Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOYEKOLI 5

LOYEMBO 108 Bolingo ya sembo ya Nzambe

Matomba oyo tozwi na bolingo ya Yehova

Matomba oyo tozwi na bolingo ya Yehova

“Kristo Yesu ayaki na mokili mpo na kobikisa basumuki.”1 TIM. 1:15.

NA MOKUSE

Matomba oyo lisiko ememeli biso mpe ndenge oyo tokoki komonisa botɔndi na biso epai ya Yehova.

1. Tokoki kosala nini mpo na kosepelisa Yehova?

 Kanisá ete opesi moto moko oyo olingaka likabo moko ya kitoko mpe oyo ekosalisa ye mpenza. Okolɛmba mpenza nzoto soki moto yango atye yango na esika ya kobomba biloko mpe akipaka yango te! Kasi na ntembe te okosepela soki azali kosalela likabo na yo malamu, mpe apesi yo matɔndi mpo na yango. Liteya ezali nini? Yehova apesaki Mwana na ye mpo na biso. Na ntembe te ayokaka esengo ntango tomonisi botɔndi mpo na likabo yango ya kitoko mpe mpo na bolingo na ye, oyo etindaki ye apesa lisiko!—Yoa. 3:16; Rom. 5:​7, 8.

2. Tokolobela nini na lisolo oyo?

2 Nzokande, wana ntango ezali koleka, tokoki kobanda komona likabo ya lisiko lokola eloko ya bongobongo. Ekozala lokola nde totyá likabo ya Nzambe na esika ya kobomba biloko. Tozali na esengo ya kozala na yango, kasi tolingi komona yango te. Mpo likambo yango ekómela biso te, tosengeli mbala na mbala komonisaka botɔndi mpo na oyo Nzambe ná Kristo basalá mpo na biso. Lisolo oyo ekoki kosalisa biso tósala yango. Tokolobela matomba oyo lisiko ememeli biso sikoyo mpe oyo ekomemela biso na mikolo ezali koya. Tokolobela mpe ndenge oyo tokoki komonisa botɔndi mpo na bolingo ya Yehova, mingimingi na eleko oyo ya Ekaniseli.

MATOMBA OYO TOZALI KOZWA SIKOYO

3. Wapi litomba moko oyo tozali kozwa na mbeka ya lisiko banda sikoyo?

3 Tozali kozwa matomba na mbeka ya lisiko ya Kristo banda sikoyo. Na ndakisa, na nzela ya lisiko, Yehova alimbisaka masumu na biso. Asɛngisami te kolimbisa biso, kasi alingaka kosala yango. Mokomi ya nzembo ayembaki na botɔndi ete: “Mpo yo, Ee Yehova, ozali malamu mpe osepelaka kolimbisa.”—Nz. 86:5; 103:​3, 10-13.

4. Yehova apesaki lisiko mpo na banani? (Luka 5:32; 1 Timote 1:15)

4 Bato mosusu bamiyokaka ete babongi te ete Yehova alimbisa bango. Mpo na koloba solo, biso nyonso tobongi te. Ntoma Paulo akangaki ntina ete ‘abongaki kutu te kobengama ntoma.’ Kasi, abakisaki: “Mpo na boboto monene ya Nzambe, nazali ndenge nazali.” (1 Ko. 15:​9, 10) Ntango tobongoli motema na masumu na biso, Yehova alimbisaka biso. Mpo na nini? Ezali te mpo tobongi na yango, kasi nde mpo alingaka biso. Soki ozali komiyoka ete obongi te Yehova alimbisa yo, kobosana te ete Yehova apesaki lisiko te mpo na bato oyo bazangá lisumu, kasi nde mpo na basumuki oyo babongoli motema.—Tángá Luka 5:32; 1 Timote 1:15.

5. Ezali na moto oyo abongi na motema mawa ya Yehova? Limbolá.

5 Moko te kati na biso asengeli komona ete abongi na motema mawa ya Yehova, ata soki tolekisi bambula mingi na mosala na ye. Ya solo Yehova asepelaka na mosala na biso ya sembo. (Ebr. 6:10) Atako bongo, apesá biso Mwana na ye lokola likabo ya ofele, kasi te lokola lifuti mpo na mosala oyo tosaleli ye. Soki tozali kokanisa ete Yehova amoniselaka biso motema mawa mpo tobongi na yango, to ete esengeli atyela biso likebi mingi koleka, ezali lokola nde tozali koloba, Kristo akufaki kaka mpamba.—Talá mpe Bagalatia 2:21.

