Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOYEKOLI 2

LOYEMBO 132 Sikoyo tokómi moto moko

Mibali, bópesaka basi na bino lokumu

Mibali, bópesaka basi na bino lokumu

“Bino mibali, . . . bópesaka bango lokumu.”1 PE. 3:7.

NA MOKUSE

Ndenge oyo mobali akoki kopesa mwasi na ye lokumu na maloba mpe na misala.

1. Wapi ntina moko oyo Yehova asalaki ebongiseli ya libala?

 YEHOVA azali “Nzambe ya esengo,” mpe alingi ete biso mpe tózala na esengo. (1 Tim. 1:11) Apesi biso makabo mingi mpo na kosalisa biso tósepela na bomoi. (Yak. 1:17) Moko ya makabo yango ezali libala. Ntango mwasi ná mobali babalani, basalaka elako ete bakolingana, bakomoniselana limemya mpe bakotyelana likebi. Soki mwasi ná mobali bakobi kolingana makasi, bakozala na esengo mpenza.—Mas. 5:18.

2. Nini ezali kosalema lelo na mabala mingi?

2 Likambo ya mawa, babalani mingi na mokili ya lelo oyo babosanaka elako oyo basalaki na mokolo ya libala na bango. Na yango, bazalaka na esengo te. Lapolo moko ya OMS euti komonisa ete mibali mingi banyokolaka basi na bango na kobɛta, na maloba, to na kozokisa mayoki na bango. Mobali oyo asalaka makambo wana akoki komonisa na miso ya bato ete amemyaka mwasi na ye nzokande anyokolaka ye na ndako. Lisusu, mibali mingi batalaka pornografi, mpe yango ezali kobebisa mabala mingi.

3. Makambo nini ekoki kotinda mobali anyokola mwasi na ye?

3 Nini ekoki kotinda mibali mosusu bányokola basi na bango? Mbala mosusu tata na bango azalaki kobɛta mama na bango, yango wana bakanisaka ete konyokola mwasi ndenge wana ezali mabe te. Mibali mosusu balandaka mimeseno ya esika oyo bafandi, oyo elendisaka makanisi mabe oyo ete “mobali ya solosolo” asengeli kozala makambo makasi mpo mwasi na ye ayeba ete ye nde mokonzi. Mibali mosusu bayekolá kopekisa mayoki na bango te, ata mpe nkanda na bango. Basusu babebisá ndenge na bango ya kotalela basi mpe kosangisa nzoto mpo batalaka pornografi mingi. Lisusu, baankɛtɛ emonisi ete maladi mabe ya coronavirus ebebisaki lisusu makambo. Kasi, moko te ya makambo wana ezali kopesa mobali nzela ya konyokola mwasi.

4. Mibali bakristo basengli kokeba na nini, mpe mpo na nini?

4 Mibali bakristo basengeli kokeba ete lolenge ya mabe oyo mokili etalelaka basi ekɔtela bango te. a Mpo na nini? Moko ya bantina ezali ete mbala mingi makanisi etindaka moto na misala. Ntoma Paulo akebisaki bakristo oyo batyami mafuta na Roma ete ‘bátika kolanda makambo ya mokili oyo.’ (Rom. 12:​1, 2) Ntango Paulo akomaki mokanda epai ya Baroma, emonani ete lisangá ezalaki kuna banda mwa ntango. Kasi, maloba ya Paulo emonisi ete bato mosusu na kati ya lisangá yango bazalaki kaka kolanda mimeseno mpe makanisi ya mokili. Yango wana alendisaki bango bábongola makanisi mpe bizaleli na bango. Na ntembe te toli yango etali mpe mibali bakristo lelo oyo. Likambo ya mawa, bakristo mosusu lelo oyo bazali kolanda makanisi ya mokili mpe konyokola kutu basi na bango. b Ndenge nini Yehova alingi ete mobali asalelaka mwasi na ye makambo? Eyano ezali na vɛrsɛ oyo esimbi lisolo oyo.

5. Na kotalela 1 Petro 3:​7, ndenge nini mobali asengeli kosalela mwasi na ye makambo?

5 Tángá 1 Petro 3:7. Yehova asɛngi mibali bápesaka basi na bango lokumu. Kopesa moto lokumu elimboli kosalela ye makambo oyo emonisi ete tomemyaka ye. Mobali oyo apesaka mwasi na ye lokumu asalelaka ye makambo na boboto mpe na bolingo. Na lisolo oyo, tokomona ndenge oyo mobali akoki komonisa ete apesaka mwasi na ye lokumu. Kasi liboso, tólobela naino bizaleli oyo epesaka basi lokumu te.

