Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOYEKOLI 3

LOYEMBO 35 ‘Tóluka koyeba makambo oyo eleki ntina’

Ndenge ya kozwa bikateli oyo ekosepelisa Yehova

Ndenge ya kozwa bikateli oyo ekosepelisa Yehova

“Kobanga Yehova ezali ebandeli ya bwanya, mpe koyeba Oyo Aleki Mosantu, yango nde mayele.”MAS. 9:10.

NA MOKUSE

Ndenge ya kosalela boyebi, mayele, mpe bososoli mpo na kozwa bikateli ya bwanya.

1. Tolingaka nini mpo na bikateli oyo tozwi?

 TOZWAKA bikateli mikolo nyonso. Mosusu ezalaka mpenza mpasi te mpo na kozwa, na ndakisa tokolya nini na ntɔngɔ to ngonga nini tokokende kolala. Kasi na makambo mosusu ezalaka mpasi kozwa bikateli. Bikateli na makambo yango ekoki kosimba kolɔngɔnɔ ya nzoto na biso, esengo na biso, bato oyo tolingaka, to mpe losambo na biso. Tolingaka ete bikateli na biso ememela biso ná bato ya libota na biso matomba. Koleka nyonso, tozalaka na elikya ete bikateli oyo tozwi ekosepelisa Yehova.—Rom. 12:​1, 2.

2. Makambo nini ekosalisa yo ozwa bikateli ya bwanya?

2 Okoki kozwa bikateli ya bwanya soki (1) oluki koyeba bosolo ya likambo, (2) otaleli makanisi ya Yehova mpo na likambo yango, mpe (3) okanisi liboso ya kopona likambo moko. Lisolo oyo elobeli makambo yango misato, mpe ekosalisa biso tómona ndenge oyo tokoki kokolisa makoki na biso ya kososola.—Mas. 2:11.

LUKÁ KOYEBA BOSOLO YA LIKAMBO

3. Pesá ndakisa oyo emonisi ntina oyo osengeli koyeba bosolo ya likambo liboso ya kozwa ekateli.

3 Likambo ya liboso oyo ekosalisa yo ozwa ekateli ya malamu ezali ya koluka koyeba bosolo ya likambo. Mpo na nini ezali na ntina? Tózwa ndakisa: kanisá ete moto oyo azali kobɛla makasi akei epai ya monganga. Soki monganga atali nzoto ya moto yango te mpe atuni ye mituna te, akozwa ekateli ya malamu mpo na lisalisi oyo asengeli kopesa ye? Akozwa ekateli ya malamu te. Yo mpe okozwa bikateli ya malamu soki oluki liboso koyeba bosolo ya likambo oyo ozali na yango. Ndenge nini okoki kosala yango?

4. Na kotalela Masese 18:​13, nini ekoki kosalisa yo oyeba bosolo ya likambo ntango babengisi yo na mwa fɛti moko? (Talá mpe elilingi.)

4 Mpo oyeba bosolo ya likambo, ezalaka mbala mingi malamu kotuna mituna. Na ndakisa, kanisá ete babengisi yo na mwa fɛti moko. Osengeli kokende? Soki oyebi te moto oyo abongisi fɛti yango to ndenge makambo ekoleka kuna, osengeli kotuna ye mituna lokola: “Epai wapi mpe ntango nini mwa fɛti yango ekozala? Ekozala na bato boni? Nani akotambwisa makambo mpo nyonso eleka malamu? Banani bakozala wana? Masano nini ekozala na mwa fɛti yango? Bakopesa bato masanga?” Biyano na mituna yango ekosalisa yo ozwa ekateli ya bwanya.—Tángá Masese 18:13.

