Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOYEKOLI 4

“Elimo yango moko etatolaka”

“Elimo yango moko etatolaka”

“Elimo yango moko etatolaka elongo na elimo na biso ete tozali bana ya Nzambe.”​—ROM. 8:16.

LOYEMBO 25 Eloko ya Nzambe ye moko

NA MOKUSE *

Na Pantekote ya mobu 33, Yehova asopaki elimo santu na ye na ndenge ya kokamwa likoló ya bakristo soki 120 (Talá paragrafe 1-2)

1-2. Likambo nini ya kokamwa esalemaki na mokolo ya Pantekote ya mobu 33 T.B.?

TOZALI mokolo ya lomingo na ntɔngɔ na Yerusaleme. Ezali mokolo ya Pantekote ya mobu 33 T.B. Etuluku moko ya bayekoli soki 120 bayangani elongo na shambre ya likoló ya ndako moko. (Mis. 1:13-15; 2:1) Mwa mikolo liboso, Yesu ayebisaki bango bázala na Yerusaleme mpo bakozwa likabo moko ya ntina mingi. (Mis. 1:4, 5) Nini esalemaki na nsima?

2 Biblia elobi: “Na mbala moko makɛlɛlɛ ebimaki na likoló lokola oyo ya mopɛpɛ oyo ezali kopɛpa makasi.” Makɛlɛlɛ etondaki na ndako oyo bazalaki. Bongo, “ndemo lokola nde ya mɔtɔ” emonanaki na mitó ya bayekoli, mpe bango nyonso “batondaki na elimo santu.” (Mis. 2:2-4) Na ndenge yango ya kokamwa, Yehova asopaki elimo santu na ye likoló ya bayekoli yango. (Mis. 1:8) Bazalaki bato ya liboso ya kotyama mafuta na elimo * mpe ya kozwa elikya ya koyangela elongo na Yesu na likoló.

NINI ESALEMAKA NTANGO MOTO ATYAMI MAFUTA NA ELIMO?

3. Mpo na nini baoyo bazalaki na Pantekote bazalaki na ntembe te ete batyamaki mafuta na elimo santu?

3 Soki yo mpe ozalaki na kati ya bayekoli oyo bayanganaki na shambre ya likoló mokolo wana, olingaki kobosana te likambo oyo esalemaki. Kanisá ete eloko moko oyo ezalaki lokola lolemo ya mɔtɔ etɛlɛmi na motó na yo, mpe obandi koloba na minɔkɔ mosusu! (Mis. 2:5-12) Olingaki kozala na ntembe ata moke te ete otyami mafuta na elimo santu. Kasi, kotyama mafuta na elimo esalemaka kaka na ndenge ya kokamwa mpo na bato nyonso mpe na eleko kaka moko ya bomoi na bango? Te. Ndenge nini toyebi yango?

4. Kotyama mafuta na elimo na siɛklɛ ya liboso esalemaki kaka ndenge moko mpo na bato nyonso? Limbolá.

4 Tólobela ntango oyo moto akoki kotyama mafuta na elimo. Bayekoli wana soki 120 bazalaki kaka bango moko te baoyo batyamaki mafuta na elimo mokolo wana ya Pantekote ya mobu 33 T.B. Na nsima kaka na mokolo yango, bato soki 3 000 bazwaki mpe elimo santu oyo elakamaki. Batyamaki mafuta na elimo ntango bazwaki batisimo. (Mis. 2:37, 38, 41) Kasi, na bambula oyo elandaki, bato nyonso te nde bazalaki kotyama mafuta na elimo na ntango ya batisimo. Basamaria batyamaki mafuta na elimo mwa ntango nsima ya kozwa batisimo. (Mis. 8:14-17) Mpe likambo ya kokamwa koleka nyonso, Korneyi ná bato ya ndako na ye batyamaki mafuta na elimo liboso kutu bázwa batisimo.​—Mis. 10:44-48.

5. Na kotalela 2 Bakorinti 1:21, 22, nini esalemaka ntango moto atyami mafuta na elimo?

5 Tólobela mpe oyo esalemaka ntango moto atyami mafuta na elimo santu. Na ebandeli, bato mosusu oyo batyami mafuta na elimo bakokaka kondima te ete Yehova aponi bango. Na ndakisa, bamitunaka: ‘Mpo na nini Yehova aponi ngai?’ Bato mosusu bamitunaka bongo te. Ezala ndenge nini, ntoma Paulo alimbolaki likambo oyo ekómelaka bato nyonso oyo batyami mafuta na elimo; alobaki boye: “Nsima ya kondima, botyamaki elembo * na elimo santu oyo elakamaki, oyo ezali ndanga ya libula na biso.” (Ef. 1:13, 14) Na yango, Yehova asalelaka elimo santu mpo na komonisa bakristo yango polele ete aponi bango. Na bongo, elimo santu ezali “ndanga [elaka]” oyo Yehova apesaka mpo na komonisa bango ete na mikolo ezali koya bakozala na bomoi ya seko na likoló, kasi te na mabele.​—Tángá 2 Bakorinti 1:21, 22.

