Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOYEKOLI 1

LOYEMBO 38 Akokómisa yo makasi

Tyelá Yehova motema mpo olongola kobanga

Tyelá Yehova motema mpo olongola kobanga

MOKAPO YA MOBU 2024: “Ntango nazali kobanga natyelaka yo motema.”NZ. 56:3.

NA MOKUSE

Talá ndenge okoki koyekola kotyela Yehova motema mingi mpe kolongola kobanga.

1. Makambo nini ekoki kosala ete tóbanga?

 MOTO nyonso abangaka na bantango mosusu. Ya solo, boyekoli na biso ya Biblia esalisi biso tótika kobanga bakufi, bademo, mpe makambo oyo ekosalema na mikolo ezali koya. Atako bongo, tozali na ntango oyo etondi na “makambo ya nsɔmɔ,” lokola bitumba, mobulu, mpe maladi. (Luka 21:11) Tokoki mpe kobanga bato, na ndakisa baguvɛrnema oyo enyokolaka biso to mpe bandeko ya libota oyo bazali kotɛmɛla losambo ya solo. Basusu babangaka ete bálonga te koyika mpiko sikoyo to na mikolo ezali koya.

2. Likambo nini Davidi akutanaki na yango ntango azalaki na Gate?

2 Davidi abangaki na bantango mosusu. Na ndakisa, ntango Mokonzi Saulo alukaki koboma ye, Davidi azwaki ekateli ya kokima na Gate, engumba ya Bafilistia. Eumelaki te Akishe mokonzi ya Gate ayokaki ete Davidi azalaki elombe ya etumba oyo bato bayembelaki nzembo ete abomaki “bankóto zomi zomi” ya Bafilistia. Na yango, Davidi ‘akómaki kobanga mingi.’ (1 Sa. 21:​10-12) Azalaki kobanga likambo oyo Akishe akosala ye. Ndenge nini Davidi alongolaki kobanga?

3. Na kotalela Nzembo 56:​1-3, 11, nini esalisaki Davidi alongola kobanga?

3 Na Nzembo 56, Davidi amonisi ndenge oyo azalaki komiyoka ntango azalaki na Gate. Loyembo yango emonisi ete Davidi azalaki kobanga, kasi emonisi mpe ndenge oyo alongolaki kobanga yango. Ntango Davidi azalaki kobanga, azalaki kotyela Yehova motema. (Tángá Nzembo 56:​1-3, 11.) Davidi azalaki na ntina mpenza ya kotyela Yehova motema. Na lisalisi ya Yehova, asalelaki mayele moko ya kokamwa kasi oyo esimbaki mpenza: Asalaki lokola azali ligboma! Na yango, Akishe amonaki ete Davidi azali likama te mpo na ye kasi nde eloko ya kopesa nkanda. Bongo Davidi alongaki kokima.—1 Sa. 21:13–22:1.

4. Nini ekosalisa biso tótyela Yehova motema mingi? Pesá ndakisa.

4 Biso mpe tokoki kolongola kobanga soki totyeli Yehova motema. Kasi nini ekosalisa biso tótyela lisusu Yehova motema, mingimingi ntango tozali kobanga? Tótalela ndakisa moko. Soki bayebisi yo ete ozali na maladi moko, na ebandeli okoki kobanga. Kasi, kobanga na yo ekoki kokita soki otyeli monganga motema. Ekoki kozala ete monganga asilá kosalisa bato ebele oyo bazalaki na maladi yango. Akoki koyoka yo na likebi, mpe yango ekoki kondimisa yo ete azali komitya na esika na yo. Mpe akoki kokomela yo nkisi oyo esalisaki mpe bato mosusu. Ndenge moko mpe, tokotyela Yehova motema mingi soki totaleli makambo oyo asili kosala, makambo oyo azali kosala sikoyo, mpe makambo oyo akosala na nsima mpo na biso. Yango nde Davidi asalaki. Wana tozali kotalela maloba na ye mosusu oyo ekomamaki na litambwisi ya elimo ya Nzambe, oyo ezali na Nzembo 56, kanisá ndenge oyo yo mpe okoki kotyela lisusu Yehova motema mingi mpe kolongola kobanga.

MAKAMBO NINI YEHOVA ASILI KOSALA?

