Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOYEKOLI 4

LOYEMBO 30 Tata na ngai, Nzambe na ngai, mpe moninga na ngai

Yehova alingaka yo mingi

Yehova alingaka yo mingi

“Yehova azali na bolingo mingi ya motema.”YAK. 5:11.

NA MOKUSE

Ndenge oyo bolingo ya Yehova ekotinda biso mpe tólinga ye mpe tómiyoka ete tozali na kimya, tobatelami, mpe tozwi makasi.

1. Nini eyelaka yo na makanisi ntango okanisi ndenge Yehova azalaka?

 OSILÁ kokanisa soki Yehova azalaka ndenge nini? Ntango ozali kobondela ye, nini eyelaka yo na makanisi? Atako Yehova amonanaka te, Biblia elobeli ye na maloba ndenge na ndenge. Na ndakisa, Biblia ebengi Yehova “moi mpe nguba” mpe “mɔtɔ oyo ezikisaka.” (Nz. 84:11; Ebr. 12:29) Na emonaneli ya Ezekiele, Yehova amonisami lokola libanga ya safire, ebende moko oyo ezalaki kongɛnga, mpe monama kitoko. (Ezk. 1:​26-28) Koyoka ete Yehova azali bongo ekoki kokamwisa biso to kutu kobangisa biso.

2. Nini epekisaka basusu bápusana penepene na Yehova?

2 Lokola tokoki komona Yehova te, mbala mosusu ekoki kozala mpasi tóndima ete alingaka biso. Bato mosusu bakanisaka ete Yehova akoki kolinga bango te na kotalela makambo ya bomoi na bango ya kala. Mbala mosusu bazalaki te na tata oyo azalaki kolinga bango. Yehova ayebaka soki tozali na mayoki ya ndenge wana mpe ndenge oyo ebongolaka bomoto na biso. Mpo na kosalisa biso, amonisi biso bomoto na ye ya malamu na kati ya Liloba na ye.

3. Mpo na nini tosengeli kotya likebi mingi na bolingo ya Yehova?

3 Liloba moko oyo emonisaka malamu bomoto ya Yehova ezali bolingo. (1 Yoa. 4:8) Yehova azali bolingo. Bolingo nde etambwisaka likambo nyonso oyo asalaka. Bolingo ya Nzambe ezali monene mpe na nguya mingi na boye ete amonisaka yango ata epai ya bato oyo balingaka ye te. (Mat. 5:​44, 45) Lisolo oyo ezali kobenda likebi mingi epai ya Yehova mpe na bolingo na ye. Soki toyebi Nzambe na biso malamu, tokolinga ye mpe mingi.

YEHOVA ALINGAKA BISO MINGI

4. Bolingo ya Yehova etindaka yo omiyoka ndenge nini? (Talá mpe elilingi.)

4 “Yehova azali na bolingo mingi ya motema.” (Yak. 5:11) Na Biblia, Yehova amikokanisi na mama oyo alingaka mwana na ye. (Yis. 66:​12, 13) Kanisá mama ya bolingo oyo azali kolɛngɛla mwana na ye ya moke. Amemi ye na boboto na makolo na ye, mpe azali koloba na ye malɛmbɛ, na mongongo ya nse. Ntango mwana aleli to ayoki mpasi, mama asaleli ye oyo esengeli. Ndenge moko mpe, ntango tozali na mawa, tótya motema na bolingo ya Yehova. Mokomi ya nzembo akomaki: “Ntango natungisamaki koleka ndelo, obɔndisaki ngai mpe okitisaki ngai motema.”—Nz. 94:19.

