Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOYEKOLI 1

LOYEMBO 2 Yehova nde nkombo na yo

Tópesa Yehova nkembo

Tópesa Yehova nkembo

MOKAPO YA MOBU 2025: “Bópesa Yehova nkembo oyo ebongi na nkombo na ye.”NZ. 96:8.

NA MOKUSE

Tokomona ndenge oyo tokoki kopesa Yehova nkembo oyo abongi na yango.

1. Bato mingi balukaka nini lelo oyo?

 OZALI mpe komona ndenge bato mingi lelo bazali komilinga koleka ndelo? Na ndakisa, bato mosusu bazali kolekisa ntango mingi na basite Internet ya kosolola na bato mpo na kobenda likebi ya basusu epai na bango mpe na makambo ya malamu oyo basali. Kasi, bato mingi te nde bazali kopesa Yehova Nzambe nkembo lelo oyo. Na lisolo oyo, tokolobela soki kopesa Yehova nkembo elimboli nini mpe nini esengeli kotinda biso tósala yango. Tokoyekola mpe ndenge oyo tokoki kopesa Nzambe nkembo oyo abongi na yango mpenza mpe ndenge oyo ye moko akopesa nkombo na ye nkembo na mikolo ezali koya.

KOPESA YEHOVA NKEMBO ELIMBOLI NINI?

2. Ndenge nini Yehova amonisaki nkembo na ye na Ngomba Sinai? (Talá mpe ezipeli.)

2 Nkembo ezali nini? Na Biblia, liloba “nkembo” ekoki komonisa eloko nyonso oyo esalaka ete moto abenda mpenza likebi. Yehova amonisaki nkembo na ye na ndenge ya kokamwa mwa moke nsima ya kosikola ekólo Yisraele na boombo na Ezipito. Talá ndenge elekaki: Bamilio ya Bayisraele bayanganaki na nse ya Ngomba Sinai mpo na kokutana na Nzambe na bango. Lipata moko monene ya moindo makasi ezipaki ngomba yango. Mpe na mbala moko koningana makasi ya mabele—ekoki kozala mpe na makambo oyo volcan esalaka—esalemaki na esika batɛlɛmaki, na nse ya makolo na bango, wana mokalikali, bankake, mpe makɛlɛlɛ makasi ya kelelo ezalaki koyokana na likoló. (Kob. 19:​16-18; 24:17; Nz. 68:8) Kanisá ndenge Bayisraele bakamwaki ntango Yehova asalaki makambo wana ya nguya mpo na komonisa nkembo na ye!

Na Ngomba Sinai, Yehova amonisaki nkembo na ye na nguya nyonso epai ya Bayisraele (Talá paragrafe 2)


3. Kopesa Yehova nkembo elimboli nini?

3 Bongo biso bato? Tokoki mpenza kopesa Yehova nkembo? Ɛɛ, tokoki kosala yango. Lolenge moko ya kopesa Yehova nkembo ezali ya koyebisa basusu ete azali na nguya ya kokamwa mpe bizaleli malamu mpenza. Topesaka mpe Nzambe nkembo ntango topesi lokumu nyonso epai na ye mpo na makambo ya malamu oyo tosali na makasi oyo apesi biso. (Yis. 26:12) Mokonzi Davidi azali ndakisa ya malamu ya moto oyo apesaki Yehova nkembo. Na libondeli moko oyo asalaki liboso ya lisangá ya Yisraele, Davidi alobaki na Nzambe boye: “Ee Yehova, bonene, nguya, kitoko, nkembo ná lokumu ezali ya yo, mpo eloko nyonso na likoló mpe na mabele ezali ya yo.” Na nsima, ntango Davidi asilisaki libondeli na ye, “lisangá mobimba basanzolaki Yehova.”—1 Nt. 29:​11, 20.