6. Mpo na nini Paulo abomaki nzoto na mosala ya Yehova?

6 Paulo ayebaki ete Nzambe andimaki ye kaka mpo na motema mawa. Bongo mpo na nini abomaki nzoto na mosala ya Yehova? Ezalaki te mpo na komonisa ete abongi, kasi nde mpo na komonisa ete azali na botɔndi mpo na boboto monene ya Yehova. (Ef. 3:7) Ndenge moko na Paulo, tokobaka kosalela Yehova na molende, mpo amonisela biso motema mawa te, kasi nde mpo na komonisa ete tozali na botɔndi mpo na yango.

7. Wapi litomba mosusu oyo tozali kozwa na lisiko banda sikoyo? (Baroma 5:1; Yakobo 2:23)

7 Litomba mosusu oyo tozali kozwa na lisiko banda sikoyo ezali ete tokoki kozala na boyokani ya penepene na Yehova. a Ndenge tomonaki yango na lisolo oyo eleki, ntango tobotamaka, tozalaka baninga ya Yehova te. Kasi na nzela ya lisiko, tokoki kozala na “kimya elongo na Nzambe,” mpe na yango kopusana penepene na ye.—Tángá Baroma 5:1; Yakobo 2:23.

8. Mpo na nini tosengeli kozala na botɔndi epai ya Yehova mpo na libaku ya kobondela ye?

8 Tótalela kaka likambo moko oyo etali boyokani na biso na Yehova—libaku ya kobondela ye. Yehova ayokaka kaka te mabondeli oyo basaleli na ye basalaka liboso ya bato ntango bayangani elongo, kasi ayokaka mpe mabondeli oyo mokomoko na biso asalaka ye moko. Libondeli ekoki kokitisa biso motema mpe kopesa biso kimya ya makanisi, kasi matomba na yango esuki wana te. Libondeli ekoki kokómisa boninga na biso na Yehova makasi. (Nz. 65:2; Yak. 4:8; 1 Yoa. 5:14) Ntango azalaki awa na mabele, Yesu azalaki kobondela mingi mpo ayebaki ete Yehova azalaki koyoka ye, mpe ayebaki ete libondeli ekosala ete boyokani na ye na Tata na ye ezala makasi. (Luka 5:16) Tozali na botɔndi mpenza, mpo na nzela ya mbeka ya Yesu, tokoki kozala baninga ya Yehova mpe ata kosolola na Ye na libondeli!

MATOMBA OYO TOKOKI KOZWA NA MIKOLO EZALI KOYA

9. Litomba nini lisiko ekomemela basaleli ya sembo ya Yehova na mikolo ezali koya?

9 Litomba nini lisiko ekomemela basambeli ya sembo ya Yehova na mikolo ezali koya? Bakozwa bomoi ya seko. Bato mingi bakanisaka ete yango ekoki kosalema te mpo bato bakufaka banda kala. Kasi mokano ya Yehova ya ebandeli ezalaki ete bato bázala na bomoi libela na libela. Soki Adama asalaka lisumu te, moto moko te alingaki komona ete kozala na bomoi libela na libela ekoki kosalema te. Mpe ata soki sikoyo ekoki kozala mpasi tómona ete tokozala na bomoi libela na libela, Yehova afutaki mbeka ya motuya monene mpenza mpo tózwa elikya yango: bomoi ya Mwana na ye ya bolingo.—Rom. 8:32.

