Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOYEKOLI 4

Yehova apambolaka milende oyo tosalaka mpo na kosala Ekaniseli

Yehova apambolaka milende oyo tosalaka mpo na kosala Ekaniseli

“Bókoba kosala boye mpo na kokanisa ngai.”​—LUKA 22:19.

LOYEMBO 19 Bilei ya mpokwa ya Nkolo

NA MOKUSE a

1-2. Mpo na nini toyanganaka na Ekaniseli mbula na mbula?

 ELEKI sikoyo mbula soki 2 000, Yesu apesaki bomoi na ye mpo na biso, mpo na kofungolela biso nzela mpo tózwa bomoi ya seko. Na butu liboso akufa, Yesu apesaki bayekoli na ye mitindo ete bákanisa mbeka oyo apesaki na bolingo na nzela ya molulu moko ezangi mindɔndɔ, epai asalelaki kaka limpa ná vinyo.​—1 Ko. 11:23-26.

2 Totosaka mitindo ya Yesu mpo tolingaka ye mingi mpenza. (Yoa. 14:15) Mbula na mbula na eleko ya Ekaniseli, tomonisaka botɔndi na biso mpo na makambo oyo asalelá biso na ndenge tozwaka ntango mpo na kokanisa mpe kobondela mpo na makambo oyo liwa na ye elimboli mpo na biso. Tozalaka na esengo ntango tosakolaka lisusu mingi, mpe tolendisaka bato mingi soki esengeli báya kosangana elongo na biso na molulu wana ya ntina mingi. Ya solo, tozalaka na ekateli ya koboya eloko nyonso epekisa biso tóyangana na Ekaniseli.

3. Tokolobela nini na lisolo oyo?

3 Na lisolo oyo, tokolobela makambo misato oyo basaleli ya Yehova basalaka makasi mpo na kokanisa liwa ya Yesu: (1) na ndenge basalaka Ekaniseli kaka ndenge Yesu asalaki, (2) na ndenge babengisaka basusu na Ekaniseli, mpe (3) na ndenge basalaka Ekaniseli atako bazali kokutana na mikakatano.

KOSALA EKANISELI KAKA NDENGE YESU ASALAKI

4. (a) Na kotalela Luka 22:19, 20, toyekolaka nini mbula na mbula na Ekaniseli? (b) Mpo na nini tosengeli kozala na botɔndi mpo na mateya wana ya solo?

4 Mbula na mbula na Ekaniseli, tolandaka na likebi mpenza diskur moko euti na Biblia oyo epesaka biyano ya polele na mituna mingi. Toyekolaka ntina oyo bato bazali na mposa ya lisiko mpe ndenge oyo liwa ya moto moko kaka ekoki kozipa masumu ya bato mingi. Bakundwelaka biso soki limpa mpe vinyo elimbolaka nini mpe banani basengeli kolya limpa mpe komɛla vinyo yango. (Tángá Luka 22:19, 20.) Longola yango, tokanisaka na mozindo mapamboli oyo ezali kozela baoyo bazali na elikya ya kozala na bomoi awa na mabele. (Yis. 35:5, 6; 65:17, 21-23) Tosengeli kozala na botɔndi mpo na mateya wana ya solo. Bamiliare ya bato bayebaka te mateya yango, mpe bayebaka te motuya oyo mbeka ya Yesu ezali na yango. Lisusu, basalaka te Ekaniseli ya liwa na ye ndenge asalaki yango. Mpo na nini?

