Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOYEKOLI 4

LOYEMBO 18 Tózala na botɔndi mpo na lisiko

Lisiko eteyaka biso nini?

Lisiko eteyaka biso nini?

“Talá ndenge bolingo ya Nzambe emonisamaki.”1 YOA. 4:9.

NA MOKUSE

Ndenge lisiko eteyaka biso bizaleli malamu oyo Yehova Nzambe mpe Yesu Kristo bamonisaki.

1. Koyangana na Ekaniseli ya liwa ya Kristo mbula na mbula esalisaka biso na nini?

 NA NTEMBE te, ondimaka ete lisiko ezali likabo moko ya malamu mingi! (2 Ko. 9:15) Ndenge Yesu apesaki bomoi na ye mbeka epesi yo nzela ya kozala na boninga ya penepene na Yehova Nzambe. Okoki mpe kolikya kozala na bomoi ya seko. Yango wana, ebongi mpenza ete tómonisa botɔndi mpo na lisiko mpe mpo na Yehova, oyo bolingo na ye etindaki ye apesa yango! (Rom. 5:8) Mpo na kosalisa biso tókoba kozala na botɔndi mpe tómona ata mokolo moko te ete lisiko ezali likabo ya bongobongo, Yesu abandisaki Ekaniseli ya liwa na ye, oyo tosalaka mbula na mbula.—Luka 22:​19, 20.

2. Tokolobela nini na lisolo oyo?

2 Na mbula oyo, Ekaniseli ekosalema na mokolo ya pɔsɔ, 12/04/2025. Na ntembe te, biso nyonso tozali komibongisa mpo na koyangana na molulu yango. Na eleko oyo ya Ekaniseli, tokozwa matomba mingi soki tozwi ntango ya komanyola a makambo oyo Yehova ná Mwana na ye basalá mpo na biso. Na lisolo oyo, tokolobela makambo oyo lisiko eteyaka biso mpo na Yehova mpe Mwana na ye. Na lisolo oyo elandi, tokotalela makambo oyo ekosalisa biso tóyeba ndenge oyo tokoki kozwa matomba na lisiko mpe ndenge oyo tokoki komonisa botɔndi mpo na yango.

MAKAMBO OYO LISIKO ETEYAKA BISO MPO NA YEHOVA

3. Ndenge nini liwa ya moto moko ekokaki kosikola bamilio ya bato? (Talá mpe elilingi.)

3 Lisiko eteyaka biso bosembo ya Yehova. (Mib. 32:4) Na ndenge nini? Kanisá naino: Mpo na kozanga botosi ya Adama, tozwá lisumu mpe yango ememaka na liwa. (Rom. 5:12) Mpo na kosikola biso na lisumu mpe na liwa, Yehova azwaki ebongiseli ete Yesu apesa lisiko. Kasi, ndenge nini mbeka ya moto kaka moko ya kokoka ekoki kosikola bamilio ya bato? Ntoma Paulo alobaki: “Ndenge kozanga botosi ya moto kaka moko ekómisaki ebele ya bato basumuki, ndenge moko mpe botosi ya moto kaka moko [Yesu] ekokómisa bato mingi bato ya sembo.” (Rom. 5:19; 1 Tim. 2:6) Na maloba mosusu, tokómá baombo ya lisumu mpe ya liwa mpo na kozanga botosi ya moto kaka moko ya kokoka. Na yango, mpo na kolongola biso na boombo yango, esɛngaki mpe moto kaka moko ya kokoka amonisa botosi.

Tokómá baombo ya lisumu mpe ya liwa mpo na kozanga botosi ya moto kaka moko ya kokoka. Na yango, moto moko nde asikoli biso (Talá paragrafe 3)


4. Mpo na nini Yehova apesaki kaka nzela te ete bakitani ya Adama oyo bakozala mitema sembo bátikala na bomoi libela na libela?

4 Esɛngaki mpenza kaka ete Yesu akufa mpo na kobikisa biso? Yehova akokaki kaka te kopesa nzela ete bakitani ya Adama oyo bakozala mitema sembo bátikala na bomoi libela na libela? Na miso ya bato ya kozanga kokoka, yango elingaki kozala likambo ya boboto mpe oyo ebongi kosala. Kasi yango eyokani te na bosembo ya kokoka ya Yehova. Lokola Yehova azali sembo, akokaki kokanga miso kaka boye te na kozanga botosi ya Adama oyo emonanaki polele.

