Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOYEKOLI 8

LOYEMBO 123 Tótosaka ebongiseli ya Teokrasi

Kobá kolanda litambwisi ya Yehova

Kobá kolanda litambwisi ya Yehova

“Ngai Yehova nazali . . . Moto oyo azali kotambwisa yo.”YIS. 48:17.

NA MOKUSE

Lisolo oyo ekosalisa biso tómona ndenge Yehova atambwisaka bato na ye lelo oyo mpe mapamboli oyo tozwaka ntango tolandi litambwisi na ye.

1. Pesá ndakisa oyo emonisi ete tosengeli kolanda Yehova, Motambwisi na biso.

 KANISÁ ete obungi na kati ya zamba. Makama ezali ebele: banyama ya zamba, banyama mikemike oyo epesaka maladi, mpe milona oyo ezali pwazɔ, mpe esika ya mabangamabanga. Okoki mpe kokwea na libulu. Kanisá ndenge okosepela soki ozali na motambwisi ya malamu oyo ayebi bisika oyo makama yango ezali mpe ndenge ya kosalisa yo okima yango! Mokili oyo ezali lokola zamba wana. Etondi na makama oyo ekoki mpenza kobebisa elimo na biso. Kasi, tozali na Motambwisi oyo aleki nyonso: Yehova. Azali kosalisa biso tókima makama nyonso mpe tókóma esika tozali kokende: na mokili ya sika epai tokozwa bomoi ya seko.

2. Ndenge nini Yehova atambwisaka biso?

2 Ndenge nini Yehova atambwisaka biso? Asalaka yango libosoliboso na nzela ya Liloba na ye, Biblia. Kasi, asalelaka mpe bato lokola bamonisi na ye. Na ndakisa, azali kosalela “moombo ya sembo mpe ya mayele” mpo na kopesa biso bilei ya elimo oyo esalisaka biso tózwa bikateli ya malamu. (Mat. 24:45) Yehova asalelaka mpe mibali mosusu ya makoki mpo na kotambwisa biso. Na ndakisa, bakɛngɛli-batamboli mpe bankulutu ya lisangá balendisaka biso mpe bateyaka biso makambo oyo ekoki kosalisa biso tóyika mpiko na mikakatano. Tozali mpenza na botɔndi ndenge Yehova azali kotambwisa biso malamu na mikolo ya nsuka oyo etondi na mpasi! Litambwisi yango esalisaka biso tóbatela boyokani malamu na Yehova mpe tótikala na nzela ya bomoi.

3. Tokotalela nini na lisolo oyo?

3 Atako bongo, na bantango mosusu tokoki komona ete ezali mpasi kolanda litambwisi ya Yehova, mingimingi ntango bato ya kozanga kokoka nde bayebisi biso yango. Mpo na nini? Mpo toli yango ekoki kokesana na makambo oyo tolingaka to oyo tolingaka te. To mpe tokoki komona ete malako oyo tozwi ezali ya bwanya te, mpe koloba ete toli yango euti epai ya Yehova te. Na bantango ya ndenge wana, tosengeli mpenzampenza kotya motema ete Yehova nde azali kokamba bato na ye mpe ete kolanda litambwisi na ye ememaka mapamboli. Mpo na kosalisa biso, lisolo oyo ekolobela (1) ndenge oyo Yehova atambwisaki bato na ye na ntango ya kala, (2) ndenge oyo atambwisaka biso lelo, mpe (3) ndenge oyo tozwaka matomba ntango tolandi litambwisi na ye.

Banda na ntango ya kala tii lelo, Yehova asalelaka bato mpo na kotambwisa basaleli na ye (Talá paragrafe 3)


NDENGE OYO YEHOVA ATAMBWISAKI EKÓLO YISRAELE

4-5. Ndenge nini Yehova amonisaki ete azalaki kosalela Moize mpo na kotambwisa Yisraele? (Talá elilingi ya ezipeli.)