BOYÁ BIZALELI OYO EKOPESA MWASI NA YO LOKUMU TE

6. Ndenge nini Yehova atalelaka mibali oyo babɛtaka basi na bango? (Bakolose 3:19)

6 Kobɛta mwasi. Yehova ayinaka bato ya mobulu. (Nz. 11:5) Asepelaka ata moke te na mibali oyo banyokolaka basi na bango. (Mal. 2:16; tángá Bakolose 3:19.) Na kotalela 1 Petro 3:​7, vɛrsɛ oyo esimbi lisolo na biso, soki mobali asalelaka mwasi na ye makambo na boboto te, boyokani na ye ná Yehova ekozala malamu te. Yehova akoki koboya ata koyoka mabondeli na ye.

7. Na kotalela Baefese 4:​31, 32, maloba ya ndenge nini mibali basengeli koboya? (Talá mpe “Ndimbola ya maloba.”)

7 Kofinga mwasi. Mibali mosusu balobaka na basi na bango maloba ya nkanda to ya kozokisa. Kasi Yehova ayinaka “nkanda, nkanda makasi, koganga mpe maloba ya kofinga.” c (Tángá Baefese 4:​31, 32.) Ayokaka makambo nyonso. Ndenge oyo mobali alobaka na mwasi na ye, ata ntango bazali kaka bango mibale na ndako, ezali na ntina mpo na Yehova. Mobali oyo alobaka mabe epai ya mwasi na ye akobebisa kaka libala na bango te, kasi mpe boninga na ye na Nzambe.—Yak. 1:26.

8. Ndenge nini Yehova atalelaka pornografi, mpe mpo na nini?

8 Kotala pornografi. Ndenge nini Yehova atalelaka pornografi? Ayinaka yango. Na yango mobali oyo atalaka bililingi ya mbindo abebisaka boyokani na ye na Yehova mpe azangaka limemya epai ya mwasi na ye. d Yehova alingi ete mobali atikala sembo epai ya mwasi na ye kaka na misala te kasi mpe na makanisi na ye. Yesu alobaki ete mobali oyo azali kotala mwasi mosusu tii ayoki ye mposa asali ekobo “na motema” na ye. eMat. 5:​28, 29.

9. Mpo na nini Yehova ayinaka likambo etali kosangisa nzoto na mwasi na ndenge oyo ezangi limemya?

9 Kosangisa nzoto na mwasi na ndenge oyo ezangi limemya. Mibali mosusu batyaka basi na bango mbamba ete básangisa na bango nzoto na ndenge ya kozanga limemya epai ya mwasi mpe oyo ekotinda mwasi amiyoka mbindo to ete balingaka ye te. Yehova ayinaka ezaleli ya ndenge wana ya moimi mpe ya kozanga bolingo. Asɛngi mobali alinga mwasi na ye, atyela ye likebi mpe amemya mayoki na ye. (Ef. 5:​28, 29) Mobali mokristo oyo azali sikoyo na ezaleli ya kosala mwasi na ye makambo na kozanga limemya, afingaka mwasi na ye, to atalaka pornografi asengeli kosala nini? Ndenge nini akoki kobongola makanisi mpe misala na ye?

NDENGE YA KOTIKA BIZALELI OYO EPESAKA MWASI LOKUMU TE

10. Ndenge nini ndakisa ya Yesu ekoki kosalisa mibali?

10 Nini ekoki kosalisa mobali atika konyokola mwasi to kosala ye makambo na kozanga limemya? Asengeli kosala makasi amekola Yesu. Ya solo Yesu abalaki te, kasi ndenge oyo azalaki kosalela bayekoli na ye makambo ezali ndakisa mpo na ndenge oyo mobali asengeli kosalela mwasi na ye makambo. (Ef. 5:25) Na ndakisa, tótalela makambo oyo mibali bakoki koyekola na ndenge oyo Yesu azalaki kosalela bantoma na ye makambo mpe koloba na bango.

11. Ndenge nini Yesu azalaki kosalela bantoma na ye makambo?

11 Yesu azalaki kosalela bantoma na ye makambo na boboto mpe na limemya. Alukaki ata mokolo moko te konyokola bango to kokonza bango. Atako azalaki Nkolo na bango, Yesu amonaki te ete asengeli kolakisa bango bokonzi na ye na nko. Kasi, asalelaki bango na komikitisa nyonso. (Yoa. 13:​12-17) Ayebisaki bayekoli na ye: “Bóyekola epai na ngai, mpo ngai nazali na ezaleli ya boboto mpe na komikitisa, mpe bokopema.” (Mat. 11:​28-30) Simbá ete Yesu azalaki na ezaleli ya boboto. Kozala na boboto ezali bolɛmbu te. Kutu, emonisaka nde ete moto azali na makasi ya komonisa komipekisa. Ntango batumoli ye, moto ya boboto abatelaka kimya na ye mpe apekisaka mayoki na ye.