5. Mpo Davidi alongola kobanga, akanisaki makambo nini? (Nzembo 56:​12, 13)

5 Wana bomoi ya Davidi ezalaki naino na likama, akanisaki makambo oyo Yehova asilaki kosala. (Tángá Nzembo 56:​12, 13.) Davidi azalaki kosala ndenge wana bomoi na ye mobimba. Na ndakisa, na bantango mosusu akanisaki biloko oyo Yehova akelá, mpe ekundwelaki ye ete Yehova azali na nguya nyonso mpe atyelaka mpenza bato likebi. (Nz. 65:​6-9) Davidi akanisaki mpe makambo oyo Yehova asalaki mpo na bato mosusu. (Nz. 31:19; 37:​25, 26) Mpe akanisaki mingimingi makambo oyo Yehova asilaki kosala mpo na ye moko. Yehova asalisaki Davidi mpe abatelaki ye banda bomwana. (Nz. 22:​9, 10) Na ntembe te, kokanisa makambo wana esalisaki Davidi atyela lisusu Yehova motema mingi!

Davidi atyelaki Yehova motema mingi ntango akanisaki makambo oyo asilaki kosala, oyo azali kosala, mpe oyo akosala na nsima (Talá paragrafe 5, 8, 12) d


6. Ntango tozali kobanga, nini ekosalisa biso tótyela Yehova motema?

6 Ntango ozali kobanga, omituna boye, ‘makambo nini Yehova asili kosala?’ Kanisá biloko oyo akelá. Na ndakisa, ntango tozali ‘kotala malamumalamu’ ndenge oyo Yehova aleisaka bandɛkɛ mpe abatelaka fololo—oyo kutu ekelamaki na elilingi na ye te mpe ezali na likoki ya kosambela ye te, tokotya lisusu motema mingi ete akokokisa mpe bamposa na biso. (Mat. 6:​25-32) Kanisá mpe makambo oyo Yehova asalelá basaleli na ye. Okoki koyekola lisolo ya moto moko oyo Biblia elobeli oyo amonisaki kondima makasi, to okoki kotánga lisolo ya bomoi ya mosaleli moko ya Yehova ya ntango na biso. a Longola yango, kanisá ndenge oyo Yehova asili komonisa ete atyelaka yo likebi. Ndenge nini abendaki yo na solo? (Yoa. 6:44) Ndenge nini ayanoli na mabondeli na yo? (1 Yoa. 5:14) Matomba nini ozali kozwa mokolo na mokolo mpo na mbeka oyo Mwana na ye ya bolingo apesaki?—Ef. 1:7; Ebr. 4:​14-16.

Totyelaka Yehova motema mingi ntango tokanisi makambo oyo asili kosala, oyo azali kosala, mpe oyo akosala na nsima (Talá paragrafe 6, 9-10, 13-14) e


7. Ndenge nini likambo oyo ekómelaki mosakoli Danyele esalisaki Vanessa alongola kobanga?

7 Vanessa, b ndeko mwasi moko na Haïti, akutanaki na likambo moko ya kobangisa. Na esika oyo azalaki kofanda, mobali moko azalaki kobenga ye mpe kotindela ye bamesaje mikolo nyonso, azalaki kotya ye mbamba ete bálingana. Vanessa aboyaki na motema moko. Kasi mobali yango asilikelaki ye makasi mpe akanelaki ye. Vanessa alobi boye: “Nabangaki makasi.” Vanessa asalaki nini mpo alongola kobanga? Asalaki mwa makambo oyo ebongi mpo na komibatela. Mpe nkulutu moko asalisaki ye ayebisa likambo yango na polisi. Kasi Vanessa akanisaki mpe ndenge oyo Yehova abatelaki basaleli na ye na kala. Alobi boye: “Moto ya liboso oyo nakanisaki ezalaki mosakoli Danyele. Babwakaki ye na libulu ya bankɔsi oyo ezalaki na nzala atako asalaki mabe moko te. Atako bongo, Yehova abatelaki ye. Na nzela ya libondeli, natikaki likambo yango na mabɔkɔ ya Yehova. Na nsima, kobanga esilaki.”—Dan. 6:​12-22.

YEHOVA AZALI KOSALA NINI SIKOYO?