“Nakokoba kobɔndisa bino, ndenge mama abɔndisaka mwana na ye” (Talá paragrafe 4)


5. Ndenge nini bolingo ya sembo ya Yehova esalisaka yo?

5 Yehova azali sembo. (Nz. 103:8) Aboyaka biso te ntango tosali likambo ya mabe. Ekólo Yisraele esalelaki Yehova mabe mbala na mbala; kasi Yehova akobaki kolinga bato na ye oyo babongolaki motema; alobaki na bango: “Lokola okómi na motuya na miso na ngai, okumisami, mpe nalingi yo.” (Yis. 43:​4, 5) Bolingo ya Nzambe ebongwani te. Alingaka mpe biso lelo oyo. Ata soki tosali mabunga ya minene, Yehova asundolaka biso te. Ntango tobongoli motema mpe tozongeli Yehova, tokomona ete alingaka biso kaka. Alaki ete “akolimbisa mpenza.” (Yis. 55:7) Biblia elobi ete soki tolimbisami, “bileko ya kopema [eutaka] epai ya Yehova ye moko.”—Mis. 3:19.   

6. Zekaria 2:8 ezali koteya biso nini mpo na Yehova?

6 Tángá Zekaria 2:8. Lokola Yehova alingaka biso, atyaka likebi mingi na mayoki na biso mpe alukaka kobatela biso. Ayokaka mpasi ntango tozali koyoka mpasi. Na yango, tokoki kobondela ye ete: “Batelá ngai lokola mbuma ya liso na yo.” (Nz. 17:8) Liso ezali eteni ya pɛtɛpɛtɛ mpe ya motuya mingi na nzoto. Na yango, ntango Yehova akokanisi biso na liso na ye, ezali lokola nde azali koloba, ‘Moto oyo asali bino bato na ngai mabe, asali eloko na ngai ya motuya mabe.’

7. Mpo na nini tosengeli komindimisa mpenza ete Yehova alingaka biso?

7 Yehova alingi tóndima mpenza ete alingaka mokomoko na biso. Kasi ayebi ete na kotalela makambo mosusu ya kala ya bomoi na biso, tokoki komituna soki akoki kolinga biso. To mbala mosusu tozali kokutana na mikakatano sikoyo, mpe tozali komituna soki Yehova alingaka biso. Nini ekosalisa biso tóndima mpenza ete Yehova alingaka biso? Koyekola ndenge Yehova amonisaka ete alingaka Yesu, bakristo oyo batyami mafuta na elimo, mpe mokomoko na biso.

NDENGE OYO YEHOVA AMONISAKA BOLINGO NA YE

8. Mpo na nini Yesu andimaki mpenza ete Tata na ye alingaka ye?

8 Na ntango oyo molai na yango eyebani te, Yehova ná Mwana na ye basalaki boyokani makasi mpe balinganaki mpenza. Boyokani yango eumeli koleka nyonso. Yehova alobaki polele ete alingaka Yesu, ndenge emonisami na Matai 17:5. Yehova akokaki kaka koloba ete, ‘Oyo moto oyo nandimi.’ Kasi, alingaki tóyeba ete alingaka Yesu mingi, yango wana abengaki ye “Mwana na ngai, ya bolingo.” Yehova azalaki kosepela na Yesu mpe ndenge andimaki kopesa bomoi na ye. (Ef. 1:7) Mpe Yesu azalaki ata na ntembe moke te ete Tata na ye alingaka ye. Yesu andimaki mpenza ete Yehova alingaki ye mpe motema na ye eyebaki yango. Alobaki mbala na mbala na kondima nyonso ete Tata alingaka ye.—Yoa. 3:35; 10:17; 17:24.

9. Maloba nini emonisi ete Yehova alingaka bakristo oyo batyami mafuta na elimo? Limbolá. (Baroma 5:5)

9 Yehova alobi mpe ete alingaka bakristo oyo batyami mafuta na elimo. (Tángá Baroma 5:5.) Simbá liloba “etondi.” Buku moko oyo elimbolaka maloba ya Biblia elobi ete ezali lokola nde “eyei kosopama lokola ebale.” Ezali maloba ya malamu mpenza mpo na komonisa bolingo monene oyo Yehova alingaka baoyo batyami mafuta! Bakristo oyo batyami mafuta na elimo bayebi ete “Nzambe Tata alingaka” bango. (Yuda 1) Ntoma Yoane amonisaki mayoki ya bakristo yango ntango akomaki: “Bótala bolingo monene oyo Tata amoniseli biso, mpo tóbengama bana ya Nzambe!” (1 Yoa. 3:1) Bolingo ya Yehova esuki kaka na baoyo batyami mafuta? Te, Yehova amonisi ete alingaka mpe mokomoko na biso.

