LISOLO YA BOYEKOLI 3
LOYEMBO 124 Tótikala sembo
Yehova akosalisa yo na ntango ya mpasi
“[Yehova] moto asalaka ete ozwa libateli.”—YIS. 33:6.
NA MOKUSE
Oyo tokoki kosala mpo tózwa litomba na lisalisi ya Yehova na ntango ya mpasi.
1-2. Makambo nini ya mpasi basaleli ya Yehova bakoki kokutana na yango?
MAKAMBO ya nsɔmɔ ekoki kobongola bomoi na biso na mbala moko. Na ndakisa, bazwaki ndeko mobali moko ya sembo na nkombo Luis a lolenge moko ya mabe ya maladi ya kanser. Monganga ayebisaki ye ete atikali kaka na mwa basanza mpo akufa. Monika ná mobali na ye bamipesaki elongo na mosala ya Yehova. Kasi mokolo moko, Monika ayebaki ete mobali na ye, oyo azalaki nkulutu, azalaki kosala makambo ya mabe na kobombana banda bambula mingi. Olivia, ndeko mwasi moko ya elenge, asengelaki kolongwa nokinoki na ndako na ye mpo mbula moko ya mopɛpɛ makasi ezalaki koya. Ntango azongaki, akutaki mopɛpɛ ekweisi ndako na ye. Na ntango moke kaka, bomoi ya bato yango ebongwanaki na mbala moko. Yo mpe okutani na likambo ya ndenge wana? Okutani na likambo oyo ebongoli bomoi na yo na mbala moko?
2 Biso basaleli ya Yehova tokutanaka na makambo ya mpasi mpe mikakatano, kaka lokola bato nyonso. Tokoki mpe kokutana na botɛmɛli to monyoko oyo euti na bato oyo bayinaka basaleli ya Nzambe. Yehova apekisaka te ete makambo ya mpasi ndenge wana ekómela biso, kasi alaki ete akosalisa biso. (Yis. 41:10) Na lisalisi na ye, tokoki kobatela esengo na biso, kozwa bikateli ya malamu, mpe kotikala sembo epai na ye ata soki tokutani na makambo ya mpasi makasi. Na lisolo oyo, tokotalela ndenge minei oyo Yehova akoki kosalisa biso ntango makambo ya nsɔmɔ ekómeli biso. Tokomona mpe oyo tosengeli kosala mpo tózwa litomba na lisalisi yango.
YEHOVA AKOBATELA YO
3. Ntango tokutani na likambo moko ya nsɔmɔ, ekoki kozala mpasi tósala nini?
3 Mokakatano. Ntango tokutani na likambo moko ya nsɔmɔ, ekoki kozala mpasi tókanisa polele mpe tózwa bikateli. Mpo na nini? Mpo mbala mosusu motema na biso ezali na mpasi makasi. Mbala mosusu makanisi elekeli biso. Tokoki kosila mayele, toyebi te tólanda nzela nini. Talá ndenge bandeko basi mibale oyo tolobelaki bamiyokaki mpo na makambo ya mpasi oyo bakutanaki na yango. Olivia alobi boye: “Ntango mbula ya mopɛpɛ makasi ebebisaki ndako na ngai, nasilaki mayele.” Monika oyo mobali na ye asalaki makambo ya kozanga bosembo, alobi boye: “Makasi nyonso esilaki ngai. Nayokaki mpasi oyo ezokisaki mpenza motema na ngai. Nayebaki lisusu te kosala ata makambo ya mikemike. Likambo oyo nakokaki kokanisa te ekómelaki ngai.” Ndenge nini Yehova alaki ete akosalisa biso ntango makambo elekeli biso?
4. Na kotalela Bafilipi 4:6, 7, Yehova alaki biso nini?
4 Oyo Yehova asalaka. Yehova alaki kopesa biso eloko oyo Biblia ebengi “kimya ya Nzambe.” (Tángá Bafilipi 4:6, 7.) Kimya yango ezali motema mpiɔ oyo moto ayokaka ntango azali na boyokani malamu na ye. Kimya yango “eleki makanisi na biso”; ezali malamu koleka nyonso oyo tokoki kokanisa. Esilá kokómela yo oyoka motema mpiɔ na mbala moko nsima ya kobondela Yehova na motema mobimba? Yango nde “kimya ya Nzambe.”