5. Mwa moke nsima ya liwa ya bantoma, ndenge nini bato bakómaki kosala molulu ya liwa ya Yesu?

5 Mwa moke nsima ya liwa ya bantoma ya Yesu, bakristo ya lokuta bakɔtaki na lisangá. (Mat. 13:24-27, 37-39) Bazalaki koloba “makambo ya mbilingambilinga mpo na kobenda bayekoli bálanda bango.” (Mis. 20:29, 30) Moko ya “makambo ya mbilingambilinga” oyo bakristo yango ya lokuta babandaki koteya ezalaki ete Yesu akabaki te nzoto na ye “mbala moko mpo na libela mpo na komema masumu ya bato mingi,” ndenge Biblia elobi, kasi ete mbeka na ye esengeli kozongelama mbala na mbala. (Ebr. 9:27, 28) Lelo oyo, bato mingi bandimaka liteya wana ya lokuta. Bakendaka mbala na mbala na bandako-nzambe, na bantango mosusu mokolo na mokolo, mpo na kosala molulu ya mbeka ya Yesu oyo lingomba ya Katolike ebengaka “misa ya Ukaristya.” b Na mangomba mosusu, bato basalaka molulu ya liwa ya Yesu mbala mingi te, kasi bato mingi ya mangomba yango bayebaka te mpenza soki mbeka ya Yesu elimboli nini. Basusu batunaka boye: ‘Elingi koloba mpenza ete liwa ya Yesu ekoki kosala ete masumu na ngai elimbisama?’ Mpo na nini batunaka motuna yango? Mbala mosusu, bato oyo bandimaka te ete mbeka ya Yesu ekoki kosala ete masumu elimbisama nde batindaka bango bákanisa bongo. Atako bongo, bayekoli ya solo ya Yesu basalisaka bato báyeba soki mbeka ya Yesu elimboli nini mpe lolenge eleki malamu ya kosala Ekaniseli ya liwa ya Yesu.

6. Na mobu 1872, etuluku moko ya Bayekoli ya Biblia bakangaki ntina ya liteya nini?

6 Na mobu 1870, etuluku moko ya Bayekoli ya Biblia oyo Charles Taze Russell azalaki kokamba, babandaki koyekola Makomami na mozindo mpenza. Balingaki koyeba solo na ntina etali motuya oyo mbeka ya Yesu ezali na yango mpe ndenge oyo esengeli kosalaka molulu yango. Na mobu 1872, bakangaki ntina ya liteya ya Biblia oyo emonisi ete Yesu apesaki mbeka mpo na bato nyonso. Babombaki te makambo oyo bazalaki koyekola mpo na bango moko. Kutu, babandaki koyebisa basusu na nzela ya babuku, mikanda, mpe bazulunalo. Kaka na ebandeli mpenza, babandaki kosala Ekaniseli mbala moko na mbula kaka ndenge bakristo ya siɛklɛ ya liboso bazalaki kosala yango.

7. Ndenge nini tozwaka matomba na bolukiluki oyo Bayekoli ya Biblia ya liboso basalaki?

7 Lelo oyo, tozwaka matomba na bolukiluki oyo bakristo wana ya sembo basalaki eleki sikoyo bambula mingi. Na ndenge nini? Na lisalisi ya Yehova, miso na biso efungwami mpo toyebi soki mbeka ya Yesu elimboli nini mpe makambo oyo ekosala mpo na biso mpe bato nyonso. (1 Yoa. 2:1, 2) Toyekoli mpe ete Biblia epesi bilikya mibale mpo na bato oyo basepelisaka Nzambe, elingi koloba, bomoi ezangi kokufa na likoló mpo na mwa bato moke mpe bomoi ya seko awa na mabele mpo na bamilio ya bato mosusu. Topusanaka penepene na Yehova ndenge toyebi ete alingaka biso mingi mpe ndenge tozwaka mpenza matomba na mbeka ya Yesu. (1 Pe. 3:18; 1 Yoa. 4:9) Na yango, kaka ndenge bandeko na biso ya sembo ya ntango ya kala bazalaki kosala, tobengisaka basusu báya kosangana na biso na molulu ya Ekaniseli oyo tosalaka kaka ndenge Yesu asalaki yango.

