Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOYEKOLI 7

Zwá matomba na botángi na yo ya Biblia

Zwá matomba na botángi na yo ya Biblia

“Otángaka nini?”​—LUKA 10:26.

LOYEMBO 97 Moto akobika nde na Liloba ya Nzambe

NA MOKUSE a

1. Nini emonisi ete Makomami ezalaki na ntina mingi mpo na Yesu?

 KANISÁ ete ozali koyoka Yesu azali koteya, olingaki komiyoka ndenge nini? Mbala mingi azalaki kozongela Makomami Mosantu oyo akangaki na motó! Kutu, na maloba ya liboso oyo alobaki nsima ya kozwa batisimo mpe na maloba na ye ya nsuka oyo alobaki liboso akufa, Yesu atángaki Makomami. b (Mib. 8:3; Nz. 31:5; Luka 4:4; 23:46) Na katikati ya makambo mibale wana oyo esalemaki na mosala na ye na boumeli ya mbula misato na ndambo, mbala mingi Yesu atángaki mpe alimbolaki Makomami liboso ya bato ebele.​—Mat. 5:17, 18, 21, 22, 27, 28; Luka 4:16-20.

Na bomoi na ye mobimba, Yesu amonisaki ete azalaki kolinga Makomami mpe atikaki yango etambwisa makambo oyo azalaki kosala (Talá paragrafe 2)

2. Nini esalisaki Yesu ayeba Makomami malamumalamu wana azalaki kokola? (Talá elilingi ya ezipeli.)

2 Bambula mingi liboso abanda mosala na ye awa na mabele, Yesu azalaki kotánga mpe koyoka Liloba ya Nzambe mbala na mbala. Na ntembe te, azalaki koyoka ndenge Maria ná Yozefe bazalaki kolobela mbala na mbala Makomami na masolo na bango na libota. c (Mib. 6:6, 7) Ezali polele ete Yesu azalaki kokende na sinagoga elongo na bato ya libota na ye Sabata nyonso. (Luka 4:16) Ntango azalaki kuna, azalaki koyoka na likebi mpenza ntango bazalaki kotánga Makomami. Kendekende, Yesu ye moko ayekolaki kotánga Makomi Mosantu. Yango esalaki ete Yesu ayeba kaka te Makomami malamu kasi alinga yango mpe atika yango ezala na bopusi na makambo nyonso oyo azalaki kosala. Na ndakisa, kanisá makambo oyo esalemaki na tempelo ntango azalaki na mbula 12. Bateyi oyo bayebaki Mibeko ya Moize malamumalamu bazalaki ‘kokamwa na mayele ya [Yesu] mpe na biyano na ye.’​—Luka 2:46, 47, 52.

3. Tokolobela nini na lisolo oyo?

3 Biso mpe tokoki koyeba mpe kolinga Liloba ya Nzambe soki tozali kotánga yango mbala na mbala. Kasi, ndenge nini tokoki kozwa matomba na makambo oyo tozali kotánga? Tokoki koyekola epai ya Yesu na makambo oyo alobaki epai ya bato oyo bayebaki mibeko, lokola Bakomeli, Bafarisai, mpe Basadukai. Mbala mingi, bakonzi yango ya mangomba bazalaki kotánga Makomami, kasi bazalaki kozwela yango matomba te. Yesu alobelaki makambo misato oyo mibali yango basengelaki kosala mpo bázwa matomba na Makomami. Makambo oyo ayebisaki bango ekosalisa biso tókolisa likoki na biso ya (1) kokanga ntina ya makambo oyo tozali kotánga, (2) koluka biloko ya motuya ya elimo, mpe (3) kotika ete Liloba ya Nzambe ebongola biso.