5. Ndenge nini kimya ya Nzambe ebatelaka makanisi mpe mitema na biso?
5 Mokapo yango elobi mpe ete kimya ya Nzambe “ekobatela mitema na bino mpe makanisi na bino.” Liloba ya Grɛki oyo ebongolami na ‘kobatela’ ezalaki na elobeli ya basoda mpe bazalaki kosalela yango mpo na kolobela basoda oyo bazalaki kobatela engumba na banguna. Bafandi ya engumba oyo ebatelami bazalaki kolala na kimya, mpo bayebi ete basoda bazali kokɛngɛla na baporte. Ndenge moko mpe, ntango kimya ya Nzambe ezali kobatela mitema mpe makanisi na biso, tobangaka eloko te, mpo toyebi ete tobatelami. (Nz. 4:8) Ndenge ezalaki mpo na Hana, ata soki likambo na biso esili naino te, tokoki kaka koyoka mwa kimya. (1 Sa. 1:16-18) Mpe ntango tozali motema kimya, mbala mingi tokómaka kokanisa malamu mpe tozwaka bikateli ya bwanya.
6. Tokoki kosala nini mpo na kozwa kimya ya Nzambe? (Talá mpe elilingi.)
6 Oyo tosengeli kosala. Ntango otungisami, bengá ‘mobateli.’ Ndenge nini? Bondelá Yehova tii ntango okoyoka kimya ya Nzambe. (Luka 11:9; 1 Tes. 5:17) Luis, oyo tolobelaki liboso, amonisi ndenge ye ná mwasi na ye Ana basalaki ntango bayokaki ete atikali kaka na mwa basanza mpo akufa. Alobaki boye: “Na ntango ya bongo, ezalaka mpasi mingi kozwa bikateli mpo na lisalisi ya monganga oyo esengeli mpe mpo na makambo mosusu. Kasi libondeli esalisaka mingi mpo na kozwa kimya na ntango yango.” Luis ná mwasi na ye balobaki ete babondelaki mbala na mbala mpe na motema mobimba, basɛngaki Yehova apesa bango kimya ya makanisi, motema ya kokita, mpe bwanya mpo na kozwa bikateli ya malamu. Mpe bamonaki ndenge asalisaki bango. Soki okutani na likambo moko ya nsɔmɔ, kotika te kobondela, mpe okoyoka ndenge kimya ya Yehova ekobatela motema mpe makanisi na yo.—Rom. 12:12.
YEHOVA AKOSALA ETE OTƐNGATƐNGA TE
7. Tokoki komiyoka ndenge nini ntango tozali kolekisa ntango moko ya mpasi?
7 Mokakatano. Ntango tozali kolekisa ntango moko ya mpasi, mayoki, makanisi, to mpe makambo oyo tozali kosala ezalaka mpenza na bokatikati te. Tokoki komona lokola nde mayoki na biso ezali kokatisa mbonge. Ana, oyo tolobelaki liboso, alobaki ete azalaki na mayoki ya ndenge na ndenge nsima ya liwa ya Luis. Alobi boye: “Soki nayoki ete eloko moko ezali kozanga, nazalaki komiyokela mawa. Nazalaki mpe koyoka nkanda ndenge akufaki.” Longola yango, Ana azalaki komiyoka lokola mwana etike mpe azalaki kosepela te ndenge azalaki kozwa bikateli na makambo oyo Luis ayebaki kosala malamu. Na bantango mosusu, azalaki koyoka lokola azali na kati ya mbu oyo ezali na mbonge. Ndenge nini Yehova asalisaka biso ntango mayoki na biso ezali kimya te?
8. Ndenge Yisaya 33:6 emonisi yango, Yehova akosala nini mpo na biso?
8 Oyo Yehova asalaka. Yehova ayebisi biso ete akosala ete tózwa libateli, elingi koloba tótɛngatɛnga te. (Tángá Yisaya 33:6.) Soki masuwa ekutani na mopɛpɛ makasi, ekoki kobanda koningana makasi ngámbo na ngámbo. Mpo na kopekisa likambo yango, batyaka biloko mibale na eteni ya nse ya masuwa ngámbo na ngámbo mpo na kosimba yango. Biloko yango ekoki kosalisa masuwa mpo eningana mingi te, mpe bato oyo bazali na kati bayokaka ete babatelami mpe babangaka te. Kasi, biloko yango oyo batyaka na nse ya masuwa esalaka malamu koleka soki masuwa ezali kotambola. Ndenge moko mpe, Yehova akosalisa biso tóyoka ete tobatelami wana tozali kokoba kosalela ye na bosembo na ntango ya komekama.
