Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOYEKOLI 6

LOYEMBO 10 Tópesa Yehova Nzambe na biso nkembo!

“Bósanzola nkombo ya Yehova”

“Bósanzola nkombo ya Yehova”

“Bópesa ye masanzoli, bino basaleli ya Yehova, bósanzola nkombo ya Yehova.”NZ. 113:1.

NA MOKUSE

Elobeli bantina oyo tosanzolaka nkombo mosantu ya Yehova na mabaku nyonso.

1-2. Nini ekoki kosalisa biso tóyeba malamu ndenge oyo Yehova amiyokaka mpo na lokuta oyo elobamaka na nkombo na ye?

 KANISÁ naino: Moto oyo olingaka alobi likambo moko ya mabe mpenza mpo na yo. Oyebi ete alobi lokuta; kasi bato mosusu bandimi yango. Ya mabe koleka, babandi mpe kolobaloba makambo yango ya lokuta, mpe bato mosusu mingi bandimi yango. Okoyoka ndenge nini? Soki olingaka bato mpe olingaka kobatela lokumu na yo, na ntembe te makambo wana ya lokuta ekopesa yo mpasi mingi!—Mas. 22:1.

2 Ndakisa wana ekoki kosalisa biso tóyeba ndenge oyo Yehova ayokaki ntango babebisaki lokumu na ye. Moko ya bana na ye ya elimo akoselaki ye makambo epai ya Eva, mwasi ya liboso. Eva andimaki lokuta yango. Lokuta yango etindaki baboti na biso ya liboso bátombokela Yehova. Na yango, lisumu mpe liwa ekɔtaki na libota ya bato awa na mabele. (Eba. 3:​1-6; Rom. 5:12) Makambo nyonso oyo tomonaka na mokili, liwa, bitumba, mpe mpasi, ezali mpo na lokuta oyo Satana abandaki kopanza na elanga ya Edene. Yehova ayokaki mpasi mpo na lokuta yango mpe makambo oyo yango ebimisá? Ntembe ezali te! Atako bongo, Yehova akómá mawamawa, to nkandankanda te. Kutu, azali kaka “Nzambe ya esengo.”—1 Tim. 1:11.

3. Libaku nini tozali na yango?

3 Tozali na libaku malamu ya kopesa mabɔkɔ na kolongisama ya nkombo ya Yehova soki totosi etinda oyo ya polele: “Bósanzola nkombo ya Yehova.” (Nz. 113:1) Tosalaka yango ntango tozali koloba malamu mpo na Moto oyo abengami na nkombo yango mosantu. Yo mpe okosanzola nkombo ya Yehova? Tólobela bantina misato ya minene oyo ekotinda biso tósanzola nkombo ya Nzambe na biso na motema mobimba.

TOSEPELISAKA YEHOVA NTANGO TOSANZOLAKA NKOMBO NA YE

4. Mpo na nini masanzoli na biso esepelisaka Yehova? Pesá ndakisa. (Talá mpe elilingi.)

4 Tosepelisaka Tata na biso ya likoló ntango tosanzolaka nkombo na ye. (Nz. 119:108) Yango elingi nde koloba ete Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso azali lokola bato ya kozanga kokoka oyo balukaka basusu bákumisa bango mpo bámiyoka malamu mpe bátika kobanga? Te. Tózwa ndakisa. Mwana moko ya mwasi ya moke ayambi tata na ye na boboto mpe alobi: “Oleki bapapa nyonso na mokili mobimba!” Tata asepeli, kutu ayoki esengo, mpo na maloba ya mwana na ye oyo euti na motema. Mpo na nini? Tosengeli nde kokanisa ete ezali mpo moto yango abangaka mingi mpe amiyokaka malamu kaka soki mwana akumisi ye? Te. Toyebi ete tata yango azali mobali ya mpiko, kasi asepeli ndenge mwana na ye amonisi bolingo mpe botɔndi. Ayebi ete komonisa bizaleli ya ndenge wana ekobakisela mwana esengo wana azali kokola. Ezali mpe mpo na bantina ya ndenge wana nde Yehova, Tata na biso oyo aleki monene, asepelaka ntango tosanzolaka ye.

