Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOYEKOLI 7

Tolingaka Tata na biso Yehova mingi

Tolingaka Tata na biso Yehova mingi

“Tozali kolinga, mpo ye alingaki biso liboso.”​—1 YOA. 4:19.

LOYEMBO 3 Nguya na ngai, elikya na ngai, makasi na ngai

NA MOKUSE *

1-2. Mpo na nini Yehova afungweli biso nzela ya kokɔta na libota na ye, mpe ndenge nini asali yango?

YEHOVA abengi biso tókɔta na libota ya bato oyo basambelaka ye. Ezali likambo ya malamu mpenza! Libota na biso esangisi bato oyo bamipesi na Nzambe mpe bamonisaka kondima na mbeka ya lisiko ya Mwana na ye. Tozali libota moko ya esengo. Bomoi na biso ezali na ntina banda sikoyo, mpe tosepelaka na elikya ya kozala na bomoi ya seko, ezala na likoló to mpe na Paradiso awa na mabele.

2 Lokola Yehova alingaki biso mpe afutaki eloko moko ya motuya monene, afungwelaki biso nzela ya kokɔta na libota na ye. (Yoa. 3:16) ‘Tosombamaki na ntalo moko boye.’ (1 Ko. 6:20) Na nzela ya lisiko, Yehova apesi biso likoki ya kozala na boyokani ya malamu na ye. Tozali na lokumu ya kobenga Moto oyo aleki Monene na molɔ́ngɔ́ mobimba ete Tata. Lisusu, ndenge tomonaki yango na lisolo oyo eleki, Yehova azali Tata oyo aleki malamu.

3. Soki tokanisi bolamu nyonso oyo Yehova asaleli biso, tokoki komituna nini? (Talá mpe etanda “ Yehova atyelaka ngai likebi?”)

3 Ndenge moko na mokomi moko ya Biblia, tokoki komituna ete: “Nakofuta Yehova eloko nini mpo na bolamu na ye nyonso oyo asalelá ngai?” (Nz. 116:12) Eyano ezali ete tozali na eloko te mpo na kofuta Tata na biso ya likoló. Kasi, bolingo na ye epai na biso etindaka biso mpe tólinga ye. Ntoma Yoane akomaki ete: “Nde biso, tozali kolinga, mpo ye alingaki biso liboso.” (1 Yoa. 4:19) Ndenge nini tokoki komonisa Tata na biso ya likoló ete tolingaka ye?

ZALÁ NTANGO NYONSO PENEPENE NA YEHOVA

Tokomonisa ete tolingaka mpenza Yehova, Tata na biso ya likoló soki tozali kobondela ye mingi, tozali kotosa ye, mpe tozali kosalisa basusu bálinga ye (Talá paragrafe 4-14)

4. Na kotalela Yakobo 4:8, mpo na nini tosengeli kosala makasi tópusana penepene na Yehova?

4 Yehova alingi tópusana penepene na ye mpe tósololaka na ye. (Tángá Yakobo 4:8.) Asɛngi biso ‘tótingama na mabondeli,’ mpe azalaka ntango nyonso pene ya koyoka biso. (Rom. 12:12) Azangaka ntango te ya koyoka biso, mpe alɛmbaka mabondeli na biso te. Biso toyokaka ye ntango totángaka Liloba na ye Biblia, mpe mikanda oyo esalisaka biso tókanga ntina ya Biblia. Toyokaka ye mpe ntango tozali kolanda makita na likebi. Kaka ndenge kosolola mingi na baboti esalisaka bana bámiyoka penepene na bango, kosolola mingi na Yehova esalisaka biso tózala ntango nyonso penepene na ye.

Talá paragrafe 5

5. Ndenge nini tokoki kobongisa lisusu mabondeli na biso?

5 Kanisá naino lolenge ya mabondeli oyo osalaka. Yehova alingi ete tóyebisaka ye makambo nyonso oyo ezali na motema na biso. (Nz. 62:8) Tosengeli komituna boye: ‘Mabondeli na ngai ezalaka mbala mingi ya likolólikoló, lokola nde nasali kopi ya mokanda oyo moto mosusu akomaki, to eutaka nde na motema, lokola mokanda oyo ngai moko nakomi?’ Na ntembe te, olingaka Yehova mingi, mpe olingi ete boyokani na yo ná ye ezala ntango nyonso makasi. Mpo ezala bongo, osengeli kosololaka na ye mingi. Kobombela ye sekele na yo te. Yebisáká ye bisengo mpe bampasi na yo. Tyá motema ete akoki kosalisa yo.