8. Likambo nini Davidi andimaki mpenza? (Nzembo 56:8)

8 Atako bomoi ya Davidi ezalaki na likama ntango azalaki na Gate, aboyaki kobanga elata ye. Kasi aponaki kokanisa makambo oyo Yehova azalaki kosala mpo na ye na ntango yango. Davidi akokaki komona ete Yehova azalaki kotambwisa ye, kobatela ye mpe ete ayebaki ndenge oyo azalaki komiyoka. (Tángá Nzembo 56:8.) Davidi azalaki mpe na baninga, na ndakisa Yonatane mpe Nganga-nzambe monene Ahimeleke, oyo balendisaki ye mpe bapesaki ye lisalisi oyo ebongi. (1 Sa. 20:​41, 42; 21:​6, 8, 9) Mpe atako Mokonzi Saulo alukaki koboma ye, Davidi akimaki mpe abikaki. Andimaki mpenza ete Yehova ayebaki malamu komekama oyo azalaki na yango mpe ndenge oyo komekama yango ezalaki kobangisa ye.

9. Yehova amonaka nini mpo na mokomoko na biso?

9 Ntango okutani na komekama oyo ezali kobangisa yo, kobosana te ete Yehova azali komona yango mpe ayebi ndenge oyo ozali komiyoka. Na ndakisa, Yehova amonaki kaka te mabe oyo Baezipito bazalaki kosala Bayisraele kasi mpe ‘bampasi oyo Bayisraele bazalaki komona.’ (Kob. 3:7) Davidi ayebaki ete Yehova amonaki ‘mpasi na ye’ mpe ‘mozindo ya mpasi na ye.’ (Nz. 31:7) Mpe ntango bato ya Nzambe bazalaki komona mpasi, ata soki ezalaki mpo na bikateli na bango moko ya bozoba—“ye mpe azalaki koyoka mpasi.” (Yis. 63:9) Ntango ozali kobanga, Yehova ayebaka ndenge ozali komiyoka mpe alingaka kosalisa yo olongola kobanga.

10. Nini endimisi yo ete Yehova amonaka yo mpe ete akosalisa yo na komekama nyonso oyo okutani na yango?

10 Kasi, mbala mosusu okoki komituna ndenge oyo Yehova asungaka yo ntango ozali kobanga. Na yango, sɛngá ye asalisa yo omona lisungi na ye. (2 Bak. 6:​15-17) Na nsima, kanisá naino: Oyokaki lisolo to eyano moko na makita oyo epesaki yo makasi? Mokanda, video, to nzembo moko ya TV JW elendisaki yo? Ndeko moko ayebisaki yo likambo to atángelaki yo vɛrsɛ moko oyo ekitisaki yo motema? Ezalaka mpasi te tómona ete lisangá na biso ya bandeko ya bolingo mpe bilei ya elimo oyo tozwaka ezali makambo oyo tomeseni na yango. Nzokande, ezali makabo ya kokamwa oyo Yehova apesi biso. (Yis. 65:13; Mrk. 10:​29, 30) Emonisaka ete atyelaka yo likebi. (Yis. 49:​14-16) Emonisaka mpe ete abongi otyela ye motema.

11. Nini esalisaki Aida atika kobanga?

11 Aida, oyo afandaka na Sénégal, amonaki ndenge Yehova asungaki ye ntango akutanaki na komekama. Lokola azalaki mwana ya liboso, baboti na ye bazalaki komizela ete aluka mosala ya mbongo mpo na kokokisa bamposa na ye moko mpe bamposa na bango. Kasi ntango Aida akómisaki bomoi na ye pɛpɛlɛ mpo akóma mobongisi-nzela, akómaki na mikakatano ya mbongo. Kasi bato ya libota na ye basilikaki mpe babandaki koloba na ye mabe. Aida alobi boye: “Nabangaki ete nakozala na likoki te ya kosalisa baboti na ngai mpe ete moto nyonso akoboya ngai. Napesaki kutu Yehova foti mpo atikaki makambo ebeba ndenge wana.” Nsima na yango, ayokaki lisolo moko na makita. Aida alobi boye: “Molobi akundwelaki biso ete ata soki mpasi ya motema na biso ezali ndenge nini, Yehova amonaka yango. Mokemoke, na nzela ya toli ya bankulutu mpe ya bandeko mosusu, nakómaki komona lisusu bolingo ya Yehova. Nakómaki kobondela Yehova mpe kotyela ye motema lisusu mingi, mpe nayokaki kimya makasi ntango namonaki ndenge azalaki koyanola na mabondeli na ngai.” Kendekende, Aida azwaki mosala oyo esalisaki ye akokisa bamposa na ye wana azalaki mobongisi-nzela mpe asalisa baboti na ye mpe bato mosusu. Alobi boye: “Nayekoli kotyela Yehova motema mobimba mpenza. Sikoyo, nsima ya kobondela, mbala mingi natikaka kobanga.”