KOBENGISA BATO NA EKANISELI

Okoki kosala nini mpo omipesa mpenza na kampanye ya kobengisa bato na Ekaniseli? (Talá paragrafe 8-10) e

8. Na kotalela elilingi, basaleli ya Yehova basalaka nini mpo na kobengisa bato mosusu na Ekaniseli?

8 Basaleli ya Yehova babengisaka bato na Ekaniseli na boumeli ya bambula mingi. Na mobu 1881, basɛngaki bandeko basi mpe mibali na États-Unis báyangana kaka bango moko na ndako ya ndeko mobali moko na Allegheny, na etúká ya Pennsylvanie, mpo na molulu wana ya ntina mingi. Na nsima, lisangá mokomoko esalaki Ekaniseli na yango moko. Na sanza ya 03/1940, bayebisaki basakoli ete bakoki kobengisa moto nyonso na teritware na bango oyo amonisaki ete asepeli na solo. Na mobu 1960, mpo na mbala ya liboso, Betele epesaki masangá nkasa ya libyangi ya papye. Banda wana, bamiliare ya nkasa ya libyangi ekabolamaka. Mpo na nini tolekisaka ntango mingi mpe tosalaka milende mpo na kobengisa bato mosusu?

9-10. Na kotalela Yoane 3:16, banani bazwaka matomba na milende oyo tosalaka mpo na kobengisa bato mosusu na Ekaniseli?

9 Tobengisaka bato mosusu na Ekaniseli mpo tolingaka bato oyo bayei mpo na mbala ya liboso báyekola makambo oyo Yehova mpe Yesu basalelá biso nyonso. (Tángá Yoane 3:16.) Tozalaka na elikya ete makambo oyo bakomona mpe bakoyoka na Ekaniseli ekotinda bango báyekola lisusu mingi mpe bákóma basaleli ya Yehova. Kasi bato mosusu mpe bazwaka matomba.

10 Tobengisaka mpe bato oyo batiká kosalela Yehova. Tosalaka bongo mpo na kokundwela bango ete Nzambe akobaka kolinga bango. Mingi na bango bandimaka libyangi na biso, mpe tosepelaka komona bango. Koyangana na Ekaniseli ekundwelaka bango ndenge bazalaki kosepela kosalela Yehova na bambula oyo eleki. Tózwa ndakisa ya ndeko Monica. c Na eleko ya maladi mabe oyo ya Coronavirus, abandaki lisusu kosakola. Nsima ya koyangana na Ekaniseli ya mobu 2021, alobaki boye: “Ekaniseli oyo ezalaki mpenza sipesiale mpo na ngai. Mpo na mbala liboso na boumeli ya mbula 20, nazalaki na likoki ya kosakwela bato mpe kobengisa bango na Ekaniseli. Nasalaki nyonso oyo nakokaki mpo na kobengisa bato mosusu mpo nazali na botɔndi mingi mpo na makambo oyo Yehova mpe Yesu basalaki mpo na ngai.” (Nz. 103:1-4) Ezala bato bandimi to te libyangi na biso, tosalaka makasi mpo na kobengisa bato mosusu na Ekaniseli, mpo toyebi ete Yehova azwaka na motuya mpenza milende oyo tosalaka.

11. Na kotalela Hagai 2:7, ndenge nini Yehova apambolaka milende oyo tosalaka mpo na kobengisa bato na Ekaniseli?

11 Yehova apambolaka mpenza milende oyo tosalaka mpo na kobengisa bato na Ekaniseli. Na 2021, atako maladi mabe ya Coronavirus etyelaki biso bipekiseli, toyanganaki bato 21367603 na Ekaniseli. Motángo yango ezali pene na motángo ya Batatoli ya Yehova na mokili mobimba mbala mibale na ndambo! Ya solo, Yehova atyaka kaka te likebi na motángo ya bato oyo bayanganaka na Ekaniseli. Kasi atyelaka mpe mokomoko na biso likebi. (Luka 15:7; 1 Tim. 2:3, 4) Tomindimisi ete Yehova asalelaka nkasa ya libyangi oyo esalisaka biso tózwa bato ya mitema sembo.​—Tángá Hagai 2:7.