4 Yehova atyaki Moize mpo abimisa Bayisraele na Ezipito. Mpe apesaki Bayisraele elembo ya polele oyo emonisaki ete ye nde azalaki kotambwisa bango na nzela ya Moize. Na ndakisa, apesaki likonzí ya lipata na moi mpe likonzí ya mɔtɔ na butu. (Kob. 13:21) Moize azalaki kolanda likonzí yango, mpe yango ememaki ye ná Bayisraele na Mbu Motane. Bato babangaki makasi ntango bakanisaki ete bazwami na motambo kati na mbu mpe limpinga ya Baezipito oyo ezalaki kolanda bango. Balobaki ete Moize asalaki libunga ndenge amemaki bango na Mbu Motane. Kasi ezalaki libunga te. Yehova amemaki bato na ye kuna na nzela ya Moize mpamba te. (Kob. 14:2) Kuna, Nzambe asalaki likamwisi monene mpo na kobikisa bango.—Kob. 14:​26-28.

Moize azalaki kolanda likonzí ya lipata mpo na kotambwisa bato ya Nzambe na kati ya esobe (Talá paragrafe 4-5)


5 Mbula 40 oyo elandaki, Moize akobaki kolanda likonzí ya lipata mpo na kotambwisa bato ya Nzambe na kati ya esobe. a Na ntango moko boye, Yehova atyaki lipata yango likoló ya hema ya Moize, epai Bayisraele nyonso bakokaki komona yango. (Kob. 33:​7, 9-10) Yehova azalaki koloba na Moize uta na lipata yango, mpe Moize azalaki koyebisa bato malako ya Nzambe. (Nz. 99:7) Bayisraele bazalaki na elembeteli ya polele ete Yehova azalaki kosalela Moize mpo na kotambwisa bango.

Moize ná Yosua, mokitani na ye (Talá paragrafe 5, 7)


6. Ndenge nini Bayisraele batalelaki litambwisi ya Yehova? (Mitángo 14:​2, 10, 11)

6 Likambo ya mawa, Bayisraele mingi baboyaki elembo ya polele oyo emonisaki ete Yehova azalaki kosalela Moize lokola momonisi na Ye. (Tángá Mitángo 14:​2, 10, 11.) Mbala na mbala, baboyaki kondima esika ya Moize. Mpo na yango, Yehova aboyaki ete Bayisraele ya eleko yango bákɔta na Mokili ya Ndaka.—Mit. 14:30.

7. Tángá bandakisa ya baoyo balandaki litambwisi ya Yehova. (Mitángo 14:24) (Talá mpe elilingi.)

7 Nzokande, Bayisraele mosusu balandaki litambwisi ya Yehova. Na ndakisa, Yehova alobaki: “Kalebe . . . atosaki ngai na motema na ye mobimba.” (Tángá Mitángo 14:24.) Nzambe apesaki Kalebe mbano, apesaki ye kutu esika oyo ye moko aponaki na mokili ya Kanana. (Yos. 14:​12-14) Bayisraele oyo bayaki na nsima bapesaki mpe ndakisa malamu na oyo etali kolanda litambwisi ya Yehova. Ntango Yosua atyamaki mokambi ya Bayisraele na esika ya Moize, “Bayisraele bakómaki kopesa ye limemya bomoi na ye mobimba.” (Yos. 4:14) Na yango, Yehova apambolaki bango na ndenge akɔtisaki bango na mokili oyo alakaki.—Yos. 21:​43, 44.

