Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOYEKOLI 8

“Bóbatela makanisi na bino, bókebaka!”

“Bóbatela makanisi na bino, bókebaka!”

“Bóbatela makanisi na bino, bókebaka”​—1 PE. 5:8.

LOYEMBO 144 Tyá miso na yo na mbano!

NA MOKUSE a

1. Yesu ayebisaki bayekoli na ye nini na oyo etali nsuka ya mokili, mpe likebisi nini apesaki bango?

 MWA mikolo liboso Yesu akufa, bayekoli na ye minei batunaki ye: ‘elembo nini ekomonisa . . . bosukisi ya makambo ya ntango oyo?’ (Mat. 24:3) Mbala mosusu bayekoli yango bazalaki komituna ndenge nini bakoyeba ntango oyo Yerusaleme mpe tempelo na yango ekobebisama. Na eyano na ye, Yesu alobelaki kaka te makambo etali kobebisama ya Yerusaleme mpe Tempelo na yango, kasi mpe makambo oyo etali “bosukisi ya makambo ya ntango” oyo tozali kobika lelo oyo. Na oyo etali mikolo ya nsuka, Yesu alobaki: “Kasi mpo na mokolo yango to ngonga yango moto moko ayebi te, ezala baanzelu na likoló, ezala Mwana, kaka Tata.” Na nsima, akebisaki bayekoli na ye nyonso ‘bálala mpɔngi te’ mpe ‘básɛnzɛlaka.’​—Mrk. 13:32-37.

2. Mpo na nini ezalaki na ntina ete Bakristo ya siɛklɛ ya liboso básɛnzɛlaka?

2 Bakristo ya siɛklɛ ya liboso oyo bazalaki Bayuda basengelaki kosɛnzɛlaka mpo bábikisa bomoi na bango. Yesu ayebisaki bayekoli na ye makambo oyo basengelaki koluka koyeba mpo bákanga ntina ya ntango oyo ebongiseli ya Bayuda ekokóma na nsuka. Alobaki boye: “Ntango bokomona mampinga ezingi Yerusaleme na bakaa, bóyeba ete libebi na yango ekómi pene.” Na ntango yango, basengelaki kotosa likebisi ya Yesu mpe ‘kobanda kokima na bangomba.’ (Luka 21:20, 21) Baoyo batosaki likebisi wana babikaki ntango mampinga ya Baroma ebebisaki Yerusaleme.

3. Tokolobela nini na lisolo oyo?

3 Lelo tozali kobika na eleko oyo ebongiseli mabe ya makambo ya ntango oyo ekobebisama mosika te. Yango wana, biso mpe tosengeli kobatela makanisi na biso mpe kosɛnzɛlaka. Na lisolo oyo, tokolobela ndenge oyo tokoki kozala na bokatikati ntango tozali kotala makambo oyo ezali kosalema na mokili, ndenge oyo tokoki kozala ekɛngɛ, mpe ndenge oyo tokoki kosalela malamu koleka ntango oyo etikali.

ZALÁ NA BOKATIKATI NTANGO OZALI KOTALA MAKAMBO OYO EZALI KOSALEMA NA MOKILI

4. Mpo na nini tosengeli mpenza kotya likebi ntango tozali kotala makambo ya mokili, oyo ezali kokokisa bisakweli ya Biblia?

4 Ezali na bantina mingi oyo tosengeli mpenza kotya likebi na makambo ya mokili, oyo ezali kokokisa bisakweli ya Biblia. Na ndakisa, Yesu ayebisaki biso makambo oyo ekosalema mpo na kosalisa biso tóyeba ntango oyo ebongiseli mabe ya Satana ekokóma na nsuka. (Mat. 24:3-14) Ntoma Petro alendisi biso tótya likebi na kokokisama ya bisakweli mpo kondima na biso ekoba kozala makasi. (2 Pe. 1:19-21) Mokanda ya nsuka ya Biblia ebandi na maloba oyo: “Emoniseli ya Yesu Kristo, oyo Nzambe apesaki ye, mpo na kolakisa baombo na ye makambo oyo esengeli kosalema nsima ya mwa ntango moke.” (Em. 1:1) Yango wana, totyaka mpenza likebi na makambo oyo ezali kosalema na mokili lelo oyo mpe tolukaka koyeba ndenge makambo yango ezali kokokisa bisakweli ya Biblia. Mpe tosepelaka kolobela makambo yango.