KOSALA EKANISELI ATAKO EKÓMI MPASI KOSALA YANGO

Yehova apambolaka milende na biso ya kosala Ekaniseli (Talá paragrafe 12) f

12. Na kotalela elilingi, makambo nini ekoki kosala ete ekóma mpasi kosala Ekaniseli?

12 Yesu asakolaki ete na mikolo ya nsuka, tokokutana na mikakatano ya ndenge nyonso, elingi koloba, botɛmɛli ya libota, minyoko, bitumba, bamaladi, mpe bongo na bongo. (Mat. 10:36; Mrk. 13:9; Luka 21:10, 11) Na bantango mosusu, ekómaka mpasi mpo tósala molulu ya kokanisa liwa ya Yesu. Bandeko na biso ya basi mpe ya mibali basalaka nini soki ekómi mpasi kosala Ekaniseli, mpe ndenge nini Yehova asalisaka bango?

13. Ndenge nini Yehova apambolaki mpiko ya ndeko Artem mpe ekateli na ye ya kosala Ekaniseli atako azalaki na bolɔkɔ?

13 Bolɔkɔ. Bandeko na biso oyo bazali na bolɔkɔ mpo na kondima na bango basalaka nyonso oyo bakoki mpo na kosala Ekaniseli ya liwa ya Yesu. Tótalela ndakisa ya ndeko Artem. Na eleko ya Ekaniseli ya 2020, batyaki ye na bolɔkɔ ya mɛtrɛ kare 17 oyo bakangami mosusu mitano bazalaki kuna na ntango moko boye. Atako azalaki mokangami, azalaki na likoki ya kozwa mwa bisaleli mpo na kosala limpa mpe vinyo ya Ekaniseli, mpe amibongisaki mpo na kosala diskur ya Ekaniseli mpo na ye moko. Kasi baninga na ye ya bolɔkɔ bazalaki komɛla makaya mpe kofinga mingi. Asalaki nini? Asɛngaki bango soki bakoki kotika kofinga mpe komɛla makaya mpo na ngonga kaka moko. Ndeko Artem akamwaki, ntango baninga na ye ya bolɔkɔ bandimaki ete bakomɛla makaya te to bakofinga te na ntango ya Ekaniseli. Ndeko Artem alobi boye: “Nabandaki koyebisa bango makambo etali Ekaniseli.” Atako balobaki ete balingaki te koyoka likambo yango, nsima ya komona mpe koyoka ndeko Artem azalaki kosala Ekaniseli, batunaki ye mituna nyonso oyo etali Ekaniseli.

14. Milende nini esalemaki mpo na kosala Ekaniseli atako maladi mabe ya Coronavirus?

14 Maladi mabe ya Coronavirus. Ntango maladi mabe yango ebandaki, basaleli ya Yehova bakokaki te kosala Ekaniseli na Bandako ya Bokonzi. Kasi yango epekisaki bango te básala Ekaniseli. d Masangá oyo ezalaki na likoki ya kosalela Internet esalaki Ekaniseli na nzela ya video. Kasi ezali boni mpo na bamilio ya bandeko oyo masangá na bango ezalaki na likoki te ya kosalela Internet? Na bikólo mosusu, bibongiseli ezwamaki ya kolekisa programɛ ya molulu yango na bashɛni ya televizyo to ya radio. Longola yango, babiro ya filiale esalaki ete bandeko básala diskur ya Ekaniseli na video na minɔkɔ koleka 500 mpo baoyo bazalaki na bisika oyo ezali mosika mpenza bákoka kolanda yango mpo na kosala Ekaniseli. Lisusu, bandeko mibali ya sembo bazwaki bibongiseli mpo bavideo ya diskur yango ekómela baoyo bazalaki na mposa na yango.