9. Ndenge nini kosala bolukiluki na mikanda na biso ekoki kosalisa biso tótɛngatɛnga te? (Talá mpe elilingi.)
9 Oyo tosengeli kosala. Ntango obulungani mpo na likambo moko, salá makasi obatela mimeseno na yo ya elimo. Ya solo, mbala mosusu okokoka te kosala yango ndenge omesaná, kasi kobosana te ete Yehova azali makambo makasimakasi te. (Talá mpe Luka 21:1-4.) Na ndakisa, tyá ntango mpo na koyekola yo moko mpe komanyola. Mpo na nini? Na nzela ya ebongiseli na ye, Yehova apesi biso ebele ya mateya oyo euti na Biblia, oyo ekoki kosalisa biso tótɛngatɛnga te. Mpo na komona oyo osengeli na yango, okoki kosala bulukiluki na mikanda oyo ezali na monɔkɔ na yo, na ndakisa JW Library®, Index des publications Watch Tower, mpe Buku ya bolukiluki mpo na Batatoli ya Yehova. Monika, oyo tolobelaki liboso, alobaki ete asalaki bolukiluki na mikanda yango mpo azwa toli ntango mitungisi na ye ezalaki se kobakisama. Na ndakisa, asalaki bolukiluki na liloba “nkanda.” Na ntango mosusu alukaki liloba “kokosa” to “bosembo.” Na nsima, azalaki kotánga tii ntango motema na ye ekokita. Alobi boye: “Ntango nabandi kosala bolukiluki nazalaki na mayoki ya mabe mpenza, na nsima, wana nazali kotánga, nazalaki koyoka lokola Yehova ayambi ngai makasi. Nazalaki komona ete Yehova ayebi mayoki nyonso oyo nazalaki na yango, mpe ete azalaki kosalisa ngai.” Lisalisi yango ya Yehova ekoki mpe kosalisa yo otɛngatɛnga te tii motema na yo ekokita.—Nz. 119:143, 144.
YEHOVA AKOSUNGA YO
10. Tokoki komiyoka ndenge nini ntango likambo oyo epesaki biso mpasi eleki?
10 Mokakatano. Ntango likambo oyo epesaki yo mpasi eleki, mikolo mosusu okoki koyoka ete nzoto to makanisi na yo elɛmbi. Tokoki komiyoka lokola mopoti-mbangu oyo ayebaki kopota mbangu kasi sikoyo azali kotɛnguma. Tokoki komona mpasi ata mpo na kosala makambo oyo tozalaki kosala liboso kozanga mokakatano, to mpe koyoka mposa te ya kosala makambo oyo ezalaki liboso kosepelisa biso. Ndenge moko na Eliya, tokoki komona ete kolamuka ezali mpasi. Mposa tólala kaka. (1 Bak. 19:5-7) Yehova alaki ete akosala nini ntango toyoki ete tolɛmbi?
11. Wapi ndenge mosusu oyo Yehova asalisaka biso? (Nzembo 94:18)
11 Oyo Yehova asalaka. Alaki ete akosalisa biso. (Tángá Nzembo 94:18.) Ndenge kaka mopoti-mbangu oyo azoki azalaka na mposa ya lisalisi mpo atambola, biso mpe tokoki kozala na mposa ya lisalisi mpo tókoba na mosala ya Yehova. Na bantango yango, Yehova alobi na biso ete: “Ngai, Yehova Nzambe na yo, nazali kosimba lobɔkɔ na yo ya mobali, ngai Moto nazali koloba na yo ete: ‘Kobanga te. Nakosalisa yo.’” (Yis. 41:13) Mokonzi Davidi azwaki lisalisi yango. Ntango akutanaki na komekama mpe banguna balukaki koboma ye, alobaki na Yehova boye: “Lobɔkɔ na yo ya mobali esungaka ngai.” (Nz. 18:35) Ndenge nini Yehova asungaka biso?
12. Yehova akoki kosalela banani mpo na kosalisa biso ntango tolɛmbi?
12 Mbala mingi, mpo na kosunga biso, Yehova atindaka basusu básalisa biso. Na ndakisa, mokolo moko ntango Davidi alɛmbaki, moninga na ye Yonatane ayaki kotala ye mpo na kopesa ye makasi mpe koloba na ye maloba ya kolendisa. (1 Sa. 23:16, 17) Ndenge moko mpe, Yehova aponaki Elisha mpo asunga mosakoli Eliya. (1 Bak. 19:16, 21; 2 Bak. 2:2) Lelo oyo, Yehova akoki kosalela bandeko ya libota, baninga, to mpe bankulutu mpo na kosunga biso. Kasi, ntango tozali na mpasi na motema, toyokaka mposa ya kokima basusu. Tolingaka kozala kaka biso moko. Ekómelaka biso nyonso. Tokoki kosala nini mpo na kozwa lisungi ya Yehova?