5. Mpo na nini tokoki kondima ete Yehova akosala ntango nyonso oyo ezali sembo?

5 Nini elingaki kosalema soki Yehova apesaki lisiko te kasi atye bosembo na ye pembeni mpe apesi bakitani ya Adama oyo bazali bato ya kozanga kokoka nzela ya kotikala na bomoi libela na libela? Bato bakokaki kokanisa ete mbala mosusu Nzambe atyaka mpe bosembo na ye pembeni na makambo mosusu. Bakokaki komituna, ekoki kozala ete akokokisa te bilaka na ye mosusu? Tozali na ntina te ya komitungisa ete likambo ya ndenge wana ekoki kosalema. Lokola Yehova asalaki oyo ezali sembo ata soki esɛngaki ye mingi mpenza, elingi koloba apesaki mbeka ya Mwana na ye oyo alingaki mingi, endimisi biso ete akosala ntango nyonso oyo ezali sembo.

6. Wapi lolenge moko oyo lisiko emonisaka bolingo ya Yehova? (1 Yoane 4:​9, 10)

6 Lisiko esalisaka biso tókanga ntina ete Yehova azali sembo, kasi esalisaka biso tómona mingimingi bolingo na ye monene. (Yoa. 3:16; tángá 1 Yoane 4:​9, 10.) Liteya ya lisiko emonisaka ete Yehova alingi kaka te ete tózala na bomoi ya seko, kasi alingi mpe tózala na kati ya libota na ye. Kanisá naino: Ntango Adama asalaki lisumu, Yehova abenganaki ye na libota ya basambeli na Ye. Na yango, biso nyonso ntango tobotamaka, moko te azalaka na kati ya libota ya Nzambe. Kasi, na nzela ya lisiko, Yehova alimbisaka masumu na biso, mpe nsukansuka akokɔtisa na libota na ye bato nyonso oyo bazali komonisa kondima mpe bazali na botosi. Ata sikoyo tokoki kozala na boyokani malamu na Yehova mpe na basaleli na ye mosusu. Ya solo, Yehova amoniseli biso bolingo monene mpenza!—Rom. 5:​10, 11.

7. Ndenge nini mpasi oyo Yesu amonaki ezali kosalisa biso tómona ndenge Yehova alingaka biso mingi?

7 Tokoki komona mpenza ndenge Yehova alingaka biso mingi soki tokanisi oyo esɛngaki ye mpo na kopesa lisiko. Satana alobaka ete mosaleli moko te ya Nzambe akotikala sembo epai ya Yehova soki akutani na mikakatano. Mpo na kokweisa lokuta yango, Yehova apesaki nzela ete Yesu amona mpasi liboso akufa. (Yobo 2:​1-5; 1 Pe. 2:21) Yehova amonaki ntango bakonzi ya mangomba oyo bazalaki kotɛmɛla Yesu batyolaki ye, basoda babɛtaki ye fimbo, mpe babakaki ye na nzete na bansɛtɛ. Na nsima, Yehova azalaki kotala ndenge Mwana na ye ya bolingo akufaki liwa moko ya mpasi mpenza. (Mat. 27:​28-31, 39) Yehova azalaki na nguya ya kopekisa likambo yango na ntango nyonso oyo alingaki. Na ndakisa, ntango banguna balobaki: “[Nzambe] abikisa ye sikoyo soki alingi ye,” Yehova akokaki kosala yango mpenza. (Mat. 27:​42, 43) Kasi, soki Nzambe asalaka yango, lisiko elingaki kofutama te mpe tolingaki kotikala kaka boye, kozanga elikya. Yango wana Yehova apesaki nzela ete Mwana na ye ayika mpiko na mpasi tii ntango akataki motema.

8. Yehova ayokaki mpasi ntango amonaki Mwana na ye azali konyokwama? Limbolá. (Talá mpe elilingi.)

8 Tókanisa te ete lokola Yehova azali Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso, azalaka na mayoki te! Biso bato tozalaka na mayoki mpo Yehova akelá biso na elilingi na ye; yango emonisi ete ye mpe azalaka na mayoki. Biblia elobi mpo na Nzambe ete ‘ayokaki motema mpasi’ mpe ‘ayokaki mawa.’ (Nz. 78:​40, 41) Tótalela mpe lisolo ya Abrahama ná Yisaka. Na ntembe te, oyebi ete Yehova asɛngaki Abrahama apesa mwana na ye kaka moko mbeka. (Eba. 22:​9-12; Ebr. 11:​17-19) Kanisá mayoki ndenge na ndenge oyo Abrahama azalaki na yango ntango azalaki komibongisa mpo na koboma Yisaka na mbeli. Kanisá sikoyo mpasi oyo na ntembe te Yehova ayokaki ntango amonaki ndenge bato oyo babangaka Nzambe te banyokolaki Mwana na ye tii babomaki ye!—Talá na jw.org video Mekolá kondima na bango—Abrahama, Eteni 2.

