Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LIKANISI MPO NA KOYEKOLA

Bililingi oyo ekosalisa yo obosana te

Bililingi oyo ekosalisa yo obosana te

Lokola mingi kati na biso, mbala mosusu ezalaka mpe mpasi oyeba lisusu makambo oyo oyekoli. Kasi, omonaka ndenge bandakisa ya Yesu eyelaka yo na pɛtɛɛ nyonso na makanisi? Okoki komona yango na makanisi, mpe yango esalisaka yo obosana yango te. Ndenge moko mpe, okoki komikundwela makambo mingi oyo oyekoli soki ozali komona yango na makanisi. Ndenge nini okoki kosala yango? Soki ozali kosala bililingi ya makambo oyo oyekoli.

Mbala mingi, bato oyo basalaka bililingi ya makambo ya sika oyo bayekoli, ezalaka mpasi bábosana yango. Bamonaka ete esalisaka bango bákanga ntina malamu kaka ya maloba te kasi mpe ya makanisi ya ntina oyo bayekoli. Bililingi yango esengeli kozala mindɔndɔ te, kasi pɛtɛɛ. Mpe emonani ete kosala bililingi ekoki kosalisa mingimingi baoyo bakómi mikóló.

Mbala nsima oyo okoyekola, okoki komeka kosala mwa bililingi ya makambo oyo oyekoli. Okoki kokamwa ndenge okokanga makambo ebele!