6. Mokristo oyo atyami mafuta na elimo asengeli kosala nini mpo azwa mbano ya kokende na likoló?

6 Soki mokristo atyami mafuta na elimo, elakisi ete ata ndenge nini akozwa kaka mbano ya kokende na likoló? Te. Moto oyo atyami mafuta na elimo ayebaka ete aponami mpo na kokende na likoló. Kasi, asengeli kobosana te maloba oyo ya ntoma Petro: “Bandeko, bósala nyonso oyo ekoki na bino mingi lisusu mpo bóbatela kobengama na bino mpe koponama na bino; mpo soki bokobi kosala makambo wana bokokwea ata moke te.” (2 Pe. 1:10) Na yango, ata soki mokristo oyo atyami mafuta na elimo aponami, to abengami, mpo na kokende na likoló, akozwa mbano na ye kaka soki atikali sembo.​—Flp. 3:12-14; Ebr. 3:1; Em. 2:10.

NDENGE NINI MOTO AYEBAKA ETE ATYAMI MAFUTA NA ELIMO?

7. Ndenge nini bakristo oyo batyami mafuta na elimo bayebaka ete babengami mpo na kokende na likoló?

7 Kasi, ndenge nini moto ayebaka soki abengami mpo na kokende na likoló? Eyano ya polele ezali na maloba ya ntoma Paulo epai ya bakristo ya Roma oyo Nzambe ‘abengaki mpo bázala basantu.’ Alobaki na bango boye: “Bozwaki elimo ya boombo te oyo ezali kopesa lisusu kobanga, kasi bozwaki nde elimo oyo esali ete Nzambe akamata bino mpe akómisa bino bana na ye, oyo na nzela na yango tobelelaka ete: “Aba, Tata!” Elimo yango moko etatolaka elongo na elimo na biso ete tozali bana ya Nzambe.” (Rom. 1:7; 8:15, 16) Na yango, na nzela ya elimo santu na ye, Nzambe amonisaka polele na bakristo oyo batyami mafuta na elimo ete babengami mpo na kokende na likoló.​—1 Tes. 2:12.

8. Ndenge nini 1 Yoane 2:20, 27 emonisi ete bakristo oyo batyami mafuta na elimo bazalaka na mposa te basusu bándimisa bango?

8 Yehova atikaka ntembe ata moke te na makanisi mpe mitema ya bakristo oyo bazwi libyangi ya kokende na likoló. (Tángá 1 Yoane 2:20, 27.) Atako bongo, bakristo oyo batyami mafuta na elimo bazalaka na mposa ya koteyama na Yehova na nzela ya lisangá, kaka lokola moto nyonso. Kasi, bazalaka na mposa te ete moto mosusu andimisa bango ete batyami mafuta na elimo. Yehova asalelaka elimo santu na ye, nguya oyo eleki makasi na molɔ́ngɔ́ mobimba, mpo na komonisa bango polele ete atye bango mafuta na elimo!

‘BABOTAMAKA LISUSU’

9. Ndenge emonisami na Baefese 1:18, mbongwana nini esalemaka ntango moto atyami mafuta na elimo?

9 Lelo oyo, basaleli mingi ya Yehova bakoki kozala na mokakatano ya koyeba mpenza nini ekómelaka moto ntango Nzambe atye ye mafuta na elimo. Ezali likambo ya kokamwa te mpo bango batyami mafuta na elimo te. Nzambe akelaki bato mpo báfanda libela na libela na mabele, kasi na likoló te. (Eba. 1:28; Nz. 37:29) Kasi, Yehova aponi bato mosusu mpo bákende kofanda na likoló. Na yango, ntango atye bango mafuta na elimo, abongolaka mpenza elikya na bango mpe ndenge na bango ya kokanisa, mpo bálikya kozala na bomoi na likoló.​—Tángá Baefese 1:18.

10. ‘Kobotama lisusu’ elimboli nini? (Talá mpe maloba na nse ya lokasa.)

10 Ntango mokristo atyami mafuta na elimo, ‘abotami lisusu,’ to ‘abotami uta na likoló.’ * Yesu alobaki mpe ete moto oyo atyami mafuta na elimo te akoki koyeba te soki ‘kobotama lisusu’ to ‘kobotama na elimo’ esalaka ndenge nini, ata soki balimbweli ye.​—Yoa. 3:3-8.