Tuná mituna mpo oyeba bosolo ya likambo (Talá paragrafe 4) a


5. Soki oyebi bosolo ya likambo, osengeli sikoyo kosala nini?

5 Na nsima, soki oyebi bosolo ya likambo, talelá sikoyo malamu likambo na mobimba na yango. Na ndakisa, soki oyebi ete bato mosusu oyo batosaka mitinda ya Biblia te bakozala na fɛti yango to ete bakopesa bato masanga bámɛla ndenge balingi, okosala nini? Okoki komona na makanisi ndenge fɛti yango ekoki kobaluka fɛti ya lokoso? (1 Pe. 4:3) Longola yango, okosala nini soki ngonga ya fɛti yango eyokani te na ngonga ya makita ya lisangá to ngonga na yo ya mosala ya kosakola? Ntango otaleli likambo na mobimba na yango, ekosalisa yo ozwa ekateli ya malamu. Kasi, ezali na likambo mosusu oyo osengeli kosala. Otaleli likambo yango mpe yo moko oyebi oyo okosala; bongo makanisi ya Yehova ezali nini mpo na likambo yango?—Mas. 2:6.

TALELÁ MAKANISI YA YEHOVA

6. Na kotalela Yakobo 1:​5, tosengeli kosɛnga Yehova nini?

6 Sɛngá Yehova asalisa yo oyeba makanisi na ye mpo na likambo oyo ozali na yango. Yehova alaki kopesa biso bwanya mpo tósosola nzela oyo ekosepelisa ye. Apesaka bwanya yango na “bato nyonso na motema mobimba, mpe apamelaka te.”—Tángá Yakobo 1:5.

7. Ndenge nini okoki koyeba makanisi ya Yehova? Pesá ndakisa.

7 Nsima ya kobondela Yehova mpo na kosɛnga ye alakisa yo nzela, tyá likebi mingi mpo omona eyano na ye. Na ndakisa: Kanisá ete obungi nzela na esika moko mpe otuni moto oyo afandaka na esika yango nzela oyo okoki kolanda. Na nsima okokende mbala moko liboso kutu oyoka eyano oyo akopesa? Okosala bongo te. Okoyoka na likebi makambo oyo akoyebisa yo. Ndenge moko mpe, nsima ya kosɛnga Yehova apesa yo bwanya, meká kososola eyano na ye, elingi koloba oluka mibeko mpe mitinda nini ya Biblia eyokani na likambo oyo ozali na yango. Na ndakisa, mpo na kozwa ekateli soki okokende mwa fɛti oyo tolobelaki liboso, okoki kotalela makambo oyo Biblia elobi mpo na bafɛti ya lokoso, baninga mabe, mpe ntina ya kotya matomba ya Bokonzi liboso ya makambo oyo tolingaka.—Mat. 6:33; Rom. 13:13; 1 Ko. 15:33.

8. Okoki kosala nini soki ozali na mposa ya lisalisi mpo na kozwa makambo oyo ozali koluka? (Talá mpe elilingi.)

8 Ata soki osali bongo, okoki kaka kozala na mposa ete moto asalisa yo mpo ozwa makambo oyo ozali koluka. Okoki kosɛnga lisalisi epai ya ndeko mobali to ndeko mwasi oyo akɔmɛli na elimo. Kasi, ekozala mpe malamu soki osali bolukiluki yo moko. Okoki komona makambo ebele na babuku na biso ya kosala bolukiluki, na ndakisa Buku ya bolukiluki mpo na Batatoli ya Yehova mpe Batoli ya Biblia mpo na bomoi ya bakristo. Kobosana te ete mokano na yo ezali ya kozwa ekateli oyo ekosepelisa Yehova.

Talelá makanisi ya Yehova (Talá paragrafe 8) b


9. Ndenge nini tokoki koyeba soki ekateli na biso ekosepelisa Yehova? (Baefese 5:17)

9 Ndenge nini tokoki koyeba soki ekateli na biso ekosepelisa Yehova? Libosoliboso tosengeli koyekola koyeba ye malamu. Biblia elobi: “Koyeba Oyo Aleki Mosantu, yango nde mayele.” (Mas. 9:10) Ya solo, tokozwa mayele ya solosolo soki toyebi bizaleli ya Yehova, mokano na ye, mpe makambo oyo alingaka to ayinaka. Omituna boye: ‘Na kotalela makambo oyo nayebi mpo na Yehova, ekateli nini nakoki kozwa mpo na kosepelisa ye?’—Tángá Baefese 5:17.