Kaka ndenge tata asepelaka ntango mwana na ye alobi ete alingaka ye mpe azali na botɔndi, Yehova asepelaka ntango tosanzolaka nkombo na ye (Talá paragrafe 4)


5. Ntango tosanzolaka Yehova, tosalisaka na kokweisa lokuta nini?

5 Ntango tozali kosanzola Tata na biso ya likoló, tozali kopesa mabɔkɔ mpo na kokweisa lokuta oyo Satana alobaka mpo na biso. Satana alobaka ete moto te akokoba kokumisa nkombo ya Nzambe tii na nsuka. Mpo na ye, moko te kati na biso azali sembo. Alobi ete biso nyonso tokopesa Nzambe mokɔngɔ soki tomoni ete kosala bongo ekozala mpo na litomba na biso. (Yobo 1:​9-11; 2:4) Kasi, Yobo moto ya sembo amonisaki ete Satana azali lokuta. Bongo yo? Mokomoko na biso azali na libaku malamu ya kokumisa nkombo ya Tata na biso mpe ya kosepelisa ye soki tosaleli ye na bosembo. (Mas. 27:11) Ezali mpenza lokumu monene kosala yango.

6. Ndenge nini tokoki komekola Mokonzi Davidi mpe Balevi? (Nehemia 9:5)

6 Kolinga Nzambe etindaka bato ya sembo básanzola nkombo na ye na motema mobimba. Mokonzi Davidi akomaki: “Tiká nasanzola Yehova, nyonso oyo ezali kati na ngai esanzola nkombo na ye mosantu.” (Nz. 103:1) Davidi akangaki ntina ete kosanzola nkombo ya Yehova ezali kosanzola Yehova ye moko. Nkombo ya Yehova emonisaka mpe lolenge ya moto oyo azali; ekundwelaka biso bizaleli na ye ya kitoko mpe misala na ye ya kokamwa. Davidi azalaki kotalela nkombo ya Tata na ye ete ezali mosantu mpe alingaki kosanzola yango. Alingaki kosala yango ná “nyonso oyo ezali kati” na ye, elingi koloba na motema mobimba. Ndenge moko mpe, Balevi bapesaki ndakisa na oyo etali kosanzola Yehova. Na komikitisa nyonso, bandimaki ete maloba na bango ekokaki te mpo na komonisa masanzoli nyonso oyo ebongi na nkombo mosantu ya Yehova. (Tángá Nehemia 9:5.) Na ntembe te, masanzoli oyo euti na motema ya komikitisa ndenge wana esepelisaka Yehova.

7. Ndenge nini tokoki kosanzola Yehova na mosala ya kosakola mpe na bomoi ya mokolo na mokolo?

7 Lelo oyo, tokoki kosepelisa Yehova ntango tozali kolobela ye na esengo, botɔndi mpe bolingo. Ntango tobimi na mosala ya kosakola, tobosanaka te ete mokano na biso ya libosoliboso ezali ya komema bato epai ya Yehova, kosalisa bango bámona ete azali Tata ya bolingo, ndenge biso tomonaka ye. (Yak. 4:8) Tosepelaka komonisa bato makambo oyo Biblia elobi mpo na Yehova, ndenge emonisi bolingo na ye, bosembo na ye, bwanya na ye, nguya na ye, mpe bizaleli na ye mosusu. Lisusu, tosanzolaka Yehova mpe tosepelisaka ye ntango tosalaka makasi tómekola ye. (Ef. 5:1) Ntango tosalaka bongo, tomikabolaka na mokili oyo mabe. Bato mosusu bakoki komona ete tokeseni na bango mpe bakoki koluka koyeba ntina oyo ezali bongo. (Mat. 5:​14-16) Ntango tozali kokutana na bango na makambo na biso ya mokolo na mokolo, tokoki kozwa libaku ya kolimbwela bango ntina oyo tosalaka boye to boye. Yango esalaka ete bato malamu báluka kopusana epai ya Nzambe na biso. Ntango tozali kosanzola Yehova bongo, tosepelisaka motema na ye.—1 Tim. 2:​3, 4.