Esalaki Yehova mpasi komona Mwana na ye azali konyokwama (Talá paragrafe 8)


9. Baroma 8:​32, 38, 39 esalisi yo omona nini na oyo etali bolingo monene ya Nzambe mpo na yo mpe basaleli na ye mosusu?

9 Lisiko eteyaka biso ete moto moko te alingaka biso mingi lokola Yehova, ezala bandeko to baninga na biso ya motema mpenza. (Tángá Baroma 8:​32, 38, 39.) Na ntembe te, Yehova alingaka biso mpe mingi koleka ndenge oyo tomilingaka biso moko. Olingaka kozala na bomoi libela na libela? Yehova alingi bongo mpo na yo koleka. Olingaka ete masumu na yo elimbisama? Yehova alingaka kolimbisa yo koleka. Asɛngi kaka ete tóndima lisiko, likabo ya motuya oyo apesá; tómonisa kondima mpe botosi. Lisiko ezali eloko oyo emonisaka mpenza bolingo monene ya Nzambe. Mpe na mokili ya sika, tokoyekola makambo mosusu mingi na oyo etali bolingo ya Yehova.—Mos. 3:11.

MAKAMBO OYO LISIKO ETEYAKA BISO MPO NA YESU

10. (a) Nini mpenza epesaki Yesu mpasi? (b) Ndenge nini Yesu alongisaki nkombo ya Yehova? (Talá mpe etanda “ Bosembo ya Yesu elongisaki nkombo ya Yehova.”)

10 Yesu amibanzabanzaka mingi mpo na nkombo ya Tata na ye. (Yoa. 14:31) Yesu ayokaki mpasi mpo ndenge oyo bafundaki ye ete afingi Nzambe mpe azali kobimisa botomboki ekokaki kofingisa nkombo ya Tata na ye. Yango wana abondelaki ete: “Tata na ngai, soki ekoki kosalema, kɔpɔ oyo eleka mosika na ngai.” (Mat. 26:39) Ndenge Yesu abatelaki bosembo na ye epai ya Yehova tii na liwa, alongisaki mpenza nkombo ya Tata na ye.

11. Ndenge nini Yesu amonisaki ete alingaka mpenza bato? (Yoane 13:1)

11 Lisiko eteyaka mpe biso ete Yesu alingaka mpenza bato, mingimingi bayekoli na ye. (Mas. 8:31; tángá Yoane 13:1.) Na ndakisa, Yesu ayebaki ete makambo mosusu oyo akosala na mosala na ye awa na mabele ekozala mpasi mpenza, mingimingi liwa na ye ya mpasi. Atako bongo, ntango azalaki kosala mosala na ye awa na mabele, asalaki yango te tiká kaka asala. Kasi, amipesaki na motema mobimba na kosakola, koteya, mpe kosalela basusu. Ata na mokolo ya liwa na ye, Yesu azwaki ntango ya kosukola makolo ya bantoma na ye mpe na maloba na ye ya nsuka, alendisaki bango mpe apesaki bango malako. (Yoa. 13:​12-15) Mpe ntango azalaki na nzete ya mpasi, Yesu azwaki mwa miniti mpo na kopesa elikya na mosali-mabe oyo azalaki kokufa pene na ye, mpe azwaki bibongiseli mpo mama na ye abatelama. (Luka 23:​42, 43; Yoa. 19:​26, 27) Na yango, Yesu amonisaki bolingo mpenza kaka na ntango ya liwa na ye te, kasi na bomoi na ye mobimba awa na mabele.

12. Na ndenge nini Yesu azali kokoba komipesa mpo na biso?

12 Kristo akufaki “mbala moko mpo na libela,” kasi azali kaka komipesa mpo na biso tii lelo. (Rom. 6:10) Ndenge nini? Azali kokoba kosala mingi mpo na kopesa biso matomba ya lisiko. Talá makambo oyo azali kosala. Azali Mokonzi na biso, Nganga-nzambe Monene na biso, mpe mokonzi ya lisangá. (1 Ko. 15:25; Ef. 5:23; Ebr. 2:17) Azali kokamba mosala ya koyanganisa bakristo oyo batyami mafuta na elimo mpe ebele mpenza ya bato, mpe mosala yango ekosila liboso bolɔzi monene esuka. b (Mat. 25:32; Mrk. 13:27) Azali mpe kosalisa moombo ya sembo akoba koleisa malamu baoyo nyonso basalelaka Yehova na bosembo na mikolo oyo ya nsuka. (Mat. 24:45) Mpe na ntango ya Boyangeli ya Mbula Nkóto, Yesu akokoba kosala mpo na bolamu na biso. Yehova apesá biso mpenza Mwana na ye!

KOTIKA TE KOYEKOLA

13. Ndenge nini komanyola ekoki kosalisa yo okoba koyekola makambo mosusu oyo etali bolingo oyo Nzambe mpe Kristo bazali na yango mpo na biso?