10. Bakristo oyo batyami mafuta na elimo mpe bampate mosusu bazali kozela kozwa nini?

10 Atako tokozwa bomoi ya seko na mikolo ezali koya, Yehova alingi ete tókanisaka yango sikoyo. Bakristo oyo batyami mafuta na elimo bazelaka kozwa bomoi ya esengo na likoló epai bakoyangela mabele elongo na Kristo. (Em. 20:6) Bampate mosusu bazelaka kozwa bomoi ya seko na paradiso awa na mabele, epai mpasi mpe mawa ekozala lisusu te. (Em. 21:​3, 4) Ozali na kati ya bampate mosusu oyo bazali na elikya ya kozala na bomoi libela na libela awa na mabele? Mbano yango ezali moke te. Bato bakelamaki nde mpo na kozala na bomoi ya seko awa na mabele. Bomoi awa na mabele ekopesa biso esengo mpenza.

11-12. Wapi mwa mapamboli oyo tokoki kozwa na Paradiso? (Talá mpe bililingi.)

11 Meká komona ndenge oyo bomoi na Paradiso awa na mabele ekozala. Okomitungisa ata moke te na oyo etali maladi to liwa. (Yis. 25:8; 33:24) Yehova akokokisa bamposa nyonso ya malamu oyo ozali na yango. Makambo nini okosepela koyekola? Makambo etali banyama? Ya chimie? Kobɛta miziki? To kosala mayemi? Na ntembe te, ekozala na mposa ya bato oyo basalaka baplan ya bandako, bamasɔ, mpe basali-bilanga. Na ntembe te, ekozala mpe na mosala ya kosunga basusu mpe kobatela biloko, na ndakisa kobongisa bilei, kosala bisaleli, kolona bafololo mpe kobatela yango. (Yis. 35:1; 65:21) Lokola okozala na bomoi libela na libela, okozala na ntango ya kosala makambo nyonso oyo okoki kokanisa.

12 Ekozala esengo koyamba baoyo bakosekwa! (Mis. 24:15) Kanisá mpe esengo oyo okozala na yango ntango okoyekola biloko mingi oyo Yehova akelá. (Nz. 104:24; Yis. 11:9) Oyo eleki nyonso, kanisá esengo ya kosambela Yehova kozanga komiyoka ete osengeli kosɛnga bolimbisi mpo na mabe oyo osali. Okotya mapamboli wana pembeni mpo ozwa “esengo ya ntango mokuse oyo euti na lisumu” lelo oyo? (Ebr. 11:25) Soki moke te! Mapamboli wana eleki mosika eloko nyonso oyo tokoki komipimela na mokili oyo lelo. Kobosana te, Paradiso awa na mabele ekozala ntango nyonso elikya te. Nsukansuka ekokóma likambo ya solo, tokozala wana. Nyonso wana elingaki kosalema te soki Yehova alingaki biso mingi te, mpe apesaki te likabo ya Mwana na ye!

Mapamboli nini ozali kozela mpenza komona na Paradiso? (Talá paragrafe 11-12)


MONISÁ BOTƆNDI NA BOLINGO YA YEHOVA

13. Ndenge nini tokoki komonisa botɔndi na bolingo ya Yehova? (2 Bakorinti 6:1)

13 Ndenge nini tokoki komonisa botɔndi epai ya Yehova mpo na ndenge apesaki lisiko? Tosengeli kotya mosala na ye na esika ya liboso na bomoi na biso. (Mat. 6:33) Kutu, Yesu akufaki “mpo baoyo bazali na bomoi bázala na bomoi mpo na bango moko lisusu te, kasi mpo na moto oyo akufelaki bango mpe asekwisamaki.” (2 Ko. 5:15) Na ntembe te tolingi te kobosana ntina ya boboto monene ya Yehova.—Tángá 2 Bakorinti 6:1.

14. Ndenge nini tokoki komonisa kondima na litambwisi ya Yehova?

14 Tokoki mpe komonisa botɔndi na bolingo ya Yehova soki tozali komonisa kondima na litambwisi na ye. Na ndenge nini? Ntango tolingi kozwa bikateli, na ndakisa mpo na kelasi oyo tokotánga, to lolenge ya mosala oyo tosengeli kondima, tosengeli kotalela oyo Yehova akolinga ete tósala. (1 Ko. 10:31; 2 Ko. 5:7) Soki tomonisi kondima na biso na misala, likambo ya malamu mpenza ekosalema: kondima na biso epai ya Yehova mpe boninga na biso na ye ekokóma lisusu makasi. Mpe elikya na biso ekokóma lisusu makasi koleka.—Rom. 5:​3-5; Yak. 2:​21, 22.