TOSEPELISAKA YESU NTANGO TOSANZOLAKA NKOMBO YA YEHOVA

8. Na ndenge nini Yesu azali ndakisa eleki malamu na oyo etali kosanzola nkombo ya Yehova?

8 Na bikelamu nyonso ya mayele na likoló mpe na mabele, moko te ayebi Tata malamu koleka Mwana. (Mat. 11:27) Yesu alingaka Tata na ye, mpe apesaki ndakisa malamu na oyo etali kosanzola nkombo ya Yehova. (Yoa. 14:31) Na libondeli moko oyo Yesu asalaki na butu liboso akufa, alobelaki na mokuse mosala na ye awa na mabele na maloba oyo: “Nayebisi . . . nkombo na yo.” (Yoa. 17:26) Alingaki koloba nini?

9. Ndakisa nini Yesu asalelaki mpo na komonisa polele bizaleli ya Tata na ye?

9 Yesu asukaki kaka te na koloba na bato ete nkombo ya Nzambe ezali Yehova. Bayuda oyo Yesu azalaki koteya bayebaki nkombo ya Nzambe banda kala. Kasi, Yesu nde ‘moto alimbolaki soki Ye azali nani.’ (Yoa. 1:​17, 18) Na ndakisa, Makomami ya Ebre emonisi ete Yehova azali na motema mawa mpe na ngɔlu. (Kob. 34:​5-7) Yesu amonisaki solo yango polele koleka ntango abɛtaki lisolo ya mwana ya kilikili ná tata na ye. Ntango totángaka ete tata yango amonaki mwana na ye oyo abongolaki motema “ntango azalaki naino mosika,” bongo ayaki mbangu kokutana na ye, ayambaki ye makasi, mpe alimbisaki ye na motema mobimba, tomonaka polele motema mawa mpe ngɔlu ya Yehova. (Luka 15:​11-32) Yesu amonisaki mpenza ndenge Tata na ye azalaka.

10. (a) Ndenge nini toyebi ete Yesu asalelaki nkombo ya Tata na ye mpe alingaki ete basusu mpe básala bongo? (Marko 5:19) (Talá mpe elilingi.) (b) Yesu alingi tósala nini lelo oyo?

10 Yesu alingaki mpe ete bato básalela nkombo ya Tata na ye? Ɛɛ. Bakonzi mosusu ya mangomba ya ntango wana bazalaki komona ete nkombo ya Nzambe ezali mosantu mingi mpe esengeli kobenga yango te, kasi Yesu atikaki te ete makanisi wana oyo eyokanaki te na Makomami epekisa ye kokumisa nkombo ya Tata na ye. Tólobela ntango abikisaki mobali oyo azalaki na bademo na etúká ya Bageraza. Bato babangaki mingi mpe basɛngaki Yesu alongwa na mboka na bango, mpe alongwaki kuna. (Mrk. 5:​16, 17) Atako bongo, Yesu alingaki nkombo ya Yehova eyebana kuna. Na yango, asɛngaki mobali oyo abikaki ayebisa bato, makambo oyo Yesu asalaki te, kasi nde oyo Yehova asalaki. (Tángá Marko 5:19.) a Lelo oyo mpe, alingi ete tóyebisa nkombo ya Tata na ye na mokili mobimba! (Mat. 24:14; 28:​19, 20) Ntango tosalaka yango, tosepelisaka Mokonzi na biso, Yesu.

Yesu ayebisaki moto oyo liboso azalaki na bademo akende koyebisa bato ndenge Yehova asalisaki ye (Talá paragrafe 10)