YEHOVA AKOSALA NINI NA NSIMA?

12. Na kotalela Nzembo 56:​9, Davidi andimaki likambo nini?

12 Tángá Nzembo 56:9. Vɛrsɛ yango emonisi likambo mosusu oyo esalisaki Davidi alongola kobanga. Atako bomoi na ye ezalaki naino na likama, amanyolaki na makambo oyo Yehova akosala na nsima mpo na ye. Davidi ayebaki ete Yehova akobikisa ye na ntango oyo ebongi. Kutu, Yehova alobaki ete Davidi akokóma mokonzi ya Yisraele nsima ya Saulo. (1 Sa. 16:​1, 13) Davidi ayebaki ete makambo oyo Yehova alakaki ekokokisama.

13. Tokoki kondima mpenza ete Yehova akosala nini?

13 Yehova alaki ete akosala nini mpo na yo? Tozelaka te ete Yehova abatela biso na mikakatano nyonso. c Kasi ata soki okutani na komekama nini na mokili oyo, Yehova akolongola yango nyonso na mokili ya sika oyo ezali koya. (Yis. 25:​7-9) Mozalisi na biso azali mpenza na nguya ya kosekwisa bakufi, ya kobikisa biso na nzoto mpe na makanisi, mpe ya kolongola banguna nyonso.—1 Yoa. 4:4.

14. Tokoki komanyola na likambo nini?

14 Ntango ozali kobanga, manyolá na makambo oyo Yehova akosala na mikolo ezali koya. Kanisá ndenge oyo okomiyoka ntango Satana akozala lisusu te, ntango mokili ekotonda na bato ya sembo mpo bato mabe bazali lisusu te, mpe ntango kozanga kokoka ekosila mokemoke mokolo na mokolo. Elakiseli moko na liyangani ya etúká ya 2014 emonisaki ndenge tokoki komanyola na elikya na biso. Tata moko azalaki kolobela elongo na libota na ye ndenge oyo 2 Timote 3:​1-5 ekokaki kotángama soki maloba yango esakolaki nde makambo oyo ekozala na Paradiso: “Na mokili ya sika ntango moko ya esengo mpenza ekozala. Mpo bato bakozala bato oyo balingaka basusu, bato balingá bozwi ya elimo, bato ya mindɔndɔ te, bato ya komikitisa, bato oyo bakumisaka Nzambe, oyo batosaka baboti, oyo bazali na botɔndi, oyo bazali sembo, oyo balinganaka na kati ya mabota, oyo balingaka kosala boyokani, oyo balobaka ntango nyonso bolamu ya basusu, oyo bamipekisaka, bato ya boboto, oyo balingaka makambo ya malamu, bato oyo batyelaka motema, oyo batingamaka na makambo te, oyo bavimbi na lolendo te, oyo balingá Nzambe na esika ya kolinga bisengo, oyo bazali mpenza kokangama na Nzambe; mpe yo kangamá na bato ya lolenge wana.” Yo mpe osololaka na bato ya libota na yo to bandeko ya lisangá ndenge bomoi ekozala na mokili ya sika?

15. Atako Tanja azalaki kobanga, nini esalisaki ye alongola kobanga?

15 Ndeko mwasi moko na Macédoine du Nord na nkombo Tanja, alongolaki kobanga ntango akanisaki mapamboli oyo tokozwa na mikolo ezali koya. Baboti na ye batɛmɛlaki ye makasi ntango abandaki koyekola Biblia. Alobi boye: “Makambo mosusu oyo nazalaki kobanga ete esalema, esalemaki mpenza. Mama azalaki kobɛta ngai nsima ya makita nyonso. Baboti na ngai balobaki ete bakoboma ngai soki nakómi Motatoli ya Yehova.” Nsukansuka, babenganaki Tanja na ndako. Asalaki nini? Alobi boye: “Nazalaki ntango nyonso kokanisa esengo oyo nakozala na yango libela na libela mpo naponaki kobatela bosembo na ngai. Nakanisaki mpe ndenge oyo Yehova akoki kopambola ngai na mokili ya sika mpo na nyonso oyo nakoki kobungisa na mokili oyo mpe ndenge oyo nakoki kobosana makambo nyonso ya mabe.” Tanja abatelaki mpenza bosembo na ye. Mpe na lisalisi ya Yehova, azwaki esika ya kofanda. Lelo oyo, Tanja abalá ndeko mobali moko ya sembo mpe bango mibale bazali kosala na esengo na mosala ya ntango nyonso.