10. Likambo nini ya monene emonisaka ete Yehova alingaka yo?

10 Likambo nini ya monene emonisaka ete Yehova alingaka biso? Ezali lisiko, oyo emonisaka bolingo oyo eleki nyonso na molɔ́ngɔ́ mobimba! (Yoa. 3:16; Rom. 5:8) Yehova apesaki Mwana na ye ya bolingo, atikaki ye akufa mpo na bato nyonso mpo masumu na biso elimbisama mpe tókoka kozala baninga na Ye. (1 Yoa. 4:10) Soki tozali komanyola mingi na eloko ya motuya oyo Yehova ná Yesu bapesaki, tokomona mpenza ete balingaka mokomoko na biso mingi mpenza. (Gal. 2:20) Lisiko efutamaki kaka te mpo bosembo ya Yehova esɛngaki bongo. Emonisaka bolingo ya Nzambe. Yehova amonisaki ete alingaka biso na ndenge apesaki mbeka ya moto oyo aleki motuya mpo na ye, Yesu. Yehova atikaki Mwana na ye amona mpasi mpe akufa mpo na biso.   

11. Yirimia 31:3 ezali koteya biso nini?

11 Ndenge tomoni yango, Yehova abombaka te bolingo na ye epai na biso, amonisaka yango. (Tángá Yirimia 31:3.) Yehova abendi biso epai na ye mpo alingaka biso. (Talá mpe Kolimbola Mibeko 7:​7, 8.) Eloko moko te mpe moto moko te akoki kokabola biso na bolingo yango. (Rom. 8:​38, 39) Bolingo yango etindi yo omiyoka ndenge nini? Tángá Nzembo 23, mpe talá ndenge Davidi ayokaki mpo na bolingo mpe libateli ya Nzambe, mpe ndenge oyo biso nyonso mpe tokoki komiyoka.

BOLINGO YA YEHOVA ETINDAKA YO OMIYOKA NDENGE NINI?

12. Nzembo 23 elobelaka nini?

12 Tángá Nzembo 23:​1-6. Nzembo 23 elobelaka bolingo ya Yehova mpe libateli na ye. Davidi, moto oyo akomaki nzembo yango, alobeli boyokani makasi oyo ezalaki kati na ye ná Yehova, Mobateli na ye. Davidi azalaki kobanga te kotika Yehova atambwisa ye, mpe azalaki kotyela Ye motema mobimba. Davidi ayebaki ete bolingo ya Yehova ekolanda ye mikolo nyonso ya bomoi na ye. Nini endimisaki ye likambo yango?

13. Mpo na nini Davidi andimaki ete Yehova abatelaka ye?

13 “Nakozanga eloko te.” Davidi amonaki ete Yehova azalaki kobatela ye mpo azalaki ntango nyonso kokokisa bamposa na ye. Davidi ayebaki mpe ete Yehova azalaki Moninga na ye mpe ete azalaki kondima ye. Yango wana atyaki motema ete ata soki makambo nini ekokómela ye na mikolo ezali koya, Yehova akokoba kokokisa bamposa na ye nyonso. Ndenge Davidi atyelaki bolingo ya Yehova motema ezalaki na nguya koleka mitungisi nyonso oyo Davidi azalaki na yango mpe epesaki ye esengo mpe nsai makasi mpenza.—Nz. 16:11.