4. Ndenge nini Yesu apesaki Yehova nkembo?

4 Ntango Yesu azalaki awa na mabele, apesaki Tata na ye nkembo na ndenge azalaki koloba polele ete Yehova nde apesaki ye nguya ya kosala makamwisi. (Mrk. 5:​18-20) Yesu azalaki mpe kopesa Yehova nkembo na ndenge oyo azalaki koloba malamu mpo na ye mpe ndenge oyo asalelaka bato makambo. Na libaku moko, Yesu azalaki koteya na sinagoga moko. Na kati ya bato oyo bazalaki koyoka ye, ezalaki na mwasi moko oyo azalaki na demo moko esalaki mbula 18. Demo yango asalaki ete nzoto na ye egumbama mpenza mpe azalaki kokoka kotɛlɛma semba ata moke te. Mwasi yango azalaki mpenza na mpasi! Yesu ayokaki mawa, apusanaki epai ya mwasi yango mpe alobaki na ye na boboto mpenza ete: “Mwasi, obikisami na bolɛmbu na yo.” Na nsima atyaki mabɔkɔ na ye likoló ya mwasi yango, mpe na mbala moko mwasi yango atɛlɛmaki semba mpe “abandaki kopesa Nzambe nkembo.” Kolɔngɔnɔ ya nzoto na ye mpe lokumu na ye ezongaki! (Luka 13:​10-13) Mwasi yango azalaki na ntina ya malamu ya kopesa Yehova nkembo; ezali mpe bongo mpo na biso.

MPO NA NINI TOPESAKA YEHOVA NKEMBO?

5. Bantina nini tozali na yango ya komemya Yehova?

5 Topesaka Yehova nkembo mpo tozalaka na limemya makasi epai na ye. Tozali na bantina mingi ya komemya Yehova. Azali Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso; nguya na ye ezali na nsuka te. (Nz. 96:​4-7) Bwanya na ye monene emonanaka polele na biloko oyo akelá. Ye nde Mopesi mpe Mobateli ya bomoi na biso. (Em. 4:11) Azali sembo. (Em. 15:4) Makambo nyonso oyo asalaka elongaka, mpe akokisaka ntango nyonso bilaka na ye. (Yos. 23:14) Yango wana mosakoli Yirimia alobaki mpo na Yehova ete: “Bato nyonso ya bwanya na bikólo mpe na makonzi na bango nyonso, moto moko te akokani na yo”! (Yir. 10:​6, 7) Ya solo, tozali mpenza na bantina ebele ya komemya Tata na biso ya likoló. Kasi Yehova abongi kaka te na limemya na biso, abongi mpe tólinga ye.

6. Mpo na nini tolingaka Yehova?

6 Topesaka Yehova nkembo mpo tolingaka ye mingi. Yehova azali na bizaleli ebele oyo etindaka biso tólinga ye. Azali na motema mawa mpe ayokelaka bato mawa. (Nz. 103:13; Yis. 49:15) Amityaka na esika na biso; ntango tozali koyoka mpasi, ye mpe ayokaka mpasi. (Zek. 2:8) Asalisaka biso tóyeba ye mpe tókóma baninga na ye. (Nz. 25:14; Mis. 17:27) Mpe azali na komikitisa; “akitaka mpo na kotala likoló mpe mabele, atombolaka moto mpamba longwa na putulu.” (Nz. 113:​6, 7) Na kotalela bizaleli wana nyonso, tolingaka kopesa Nzambe na biso monene nkembo!—Nz. 86:12.

7. Libaku monene nini tozali na yango?

7 Topesaka Yehova nkembo mpo tolingi ete basusu báyeba ye. Bato mingi bayebi solo na oyo etali Yehova te. Mpo na nini? Mpo Satana azipi makanisi na bango na ndenge apanzi mpenza mateya ya lokuta mpo na Nzambe. (2 Ko. 4:4) Satana andimisi bato ete Yehova azali Nzambe ya nkandankanda, akipaka bato te, mpe ye nde abimisaka bampasi ebele na mokili. Kasi biso toyebi solo na oyo etali Nzambe na biso! Tozali na libaku ya kosembola makambo mpe na ndenge yango kosalisa bato bápesa ye nkembo. (Yis. 43:10) Nzembo 96 elobeli mingi likambo oyo etali kopesa Yehova nkembo. Wana tozali kotalela bavɛrsɛ mosusu ya nzembo yango oyo ekomamaki na litambwisi ya elimo santu, kanisá balolenge oyo okoki kopesa Yehova nkembo oyo abongi na yango mpenza.