6. Tosengeli kosala nini mpo tózala ntango nyonso penepene na Tata na biso ya likoló?

6 Mpo tózala ntango nyonso pene ya Tata na biso ya likoló, tosengeli ntango nyonso kopesaka ye matɔndi. Tondimaka maloba ya mokomi ya nzembo oyo ete: “Osali makambo mingi, Ee Yehova Nzambe na ngai, ɛɛ misala na yo ya kokamwa mpe makanisi na yo epai na biso; moko te akokani na yo. Soki nalingi koyebisa to kolobela yango, ekómi ebele koleka oyo nakoki koyebisa.” (Nz. 40:5) Tosukaka kaka te na koyoka ete tozali na botɔndi; tosengeli komonisa botɔndi na biso epai ya Yehova na maloba mpe na misala. Yango nde ekesenisaka biso na bato mingi lelo oyo. Bato mingi na mokili oyo bazalaka na botɔndi te mpo na nyonso oyo Nzambe asalelaka bango. Kutu, moko ya makambo oyo emonisaka ete tozali na “mikolo ya nsuka” ezali kozanga botɔndi. (2 Tim. 3:1, 2) Tólinga soki moke te kokóma na ezaleli yango ya mabe!

7. Yehova alingi nini, mpe mpo na nini?

7 Baboti balingaka te ete bana na bango báwelanaka; balingaka nde bázala baninga. Ndenge moko mpe, Yehova alingi ete bana na ye nyonso báyokanaka malamu. Kutu, bolingo oyo tolinganaka nde emonisaka ete tozali bakristo ya solo. (Yoa. 13:35) Tondimaka maloba ya mokomi ya nzembo oyo alobaki ete: “Ezali mpenza malamu mpe ezali mpenza esengo ete bandeko báfanda na bomoko!” (Nz. 133:1) Ntango tozali kolinga bandeko na biso, tozali komonisa Yehova ete tolingaka ye. (1 Yoa. 4:20) Ezali mpenza esengo kozala na kati ya libota ya bandeko mibali mpe bandeko basi oyo bazalaka na ‘boboto kati na bango, mpe bayokelanaka mpenza mawa’!​—Ef. 4:32.

MOTO OYO ALINGAKA NZAMBE ATOSAKA MPE YE

Talá paragrafe 8

8. Na kotalela 1 Yoane 5:3, wapi ntina ya libosoliboso oyo totosaka Yehova?

8 Yehova asɛngi bana bátosaka baboti na bango, mpe asɛngi biso tótosaka ye. (Ef. 6:1) Ebongi tótosa ye mpo azali Mozalisi na biso, Mobateli ya bomoi na biso, mpe azali na bwanya koleka baboti nyonso. Kasi, ntina ya libosoliboso oyo totosaka Yehova ezali mpo tolingaka ye. (Tángá 1 Yoane 5:3.) Atako ezali na bantina ebele oyo tosengeli kotosa Yehova, atindaka biso te na makasi tósala yango. Yehova apesá biso bonsomi ya kopona, na yango asepelaka soki toponi kotosa ye mpo tolingi ye.

9-10. Mpo na nini ezali na ntina tóyeba mibeko ya Nzambe mpe tótosa yango?

9 Baboti balingaka ete bana na bango bázala na bomoi ya kimya. Yango wana batyelaka bana mibeko oyo ekobatela bango. Ntango bana bazali kotosa mibeko yango, bamonisaka ete batyelaka baboti na bango motema mpe bamemyaka bango. Na yango, ezali na ntina mingi koleka tóyeba mibeko ya Tata na biso ya likoló mpe tótosaka yango. Ntango tozali kosala bongo, tozali komonisa Yehova ete tolingaka ye mpe tomemyaka ye, mpe biso moko mpe tozwaka matomba. (Yis. 48:17, 18) Kasi, baoyo baboyaka Yehova mpe mibeko na ye basukaka mabe.​—Gal. 6:7, 8.

10 Soki tozali na bomoi oyo esepelisaka Yehova, tokobatela nzoto na biso, makanisi na biso, mpe boyokani na biso na Nzambe. Yehova ayebi nini eleki malamu mpo na biso. Ndeko mwasi moko na nkombo Aurora, oyo afandaka na États-Unis, alobi boye: “Nayebi ete kotosa Yehova esalisaka moto azala na bomoi oyo eleki malamu.” Ezali mpenza solo. Yo moko kanisá matomba oyo ozwi lokola otosaka mibeko ya Yehova!

11. Libondeli esalisaka biso tósala nini?

11 Libondeli esalisaka biso tótosa Yehova, ata ntango ezali mpasi kosala bongo. Na bantango mosusu, ekozala mpasi tótosa Yehova, kasi tosengeli ntango nyonso kobundisa mposa ya kosala masumu. Mokomi ya nzembo abondelaki Nzambe ete: “Sungá ngai na [to, pesá ngai] elimo oyo elingaka kotosa.” (Nz. 51:12) Denise, ndeko moko oyo azali mobongisi-nzela, alobi boye: “Soki namoni ete ezali mpasi kotosa mobeko moko ya Yehova, nabondelaka ye apesa ngai makasi ya kosala oyo ezali sembo.” Tokoki kotya motema ete Yehova akozanga te koyanola na libondeli ya ndenge wana.​—Luka 11:9-13.

