Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Lisalisi mpo na koyeba kosalela Site Internet

Lisalisi mpo na koyeba kosalela Site Internet

Luká masolo oyo balobeli

Bandeko na biso mingi ya basi mpe ya mibali balukaka masolo oyo balobeli na lokasa ya ebandeli na jw.org oyo esalisaka na mosala ya kosakola. Ezalaka pɛtɛɛ mpo na kotindela moto na nzela ya aparɛyi, mpe mbala mingi elimbolaka ndenge makambo oyo ezali kosalema lelo oyo ekokisaka nde bisakweli ya Biblia. Ndenge ndeko mobali moko akomaki yango, masolo oyo etyamaka na lokasa ya ebandeli ya site Internet na biso, ezalaka “mpenza makambo oyo tozalaka na mposa na yango oyo esalisaka biso tókokisa malamu mosala na biso ya kosakola lelo oyo.”

  • Kasi masolo yango ebongwanaka mbala na mbala, na yango, ndenge nini okoki kozwa masolo oyo ebimaka lisusu te na lokasa ya ebandeli ya site Internet na biso?

  • Kende na jw.org to na programɛ JW Library® na esika bakomi “Bibliotɛkɛ,” na nsima, kende na esika bakomi “Masolo ndenge na ndenge,” mpe na nsuka kende na esika bakomi “Makambo mosusu.” Eteni oyo ezali na masolo mingi oyo etyamaka na lokasa ya ebandeli ya site Internet na biso.