NDENGE NINI TOKOKI KOPESA YEHOVA NKEMBO OYO ABONGI NA YANGO?

8. Wapi lolenge moko oyo tokoki kopesa Yehova nkembo? (Nzembo 96:​1-3)

8 Tángá Nzembo 96:​1-3. Tokoki kopesa Yehova nkembo na makambo oyo tolobaka mpo na ye. Bavɛrsɛ yango esɛngi basaleli ya Yehova ‘báyembela Yehova,’ ‘básanzola nkombo na ye,’ ‘básakola nsango malamu ya lobiko na ye’ mpe ‘básakola nkembo na ye na kati ya bikólo.’ Nyonso wana ezali balolenge oyo tokoki kopesa Tata na biso ya likoló nkembo. Basaleli ya Yehova na ntango ya kala, ezala Bayuda ya sembo to bakristo ya siɛklɛ ya liboso, bakakatanaki te koyebisa basusu makambo nyonso ya malamu oyo Yehova asalaki mpo na bango mpe koloba malamu mpo na ye. (Dan. 3:​16-18; Mis 4:29) Ndenge nini biso mpe tokoki kosala bongo?

9-10. Liteya nini ozwi na lisolo ya Angelena? (Talá mpe elilingi.)

9 Tótalela ndakisa ya Angelena, a ndeko mwasi moko oyo afandaka na États-Unis. Na mpiko nyonso alobelaki Yehova na esika oyo azalaki kosala. Lokola akɔtaki na kompanyi yango sika, babengisaki ye na likita moko epai basɛngaki bato ya sika na kompanyi báyebisa baninga ya mosala mwa makambo oyo etali bango. Angelena abongisaki mwa bafoto oyo ekomonisa esengo oyo azalaka na yango ndenge azali Motatoli ya Yehova. Nzokande, liboso kaka ekóma ntango ya Angelena ya koloba, moninga ya mosala oyo alobaki liboso na ye amonisaki ete abɔkwamá na libota ya Batatoli ya Yehova. Mobali yango abandaki kotyola bindimeli na biso. Angelena alobi: “Motema ebandaki kobɛta mbangumbangu. Kasi namilobelaki: ‘Nakotika mpenza moto aloba lokuta mpo na Yehova? To nakokɔtela Ye?’”

10 Ntango moninga yango asilisaki, Angelena asalaki libondeli ya mokuse na motema. Na nsima alobaki na moto yango na boboto nyonso ete: “Bomwana na ngai ekokani na oyo ya yo. Ngai mpe nabɔkwamá na libota ya Batatoli ya Yehova, mpe nazali kaka Motatoli tii lelo oyo.” Atako azalaki komitungisa, Angelena abatelaki kimya mpe alakisaki bililingi ya kitoko ya mabaku oyo alekisaki na makambo ya elimo mpe na ndenge yango akɔtelaki bindimeli na ye na mayele. (1 Pe. 3:15) Yango ebimisaki nini? Ntango Angelena asilisaki koloba, mobali yango akómaki kimya. Kutu alobelaki mwa makambo ya kitoko oyo amonaki ntango azalaki kokola elongo na Batatoli ya Yehova. Angelena alobi: “Yehova azali moto oyo abongi tókɔtela ye. Ezali lokumu kolobela nkombo na ye.” Biso mpe tozali na lokumu ya kosanzola Yehova mpe kopesa ye nkembo ata ntango oyo basusu bazali kotyola ye.