8. Limbolá ndenge oyo Yehova atambwisaki bato na ye na ntango ya bakonzi. (Talá mpe elilingi.)

8 Bambula na nsima, Yehova atyaki basambisi mpo na kotambwisa bato na ye. Na nsima, na ntango ya bakonzi, Yehova atyaki basakoli mpo na kotambwisa bato na ye. Bakonzi oyo bazalaki sembo bayokaki toli ya basakoli. Na ndakisa, Mokonzi Davidi andimaki na komikitisa nyonso mpamela oyo eutaki epai ya mosakoli Natane. (2 Sa. 12:​7, 13; 1 Nt. 17:​3, 4) Mokonzi Yehoshafate alandaki litambwisi oyo mosakoli Yahaziele apesaki mpe alendisaki bato ya Yuda ‘bándimela basakoli ya Nzambe.’ (2 Nt. 20:​14, 15, 20) Na ntango moko ya mpasi, Mokonzi Ezekiasi alukaki litambwisi epai ya mosakoli Yisaya. (Yis. 37:​1-6) Mbala nyonso oyo bakonzi bazalaki kolanda litambwisi ya Yehova, bazalaki kozwa mapamboli mpe ekólo ebatelamaki. (2 Nt. 20:​29, 30; 32:22) Esengelaki komonana polele ete Yehova azalaki kosalela basakoli na ye mpo na kotambwisa bato na ye. Nzokande, bakonzi mingi mpe bana-mboka baboyaki basakoli ya Yehova.—Yir. 35:​12-15.

Mokonzi Ezekiasi ná mosakoli Yisaya (Talá paragrafe 8)


NDENGE OYO YEHOVA ATAMBWISAKI BAKRISTO YA LIBOSO

9. Yehova atyaki nani mpo na kotambwisa bakristo na siɛklɛ ya liboso? (Talá mpe elilingi.)

9 Na siɛklɛ ya liboso ya T.B., Yehova asalaki lisangá ya bokristo. Ndenge nini atambwisaki bakristo yango ya liboso? Atyaki Yesu mokonzi ya lisangá. (Ef. 5:23) Kasi, Yesu ye moko te nde atambwisaki moyekoli na ye mokomoko. Azalaki kosalela bantoma mpe bankulutu na Yerusaleme mpo bákamba bango. (Mis. 15:​1, 2) Lisusu, bankulutu batyamaki mpe mpo na kotambwisa masangá.—1 Tes. 5:12; Tito 1:5.

Bantoma ná bankulutu na Yerusaleme (Talá paragrafe 9)


10. (a) Ndenge nini bakristo mingi ya liboso batalelaki litambwisi oyo bazalaki kozwa? (Misala 15:​30, 31) (b) Mpo na nini basusu baboyaki kondima baoyo bazalaki bamonisi ya Yehova? (Talá etanda “ Ntina oyo basusu baboyaki elembeteli ya polele.”)

10 Bakristo ya siɛklɛ ya liboso batalelaki litambwisi yango ndenge nini? Mingi bazalaki kosepela kolanda malako oyo bazwi. Ya solo, “basepelaki na elendiseli” oyo bazalaki kozwa. (Tángá Misala 15:​30, 31.) Kasi, ndenge nini Yehova azali kotambwisa bato na ye na mikolo na biso?

NDENGE OYO YEHOVA AZALI KOTAMBWISA BISO LELO

11. Pesá ndakisa oyo emonisi ndenge Yehova atambwisi baoyo bazali kokamba na mikolo na biso.

11 Yehova azali kokoba kotambwisa bato na ye lelo. Asalaka yango na nzela ya Liloba na ye mpe ya Mwana na ye, mokonzi ya lisangá. Tozali mpe na elembeteli oyo emonisi ete Nzambe akobi kosalela bato lokola bamonisi na ye? Ɛɛ. Na ndakisa, tótalela makambo mosusu oyo esalemaki na nsuka ya bambula ya 1800. Charles Taze Russell ná baninga na ye babandaki kososola ete mobu 1914 ekozala mbula oyo Bokonzi ya Nzambe ekotyama. (Dan. 4:​25, 26) Mpo na koyeba yango, bayekolaki bisakweli ya Biblia na mozindo. Yehova atambwisaki bango na bolukiluki oyo basalaki na Biblia? Ezali polele ete atambwisaki bango. Makambo oyo esalemaki na mokili na 1914 emonisaki ete Bokonzi ya Nzambe ebandi koyangela. Etumba ya Liboso ya mokili mobimba esalemaki, mpe maladi mabe, koningana ya mabele, mpe nzala elandaki yango. (Luka 21:​10, 11) Ya solo, Yehova asalelaki mibali yango oyo bazalaki koluka solo mpo na kosalisa bato na ye.

12-13. Bibongiseli nini esalaki ete mosala ya kosakola mpe ya koteya ekola na ntango ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba?