11. Limbolá mbongwana oyo esalemaka na makanisi ya moto oyo atyami mafuta na elimo.

11 Mbongwana nini esalemaka na makanisi ya bakristo oyo batyami mafuta na elimo? Liboso Yehova atya bango mafuta na elimo, bazalaki kosepela mingi na elikya ya kozwa bomoi ya seko awa na mabele. Bazalaki kozela na mposa makasi ntango oyo Yehova akolongola mabe nyonso mpe akokómisa mabele paradiso. Mbala mosusu, bazalaki kokanisa ndenge bakoyamba ndeko to moninga moko na lisekwa. Kasi, nsima ya kotyama mafuta na elimo, bakómaka kokanisa ndenge mosusu. Mpo na nini? Ezalaka te mpo bakómaka komona ete elikya ya bomoi awa na mabele ekoki te. Ezalaka mpe te mpo mitungisi mpe bampasi esilisi bango mposa ya kofanda na mabele. Eyelaka bango kaka boye te bákóma komona ete bomoi ya seko awa na mabele ekolɛmbisa. Kasi, Yehova nde asalelaka elimo santu na ye mpo na kobongola ndenge na bango ya kokanisa mpe kopesa bango elikya mosusu.

12. Na kotalela 1 Petro 1:3, 4, bakristo oyo batyami mafuta na elimo bayokaka ndenge nini mpo na elikya na bango?

12 Moto oyo atyami mafuta na elimo akoki komona ete abongi te kozwa lokumu yango monene. Kasi, azalaka na ntembe ata moke te ete Yehova aponi ye. Na motema na ye, azalaka na esengo mpe na botɔndi ntango akanisaka bomoi oyo akozala na yango na mikolo ezali koya.​—Tángá 1 Petro 1:3, 4.

13. Ndenge nini bakristo oyo batyami mafuta na elimo batalelaka bomoi na bango awa na mabele?

13 Yango elakisi ete bakristo oyo batyami mafuta na elimo balingaka kokufa? Ntoma Paulo apesi eyano na motuna yango. Akokanisaki nzoto na bango na hema mpe alobaki boye: “Ɛɛ, biso baoyo tozali na kati ya hema oyo tozali kokimela, mpo tomoni mpasi; mpo eloko oyo biso tolingi, ezali te kolongola yango, kasi nde kolata mosusu wana, mpo bomoi emɛla eloko oyo ekufaka.” (2 Ko. 5:4) Bakristo yango balɛmbá bomoi te, balukaka te kosukisa bomoi na bango nokinoki. Kutu, basepelaka na bomoi mpe balingaka kolekisa mokolo nyonso na kosalela Yehova elongo na bandeko mpe baninga na bango. Kasi, ata soki bazali kosala nini, bakanisaka ntango nyonso elikya ya nkembo oyo bazali na yango mpo na mikolo ezali koya.​—1 Ko. 15:53; 2 Pe. 1:4; 1 Yoa. 3:2, 3; Em. 20:6.

YEHOVA ATYE YO MAFUTA NA ELIMO?

14. Makambo nini emonisaka kaka te ete moto atyami mafuta na elimo santu?

14 Mbala mosusu omitunaka soki ozali mokristo oyo atyami mafuta na elimo santu. Soki bongo, kanisá na mituna oyo ya ntina: Olingaka kosala mokano ya Yehova koleka makambo mosusu nyonso? Omonaka ete ozali na molende ya ndenge mosusu na mosala ya kosakola? Osepelaka mingi koyekola Biblia mpe koyekola “makambo mozindo ya Nzambe”? (1 Ko. 2:10) Omonaka ete Yehova azali kopambola mosala na yo ya kosakola mpe ezali kobota mbuma? Omonaka ete ozali na mokumba monene ya kosalisa basusu básalela Yehova? Ozali na bilembeteli oyo emonisi polele ete Yehova asalisi yo mingi na bomoi na yo? Soki eyano na yo na mituna wana nyonso ezali “ɛɛ,” yango elakisi ete oponami mpo na kokende likoló? Te, ezali bongo te. Mpo na nini? Mpo basaleli nyonso ya Nzambe bakoki komiyoka ndenge wana, ezala batyami mafuta na elimo to te. Mpe na nzela ya elimo santu na ye, Yehova akoki kopesa nguya ya ndenge moko na mosaleli na ye nyonso, ata soki azali na elikya nini. Kutu, komituna soki mbala mosusu otyami mafuta na elimo emonisi ete otyami mafuta na elimo te. Bato oyo Yehova abengaka bamitunaka te soki batyami mafuta na elimo to te! Bayebaka yango!