Tokoki kopesa Yehova nkembo na maloba na biso (Talá paragrafe 9-10) b


11. Ndenge nini banda kala basambeli ya solo basalelaka etinda oyo ezali na Nzembo 96:8?

11 Tángá Nzembo 96:8. Tokoki kopesa Yehova nkembo na biloko na biso ya motuya. Banda kala, basambeli ya solo ya Yehova bakumisaka ye na ndenge wana. (Mas. 3:9) Na ndakisa, Bayisraele bapesaki makabo mpo na kotonga mpe kobongisa tempelo. (2 Bak. 12:​4, 5; 1 Nt. 29:​3-9) Bayekoli mosusu ya Kristo bazalaki kosalela “biloko na bango” mpo na kosalisa ye ná bantoma na ye. (Luka 8:​1-3) Bakristo ya siɛklɛ ya liboso mpe bapesaki makabo mpo na kosunga bandeko na bango ya elimo oyo bazalaki kokelela. (Mis. 11:​27-29) Lelo oyo, biso mpe tokoki kopesa Yehova nkembo na nzela ya makabo na biso ya bolingo.

12. Ndenge nini makabo na biso ekoki kopesa Yehova nkembo? (Talá mpe elilingi.)

12 Tótalela kaka ndakisa moko oyo emonisi ndenge makabo na biso epesaka Yehova nkembo. Lapolo moko ya 2020 emonisaki mikakatano oyo ebimaki na ntango molai oyo mbula ezalaki konɔka te na Zimbabwe. Bamilio ya bato bakokaki kokufa mpo na nzala, ata mpe ndeko na biso moko ya mwasi na nkombo Prisca. Atako mbula ezalaki konɔka te, Prisca abatelaki programɛ ya kosakola mokolo nyonso ya misato mpe ya mitano, atako ezalaki ntango ya kobalola mabele. Bato ya kartye bazalaki kotyola ye mpo azalaki kokende kosakola na esika asala bilanga, bazalaki koloba na ye, “Okokufa nzala.” Prisca azalaki koyanola bango na motema ya kokita, “Yehova asundolaka basaleli na ye te.” Mwa moke na nsima, azwaki biloko ya lisungi oyo ebongiseli ya Yehova epesaki. Biloko yango ezwamaki na nzela ya makabo oyo mokomoko na biso apesaka. Bato ya kartye bakamwaki, mpe balobaki na Prisca ete: “Nzambe asundoli yo te, yango wana tolingi koyekola koyeba ye.” Bato nsambo ya kartye na bango bakómaki koyangana na makita.

Tokoki kopesa Yehova nkembo na nzela ya biloko na biso ya motuya (Talá paragrafe 12) c


13. Ndenge nini bizaleli na biso ekoki kopesa Yehova nkembo? (Nzembo 96:9)

13 Tángá Nzembo 96:9. Tokoki kopesa Yehova nkembo na bizaleli na biso. Banganga-nzambe oyo bazalaki kosala na tempelo basengelaki kozala pɛto na nzoto. (Kob. 40:​30-32) Ya solo, kozala pɛto na nzoto ezali na ntina, kasi kozala pɛto na bizaleli eleki ntina. (Nz. 24:​3, 4; 1 Pe. 1:​15, 16) Tosengeli kosala makasi ya kolongola “bomoto ya kala,” elingi koloba makanisi mpe bizaleli ya mbindo, mpe kolata “bomoto ya sika,” elingi koloba koyekola kokanisa mpe kosala makambo oyo eyokani na bizaleli kitoko ya Yehova. (Kol. 3:​9, 10) Na lisalisi ya Yehova, ata bato oyo bamipesaki mobimba na makambo ya mbindo mpe bato ya mobulu bakoki kobongwana mpe kolata bomoto ya sika.

