. Na yango, moyekoli na yo akoyeba mwa bandeko ya lisangá, mpe yango ekosala ete azala na motema ya kokita ntango ayei na makita.

SALISÁ MOYEKOLI AKOLA NA ELIMO

14. Nini ekoki kotinda moyekoli akola na elimo?

14 Mokano na biso ezali ya kosalisa moyekoli na biso ya Biblia akola na elimo. (Ef. 4:13) Ntango moto andimi koyekola Biblia, mbala mosusu andimi kaka mpo boyekoli yango ekosalisa ye na bomoi. Kasi, wana bolingo na ye mpo na Yehova ezali kokola, akoki kobanda kokanisa ndenge ye mpe akoki kosalisa basusu, ata mpe bandeko na kati ya lisangá. (Mat. 22:37-39) Soki libaku emonani, kokakatana te koyebisa ye ete topesaka makabo ya mbongo mpo na kosimba mosala ya Bokonzi.

Salisá moyekoli ayeba oyo asengeli kosala soki matata ebimi (Talá paragrafe 15)

15. Ndenge nini tokoki kosalisa moyekoli ya Biblia ayeba kosilisa matata na basusu?

15 Salisá moyekoli ayeba oyo asengeli kosala ntango matata ebimi. Na ndakisa, kanisá ete moyekoli na yo, oyo azali mosakoli oyo azwi naino batisimo te, ayebisi yo ete moto moko na lisangá apesi ye nkanda. Na esika okɔtela moko na bango, mpo na nini te komonisa ye toli ya Biblia oyo akoki kolanda? Akoki kolimbisa ndeko yango, to, soki azali kokoka kolekisa likambo yango te, akoki kokende kosolola na ndeko yango na boboto mpe na bolingo na mokano ya ‘kozongisa ye na nzela ya malamu.’ (Talá mpe Matai 18:15.) Salisá moyekoli abongisa makambo oyo akoloba. Lakisá ye ndenge ya kosalela programɛ JW Library®, Buku ya bolukiluki mpo na Batatoli ya Yehova mpe site jw.org® mpo na kozwa makanisi oyo ekosalisa ye asilisa likambo yango. Soki oteyi ye malamu liboso azwa batisimo, akoyokana malamu na bandeko ya lisangá ntango akokóma mokristo oyo azwá batisimo.

16. Mpo na nini ezali malamu kobengisa basakoli mosusu na boyekoli moko ya Biblia?

16 Sɛngá ndeko moko, to mpe mokɛngɛli ya zongazonga ntango ayei kotala lisangá na bino, akende kotika yo oyekola na moyekoli na yo. Mpo na nini? Longola makambo oyo touti kolobela, basakoli mosusu bakoki kosalisa moyekoli na yo na ndenge oyo yo okokoka te. Na ndakisa, kanisá ete moyekoli na yo amekaka kotika likaya, kasi akweaka mbala na mbala. Kende kotala ye elongo na Motatoli oyo alongá momeseno yango, mbala mosusu mpe nsima ya kokwea mbala na mbala. Ndeko oyo okei na ye akoki kopesa moyekoli na yo mwa toli oyo ebongi na ye. Soki oyoki mwa nsɔni kotambwisa boyekoli ya Biblia na miso ya ndeko oyo akomeli mingi, sɛngá ye atambwisa boyekoli mokolo yango. Ezala ndenge nini, makambo oyo bandeko bakutaná na yango ekoki kosalisa moyekoli na yo. Kobosana te, mokano na biso ezali ya kosalisa moyekoli akola na elimo.

NASENGELI KOKATA BOYEKOLI?

17-18. Makambo nini osengeli kotalela mpo na koyeba soki osengeli kokata boyekoli na moto to te?

17 Soki moyekoli ya Biblia azali mpenza kokola na elimo te, mokolo mosusu ekosɛnga omituna boye: ‘Nasengeli kokata boyekoli yango?’ Ntango ozali kotalela likambo yango, osengeli kokanisa makoki ya moyekoli yango. Bato mosusu bazwaka ntango mingi liboso bákola na elimo. Omituna boye: ‘Moyekoli na ngai azali kokola na ndenge esengeli, na kotalela makoki na ye?’ ‘Abandi “kotosa,” to kosalela, makambo oyo azali koyekola?’ (Mat. 28:20) Mbala mosusu moyekoli azali kokola malɛmbɛmalɛmbɛ, kasi esengeli komonana polele ete azali kokola, to kosala mbongwana na bomoi na ye.