12. Ndenge nini Yesu azalaki koloba na basusu?

12 Yesu azalaki kobɔndisa mpe kolendisa basusu na maloba na ye. Azalaki kokatela bayekoli na ye mangala te. (Luka 8:​47, 48) Ata ntango batɛmɛli bafingaki ye mpe balukaki kosilikisa ye, “azongisaki kofinga te.” (1 Pe. 2:​21-23) Na bantango mosusu, Yesu aponaki kutu kofanda nyɛɛ na esika ya kozongisa maloba mabe. (Mat. 27:​12-14) Azali mpenza ndakisa malamu mpo na mibali bakristo!

13. Na kotalela Matai 19:​4-6, ndenge nini mobali akoki ‘kokangama na mwasi na ye’? (Talá mpe elilingi.)

13 Yesu ayebisaki mibali bátikala sembo epai ya basi na bango. Azongelaki maloba ya Tata na ye, ete mobali asengeli ‘kokangama na mwasi na ye.’ (Tángá Matai 19:​4-6.) Vɛrbɛ ya Grɛki na vɛrsɛ yango oyo ebongolami na “kokangama” elimboli mpenzampenza “kokanga na kole.” Na yango, boyokani ya mwasi ná mobali oyo babalani esengeli kozala makasi lokola nde bakangisami na kole. Soki boyokani yango ekatani, bango mibale bakomona mpasi. Mobali oyo akómi na boyokani makasi ndenge wana na mwasi na ye akoboya lolenge nyonso ya pornografi. Akolongola miso mbala moko mpo ‘atala te eloko oyo ezangi ntina.’ (Nz. 119:37) Kutu, akosala kondimana na miso na ye mpo atala te mwasi mosusu na ndenge ya koyoka ye mposa na esika ya mwasi na ye.—Yobo 31:1.

Mobali oyo azali sembo aboyaka kotala pornografi (Talá paragrafe 13) g


14. Makambo nini mobali oyo anyokolaka mwasi na ye asengeli kosala mpo na kobongisa boyokani na ye na Yehova mpe na mwasi na ye?

14 Mobali oyo abɛtaka mwasi na ye to afingaka ye asengeli kosala mpe makambo mosusu mpo na kobongisa boyokani na ye na Yehova mpe na mwasi na ye. Makambo nini? Ya liboso, asengeli kondima ete azali na mokakatano monene. Yehova amonaka makambo nyonso. (Nz. 44:21; Mos. 12:14; Ebr. 4:13) Ya mibale, asengeli kotika konyokola mwasi na ye mpe kobongola bizaleli na ye. (Mas. 28:13) Ya misato, asengeli komikitisa liboso ya mwasi na ye ná Yehova mpe kosɛnga bango bolimbisi. (Mis. 3:19) Asengeli mpe kosɛnga Yehova apesa ye mposa ya kobongwana mpe asalisa ye akóma na komipekisa na makanisi, na maloba, mpe na misala na ye. (Nz. 51:​10-12; 2 Ko. 10:5; Flp. 2:13) Ya minei, asengeli kosala na boyokani na libondeli na ye; asengeli koyekola koyina lolenge nyonso ya mobulu mpe ya maloba mabe. (Nz. 97:10) Ya mitano, asengeli kokende noki epai ya bankulutu ya lisangá mpo básalisa ye. (Yak. 5:​14-16) Ya motoba, asengeli kozwa bibongiseli, komityela mibeko oyo ekosalisa ye azongela lisusu te makambo nyonso wana ya mabe. Mobali oyo atalaka pornografi asengeli mpe kosala makambo oyo tolobeli. Yehova akopambola milende oyo azali kosala mpo na kobongwana. (Nz. 37:5) Kasi soki mobali atiki makambo oyo epesaka mwasi lokumu te, asengeli kosuka kaka wana? Te, asengeli mpe koyekola kopesa mwasi na ye lokumu. Ndenge nini akoki kosala yango?