10. Mpo na nini mitinda ya Biblia ezali na ntina koleka mimeseno ya libota to ya mboka?

10 Mpo na kosepelisa Yehova, na bantango mosusu tosengeli kosala likambo oyo ekopesa bato oyo tolingaka mawa. Na ndakisa, baboti mosusu oyo bamoni ete bazali koluka bolamu ya mwana na bango ya mwasi bakoki kotya ye mbamba ete abala mobali moko oyo azali na mbongo mingi—to oyo akopesa bango mbongo ebele ya libala—atako moto yango azali mpenza makasi te na elimo. Ya solo, balingi ete mwana na bango ya mwasi azala malamu na mosuni, kasi nani akosalisa ye azala moto ya elimo, akóma na boyokani makasi na Yehova? Makanisi ya Yehova na likambo yango ezali nini? Eyano ezali na Matai 6:33. Vɛrsɛ yango elendisi bakristo bákoba “koluka liboso Bokonzi.” Ya solo tolingaka kokumisa baboti na biso mpe komemya bato oyo tofandi na bango, kasi likambo oyo eleki ntina mpo na biso ezali ya kosepelisa Yehova.

KANISÁ LIBOSO YA KOPONA LIKAMBO MOKO

11. Likoki nini oyo Bafilipi 1:​9, 10 elobeli ekosalisa yo okanisa likambo mokomoko oyo okopona?

11 Nsima ya koyeba mitinda ya Biblia oyo eyokani na likambo na yo, kanisá malamu likambo oyo okopona. (Tángá Bafilipi 1:​9, 10.) Bososoli ezali likoki oyo ekosalisa yo omona na makanisi esika oyo likambo mokomoko oyo okopona ekoki komema yo. Na makambo mosusu ezalaka mpasi te kozwa ekateli. Kasi ezalaka bongo te mpo na makambo nyonso. Bososoli ekosalisa yo ozwa bikateli ya bwanya ata na makambo oyo ezali mindɔndɔ to mpasi.

12-13. Ndenge nini bososoli ekoki kosalisa yo ozwa ekateli ya bwanya na oyo etali mosala ya mosuni?

12 Kanisá likambo oyo. Ozali koluka mosala mpo na kokokisa bamposa ya libota na yo. Balakisi yo misala mibale. Oyebi bosolo ya makambo nyonso, otaleli oyo misala yango ezali kosɛnga, ngonga ya kosala yango, ntango oyo okolekisa na nzela mpe makambo mosusu. Omoni ete misala yango nyonso mibale eyokani na mitinda ya Biblia. Mbala mosusu osepeli na moko ya misala yango mpo olingaka yango to mpo ekofuta yo mbongo mingi koleka. Kasi, liboso ya kozwa ekateli, ezali na makambo mosusu oyo osengeli kotalela.

13 Na ndakisa, ngonga ya moko ya misala yango ekotya nkaka na programɛ ya makita ya lisangá? Moko ya misala yango ekolya yo ntango ya kolekisa elongo na bato ya libota na yo mpo na kolendisa bango mpe kokokisa bamposa na bango ya elimo? Komituna mituna ya ndenge wana ekosalisa yo otya “makambo oyo eleki ntina,” elingi koloba losambo na yo mpe bamposa ya libota na yo esika ya liboso ya mbongo oyo okozwa. Soki osali bongo, okoki kozwa ekateli oyo Yehova akopambola.