14. Ndenge nini Yehova abatelaka biso na bolingo nyonso?

14 Yehova asungaka biso na bolingo nyonso, mingimingi ntango makambo ya mabe ekómeli biso. Claire, a oyo asali mbula koleka 20 na Betele, amitungisaki mingi ntango bato ya libota na ye bakutanaki na mikakatano, moko nsima ya mosusu. Tata na ye abɛlaki makasi na mbalakaka, leki na ye ya mwasi alongolamaki na lisangá, mpe mombongo ya libota na bango ekweaki mpe banki ekangaki ndako na bango. Ndenge nini Yehova asungaki bango na bolingo nyonso? Claire alobi boye: “Yehova asalisaki libota na ngai ezanga te biloko oyo esengeli na yango mpo na mokolo na mokolo. Mbala mingi, oyo Yehova azalaki kopesa elekaki nyonso oyo nakokaki kokanisa! Nakanisaka mbala na mbala mabaku oyo namonaki bolingo ya Yehova, mpe nalingaka te kobosana yango. Kokanisa makambo yango esalisi ngai nakoba kosalela Yehova ata ntango nakutani na mikakatano mosusu.”

15. Nini epesaki Davidi makasi? (Talá mpe elilingi.)

15 Apesaka ngai makasi.”  Na bantango mosusu, Davidi azalaki na mawa mpo na mikakatano mpe komekama nyonso oyo azalaki kokutana na yango. (Nz. 18:​4-6) Atako bongo, bolingo mpe lisungi ya Yehova epesaki ye makasi. Yehova amemaki Davidi moninga na ye oyo alɛmbaki “na bisika ya koleisa bibwɛlɛ” mpe “na bisika ya kopema oyo ezali na mai mingi.” Yango esalisaki Davidi azwa lisusu makasi mpe akoba kosalela Yehova na esengo.—Nz. 18:​28-32.

Ata ntango Davidi azalaki kokimakima, bolingo mpe libateli ya Yehova epesaki ye makasi (Talá paragrafe 15)


16. Ndenge nini bolingo ya Yehova epesaki yo makasi?

16 Lelo oyo mpe, “ezali mpo na bolingo ya sembo ya Yehova nde [tosilaka] te” ntango tokutani na mikakatano mpe na komekama na bomoi na biso. (Bil. 3:22; Kol. 1:11) Tótalela ndakisa ya Rachel. Ayokaki mpasi mingi ntango mobali na ye asundolaki ye ná Yehova na eleko ya maladi mabe ya coronavirus. Yehova asalaki nini mpo na Rachel? Alobi boye: “Yehova alingaki nayoka ete alingaka ngai kaka. Atindelaki ngai baninga oyo bazalaki kolekisa ntango elongo na ngai, bazalaki komemela ngai biloko ya kolya, kotindela ngai bamesaje oyo ezalaki na maloba kitoko mpe mikapo ya Biblia, baninga oyo bazalaki kosɛkisa ngai, mpe bakobaki kokundwela ngai ete Yehova azalaki kobatela ngai. Napesaka Yehova matɔndi ntango nyonso ndenge apesá ngai libota monene ya bato oyo batondi na bolingo.”

17. Mpo na nini Davidi azalaki ‘kobanga eloko ya mabe ata moko te’?

17 “Nabangaka eloko ya mabe ata moko te, mpo ozali elongo na ngai.” Bomoi ya Davidi ezalaki mbala mingi na likama, mpe azalaki na banguna mingi ya nguya. Kasi, lokola Yehova azalaki kolinga ye, azalaki komiyoka kimya mpe abatelami. Davidi azalaki komiyoka ete Yehova azalaki elongo na ye na likambo nyonso oyo akutani na yango, mpe yango ezalaki kokitisa ye motema. Yango wana ayembaki ete: “[Yehova] abikisaki ngai na makambo nyonso oyo ezalaki kobangisa ngai.” (Nz. 34:4) Davidi abangaki mpenza, kasi bolingo ya Yehova ezalaki makasi koleka.