Yehova asalelaki elimo santu na ye mpo na kopesa Abrahama, Sara, Davidi, mpe Yoane Mobatisi nguya ya kosala makambo ya kokamwa, kasi asalelaki elimo yango te mpo na kopesa bango elikya ya bomoi na likoló (Talá paragrafe 15-16) *

15. Ndenge nini toyebi ete bato nyonso oyo bazwaki elimo santu baponami te mpo na kokende likoló?

15 Biblia ezali na bandakisa ya mibali oyo bazalaki na kondima makasi mpe bazwaki elimo santu; atako bongo, bazalaki te na elikya ya kokende na likoló. Davidi atambwisamaki na elimo santu. (1 Sa. 16:13) Elimo yango esalisaki ye akanga ntina ya makambo mozindo ya Yehova mpe akoma biteni mosusu ya Biblia. (Mrk. 12:36) Atako bongo, ntoma Petro alobaki ete Davidi “amataki na likoló te.” (Mis. 2:34) Yoane Mobatisi ‘atondaki na elimo santu.’ (Luka 1:13-16) Yesu alobaki ete moto moko te alekaki Yoane Mobatisi, kasi abakisaki ete Yoane akozala te na kati ya bato oyo bakoyangela na Bokonzi ya likoló. (Mat. 11:10, 11) Yehova asalelaki elimo santu na ye mpo na kopesa mibali yango nguya ya kosala makambo ya kokamwa, kasi asalelaki elimo yango te mpo na kopona bango bákende kofanda na likoló. Yango elingi nde koloba ete baoyo baponami mpo na koyangela na likoló bazali sembo koleka mibali wana? Te. Elimboli kaka ete Yehova akozongisa bango na bomoi na Paradiso awa na mabele.​—Yoa. 5:28, 29; Mis. 24:15.

16. Mbano nini basaleli mingi ya Nzambe bazali kozela lelo oyo?

16 Lelo oyo, basaleli mingi ya Nzambe awa na mabele bazali te na elikya ya kokende na likoló. Ndenge moko na Abrahama, Sara, Davidi, Yoane Mobatisi, mpe mibali ná basi mosusu ebele ya ntango ya kala, bazali na elikya ya kofanda awa na mabele ntango Bokonzi ya Nzambe ekoyangela bango.​—Ebr. 11:10.

17. Mituna nini tokotalela na lisolo elandi?

17 Lokola bakristo mosusu oyo batyami mafuta na elimo bazali naino awa na mabele lelo oyo, yango ebimisi mwa mituna. (Em. 12:17) Na ndakisa, ndenge nini bakristo oyo batyami mafuta na elimo basengeli komitalela? Soki moto moko na lisangá na bino abandi kolya limpa mpe komɛla vinyo na Ekaniseli, ndenge nini osengeli kosalela ye makambo? Mpe soki motángo ya baoyo balobaka ete batyami mafuta na elimo ezali kokoba kobakisama, osengeli komitungisa mpo na yango? Tokozwa biyano na mituna wana na lisolo oyo elandi.

^ par. 5 Kobanda na Pantekote ya mobu 33 T.B., Yehova apesaka bakristo mosusu elikya moko ya kokamwa: elikya ya koyangela elongo na Mwana na ye na likoló. Kasi, ndenge nini bakristo yango bayebaka ete baponami mpo na kokende na likoló? Nini esalemaka ntango moto atyami mafuta na elimo? Lisolo oyo ekopesa biyano na mituna wana ya ntina mingi. Euti na lisolo oyo ebimaki na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 01/2016.

^ par. 2 NDIMBOLA YA MALOBA: Kotyama mafuta na elimo: Yehova asalelaka elimo santu na ye mpo na kopona bato oyo bakoyangela elongo na Yesu na likoló. Na nzela ya elimo santu, Nzambe apesaka moto oyo aponami “ndanga,” to elaka mpo na mikolo ezali koya. (Ef. 1:13, 14) Bakristo yango bakoki koloba ete elimo santu ‘etatoli,’ to emonisi bango polele ete bakozwa mbano na likoló.​—Rom. 8:16.

^ par. 5 NDIMBOLA YA MALOBA: Elembo. Yehova atyaka moto elembo ya nsuka mwa moke liboso moto yango akufa sembo, mpe akotya basusu liboso ete bolɔzi monene ebanda.​—Ef. 4:30; Em. 7:2-4; talá “Mituna ya batángi” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 04/2016 na Français.

^ par. 10 Mpo na koyeba malamumalamu ndimbola ya kobotama lisusu, talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 01/04/2009, nk. 3-12.

LOYEMBO 27 Komonana ya bana ya Nzambe

^ par. 57 NDIMBOLA YA ELILINGI: Ezala tokɔti bolɔkɔ mpo na kondima na biso to tozali na bonsomi ya kosakola mpe ya koteya solo, tokoki kolikya kozwa bomoi awa na mabele ntango Bokonzi ya Nzambe ekoyangela biso.