14. Liteya nini ozwi na ndakisa ya Jack? (Talá mpe elilingi.)

14 Tótalela ndakisa ya Jack, moto ya mobulu mpe ya nkanza mpenza oyo bapesaki ye nkombo Demo. Lokola Jack asalaki makambo ya mabe mingi, bakatelaki ye etumbu ya liwa. Kasi, wana azalaki kozela báboma ye, Jack andimaki koyekola Biblia elongo na ndeko mobali moko oyo akendaki kotala bolɔkɔ oyo batyaki ye. Atako Jack asalaki makambo ya mabe, alongolaki bomoto ya kala mpe na nsima akokisaki masɛngami mpo na kozwa batisimo. Jack abongwanaki mingi na boye ete mokolo oyo balingaki koboma ye, bakɛngɛli mosusu ya bolɔkɔ balelaki wana bazalaki kopesa ye mbote ya nsuka. Soda moko oyo azalaki kosala na bolɔkɔ yango alobaki boye: “Jack azalaki liboso moto oyo aleki mabe na esika oyo. Sikoyo akómi moko ya bato oyo baleki malamu.” Pɔsɔ oyo elandaki kobomama ya Jack, bandeko oyo bazongaki mpo na kosala likita ya kati ya pɔsɔ na bolɔkɔ yango bakutanaki na mokangami oyo ayaki makita mpo na mbala ya liboso. Nini etindaki ye aya na makita? Akamwaki ndenge oyo Jack abongolaki bizaleli na ye mpe alingaki koyeba oyo asengeli kosala mpo na kosambela Yehova. Ezali polele ete bizaleli na biso ekoki kopesa Tata na biso ya likoló nkembo!—1 Pe. 2:12.

Tokoki kopesa Yehova nkembo na nzela ya bizaleli na biso (Talá paragrafe 14) d


NDENGE NINI YEHOVA AKOPESA NKOMBO NA YE NKEMBO NA MIKOLO EZALI KOYA?

15. Ndenge nini Yehova akopesa nkombo na ye nkembo mpo na libela mosika te na mikolo ezali koya? (Nzembo 96:​10-13)

15 Tángá Nzembo 96:​10-13. Bavɛrsɛ oyo ya nsuka ya Nzembo 96 elobi ete Yehova azali Mosambisi mpe Mokonzi ya sembo. Ndenge nini Yehova akopesa nkombo na ye nkembo na mikolo ezali koya? Na nzela ya bikateli na ye ya lisambisi. Mosika te akobebisa Babilone Monene mpo na lokuta oyo elobaka na nkombo na ye mosantu. (Em. 17:​5, 16; 19:​1, 2) Bato mosusu oyo bamoni kobebisama ya Babilone Monene bakoki koya kosangana na biso na losambo ya solo. Na nsima, na Armagedone, Yehova akobebisa ebongiseli ya Satana mobimba, akoboma baoyo nyonso batɛmɛlaka ye mpe oyo batyolaka nkombo na ye, kasi akobikisa baoyo nyonso balingaka ye mpe batosaka ye, oyo bapesaka ye nkembo na esengo nyonso. (Mrk. 8:38; 2 Tes. 1:​6-10) Nsima ya komekama ya nsuka oyo ekosalema na nsuka ya Boyangeli ya Mbula Nkóto ya Kristo, Yehova akosila kosantisa mpo na libela nkombo na ye. (Em. 20:​7-10) Na ntango yango, “mabele ekotonda na boyebi ya nkembo ya Yehova kaka ndenge mai etondi na mbu.”—Hab. 2:14.

16. Ozali na ekateli ya kosala nini? (Talá mpe elilingi.)

16 Ekozala mpenza esengo ntango moto nyonso oyo azali na bomoi akobanda kopesa Yehova nkembo oyo ebongi na nkombo na ye! Kasi liboso ete mokolo yango ekoka, tokoki kosala nyonso mpo na kopesa Nzambe na biso nkembo na mabaku nyonso. Mpo na komonisa likambo yango ya ntina mingi, Lisangani ya Mikóló-Bakambi eponi Nzembo 96:8 lokola mokapo ya mobu 2025: Bópesa Yehova nkembo oyo ebongi na nkombo na ye.”

Nsukansuka, moto nyonso akopesa Yehova nkembo oyo ebongi na nkombo na ye! (Talá paragrafe 16)

LOYEMBO 12 Yehova, Nzambe monene

a Topesi bango bankombo mosusu.

b NDIMBOLA YA BILILINGI: Elilingi oyo ezali kolakisa ndenge lisolo ya Angelena elekaki.

c NDIMBOLA YA ELILINGI: Elilingi oyo ezali kolakisa ndenge lisolo ya Prisca elekaki.

d NDIMBOLA YA ELILINGI: Elilingi oyo ezali kolakisa ndenge lisolo ya Jack elekaki.