Ntango tozali kolobela bisakweli ya Biblia tosengeli koboya likambo nini, kasi tosengeli nde kosala nini? (Talá paragrafe 5) b

5. Likambo nini tosengeli koboya, kasi tosengeli nde kosala nini? (Talá mpe bililingi)

5 Nzokande, ntango tozali kolobela bisakweli ya Biblia, tosengeli komindimisa ete makambo yango ekosalema mpenza. Mpo na nini? Mpo tokolinga te koloba likambo moko oyo ekoki kokotisa bokabwani na kati ya lisangá. Na ndakisa, tokoki koyoka ndenge bakonzi ya mokili oyo bazali kolobela ndenge oyo bakoki kosilisa matata moko, kolongola mobulu mpe kotya kimya. Na esika tóloba ete maloba ya ndenge wana ezali kokokisa esakweli oyo ezali na 1 Batesaloniki 5:3, tosengeli nde koluka koyeba makambo ya sika oyo ebimisami na mikanda mpo na likambo yango. Soki makambo oyo tozali koloba ezali kouta na makambo oyo ebongiseli na biso ezali kobimisa, tokosala ete lisangá ezala na bomoko mpe “na makanisi kaka moko.”​—1 Ko. 1:10; 4:6.

6. Liteya nini tokoki kozwa na mokanda ya 2 Petro 3:11-13?

6 Tángá 2 Petro 3:11-13. Ntoma Petro asalisi biso tózala na bokatikati ntango tozali kotalela bisakweli ya Biblia. Ayebisi biso ‘tóbatelaka na makanisi na biso kozala ya mokolo ya Yehova.’ Mpo na nini? Ezali te mpo tozali koluka koyeba “mokolo mpe ngonga” oyo Yehova akoyeisa etumba ya Armagedone, kasi nde mpo tolingi kosalela ntango yo etikali mpo na kozala na ‘etamboli ya bosantu mpe kosala misala oyo ezali komonisa ete tokangami na Nzambe.’ (Mat. 24:36; Luka 12:40) Na maloba mosusu, tosengeli ntango nyonso kozala na bizaleli ya malamu mpe komindimisa ete bolingo na biso mpo na Yehova nde etindaka biso tósala makambo nyonso oyo tosalaka na mosala na ye. Mpo tóbosana likambo yango te, tosengeli kozala ekɛngɛ.

KOZALA EKƐNGƐ ELIMBOLI NINI?

7. Na kotalela Luka 21:34 ndenge nini tomonisaka ete tozali kokeba?

7 Yesu ayebisaki bayekoli na ye ete basengelaki kotya likebi kaka te na makambo ya mokili kasi mpe kozala ekɛngɛ. Makanisi yango emonisami polele na maloba ya Yesu oyo ezali na Luka 21:34. (Tángá.) Yesu alobaki boye: “bókeba.” Moto oyo akebaka to oyo azalaka ekɛngɛ amonaka likama nyonso oyo ekoki kobebisa boyokani na ye elongo na Yehova, mpe asalaka nyonso mpo na kokima yango. Yango esalisaka ye atikala na kati ya bolingo ya Nzambe.​—Mas. 22:3; Yuda 20, 21.

8. Likebisi nini ntoma Paulo apesaki Bakristo?

8 Ntoma Paulo ayebisaki Bakristo bázala ekɛngɛ. Na ndakisa, ayebisaki Bakristo ya Efese ete: “bókeba mpenza ete ndenge na bino ya kotambola ezala te lokola bato bazangá bwanya kasi lokola bato ya bwanya.” (Ef. 5:15, 16) Satana azali kosala nyonso mpo na koluka kobebisa boninga na biso na Yehova, yango wana Biblia epesi biso toli oyo, ‘tókoba kososola soki mokano ya Yehova ezali nini’ mpo tókoka komibatela na makaneli nyonso ya Satana.​—Ef. 5:17.