15. Ndakisa ya moyekoli moko ya Biblia na nkombo Sue eteyi yo nini?

15 Botɛmɛli ya libota. Mpo na bandeko mosusu, mokakatano monene oyo bakutanaka na yango mpo na kosala Ekaniseli ezali botɛmɛli ya libota. Tótalela ndakisa ya moyekoli moko ya Biblia na nkombo Sue. Na 2021, mokolo moko liboso ya Ekaniseli, Sue ayebisaki moteyi na ye ya Biblia ete lokola bandeko na ye mosusu ya libota bazali kotɛmɛla ye, akozala na likoki te ya koyangana na Ekaniseli. Moto oyo ayekolaka na ye Biblia atángaki Luka 22:44. Na nsima alimbolelaki ye ete ntango tokutanaka na mikakatano, tosengeli kolanda ndakisa ya Yesu ntango tozali kobondela Yehova mpe kotyela ye motema na biso mobimba. Mokolo oyo elandaki, Sue abongisaki limpa mpe vinyo mpe alandaki programɛ ya losambo ya ntɔngɔ ya mokolo ya Ekaniseli na jw.org. Na mpokwa yango, atako azalaki ye moko na ndako, alandaki diskur ya Ekaniseli na nzela ya telefone. Na nsima, Sue akomelaki moteyi na ye ya Biblia boye: “Olendisaki ngai mingi lobi. Nasalaki nyonso oyo nakokaki mpo na koyangana na Ekaniseli, mpe Yehova asalisaki ngai. Nakoki te kolimbola esengo mpe botɔndi oyo nazali na yango!” Okanisi ete Yehova akoki kosalisa yo soki okutani na likambo ya ndenge wana?

16. Na kotalela Baroma 8:31, 32, mpo na nini tondimisami ete Yehova akopambola milende na biso mpo na koyangana na Ekaniseli?

16 Yehova azwaka mpenza na motuya mingi milende oyo tosalaka mpo na kosala molulu ya liwa ya Yesu. Tokoki komindimisa ete akopambola biso ntango tozali komonisa botɔndi mpo na makambo oyo asalá mpo na biso. (Tángá Baroma 8:31, 32.) Na yango, tiká tózala na ekateli ya koyangana na Ekaniseli ya mobu oyo mpe tósala nyonso oyo tokoki mpo na kobakisa milende na biso na misala nyonso oyo esalemaka na eleko ya Ekaniseli.

LOYEMBO 18 Tózala na botɔndi mpo na lisiko

a Na mokolo ya mibale, mwa 04/04/2023, bamilio ya bato na mokili mobimba bakosala Ekaniseli ya liwa ya Kristo. Bato mingi bakoyangana mpo na mbala ya liboso. Bato mosusu oyo batiká kosalela Yehova mpe koyangana na Ekaniseli bambula mingi bakozala elongo na biso. Basusu bakutanaka na makambo oyo esalaka ete ekóma mpasi mpo na bango báya na molulu yango, kasi basalaka makasi bázala wana. Ezala makambo ya bomoi na yo ezali ndenge nini, okoki komindimisa ete Yehova akosepela na milende oyo akosala mpo ozala wana.

b Basambeli yango bandimaka ete ntango oyo basalaka molulu yango, limpa mpe vinyo ebongwanaka nzoto mpe makila ya Kristo. Bakanisaka ete nzoto mpe makila ya Yesu epesamaka ntango nyonso oyo moto azali kosala molulu yango.

c Topesi bango bankombo mosusu.

d Talá mpe na jw.org masolo oyo ezali na motó ya likambo: “Ekaniseli ya liwa ya Yesu 2021.”

e NDIMBOLA YA BILILINGI Lokasa 22: Kobanda na bambula ya 1960, nkasa ya libyangi ebongisamaki lisusu malamu mpe sikoyo ezalaka ya papye mpe ya elektroniki.

f NDIMBOLA YA BILILINGI Lokasa 24: Ndenge elilingi emonisi yango, bandeko basi mpe mibali bazali kosala Ekaniseli na ntango ya botomboki ya bana-mboka.