11. Yesu ateyaki bayekoli na ye bábondelaka mpo na nini, mpe mpo na nini ezali na ntina? (Ezekiele 36:23)

11 Yesu ayebaki ete mokano ya Yehova ezali ya kosantisa nkombo na Ye, kosukola yango na makambo nyonso ya lokuta. Yango wana Moteyi na biso ateyaki bayekoli na ye bábondelaka ete: “Tata na biso na likoló, nkombo na yo esantisama.” (Mat. 6:9) Yesu ayebaki ete yango nde likambo eleki monene oyo etali bozalisi nyonso. (Tángá Ezekiele 36:23.) Ekelamu moko te ya mayele na molɔ́ngɔ́ mobimba asilá kosala mingi mpo na kosantisa nkombo ya Yehova koleka Yesu. Kasi ntango bakangaki Yesu, banguna bafundaki ye na likambo nini? Ete afingi Nzambe! Na ntembe te, Yesu azalaki komona ete kofinga to kolobela nkombo mosantu ya Tata na ye mabe ezali lisumu oyo eleki mabe. Abulunganaki mingi koyeba ete bakofunda ye ete asali lisumu yango mpe bakokatela ye etumbu. Ekoki kozala mpo na yango nde Yesu “azalaki kotungisama mingi mpenza” mwa bangonga liboso bákanga ye.—Luka 22:​41-44.

12. Ndenge nini Yesu asantisaki mpenza nkombo ya Tata na ye?

12 Mpo na kosantisa nkombo ya Tata na ye, Yesu andimaki monyoko, kofinga, mpe makambo ya lokuta oyo balobaki mpo na ye. Ayebaki ete atosaki Tata na ye na makambo nyonso; azalaki na eloko ya koyokela nsɔni te. (Ebr. 12:2) Ayebaki mpe ete Satana nde moto azalaki kobundisa ye na ntango wana ya mpasi. (Luka 22:​2-4; 23:​33, 34) Na ntembe te Satana azalaki kolikya ete akobebisa bosembo ya Yesu; kasi alongaki te! Yesu amonisaki mpo na libela ete Satana azali moto mabe ya lokuta mpe ete Yehova azali na basaleli ya sembo, oyo akangamaka na ye ata na komekama ya makasi!

13. Ndenge nini okoki kosepelisa Mokonzi na yo oyo azali koyangela?

13 Yo mpe olingi kosepelisa Mokonzi na yo oyo azali koyangela? Boye, kobá kosanzola nkombo ya Yehova, kosalisa basusu báyeba bizaleli malamu ya Nzambe na biso. Soki ozali kosala bongo, ozali kolanda matambe ya Yesu. (1 Pe. 2:21) Lokola Yesu, ozali kosepelisa Yehova mpe komonisa ete monguna na Ye Satana azali moto ya lokuta oyo asilá nsɔni!

TOSALISAKA BASUSU BÁZWA LOBIKO NTANGO TOSANZOLAKA NKOMBO YA YEHOVA

14-15. Likambo nini ya kokamwa ekoki kosalema ntango tozali koteya bato makambo na ntina etali Yehova?

14 Ntango tosanzolaka nkombo ya Yehova, tosalisaka basusu bázwa lobiko. Ndenge nini? Satana “azipi makanisi ya bato oyo bazangi kondima.” (2 Ko. 4:4) Na yango, bakómá kondima lokuta ya Satana, na ndakisa: Nzambe azalaka te, Nzambe azali mosika na biso mpe akipaka bato te, Nzambe azali motema mabe, mpe anyokolaka basali-mabe libela na libela. Lokuta wana ezali kaka mpo na kozipa to kobebisa nkombo ya Yehova mpe bizaleli na ye ya malamu, mpo bato bázala na mposa te ya kopusana penepene na ye. Kasi, mosala ya kosakola ekweisaka mokano ya Satana. Toteyaka bato solo na ntina etali Tata na biso, mpe tosanzolaka nkombo mosantu ya Nzambe na biso. Ebimisaka mbuma nini?