9. Ndenge nini tososolaka mokano ya Yehova mpo na biso?

9 Biblia elobeli makambo nyonso te oyo ekoki kobebisa boyokani na biso na Yehova. Mbala mingi tosengeli kozwa bikateli na makambo oyo Makomami elobeli polele te. Mpo na kozwa bikateli ya bwanya, tosengeli kososola, to koluka koyeba, “mokano ya Yehova.” Tokosala bongo soki tozali koyekola Liloba ya Nzambe mbala na mbala mpe komanyola likoló na yango. Soki tozali koluka koyeba mokano ya Yehova mpe tozali kobatela “makanisi ya Kristo,” yango ekosalisa biso tótambola lokola “bato ya bwanya,” ata soki ezali na mibeko ya sikisiki te mpo na oyo tosengeli kosala to te. (1 Ko. 2:14-16) Na bantango mosusu ezalaka pɛtɛɛ komona makambo oyo tosengeli koboya, kasi na bantango mosusu mpe ezala pɛtɛɛ te.

10. Wapi makama mosusu oyo tosengeli koboya?

10 Ezali na makama mosusu oyo tosengeli koboya, na ndakisa: Kozala seresere na moto oyo azali molongani na biso te, komɛla masanga mingi, kolya na lokoso, koloba maloba mabe, ata mpe kotala bafilme ya mobulu, pornografi, mpe makambo mosusu oyo ekokani na yango. (Nz. 101:3) Monguna na biso, Zabolo, alukaka mbala na mbala mabaku mpo na kobebisa boninga na biso na Yehova. (1 Pe. 5:8) Soki tozali ekɛngɛ te, Satana akoki kolona na motema mpe na makanisi na biso ezaleli ya likunya, kozanga bosembo, lokoso, koyinana, lolendo, mpe ya kokangela basusu nkanda na motema. (Gal. 5:19-21) Na ebandeli, tokoki kokanisa ete makanisi ya ndenge wana ezali na yango mabe te. Kasi soki tozwi bibongiseli te mpo na kopikola yango mbala moko, ekokola mbangu lokola matiti mabe mpe ekobimisela biso makama.​—Yak. 1:14, 15.

11. Wapi likama moko oyo emonanaka polele te oyo tosengeli koboya, mpe mpo na nini?

11 Likama moko oyo emonanaka polele te ezali baninga mabe. Tótalela ndakisa oyo. Osalaka ná moto moko oyo azali Motatoli ya Yehova te. Olingi ete moninga na yo ya mosala azala na makanisi ya malamu mpo na Batatoli ya Yehova, yango wana ozali na boboto mpe ozali kosalisa ye. Na bantango mosusu mpe ondimaka kolya na moninga yango ya mosala. Mpe na nsima, okómi kolya ná ye mbala na mbala. Na bantango mosusu, moninga yango abɛtaka masolo ya mbindo, oyo na ebandeli ozalaki kosepela na yango te. Kasi na nsima, okómi komesana na masolo yango mpe ozali lisusu komona yango mabe te. Mpe mokolo mosusu, moninga yango ya mosala abengisi yo bózwa mwa kɔpɔ na nsima ya mosala, mpe ondimi. Nsukansuka, okómi kokanisa lokola moninga na yo ya mosala. Ekoumela te mpo okoma kosala makambo lokola moninga yango. Ya solo tozalaka na boboto mpe topesaka moto nyonso limemya, kasi tosengeli kobosana te ete tokoki kokóma lokola bato oyo tolekisaka ntango elongo na bango. (1 Ko. 15:33) Soki tozali ekɛngɛ ndenge Yesu ayebisaki biso, tokoboya kosala boninga elongo na bato oyo batosaka mibeko ya Yehova te. (2 Ko. 6:15) Tokomona likama na mosika mpe tokokima yango.

SALELÁ NTANGO NA YO NA NDENGE YA MALAMU KOLEKA

12. Bayekoli ya Yesu basengelaki kosala nini wana bazalaki kozela nsuka eya?

12 Yesu alingaki ete bayekoli na ye bákanga maboko te wana bazali kozela nsuka eya. Apesaki bango mosala ya kosala. Apesaki bango etinda ya kosakola nsango malamu ya bokonzi “na Yerusaleme mpe na Yudea mobimba mpe na Samaria mpe tii na esika eleki mpenza mosika na mabele.” (Mis. 1:6-8) Na ntembe te, ezalaki mpenza mokumba moko monene! Ndenge oyo basalaki nyonso oyo bakokaki mpo na kosakola nsango malamu ya bokonzi, emonisi ete basalelaki ntango na bango na ndenge ya malamu koleka.