TÁNGÁ NA MOKANO YA KOKANGA NTINA

4. Luka 10:25-29 eteyi biso na nini na oyo etali kotánga Liloba ya Nzambe?

4 Mposa na biso ezalaka ete tókanga ntina na makambo oyo tozali kotánga na Liloba ya Nzambe. Soki bongo te, tokozwela yango matomba te. Na ndakisa, tótalela lisolo ya Yesu elongo ná “moto moko oyo ayebaki Mibeko malamumalamu.” (Tángá Luka 10:25-29.) Ntango moto yango asɛngaki Yesu ayebisa ye makambo oyo asengeli kosala mpo azwa bomoi ya seko, Yesu asalisaki ye azwa eyano na Liloba ya Nzambe. Yesu atunaki ye motuna: “Bakomá nini na Mibeko? Otángaka nini?” Moto yango apesaki eyano ya malamu ntango atángaki oyo Makomami elobi ete esengeli kolinga Nzambe mpe mozalani na yo. (Lev. 19:18; Mib. 6:5) Kasi talá oyo alobaki na nsima: “Nani mpenza azali mozalani na ngai?” Mobali yango amonisaki mpenza ete azalaki kokanga ntina te ya makambo oyo azalaki kotánga. Mpe yango esalaki ete ayeba te ndenge ya kosalela Makomami yango na bomoi na ye.

Tokoki koyekola kokanga ntina ya makambo oyo tozali kotánga

5. Ndenge nini libondeli mpe kotánga malɛmbɛmalɛmbɛ ekoki kosalisa biso tókanga ntina ya makambo tozali kotánga?

5 Tokoki kokanga ntina ya Liloba ya Nzambe kaka soki tokolisi momeseno ya kotánga yango mbala na mbala. Talá mwa makambo oyo ekoki kosalisa yo. Bondelá liboso ya kobanda kotánga. Tozali na mposa ya lisalisi ya Yehova mpo na kokanga ntina ya Makomami, tokoki kosɛnga ye apesa biso elimo santu na ye mpo tótya makanisi na biso na makambo oyo tozali kotánga. Mpe na nsima tángáká malɛmbɛmalɛmbɛ. Yango ekosalisa yo okanga ntina ya makambo oyo ozali kotánga. Mbala mosusu okoki komona ete ezali malamu otánga yango na mongongo makasi to olanda yango elongo na botángi ya Biblia ya audio. Soki ozali koyoka botángi ya audio mpe kolanda yango na papye, yango ekosalisa yo okanga ntina, obosana te, mpe oyekola makambo mingi na Liloba ya Nzambe. (Yos. 1:8) Ntango osilisi kotánga, bondelá lisusu Yehova mpo na kopesa ye matɔndi mpo na likabo ya Liloba na ye mpe sɛngá ye asalisa yo osalela makambo oyo otángi.

Mpo na nini kokoma makanisi ya ntina ekoki kosalisa yo okanga ntina mpe obosana te makambo oyo ozali kotánga? (Talá paragrafe 6)

6. Mpo na nini komituna mituna mpe kokoma makambo oyo ozali kotánga ekosalisa yo ntango ozali kotánga? (Talá mpe elilingi)

6 Talá makanisi mibale mosusu oyo ekoki kosalisa yo okanga ntina ya Biblia. Omituna mituna mpo na makambo oyo ozali kotánga. Ntango ozali kotánga likambo moko na Biblia, luká biyano na mituna oyo: ‘Lisolo yango elobeli banani? Nani nde azali koloba? Azali koloba na nani, mpe mpo na nini? Ntango nini mpe esika nini likambo yango ezali kosalema?’ Mituna ya ndenge wana ekosalisa yo okanisa mpe ozwa likanisi ya ntina na makambo oyo ozali kotánga. Ntango ozali kotánga, komáká makambo ya ntina. Ntango ozali kokoma makambo oyo outi kotánga, okokanisa na mozindo likoló na yango mpe yango ekosalisa yo okanga malamu koleka ntina na yango. Soki ozali kokoma, yango ekosalisa yo obosana te makambo oyo outi kotánga. Okoki kokoma mituna, makambo oyo osepeli kosalela yango bolukiluki, kokoma na mokuse makanisi ya ntina, mpe ndenge oyo okoki kosalela makambo oyo ozali kotánga to komá kaka ndenge ozali komiyoka mpo na makambo oyo ozali kotánga. Kokoma makambo yango ekosalisa yo omona ete Liloba ya Nzambe ezali mpenza nsango oyo etali yo.