14. Ndenge nini kosalela bososoli mpe komonisa bolingo ekosalisa biso tóboya kobɛtisa basusu libaku?

14 Bososoli ekotinda biso mpe tókanisa ndenge oyo bato mosusu bakotalela ekateli oyo tokozwa, mpo ‘tóbɛtisa bamosusu libaku te.’ (Flp. 1:10) Yango ezali na ntina ntango tozali kozwa bikateli na oyo etali molato mpe kosala monzɛlɛ. Na ndakisa, mbala mosusu tolingaka modɛlɛ moko ya bilamba to ya kobongisa nsuki. Kasi tokosala nini soki bato mosusu na kati ya lisangá to na libándá bamonaka yango mabe? Bososoli ekosalisa biso tómonisa limemya mpo na mayoki ya basusu. Bolingo ekotinda biso tóluka litomba ya “moto mosusu” mpe tózala na bopɔlɔ. (1 Ko. 10:​23, 24, 32; 1 Tim. 2:​9, 10) Soki tosali bongo, tokozwa ekateli oyo ekomonisa ete tolingaka mpe tomemyaka basusu.

15. Osengeli kosala nini liboso ozwa ekateli ya monene?

15 Soki olingi kozwa ekateli moko ya monene, kanisá oyo ekosɛnga mpo na kokokisa yango. Yesu ateyaki biso ete esengeli koyeba liboso oyo likambo oyo tolingi kosala ekosɛnga. (Luka 14:28) Na yango, kanisá ntango boni, mosolo boni, mpe milende nini ekosɛnga mpo ekateli oyo ozwi elonga. Na makambo mosusu, okoki kosolola na bato ya libota na yo mpo na kotala oyo moto na moto asengeli kosala mpo na kopesa mabɔkɔ na ekateli yango. Mpo na nini komibongisa bongo ezali na ntina mingi? Yango ekoki kosalisa yo omona soki esengeli kobongola makambo mosusu to kopona likambo mosusu oyo ekozala malamu koleka. Mpe ntango okɔtisi moto mokomoko ya libota na likambo yango mpe oyoki makanisi oyo bapesi, bakozala na esengo ya kopesa yo mabɔkɔ mpo ekateli yango elonga.—Mas. 15:22.

NDENGE YA KOZWA EKATELI OYO EKOLONGA

16. Makambo nini ekosalisa yo ozwa ekateli oyo ekolonga? (Talá etanda “ Ndenge ya kozwa bikateli ya bwanya.”)

16 Soki osaleli makanisi oyo tolobeli na lisolo oyo, okoki kozwa ekateli ya malamu. Tomoni ete osengeli koluka koyeba bosolo ya makambo mpe kotalela mitinda ya Biblia oyo ekosalisa yo ozwa ekateli oyo ekosepelisa Yehova. Na nsima, osengeli kosɛnga Yehova asalisa yo ozwa ekateli oyo ekolonga.

17. Likambo nini ya ntina ekosalisa yo ozwa bikateli ya malamu?

17 Ata soki osilá kozwa bikateli ebele oyo elongaki na kala, kobosana te ete mpo na kozwa bikateli ya malamu, osengeli te kotya motema na mayele na yo moko to na makambo oyo oyebi, kasi nde na bwanya oyo eutaka epai ya Yehova. Kaka ye nde akoki kopesa yo boyebi, mayele, mpe bososoli ya solosolo, makoki oyo ekosalisa yo okóma na bwanya. (Mas. 2:​1-5) Ɛɛ, Yehova akoki kosalisa yo ozwa bikateli oyo ekosepelisa ye.—Nz. 23:​2, 3.

LOYEMBO 28 Tózala baninga ya Yehova

a NDIMBOLA YA BILILINGI: Bandeko mibali ya bilenge mpe ya basi bazali kolobela libyangi oyo batindeli bango na batelefone na bango.

b NDIMBOLA YA ELILINGI: Moko ya bandeko mibali yango azali kosala bolukiluki mpo ayeba soki akokende na fɛti yango.