13. Tosengeli kosala nini mpo na kozwa lisungi ya Yehova? (Talá mpe elilingi.)
13 Oyo tosengeli kosala. Bundisá mposa ya kolinga kozala kaka yo moko. Soki tozali kaka biso moko, mbala mingi tomonaka mosika te, mpe tokómaka kokanisa kaka bomoi na biso mpe makambo oyo tozali na yango. Makanisi ya ndenge wana ekoki kosala ete tózwa bikateli ya malamu te. (Mas. 18:1) Ezali solo ete na bantango mosusu esɛngaka tózala biso moko, mingimingi ntango tokutani na makambo ya mpasi. Kasi, soki toboyi kozala elongo na basusu ntango molai, biso moko tokoki kozanga lisalisi ya bato oyo Yehova azali kosalela mpo na kosunga biso. Yango wana, ata soki ozali na mpasi makasi ndenge nini, ndimá lisalisi ya bandeko ya libota, baninga, mpe bankulutu. Moná bango ndenge oyo bazali mpenza: bato oyo Yehova azali kosalela mpo na kosunga yo.—Mas. 17:17; Yis. 32:1, 2.
YEHOVA AKOBƆNDISA YO
14. Makambo nini ekoki kobangisa biso?
14 Mokakatano. Na bantango mosusu tokoki kobanga mpo na makambo oyo tozali kokutana na yango. Na Biblia, basaleli ya sembo ya Nzambe balobelaki ntango oyo bazalaki na mawa mpe bazalaki kolɛnga mpo na banguna na bango mpe makama mosusu. (Nz. 18:4; 55:1, 5) Ndenge moko mpe, tokoki kokutana na botɛmɛli na kelasi, na mosala, na libota, to oyo euti na guvɛrnema. Tokoki kutu komona liwa na biso na miso mpo na maladi moko boye. Na bantango yango, tokoki kokóma lokola bana mike, tozangi lisalisi. Ndenge nini Yehova asalisaka biso na bantango ya ndenge wana?
15. Na kotalela Nzembo 94:19, Yehova akosala nini mpo na biso?
15 Oyo Yehova asalaka. Abɔndisaka biso mpe akitisaka biso motema. (Tángá Nzembo 94:19.) Nzembo yango ekoki kotinda biso tókanisa mwana mwasi moko ya moke oyo azali kobanga mpe azali kokoka kolala te mpo na mbula ya bankanke. Tata na ye ayei esika mwana azali, amemi ye, mpe abondeli ye tii ntango alali. Atako bankanke ezali kaka, mwana ayoki kimya mpo tata amemi ye mpe abɔndisi ye. Ntango tokutani na mikakatano oyo ezali kobangisa biso, tokoki kozala na mposa ete Tata na biso ya likoló amema biso na ndenge ya elilingi tii kobanga yango ekoleka. Ndenge nini tokoki kozwa libɔndisi ya ndenge wana epai ya Yehova?
16. Tokoki kosala nini mpo na kozwa libɔndisi ya Yehova? (Talá mpe elilingi.)
16 Oyo tosengeli kosala. Lekisáká ntango mbala na mbala elongo na Yehova: bóndelaka ye mpe tángáká Liloba na ye. (Nz. 77:1, 12-14) Na bongo, ntango otungisami, mposa na yo ya liboso ekozala ete oluka lisalisi epai ya Tata na yo ya likoló. Yebisá Yehova makambo oyo ezali kobangisa yo mpe kotungisa yo. Tiká ye aloba na yo mpe abɔndisa yo na nzela ya Makomami. (Nz. 119:28) Masolo mosusu ya Biblia ekoki mpenza kobɔndisa yo ntango ozali kobanga. Na ndakisa, okoki kozwa malendisi na mokanda ya Yobo, Nzembo, Masese, mpe na maloba ya Yesu oyo ezali na Matai mokapo 6. Wana ozali kobondela Yehova mpe kotánga Liloba na ye, okobɔndisama.
17. Tokoki kozala na elikya nini?
17 Tokoki kozala na elikya ete Yehova akozala elongo na biso ntango tokutani na makambo ya nsɔmɔ. Tokozala biso moko te. (Nz. 23:4; 94:14) Yehova alaki ete akobatela biso, akosalisa biso mpo tótɛngatɛnga te, akosunga biso, mpe akobɔndisa biso. Yisaya 26:3 elobi mpo na Yehova ete: “Okobatela baoyo batyaka motema mobimba epai na yo; okopesa bango kimya ntango nyonso, mpo batyaka motema na bango epai na yo.” Na yango, tyelá Yehova motema, mpe ndimá bibongiseli oyo atye mpo na kosalisa yo. Soki osali bongo, okozwa lisusu makasi, ata na ntango ya mpasi.
OKOPESA EYANO NINI?
-
Ntango nini tozalaka na mposa makasi ya lisalisi ya Yehova?
-
Wapi ndenge minei oyo Yehova asalisaka biso na ntango ya mpasi?
-
Tokoki kosala nini mpo na kozwa litomba na lisalisi ya Yehova?
LOYEMBO 12 Yehova, Nzambe monene
a Topesi bango bankombo mosusu.