7. Na kotalela Matai 24:15 ezaleli nini tosengeli na yango ntango tozali kotánga Biblia, mpe mpo na nini?

7 Yesu amonisaki ezaleli oyo tosengeli na yango soki tolingi kokanga ntina ya makambo oyo tozali kotánga na Liloba ya Nzambe, elingi koloba bososoli. (Tángá Matai 24:15.) Bososoli ezali nini? Ezali likoki ya koyeba ndenge likanisi moko eyokani na mosusu, ndenge makanisi yango ekeseni, mpe ya koluka koyeba likanisi oyo wapi ezali mpenza polele te. Longola yango, Yesu amonisaki mpe ete tosengeli kozala na bososoli mpo na koyeba makambo oyo ezali kokokisa bisakweli ya Biblia. Tosengeli mpe kozala na ezaleli yango mpo tókoka mpenza kozwa matomba na makambo nyonso oyo tozali kotánga na Biblia.

8. Ndenge nini okoki kosalela bososoli wana ozali kotánga?

8 Yehova apesaka basaleli na ye bososoli. Na yango, bóndela ye mpe sɛngá ye asalisa yo okolisa ezaleli yango. (Mas. 2:6) Makambo nini okoki kosala na boyokani na libondeli na yo? Talelá na likebi makambo oyo ozali kotánga, mpe moná ndenge eyokani na makambo mosusu oyo oyebi. Salelá mikanda na biso oyo elimbolaka Biblia mpo na kosala bongo. Na ndakisa okoki kosalela Buku ya bolukiluki mpo na Batatoli ya Yehova. Mikanda yango ekosalisa yo okanga ntina ya vɛrsɛ moko ya Biblia mpe omona ndenge oyo okoki kosalela makambo yango na bomoi na yo. (Ebr. 5:14) Ntango ozali kosalela bososoli wana ozali kotánga, okokanga lisusu malamumalamu ntina ya Makomami.

TANGÁ NA MOKANO YA KOMONA BILOKO YA MOTUYA YA ELIMO

9. Liteya nini ya ntina mingi oyo Makomami elobeli Basadukai baboyaki kondimela?

9 Basadukai bayebaki malamumalamu mikanda mitano ya ebandeli ya Makomami ya Ebre, kasi baboyaki kondimela mateya ya ntina oyo Makomami elobeli, oyo ezalaki na kati ya mikanda yango. Na ndakisa, tótala eyano oyo Yesu apesaki Basadukai ntango batunaki ye motuna na ntina etali lisekwa. Atunaki bango: “botángá te na mokanda ya Moize, na lisolo ya mwa nzete ya nzubɛ, ndenge Nzambe alobaki na ye: ‘Nazali Nzambe ya Abrahama mpe Nzambe ya Yisaka mpe Nzambe ya Yakobo’?” (Mrk. 12:18, 26) Atako Basadukai batángaki lisolo yango mbala mingi, motuna ya Yesu emonisaki ete baboyaki kondimela liteya ya ntina mingi oyo Makomami elobeli, elingi koloba, liteya ya lisekwa.​—Mrk. 12:27; Luka 20:38. d

10. Tosengeli kotya likebi na makambo nini ntango tozali kotánga Biblia?

10 Yango eteyi biso nini? Ntango tozali kotánga Biblia tosengeli kotya likebi na makambo nyonso oyo vɛrsɛ moko to lisolo moko ekoki koteya biso. Tosengeli kosuka kaka te na kokanga ntina ya mateya ya ebandeli ya Biblia kasi mpe mateya mosusu ya mozindo oyo ezali mpasi mpo na kokanga ntina mpe mitinda.