18. Ndenge nini koyeba ete Yehova alingaka biso ekoki kopesa yo makasi ntango ozali kobanga?

18 Ndenge nini koyeba ete Yehova alingaka biso epesaka biso makasi ntango tokutani na makambo ya kobangisa? Mobongisi-nzela moko na nkombo Susi alobeli ndenge oyo ye ná mobali na ye bamiyokaki ntango mwana na bango ya mobali amibomaki; alobi boye: “Likama ya mbalakaka epesaka nsɔmɔ, ekoki kobulunganisa, mpe kosilisa moto elikya. Kasi bolingo ya Yehova esalisaki biso tózala ntango nyonso na kimya mpe tómiyoka ete tobatelami.” Rachel, oyo tolobelaki liboso, alobi boye: “Mokolo moko na butu nayokaki motema mpasi, nazalaki komitungisa mpe kobanga makasi, nalelelaki Yehova na mongongo makasi. Na mbala moko, nayokaki ete akitisaki ngai motema mpe abɔndisaki ngai, ndenge mama asalaka epai ya mwana na ye ya moke, mpe mpɔngi ezwaki ngai. Nabosanaka mokolo yango te.” Nkulutu moko na nkombo Tasos asalaki mbula minei na bolɔkɔ mpo aboyaki kokɔta na mosala ya soda. Ndenge nini amiyokaki ete Yehova alingaka ye mpe abatelaka ye? Alobi boye: “Yehova akokisaki bamposa na ngai nyonso mpenza. Yango esalisaki ngai namona ete nakoki kotyela ye motema mobimba. Lisusu, na nzela ya elimo na ye, Yehova apesaki ngai esengo atako nazalaki na esika oyo ekokaki kotinda ngai nazala mawamawa. Yango endimisaki ngai ete soki nazali kosala mingi elongo na ye, nakozwa mpe bolamu na ye mingi. Na yango, nabandaki mosala ya mobongisi-nzela ya sanza na sanza ntango nazalaki na bolɔkɔ.”

PUSANÁ PENEPENE NA NZAMBE NA YO YA BOLINGO

19. (a) Ndenge nini koyeba ete Nzambe alingaka biso ekoki kobongola makambo oyo tokoloba na libondeli? (b) Eloko nini esepelisi yo mingi na oyo etali bolingo ya Yehova? (Talá etanda “ Maloba oyo emonisi ete Yehova alingaka biso.”)

19 Bandakisa ya bato oyo tolobeli na lisolo oyo emonisi mpenza ete Yehova, “Nzambe ya bolingo,” azalaka elongo na biso! (2 Ko. 13:11) Atyelaka mokomoko na biso likebi. Tondimi mpenza ete “[tozingami] na bolingo ya sembo na Ye.” (Nz. 32:10) Soki tozali komanyola mingi na ndenge oyo amoniseli biso bolingo na ye, tokomona mpenza ete azali moto ya solo mpe tokopusana penepene na ye. Tokoki kosolola na ye kozanga kobanga mpe koyebisa ye ete tozali na mposa ya bolingo na ye. Tokoki koyebisa ye makambo nyonso oyo ezali kotungisa biso, na elikya ete amityaka na esika na biso mpe ete azalaka na mposa makasi ya kosalisa biso.—Nz. 145:​18, 19.

20. Na ndenge nini bolingo ya Yehova ebendaka biso epai na ye?

20 Ndenge kaka toyokaka mposa ya kopusana penepene ya mɔtɔ na ntango ya malili, bolingo ya Yehova mpe ebendaka biso epai na ye. Bolingo ya Yehova ezali na nguya mingi, mpe ezali malamu mpenza. Na yango, sepelá mpo Yehova alingaka yo. Mpe tiká ete biso nyonso tózongisela ye mpe bolingo; tóloba: “Nalingaka Yehova”!—Nz. 116:1.

OKOPESA EYANO NINI?

  • Okoki koloba nini mpo na bolingo ya Yehova?

  • Mpo na nini okoki kondima ete Yehova alingaka yo mingi?

  • Bolingo ya Yehova etindi yo omiyoka ndenge nini?

LOYEMBO 108 Bolingo ya sembo ya Nzambe

a Topesi bango bankombo mosusu.