12 Tólobela mpe likambo oyo esalemaki na Etumba ya Mibale ya mokili mobimba. Nsima ya koyekola Emoniseli 17:​8, bandeko oyo bazalaki kokamba na biro monene basosolaki ete etumba yango ekomema na Armagedone te, kasi nde na eleko ya mwa kimya oyo ekofungola nzela mpo na kokolisa mosala ya kosakola. Na yango, atako emonanaki ete ebongi kosala bongo te na ntango wana, ebongiseli ya Yehova efungolaki Eteyelo ya Gileade mpo na kopesa bamisionɛrɛ formasyo na mosala ya kosakola mpe koteya na mokili mobimba. Bamisionɛrɛ batindamaki wana etumba ezalaki kondongwana. Lisusu, moombo ya sembo afungolaki Kelasi na mosala ya Nzambe b mpo na kopesa bandeko nyonso ya lisangá formasyo mpo bákóma basakoli mpe bateyi ya malamu. Na ndenge yango, basaleli ya Nzambe bamibongisaki mpo na mosala oyo ezalaki kozela bango.

13 Soki tozongisi makanisi nsima, tokoki komona polele ete Yehova atambwisaki bato na ye na ntango wana ya mpasi. Kobanda na Etumba ya Mibale ya mokili mobimba, basaleli ya Yehova na mikili mingi bazali na mwa kimya mpe bonsomi ya kosala mosala ya kosakola. Na yango, mosala ekoli mpenza.

14. Mpo na nini tokoki kotyela malako oyo eutaka na ebongiseli ya Yehova mpe ya bankulutu motema? (Emoniseli 2:1) (Talá mpe elilingi.)

14 Lelo, bandeko ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi bazali kokoba kolanda litambwisi ya Kristo. Balingaka ete malako oyo bazali kopesa bandeko eyokana na makanisi oyo ezali mpe kuna na likoló. Na nsima, bakɛngɛli ya zongazonga mpe bankulutu bapesaka malako yango na masangá. c Bankulutu oyo batyami mafuta na elimo bazali na ‘lobɔkɔ ya mobali’ ya Kristo. (Tángá Emoniseli 2:1.) Ya solo, bankulutu yango bazali bato ya kozanga kokoka mpe basalaka mabunga. Moize ná Yosua mpe basalaki mabunga na bantango mosusu, ata mpe bantoma. (Mit. 20:12; Yos. 9:​14, 15; Rom. 3:23) Atako bongo, Kristo azali kotambwisa na likebi moombo ya sembo mpe bankulutu, mpe akokoba kosala yango “mikolo nyonso tii na eleko ya nsuka ya mokili.” (Mat. 28:20) Yango wana, tosengeli kondima litambwisi oyo azali kopesa na nzela ya baoyo batyami mpo na kokamba biso.

Lisangani ya Mikóló-Bakambi lelo (Talá paragrafe 14)


TOZWAKA MATOMBA NTANGO TOKOBI KOLANDA LITAMBWISI YA YEHOVA

15-16. Ndakisa ya baoyo balandaki litambwisi ya Yehova eteyi yo nini?

15 Ntango tokobi kolanda litambwisi ya Yehova, tozwaka matomba ata sikoyo. Na ndakisa, Andy ná Robyn balandaki elendiseli ya kokómisa bomoi na bango pɛpɛlɛ. (Mat. 6:22) Na yango, bazwaki likoki ya kopesa mabɔkɔ na mosala ya botongi bandako ya teokrasi. Robyn alobi boye: “Tofandaki na bandako mosusu ya mike mpenza, mbala mingi oyo ezalaki na esika ya kolamba te. Mpe esɛngaki natɛka biloko mingi oyo nazalaki kosalela mpo na kokanga bafɔtɔ, likambo oyo nazalaki kolinga mingi. Nalelaki ntango natɛkaki yango. Kasi, lokola Sara, mwasi ya Abrahama, nazwaki ekateli ya kotala liboso, kasi nsima te.” (Ebr. 11:15) Matomba nini bazwaki? Robyn alobi boye: “Toyokaka esengo mingi koyeba ete tozali kopesa Yehova nyonso oyo tozali na yango. Ntango tosalaka mosala ya Nzambe, tomonaka mwa moke ndenge bomoi ekozala na mokili ya sika.” Andy andimi yango, alobi: “Nayokaka esengo mpo topesi ntango mpe makasi na biso nyonso na mosala ya Bokonzi.”