11. Ndenge nini okoki kosalela 2 Timote 3:16, 17, mpo na koluka biloko ya motuya oyo ezali na Biblia?

11 Ndenge nini tokoki kozwa biloko ya motuya ya elimo ntango tozali kotánga Biblia? Tótala oyo 2 Timote 3:16, 17 elobi. (Tángá.) Vɛrsɛ yango elobi: “Makomami nyonso ezali . . . na litomba” mpo na (1) koteya, (2) kopamela, (3) kosembola makambo, mpe (4) kopesa disiplini. Okoki kozwa matomba yango minei ata na mikanda mosusu ya Biblia oyo osalelaka mingi te. Talelá lisolo yango malamumalamu mpo na komona oyo yango ezali koteya yo mpo na Yehova, mokano na ye, to mpo na mitinda ya Nzambe. Talá ndenge ezali na litomba mpo na kopamela. Mpo na kosala yango, luká koyeba ndenge oyo bavɛrsɛ yango ekoki kosalisa yo omona mpe oboya mimeseno to bizaleli ya mabe mpo otikala sembo epai ya Yehova. Luká koyeba ndenge okoki kosalela mokapo moko ya Biblia mpo na kosembola to kobongisa likanisi moko ya mabe, mbala mosusu oyo okutanaki na yango na mosala ya kosakola. Mpe luká disiplini oyo ebimi na vɛrsɛ yango mpo na kosalisa yo otalela makambo ndenge Yehova atalelaka yango. Soki obateli na makanisi makambo wana minei, okomona biloko ya motuya ya elimo oyo ekosalisa yo ozwa matomba mingi na botángi na yo ya Biblia.

TIKÁ BOTÁNGI NA YO YA BIBLIA EBONGISA YO

12. Mpo na nini Yesu atunaki Bafarisai “Botángá te?”

12 Yesu atunaki mpe motuna oyo, “Botángá te?” mpo na komonisa ete Bafarisai bazalaki te kokanga ntina ya makambo oyo bazalaki kotánga na Makomami. (Mat. 12:1-7) e Na libaku yango, Bafarisai balobaki ete bayekoli ya Yesu bazalaki te kotosa Sabata. Na eyano oyo Yesu apesaki bango, alobelaki bandakisa mibale ya Makomami mpe alobelaki likanisi moko oyo ezali na mokanda ya Hosea mpo na komonisa ete Bafarisai bazalaki te koyeba ntina oyo Mibeko ya Sabata etyamaki. Mpo na nini botángi ya Liloba ya Nzambe ebongisaki mibali yango te? Mpo bazalaki na lolendo mpe bazalaki kotánga yango na makanisi ebongi te. Makanisi na bango ya mabe esalaki ete bákanga te ntina ya makambo oyo bazalaki kotánga.​—Mat. 23:23; Yoa 5:39, 40.

13. Tosengeli kotánga Biblia na makanisi ya ndenge nini, mpe mpo na nini?

13 Maloba ya Yesu eteyi biso ete tosengeli kotánga Biblia na makanisi ya malamu. Na kokesana na Bafarisai, tosengeli kozala na komikitisa mpe kondima ete Liloba ya Nzambe eteya biso. Tosengeli ‘kondima na boboto liloba.’ (Yak. 1:21) Soki tozali na boboto, tokotika ete Liloba ya Nzambe ebongisa biso. Mateya ya Biblia na oyo etali boboto, motema mawa, mpe bolingo ekobongisa biso kaka soki toboyi lolendo mpe soki tozali na makanisi ya malamu ntango tozali kotánga Biblia.

Ndenge nini tokoki koyeba soki tozali kotika Liloba ya Nzambe ebongisa biso? (Talá paragrafe 14) f

14. Nini ekoki kosalisa biso tóyeba soki totikaka Liloba ya Nzambe ebongisa biso? (Talá mpe bililingi)

14 Lolenge oyo tosalelaka basusu makambo ekoki komonisa soki totikaka ete Liloba ya Nzambe ebongisa biso to te. Lokola Bafarisai batikaki te ete Liloba ya Nzambe ebongisa makanisi na bango, yango esalaki ete ‘bákweisa bato oyo bazali na ngambo te.’ (Mat. 12:7) Ndenge moko mpe, ndenge oyo totalelaka basusu mpe tosalelaka bango makambo emonisaka soki totikaka Liloba ya Nzambe ebongisa biso to te. Na ndakisa, tolobelaka mbala mingi makambo ya malamu oyo tomonaka epai ya basusu, to tolobelaka mingi nde bolɛmbu na bango? Tomonisaka motema mawa mpe tozalaka pene ya kolimbisa, to tolobelaka nde basusu mabe mpe tokangelaka bango nkanda na motema soki basali likambo oyo epesi biso mpasi? Komitalela ndenge wana emonisaka soki totikaka Liloba ya Nzambe ebongola makanisi na biso, mayoki na biso, mpe makambo oyo tosalaka.​—1 Tim. 4:12, 15; Ebr. 4:12.