18 Kasi, okosala nini soki moto oyo asili koyekola mwa mingi azali komonisa mpenza te to ata moke te ete asepelaka na boyekoli? Na ndakisa, kanisá ete osilisi koyekola na moto buku Makambo oyo Biblia eteyaka, mbala mosusu mpe bobandi buku Bolingo ya Nzambe, kasi ayanganá ata mbala moko te na makita, ata mpe Ekaniseli! Mpe mbala mingi aboyaka bóyekola mpo na makambo ezangá ntina. Na ntango wana, ekozala malamu osolola polele na moyekoli yango. *

19. Soki ezali komonana ete moto asepelaka na boyekoli ya Biblia te, okoki koloba na ye nini, mpe makambo nini osengeli kotalela?

19 Okoki kobanda na kotuna ye boye: ‘Mokakatano nini ya monene epekisaka yo okóma Motatoli ya Yehova?’ Moyekoli akoki koyanola ete: ‘Nasepelaka koyekola Biblia, kasi nakokóma Motatoli ya Yehova ata mokolo moko te!’ Soki alobi bongo atako bosili koyekola mwa ntango molai, ezali kaka na ntina bókoba koyekola? Nzokande, moyekoli na yo akoki mpo na mbala ya liboso koyebisa yo likambo oyo epekisaka ye akola na elimo. Na ndakisa, akoki koloba ete akokoka kosakola ndako na ndako ata mokolo moko te. Na ntango yango, lokola abimisi makanisi na ye, okoki koyeba ndenge ya kosalisa ye.

Kolekisa ntango te na koyekola na moto oyo azali kokola te na elimo (Talá paragrafe 20)

20. Ndenge nini Misala 13:48 ekoki kosalisa biso tóyeba soki tosengeli kokoba koyekola na moto to te?

20 Likambo ya mawa, bayekoli mosusu ya Biblia bazali lokola Bayisraele ya mikolo ya Ezekiele, oyo mpo na bango, Yehova alobaki na Ezekiele ete: “Talá! epai na bango ozali lokola loyembo ya lolango, lokola moto oyo azali na mongongo kitoko mpe oyo azali kobɛta malamu ebɛtɛlo ya bansinga. Mpe bakoyoka mpenza maloba na yo, kasi moto moko te akosalela yango.” (Ezk. 33:32) Ekoki kozala mpasi mpo tóyebisa moto ete tokokata koyekola na ye Biblia. Kasi, tóbosana te ete “ntango oyo etikali ekómi mokuse.” (1 Ko. 7:29) Na esika tólekisa ntango mingi na koyekola Biblia na moto oyo azali kokola te, tosengeli koluka moto oyo amonisi ete azali na “ezaleli oyo ebongi mpo na bomoi ya seko.”​—Tángá Misala 13:48.

Na teritware, ekoki kozala na moto oyo azali kobondela Nzambe asalisa ye (Talá paragrafe 20)

21. Mokapo ya mobu 2020 ezali nini, mpe mpo na nini ebongi mpenza?

21 Na 2020, mokapo ya mobu ekosalisa biso tóluka kokolisa makoki na biso na mosala ya kokómisa bato bayekoli. Ezali na maloba oyo Yesu alobaki na likita ya ntina mingi oyo asalaki na ngomba moko na Galile: “Bókende mpe bókómisa bato bayekoli . . . , bóbatisa bango.”​Mat. 28:19.

Tózala na ekateli ya koluka ntango nyonso kokolisa makoki na biso na mosala ya kokómisa bato bayekoli mpe kosalisa bayekoli na biso bázwa batisimo (Talá paragrafe 21)

LOYEMBO 70 Tóluka banani babongi

^ par. 5 Mokapo ya mobu 2020 ezali kolendisa biso ‘tókómisa bato bayekoli.’ Etinda yango etali basaleli nyonso ya Yehova. Ndenge nini tokoki kosalisa bato oyo toyekolaka na bango Biblia bálinga Yehova mpo bákóma bayekoli ya Kristo? Lisolo oyo ekomonisa ndenge oyo tokoki kosalisa bayekoli ya Biblia mpo bákóma baninga ya Yehova. Tokomona mpe ndenge oyo tokoki koyeba ntango oyo tosengeli kokata boyekoli na moto.