13 Okoki koyekola makambo mosusu oyo etali bolingo oyo Yehova Nzambe ná Kristo Yesu bazali na yango epai na biso soki okobi komanyola likoló na yango. Mbala mosusu na eleko oyo ya Ekaniseli, okoki kotánga na likebi Evanzile moko to koleka. Kotánga makambo ebele te na mbala moko. Kasi, kende malɛmbɛmalɛmbɛ mpe luká bantina oyo tosengeli kolinga Yehova ná Yesu. Mpe kobosana te koyebisa basusu makambo oyo oyekoli.

14. Na kotalela Nzembo 119:97 mpe maloba na nse ya lokasa na yango, ndenge nini kosala bolukiluki ekoki kosalisa biso tókoba koyekola makambo ya sika oyo etali lisiko mpe mateya mosusu? (Talá mpe elilingi.)

14 Soki osali bambula mingi na kati ya solo, mbala mosusu ozali komituna soki okomona makambo ya sika soki oyekoli makambo oyo eyebani malamu lokola bosembo ya Yehova, bolingo na ye, mpe lisiko. Mpo na koloba solo, tokozanga te komona eloko ya sika soki toyekoli makambo yango mpe mateya mosusu. Na yango, okoki kosala nini? Mikanda na biso etondi na ebele ya makambo ya motuya oyo okoki koyekola. Ntango omoni mokapo moko oyo okangi ntina na yango malamu te, salá bolukiluki. Na nsima, na boumeli ya mokolo yango, manyolá likambo ya sika oyo omoni mpe oyo yango ezali koteya yo mpo na Yehova, Mwana na ye, mpe bolingo na bango mpo na yo.—Tángá Nzembo 119:97 mpe maloba na nse ya lokasa.

Ata soki tosali bambula mingi na kati ya solo, tokoki kaka kokóma na botɔndi mingi mpo na lisiko (Talá paragrafe 14)


15. Mpo na nini tosengeli kokoba koyekola makambo ya sika na Biblia?

15 Kolɛmba nzoto te soki omoni te eloko ya sika to oyo esepelisi yo mbala nyonso oyo ofandi mpo na kotánga to kosala bolukiluki. Tokoki koloba ete ozali lokola moto oyo alukaka wolo. Bato oyo balukaka wolo bamonisaka motema molai na ndenge balekisaka bangonga to mikolo mingi liboso bámona ata mwa wolo. Kasi, batikaka koluka te mpo wolo nyonso oyo bakozwa, ata ya moke, ezali na motuya mingi mpo na bango. Eloko nyonso ya sika oyo tokoki koyekola na Biblia ezali na motuya monene koleka wolo! (Nz. 119:127; Mas. 8:10) Na yango, zalá na motema molai mpe kangamá na programɛ na yo ya botángi ya Biblia.—Nz. 1:2.

16. Ndenge nini tokoki komekola Yehova ná Yesu?

16 Wana ozali koyekola, luká mabaku ya kosalela makambo oyo oyekoli. Na ndakisa, salá makasi omekola bosembo ya Yehova: saleláká basusu makambo kozanga kopona bilongi. Mekolá bolingo oyo Yesu azalaki na yango mpo na Tata na ye mpe basusu: zalá pene ya komona mpasi mpo na nkombo ya Yehova mpe omipesaka mpo na bolamu ya bandeko na yo bakristo. Lisusu, na ndakisa ya Yesu, sakweláká basusu mpo bango mpe bázwa libaku ya kondima likabo ya Yehova ya motuya mingi.

17. Tokolobela nini na lisolo oyo elandi?

17 Soki tokangi malamu ntina ya lisiko mpe tozali na botɔndi mingi mpo na yango, tokolinga mpe Yehova ná Mwana na ye mingi. Soki tolingi bango, bango mpe bakolinga biso mingi. (Yoa. 14:21; Yoa. 4:8) Na yango, tósalela bibongiseli oyo Yehova apesi biso mpo tókoba koyekola makambo etali lisiko. Lisolo oyo elandi ekolobela mwa makambo oyo tokoki kosala mpo na kozwa matomba ya lisiko mpe komonisa botɔndi mpo na bolingo ya Yehova.

LOYEMBO 107 Ndakisa ya bolingo ya Nzambe

a NDIMBOLA YA MALOBA: “Komanyola” elimboli kotya makanisi nyonso na lisolo to likambo moko mpe kokanisa yango na mozindo mpenza.

b Koyanganisa “biloko oyo ezali na likoló” oyo Paulo alobeli na Baefese 1:​10, ekeseni na koyanganisama ya ‘bato oyo aponá’ oyo Yesu alobeli na Matai 24:31 mpe Marko 13:27. Paulo alobeli ntango oyo Yehova aponaka bana na ye ya elimo, ntango atye bango mafuta na elimo santu. Kasi, Yesu alobeli ntango oyo bakristo oyo batyami mafuta na elimo oyo bazali naino awa na mabele bakoyanganisama na likoló na ntango ya bolɔzi monene.