15. Ndenge nini tokoki komonisa botɔndi na biso na eleko ya Ekaniseli?

15 Ezali mpe na lolenge mosusu oyo tokoki komonisa botɔndi na bolingo ya Yehova. Ezali ya kosalela eleko ya Ekaniseli oyo mpo na komonisa Yehova ete tozali na botɔndi mingi mpo na lisiko. Longola kozwa bibongiseli mpo na kozala na Ekaniseli, tokoki mpe kobengisa basusu mpo báyangana na yango. (1 Tim. 2:4) Limbwelá bato oyo obengisi makambo oyo ekosalema na Ekaniseli. Okoki kolakisa bango na jw.org video Mpo na nini Yesu akufaki? mpe Kanisá liwa ya Yesu. Bankulutu basengeli kosala nyonso mpo na kobengisa baoyo balɛmbá na elimo. Kanisá esengo oyo ekozala na likoló mpe awa na mabele soki bampate mosusu ya Yehova oyo ebungá bandimi kozonga na etonga na ye! (Luka 15:​4-7) Na Ekaniseli, tómityela mokano ya kopesa mbote kaka te na baoyo toyebi, kasi mingimingi na bato ya sika to baoyo bayá makita kala. Tolingi bámiyoka ete toyambi bango malamu!—Rom. 12:13.

16. Mpo na nini tosengeli koluka kosala mingi na eleko ya Ekaniseli?

16 Okoki kosala mingi na mosala ya Yehova na eleko ya Ekaniseli? Yango ezali lolenge ya malamu ya komonisa botɔndi mpo na nyonso oyo Nzambe mpe Kristo basalelá biso. Soki tomipesi mingi na mosala ya Yehova, tokomona mpe ndenge akosalisa biso mingi, mpe ekosala ete tókóma kotyela ye lisusu motema mingi koleka. (1 Ko. 3:9) Lisusu, salá makasi osalaka botángi ya Biblia mpo na Ekaniseli, ndenge emonisami na Tótángaka Makomami mokolo na mokolo to na etanda oyo ezali na mokanda ya likita ya kati ya pɔsɔ. Okoki ata kopona kosalela bavɛrsɛ yango ya Biblia mpo na kosala bolukiluki na boyekoli na yo moko.

17. Nini esepelisaka Yehova? (Talá mpe etanda “ Ndenge ya komonisa botɔndi na bolingo ya Yehova.”)

17 Mbala mosusu makambo ya bomoi na yo ezali kopesa yo nzela te ya kosalela makambo nyonso oyo tolobeli na lisolo oyo. Kasi, kobosana te, Yehova akokanisaka te oyo osalaka mpo na ye na oyo basusu basalaka mpo na ye; atalaka nde oyo ezali na motema na yo. Asepelaka ntango amoni ete motema na yo ezali na botɔndi mpo na likabo na ye ya motuya: lisiko.—1 Sa. 16:7; Mrk. 12:​41-44.

18. Mpo na nini tosengeli kozala na botɔndi epai ya Yehova Nzambe mpe Yesu Kristo?

18 Ezali kaka na nzela ya lisiko nde masumu na biso ezali kolimbisama, tozali na boninga na Yehova, mpe tozali na elikya ya bomoi ya seko. Tiká ete tómonisaka ntango nyonso botɔndi na bolingo ya Yehova, oyo etindaki ye apesa biso mapamboli wana. (1 Yoa. 4:19) Tiká mpe ete tómonisaka botɔndi mpo na Yesu, mpo alingaki biso mingi mpe apesaki bomoi na ye mpo na biso!—Yoa. 15:13.

LOYEMBO 154 Bolingo ekosuka te

a Yehova azalaki kolimbisa basaleli na ye na kala ata liboso Kristo apesa lisiko. Yehova akokaki kosala yango mpo andimaki ete Mwana na ye akotikala sembo tii na liwa. Na yango, na miso ya Nzambe, ezalaki lokola nde lisiko esilaki kofutama.—Rom. 3:25.