KOTÁNGA LILOBA YA NZAMBE EPESAKA ESENGO

15. Yesu azalaki komiyoka ndenge nini mpo na Makomami mosantu?

15 Yesu alingaki Makomami mosantu mingi, mpe maloba oyo ezali na Nzembo 40:8 esakolaki ndenge oyo Yesu akoyoka mpo na Liloba ya Nzambe. Elobaki: “Ee Nzambe na ngai, nasepeli kosala mokano na yo, mpe mobeko na yo ezali na kati na ngai.” Lokola Yesu alingaki Makomami, yango esalaki ete azala na esengo mpe alonga na mosala ya Yehova. Biso mpe tokoki kolonga mpe kozala na esengo soki tozali kotánga Liloba ya Nzambe mpe kolinga yango.​—Nz. 1:1-3.

16. Osengeli kosala nini mpo ozwa mpenza matomba na botángi na yo ya Liloba ya Nzambe? (Talá etanda “ Maloba ya Yesu ekoki kosalisa yo okanga ntina ya makambo oyo ozali kotánga.”)

16 Na boyokani na maloba mpe ndakisa ya Yesu, tiká ete tósala makasi mpo na kokolisa makoki na biso ya kotánga Biblia. Tokoki kokolisa makoki na biso ya kokanga malamu ntina ya bavɛrsɛ ya Biblia, soki tozali kobondela, kotánga malɛmbɛmalɛmbɛ, komituna mwa mituna, mpe kokoma mwa makanisi ya ntina. Tokoki kosalela bososoli na kotaleláká na likebi makambo oyo tozali kotánga na lisalisi ya mikanda na biso oyo elimbolaka Biblia. Tokoyeba kosalela Biblia malamumalamu ata mpe mikapo oyo tomeseni na yango malamu te, soki tozali koluka biloko ya motuya ya elimo na masolo ya bongo. Mpe tokoki kotika Liloba ya Nzambe ebongisa biso, soki tozali kosala makasi tóbatela makanisi ya malamu ntango tozali kotánga yango. Soki tosali makasi ya kosalela makambo wana nyonso, tokozwa matomba mingi na botángi na biso ya Biblia mpe tokopusana lisusu penepene na Yehova.​—Nz. 119:17, 18; Yak. 4:8.

LOYEMBO 95 Pole ezali kongɛnga se kongɛnga

a Biso basaleli ya Yehova tósalaka makasi tótángaka Liloba na ye mokolo na mokolo. Bato mosusu mingi batángaka mpe Biblia, nzokande bakangaka mpenza ntina te ya makambo oyo bazali kotánga. Ezalaki mpe bongo na mikolo ya Yesu. Soki totaleli makambo oyo Yesu alobaki na baoyo bazalaki kotánga Liloba ya Nzambe, tokoyekola makambo oyo ekosalisa biso tózwa matomba na botángi na biso ya Biblia.

b .Na ntembe te, Yesu akanisaki bomoi oyo azalaki na yango na likoló liboso aya awa na mabele ntango azwaki batisimo mpe ntango atyamaki mafuta na elimo santu.​—Mat. 3:16.

c Maria ayebaki Makomami malamu mpe azalaki kozongela yango. (Luka 1:46-55) Ezali polele ete, Yozefe ná Maria bazalaki na mbongo mingi te ya kosomba bakopi ya Makomami. Basengelaki koyoka na likebi mpenza ntango bazalaki kotánga Liloba ya Nzambe na sinagoga mpo bamikundwela na yango na nsima.

d Talá lisolo “Pusaná penepene na Nzambe​—‘Azali Nzambe . . . ya bato ya bomoi’” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 01/02/2013.

e Talá mpe Matai 19:4-6, epai Yesu atunaki Bafarisai kaka motuna yango: “Botángá te?” Atako batángaki masolo oyo elobeli bozalisi, kasi baboyaki kondima oyo yango elobi mpo na ndenge oyo Nzambe atalelaka libala.

f NDIMBOLA YA ELILINGI: Wana makita ezali kosalema na ndako ya Bokonzi, moko ya bandeko oyo basalaka na sono azali kosala mabunga mingi. Kasi, na nsima ya makita, na esika ya kotya likebi kaka na mabunga oyo asalaki, bandeko bapesi ye longonya mpo na milende nyonso oyo asalaki.