13. Na kotalela Bakolose 4:5, mpo na nini tosengeli kosalela ntango na biso na ndenge ya malamu koleka?

13 Tángá Bakolose 4:5. Mpo tózala ekɛngɛ tosengeli kokanisa na mozindo ndenge oyo tokoki kosalela ntango na biso na ndenge ya malamu koleka. “Makambo oyo ekanami te” ekoki kokómela biso nyonso. (Mos. 9:11) Liwa ekoki kokómela biso na mbalakaka.

Ndenge nini tokoki kosalela ntango na biso na ndenge ya malamu koleka? (Talá paragrafe 14-15)

14-15. Na kotalela Baebre 6:11, 12, ndenge nini tokoki kosalela ntango na biso na ndenge ya malamu koleka? (Talá mpe elilingi)

14 Tokosalela ntango na biso na ndenge ya malamu koleka soki tozali kosala mokano ya Yehova mpe tozali kokómisa boninga na biso na ye makasi. (Yoa. 14:21) Tosengeli ‘kopikama makasi, koninganaka te, kozala ntango nyonso na mingi ya kosala na mosala ya Nkolo.’ (1 Ko. 15:58) Na yango, ntango nsuka ekoya, elingi koloba, nsuka ya bomoi na biso to nsuka ya mokili oyo, tokoyoka mawa te.​—Mat. 24:13; Rom. 14:8.

15 Lelo oyo, Yesu azali kokamba bayekoli na ye ntango bazali kosakola nsango malamu ya Bokonzi na mabele mobimba. Akokisi eleka na ye. Na nzela ya ebongiseli ya Yehova, Yesu azali kopesa biso formasyo mpo na ndenge ya kosakola mpe azali kopesa biso bisaleli oyo tosengeli na yango mpo na kopalanganisa nsango malamu. (Mat. 28:18-20) Tokosala makambo oyo Yesu asɛngi biso, soki tozali kosakola, koteya basusu na molende mpenza, mpe soki tozali ekɛngɛ wana tozali kozela Yehova atya nsuka na mokili oyo. Soki tozali kosalela toli oyo ezali na Baebre 6:11, 12, tokozala na elikya makasi “tii na nsuka.”​—Tángá.

16. Ekateli nini tosengeli kozala na yango?

16 Yehova atyá mokolo oyo akosukisa mokili mabe oyo ya Satana. Ntango mokolo yango ekokoka, Yehova akokokisa bisakweli na ye nyonso oyo asilá kokomisa na Liloba na ye. Kasi, na bantango mosusu tokoki kokanisa ete nsuka ya mokili oyo ezali koumela. Nzokande, mokolo ya Yehova “ekokóma nsima ya ngonga te!” (Hab. 2:3) Na yango, tosengeli kozala na ekateli ya ‘kotalela nde Yehova,’ mpe ya komonisa ete ‘tozali kozela Nzambe ya lobiko na biso.’​—Mika 7:7.

LOYEMBO 139 Omimona na mokili ya sika

a Na lisolo oyo, tokotalela ndenge nini tokoki kobatela makanisi na biso ntango tozali kotala makambo oyo ezali kosalema na mokili. Lisusu, tokomona ndenge oyo tokoki kozala ekɛngɛ mpe kosalela malamu koleka ntango na biso.

b NDIMBOLA YA ELILINGI: (Na likoló) Mwasi moko ná mobali na ye bazali kolanda bansango na televizyo. Na nsima, na nsuka ya likita moko ya lisangá, bazali kopesa bandeko mosusu makanisi na bango moko na oyo etali ndimbola ya bansango oyo balandaka na televizyo. (Na nse) Mwasi moko ná mobali na ye bazali kolanda lapolo ya lisangani ya Mikóló-Bakambi mpo bákanga ntina ya bingɛngiseli ya sika na oyo etali bisakweli ya Biblia. Bazali kopesa basusu mikanda na biso oyo elimbolaka Biblia, oyo moombo ya sembo abimisaka.