YEKOLÁ KOTYELA YEHOVA MOTEMA MINGI LELO OYO

16. Nini ekosalisa biso tózala na mpiko ntango makambo oyo esakolamaki na Luka 21:​26-28 ekokokisama?

16 Na bolɔzi monene, bato mingi “bakolɛmba nzoto na kobanga.” Kasi basaleli ya Nzambe bakotɛlɛma ngwi mpe bakozala na mpiko. (Tángá Luka 21:​26-28.) Mpo na nini tokobanga te? Mpo tosilaki koyekola kotyela Yehova motema. Tanja, oyo touti kolobela, alobi ete makambo oyo akutanaki na yango esalisaka ye ntango akutani na makambo mosusu ya mpasi. Alobi boye: “Nayekoli ete ezali na likambo moko te oyo Yehova akoki kosilisa te. Na bantango mosusu ekoki komonana lokola ete bato nde bazali kotambwisa makambo, kasi mpo na koloba solo, bakoki kaka kotambwisa makambo oyo Yehova apesi bango nzela. Mpe ata soki komekama moko ezali mpasi ndenge nini, ekosuka kaka.”

17. Ndenge nini mokapo ya mobu 2024 ekosalisa biso? (Talá elilingi ya ezipeli.)

17 Lelo oyo, moto nyonso akoki kobanga. Kasi lokola Davidi, tokoki koboya kobanga ekanga biso na motambo. Mokapo ya mobu 2024 ezali libondeli oyo Davidi asalaki epai ya Yehova ete: “Ntango nazali kobanga natyelaka yo motema.” (Nz. 56:3) Ndenge buku moko oyo elimbolaka maloba ya Biblia elobi mpo na vɛrsɛ yango, Davidi “azalaki kotya makanisi na kobanga na ye te mpe azalaki kaka kokanisa mikakatano na ye te, kasi azalaki kotalela Moto oyo akosikola ye.” Na basanza oyo elandi, kanisá maloba ya mokapo ya mobu oyo, mingimingi ntango okutani na makambo oyo ezali kobangisa yo. Zwá ntango ya kokanisa makambo oyo Yehova asalaki na ntango ya kala, oyo azali kosala sikoyo, mpe oyo akosala na mikolo ezali koya. Na ndenge yango, lokola Davidi, okoki koloba ete: “Natyeli Nzambe motema; nakobanga te.”—Nz. 56:4.

Nsima ya likama, ndeko mwasi moko azali kokanisa mokapo ya mobu (Talá paragrafe 17)

NDENGE NINI OKOKI KOLONGOLA KOBANGA SOKI OKANISI . . .

  • makambo oyo Yehova asili kosala?

  • makambo oyo Yehova azali kosala sikoyo?

  • makambo oyo Yehova akosala na nsima?

LOYEMBO 33 Bwakelá Yehova mokumba na yo

a Okoki komona makambo mosusu oyo ekoki kokómisa kondima na yo makasi na jw.org soki okomi “Mekolá kondima na bango” to “Makambo oyo bandeko bakutanaki na yango” na esika bakomi luká. Na JW Library®, kende na Rubriques, luká “Mekolá kondima na bango” to “Masolo ya bomoi ya Batatoli ya Yehova.”

b Topesi bango bankombo mosusu.

d NDIMBOLA YA BILILINGI: Davidi akanisaki ndenge oyo Yehova apesaki ye makasi ya koboma urse, ndenge asalisaki ye na nzela ya Ahimeleke, mpe ndenge akokómisa ye mokonzi.

e NDIMBOLA YA BILILINGI: Ndeko mobali moko oyo azali na bolɔkɔ mpo na kondima na ye azali kokanisa ndenge Yehova asalisaki ye atika makaya, ndenge azali kolendisa ye na nzela ya mikanda oyo bakomeli ye, mpe ndenge oyo akopesa ye bomoi ya seko na Paradiso.