SALISÁ BASUSU BÁLINGA TATA NA BISO

12. Na kotalela Baefese 5:1, tosengeli kosala nini?

12 Tángá Baefese 5:1. Lokola tozali “bana ya bolingo” epai ya Yehova, tosalaka nyonso oyo tokoki mpo na komekola ye. Tomekolaka bizaleli na ye soki tozali kolinga basusu, komonisela bango boboto, mpe kolimbisa bango. Ntango baoyo bayebi Nzambe te bazali komona bizaleli na biso ya malamu, yango ekoki kotinda bango báyekola makambo na ye. (1 Pe 2:12) Ezali malamu baboti bakristo bámekola Yehova na boyokani na bango na bana na bango. Soki basali bongo, bana na bango bakoki kolinga kozala na boyokani ya bango moko na Tata na bango ya likoló oyo atondi na bolingo.

Talá paragrafe 13

13. Makambo nini tosengeli kokanisaka ntango nyonso?

13 Mwana moke ayokaka esengo mpo na tata na ye mpe asepelaka kolobela makambo na ye. Ndenge moko mpe, toyokaka esengo mpo na Yehova, Tata na biso ya likoló, mpe tolingaka ete bato mosusu mpe báyeba ye. Na motema na biso, tomiyokaka lokola Mokonzi Davidi, oyo akomaki: “Molimo na ngai ekomikumisa na Yehova.” (Nz. 34:2) Kasi tokosala nini soki tozalaka nsɔninsɔni? Ndenge nini tokoki kokóma na mpiko? Tokokóma na mpiko soki tozali kokanisa esengo oyo Yehova akoyoka soki tolobeli makambo na ye mpe bolamu oyo bato bakozwa. Yehova akopesa biso mpiko oyo tosengeli na yango. Asalisaki bandeko na biso ya siɛklɛ ya liboso bákóma na mpiko, akosalisa mpe biso.​—1 Tes. 2:2.

14. Mpo na nini mosala ya kokómisa bato bayekoli ezali na ntina mingi?

14 Lokola Yehova aponaka bilongi te, asepelaka soki amoni ndenge tozali kolinga basusu, ata soki bautá wapi. (Mis. 10:34, 35) Lolenge moko ya malamu ya komonisa ete tolingaka bato ezali ya koyebisa bango nsango malamu. (Mat. 28:19, 20) Mosala yango ekoki kobota mbuma nini? Baoyo bayoki biso bakoki kokóma na bomoi ya malamu banda sikoyo mpe kozwa elikya ya kozala na bomoi ya seko na mikolo ezali koya.​—1 Tim. 4:16.

LINGÁ TATA NA BISO MPO OZALA NA ESENGO

15-16. Makambo nini etindaka biso tózala na esengo?

15 Yehova azali Tata ya bolingo, mpe alingi ete libota na ye ezala na esengo. (Yis. 65:14) Tozali na bantina ebele ya kozala na esengo banda sikoyo, atako mbala mosusu tozali kokutana na mikakatano. Na ndakisa, toyebi ete Tata na biso ya likoló alingaka biso mingi. Tozali na boyebi ya sikisiki ya Biblia, Liloba ya Nzambe. (Yir. 15:16) Mpe tozali na kati ya libota kaka moko ya bato oyo balingaka Yehova, balingaka mibeko na ye, mpe balinganaka.​—Nz. 106:4, 5.

16 Tokoki ntango nyonso kozala na esengo mpo tozali na elikya ete bomoi ekokóma lisusu malamu koleka na mikolo ezali koya. Toyebi ete mosika te Yehova akoboma bato nyonso ya mabe mpe ete na nse ya Bokonzi na ye, mabele ekozonga Paradiso. Tozali mpe na elikya kitoko ete bato oyo bakufá bakozonga na bomoi mpe bakozala lisusu elongo na bandeko mpe baninga na bango. (Yoa. 5:28, 29) Ekozala mpenza esengo monene! Mpe oyo eleki ntina, toyebi ete mosika te bato nyonso, na likoló mpe na mabele, bakopesa Tata na biso ya bolingo lokumu, nkembo, mpe losambo oyo abongi na yango.

LOYEMBO 12 Yehova, Nzambe monene

^ par. 5 Toyebi ete Yehova Tata na biso alingaka biso mingi mpe andimi tókɔta na libota ya basambeli na ye. Na yango, biso mpe tosengeli kolinga ye. Ndenge nini tokoki komonisa Tata na biso ete tolingaka ye? Lisolo oyo ekolobela mwa makambo ya sikisiki oyo tokoki kosala.