15 Solo ya Liloba ya Nzambe ezali na nguya mingi. Ntango toteyaka bato makambo ya Yehova mpe bizaleli na ye, tomonaka likambo ya kokamwa. Miso ya bato oyo ezipamaki na lokuta ya Satana ekómaka kofungwama mokemoke, mpe bakómaka komona Tata na biso ya bolingo ndenge biso tomonaka ye. Bakamwaka mpenza nguya na ye oyo ezangi nsuka. (Yis. 40:26) Bayekolaka kotyela ye motema mpo na bosembo na ye ya kokoka. (Mib. 32:4) Bayebaka makambo mingi na lisalisi ya bwanya na ye monene. (Yis. 55:9; Rom. 11:33) Mpe babɔndisamaka na koyeba ete azali bolingo. (1 Yoa. 4:8) Wana bazali kopusana penepene na Yehova, elikya na bango ya kozala na bomoi libela na libela lokola bana na ye ekómaka makasi. Ezali mpenza lokumu monene kosalisa bato bápusana penepene na Tata na bango! Ntango tosali bongo, Yehova amonaka ete tozali “bato oyo bazali kosala elongo” na ye.—1 Ko. 3:​5, 9.

16. Koyeba nkombo ya Nzambe esalaka nini na bomoi ya bato mosusu? Pesá ndakisa.

16 Na ebandeli, tokoki kaka koteya bato ete nkombo ya Nzambe ezali Yehova. Ata yango kaka ekoki mpenza kobongola bomoi ya moto ya motema sembo. Na ndakisa, elenge mwasi moko na nkombo Aaliyah b akolá na lingomba oyo bandimaka bokristo te. Kasi, amonaki ete lingomba na ye ezalaki kosalisa ye te mpo amiyoka penepene na Nzambe. Makambo ebongwanaki ntango abandaki koyekola na Batatoli. Akómaki komona Nzambe Moninga na ye. Mpe akamwaki koyeba ete balongolá nkombo ya Nzambe na Babiblia mingi mpe batyá kaka batitre, lokola Nkolo. Koyeba nkombo Yehova ebongolaki mpenza bomoi na ye. Agangaki: “Moninga na ngai ya motema azalaka na nkombo!” Nini esalemaki? Alobi boye: “Sikoyo nayokaka motema kimya mpenza. Namonaka ete nazali na ntina.” Mobali moko na nkombo Steve azalaki alangá-nzembo mpe abɔkwamá na mimeseno ya Bayuda. Azalaki kolinga mangomba ya minene te mpo azalaki komona ete etondi na bokosi. Kasi, ntango mama na ye akufaki, andimaki kofanda esika Motatoli ya Yehova moko azalaki koyekola Biblia na moto. Asepelaki mingi koyoka nkombo ya Nzambe. Alobi boye: “Nayokaki naino nkombo ya Nzambe te.” Abakisi: “Mpo na mbala ya liboso, nakangaki ntina ete Nzambe azalaka! Namonaki ete azali mpenza Moto. Na ntango yango, nayebaki ete nazwi Moninga.”

17. Mpo na nini ozali na ekateli ya kokoba kosanzola nkombo ya Yehova? (Talá mpe elilingi.)

17 Na mosala ya kosakola mpe ya koteya, oyebisaka bato nkombo mosantu ya Yehova? Osalisaka bango báyeba bizaleli malamu ya Nzambe na biso? Soki osalaka bongo, osanzolaka nkombo ya Nzambe. Tiká ete okoba kosanzola nkombo mosantu ya Yehova, osalisa bato báyeba Moto oyo abengami na nkombo yango. Na ndenge yango, okobikisa bomoi ya bato. Okolanda litambwisi ya Mokonzi na yo, Yesu Kristo. Longola yango, okosepelisa Tata na yo ya bolingo, Yehova. Na yango, kobá ‘kosanzola nkombo na ye libela na libela’!—Nz. 145:2.

Tosanzolaka nkombo ya Yehova ntango toteyaka bato nkombo yango mpe tolakisaka bango bizaleli ya Yehova (Talá paragrafe 17)

NA NDENGE NINI KOSANZOLA NKOMBO YA NZAMBE . . .

  • esepelisaka Yehova?

  • esepelisaka Yesu Kristo?

  • esalisaka basusu bázwa lobiko?

LOYEMBO 2 Yehova nde nkombo na yo

a Ezali na bilembeteli oyo emonisi ete Marko asalelaki mpenza nkombo ya Nzambe ntango azongelaki maloba yango ya Yesu. Yango wana Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika ezongisi yango.

b Topesi bango bankombo mosusu.