NDENGE YA KOPESA MWASI NA YO LOKUMU

15. Ndenge nini mobali akoki komonisa mwasi na ye ete alingaka ye?

15 Monisá ye ete olingaka ye. Bandeko mibali mosusu oyo bazali na esengo na mabala na bango bazalaka na momeseno ya kosala mwa likambo mikolo nyonso mpo na komonisa basi na bango ete balingaka bango. (1 Yoa. 3:18) Mobali akoki komonisela mwasi na ye bolingo na makambo ya mikemike, na ndakisa kosimba ye na lobɔkɔ to kopesa ye lipwɛpwɛ. Akoki kotindela ye mesaje mpe koyebisa ye ete “Nazali kokanisa yo” to kotuna ye “Mokolo ezali koleka ndenge nini?” Na bantango mosusu, akoki komonisa ye ete alingaka ye soki akomeli ye mwa maloba ya kitoko na karte moko. Ntango mobali azali kosala makambo wana, akopesa mwasi na ye lokumu mpe akokómisa boyokani ya libala na bango makasi.

16. Mpo na nini mobali asengeli kokumisa mwasi na ye?

16 Yebisá ye ete osepelaka na ye. Mobali oyo alingaka mwasi na ye akumisaka ye mpe alendisaka ye. Mobali akoki kosala yango soki azali kobosana te koyebisa mwasi na ye ete asepelaka ndenge asalaka makasi azala mosungi mpo na ye. (Kol. 3:15) Soki mobali azali mpenza kokumisa mwasi na ye na motema mobimba, mwasi akozala na esengo. Akomiyoka ete abatelami, ete balingi ye, mpe ete azali na lokumu.—Mas. 31:28.

17. Ndenge nini mobali akoki komonisa ete amemyaka mwasi na ye?

17 Zalá na boboto mpe na limemya. Mobali oyo alingaka mwasi na ye azwaka ye na motuya mpe atyelaka ye likebi mingi. Amonaka ete azali likabo kitoko oyo euti na Yehova. (Mas. 18:22; 31:10) Na yango, asalelaka ye makambo na boboto mpe na limemya, ata ntango bazali kaka bango mibale mpe na ntango ya kosangisa nzoto. Akotya ye mbamba te ete básangisa nzoto na ndenge oyo mwasi akokoka te, oyo ezangi limemya, to oyo ekotungisa lisosoli na ye. f Mobali ye moko mpe akosala makasi abatela lisosoli ya pɛto liboso ya Yehova.—Mis. 24:16.

18. Mibali basengeli kozala na ekateli ya kosala nini? (Talá mpe etanda “ Ndenge minei oyo mobali akoki komonisa limemya.”)

18 Mibali, bokoki kotya motema ete Yehova azali komona mpe azali kosepela na milende oyo bozali kosala mpo na kopesa basi na bino lokumu na makambo nyonso ya bomoi na bino. Mobali, zalá na ekateli ya kopesaka mwasi na yo lokumu: boyá bizaleli oyo ekopesa ye mpasi mpe zalá na boboto, na limemya, mpe tyeláká ye likebi mingi. Soki ozali kosala bongo, okomonisa ye ete olingaka ye mpe ete ozwaka ye na motuya. Soki ozali kopesa mwasi na yo lokumu, okobatela boyokani na yo oyo eleki ntina: boninga na yo na Yehova.—Nz. 25:14.

LOYEMBO 131 “Oyo Nzambe akangisi esika moko”

a Mibali bakozwa makambo mosusu oyo ekoki kosalisa bango na lisolo “Osalelaka basi makambo lokola Yehova?” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 01/2024.

b Basi oyo mibali babɛtaka bango bakoki kotánga lisolo “Lisalisi mpo na baoyo bazali konyokola bango na ndako” na masolo oyo ezali na “Makambo mosusu” na jw.org mpe na JW Library®.

c NDIMBOLA YA MALOBA: “Maloba ya kofinga” esangisi kobamba moto bankombo mpo na kokitisa ye mpe kotyola ye ntango nyonso. Maloba nyonso ya mabe, oyo ezangi limemya, to oyo epesi mwasi mpasi ezali maloba ya kofinga.

d Talá na jw.org mpe na JW Library lisolo “Pornografi ekoki kobebisa libala na yo.”

e Mwasi oyo mobali na ye atalaka pornografi akoki kotánga lisolo “Okosala nini soki molongani na yo atalaka pornografi?” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 08/2023.

f Biblia elobeli na bosikisiki te makambo ya kosangisa nzoto oyo mwasi ná mobali oyo babalani basengeli komona ete ezali pɛto to mbindo. Bakristo oyo babalani basengeli kozwa bango moko bikateli oyo ekomonisa ete balingi mpenza kokumisa Yehova, kosepelisana, mpe kobatela lisosoli ya pɛto. Mbala mingi, babalani bakolobela te elongo na basusu makambo na bango ya kosangisa nzoto.

g NDIMBOLA YA ELILINGI: Baninga ya mosala oyo bazali Batatoli te bazali kobenga ndeko mobali moko atala zulunalo moko ya pornografi.