16 Matomba mosusu nini tozwaka ntango tokobi kolanda litambwisi ya Yehova? Nsima ya kozwa diplome, Marcia ayokaki toli ya komipesa mobimba na mosala ya Yehova. (Mat. 6:33; Rom. 12:11) Alobi boye: “Balakisaki ngai bourse mpo na kotánga na iniversite mbula minei. Kasi, nalingaki kokokisa mikano ya elimo. Na yango, naponaki koyekola kaka mwa makambo ya tekiniki mpo nazwa mosala oyo ekosalisa ngai na mosala ya mobongisi-nzela. Ezalaki moko ya bikateli ya malamu oyo nazwá. Lelo, nazali mobongisi-nzela ya sanza na sanza, mpe programɛ na ngai epesaka ngai nzela ya kosala mikolo mosusu na Betele mpe kosala mpe makambo mosusu mpo na Yehova.”

17. Mapamboli nini mosusu tozwaka ntango tokobi kolanda litambwisi ya Yehova? (Yisaya 48:​17, 18)

17 Na bantango mosusu, tozwaka toli oyo ebatelaka biso na makama lokola konduka biloko ya mokili mpe kosala makambo oyo ekoki kotinda biso tóbuka mibeko ya Nzambe. Na ntango yango mpe, tozwaka matomba soki tolandi litambwisi ya Yehova. Tobatelaka lisosoli ya malamu mpe tomibatelaka na ebele ya mitungisi ya mpambampamba. (1 Tim. 6:​9, 10) Na yango, tokoki kokoba kosalela Yehova na motema mobimba, mpe yango epesaka esengo, kimya, mpe nsai makasi.—Tángá Yisaya 48:​17, 18.

18. Mpo na nini ozwi ekateli ya kokoba kolanda litambwisi ya Yehova?

18 Na ntembe te, Yehova akokoba kosalela bato lokola bamonisi na ye mpo na kopesa litambwisi na ntango ya bolɔzi monene mpe na Boyangeli ya Mbula Nkóto. (Nz. 45:16) Tokokoba kolanda litambwisi yango ata ntango esɛngi tótya pembeni makambo oyo biso tolingi? Eyano etaleli ndenge oyo totalelaka litambwisi ya Yehova sikoyo. Na yango, tiká tólanda ntango nyonso litambwisi ya Yehova, ata mpe oyo azali kopesa na nzela ya bato oyo batyami mpo na kobatela biso. (Yis. 32:​1, 2; Ebr. 13:17) Mpe soki tosali bongo, tozali na ntina nyonso ya kotyela Yehova Motambwisi na biso motema, ye oyo azali kosalisa biso tókima makama ya elimo mpe tókóma esika tozali kokende: mokili ya sika epai tokozwa bomoi ya seko.

OKOPESA EYANO NINI?

  • Ndenge nini Yehova atambwisaki ekólo Yisraele?

  • Ndenge nini Yehova atambwisaki bakristo ya liboso?

  • Matomba nini tozwaka soki tolandi litambwisi ya Yehova lelo oyo?

LOYEMBO 48 Tótambola na Yehova mokolo na mokolo

a Yehova atyaki mpe anzelu moko “oyo azalaki kotambola liboso ya kaa,” mpo na kokamba ekólo yango tii na Mokili ya Ndaka. Emonani ete anzelu yango ezalaki Mikaele, elingi koloba, Yesu liboso aya lokola moto na mabele.—Kob. 14:19; 32:34.

b Na nsima ekómaki Eteyelo ya mosala ya Teokrasi. Lelo formasyo yango epesamaka na likita ya kati ya pɔsɔ.

c Talá etanda “Mokumba ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 02/2021, lok. 18.