Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Boyá elimo ya moimi oyo ezali lelo na mokili

Boyá elimo ya moimi oyo ezali lelo na mokili

OMONAKA ndenge bato mingi lelo bamonaka ete esengeli bápesa bango lokumu, lotomo to básalela bango makambo koleka basusu? Ata soki bazwi nyonso wana, bamonaka ete ekoki te mpo na bango. Makanisi yango euti na ezaleli ya moimi mpe ya kozanga botɔndi oyo emonisi ete tozali na mikolo ya suka.—2 Tim. 3:2.

Ya solo, ezaleli ya moimi ebandi lelo te. Adama ná Eva bazwaki ekateli ya kopona bango moko nini ezali malamu mpe nini ezali mabe, mpe yango ememá mpasi mingi na mokili. Basiɛklɛ mingi na nsima, Uziya, mokonzi ya Yuda amonaki ete azali na lotomo ya kotumba mpaka ya malasi na tempelo, nzokande amikosaki mpenza. (2 Nt. 26:​18, 19) Ndenge moko mpe, Bafarisai ná Basadukai bazalaki kokanisa ete babongaki ete Nzambe asalela bango makambo koleka bato mosusu mpo bazalaki bakitani ya Abrahama.—Mat. 3:9.

Tozali lelo kofanda na kati ya bato ya moimi mpe oyo bamonaka ete baleki basusu, mpe bizaleli yango ekoki kokɔtela biso. (Gal. 5:26) Tokoki kobanda kokanisa ete tobongi kozwa mokumba moko boye to básalela biso makambo koleka basusu. Ndenge nini tokoki koboya makanisi yango? Ya liboso, tosengeli koyeba ndenge oyo Yehova atalelaka likambo yango. Mpo na yango, mitinda mibale ya Biblia ekosalisa biso.

Yehova nde akataka oyo tosengeli kozwa. Tótalela mwa bandakisa.

  • Na kati ya libota, mobali asengeli komiyoka ete mwasi na ye apesaka ye limemya mpe mwasi asengeli komiyoka ete mobali na ye alingaka ye. (Ef. 5:33) Babalani basengeli komonisa lolango kaka epai ya molongani na bango. (1 Ko. 7:3) Baboti bazali na lotomo ya kosɛnga bana bátosa bango mpe bana basengeli komona ete baboti balingaka bango mpe bakokisaka bamposa na bango.—2 Ko. 12:14; Ef. 6:2.

  • Na lisangá, bankulutu babongi na limemya na biso. (1 Tes. 5:12) Nzokande, bazali na lotomo te ya kokonza bandeko.—1 Pe. 5:​2, 3.

  • Nzambe apesi baguvɛrnema ya bato lotomo ya kosɛnga mpako mpe kozwa lokumu epai ya bana-mboka na bango.—Rom. 13:​1, 6, 7.

Na bolingo na ye, Yehova apesi biso koleka oyo tobongi na yango. Lokola tozali bato ya masumu, tobongi kaka na liwa. (Rom. 6:23) Kasi, Yehova apesi biso mapamboli mingi mpo na bolingo na ye ya sembo epai na biso. (Nz. 103:​10, 11) Lipamboli to mokumba nyonso oyo tozwi epai na ye ezali mpo na boboto monene na ye.—Rom. 12:​6-8; Ef. 2:8.

NDENGE YA KOBOYA EZALELI YA MOIMI MPE YA KOMONA ETE OLEKI BASUSU

Kebá na makanisi ya bato ya mokili. Tokoki kobanda kokanisa ete tobongi na makambo mingi koleka basusu kozanga tóyeba. Yesu amonisaki ndenge makanisi wana ekoki kokɔtela biso na pɛtɛɛ nyonso ntango apesaki ndakisa ya basali oyo basengelaki kozwa lifuti ya denari moko. Basali mosusu babandaki mosala ntɔngɔntɔngɔ mpe basalaki mokolo mobimba na nse ya moi makasi; nzokande basusu basalaki mosala ngonga moko kaka. Etuluku ya liboso bamonaki ete basengelaki kozwa lifuti mingi koleka mpo na mosala oyo basalaki. (Mat. 20:​1-16) Yesu amonisaki liteya na ndakisa wana, ete bayekoli na ye basengeli kosepela na oyo Nzambe amoni malamu apesa bango.

Mibali oyo basalaki mosala mokolo mobimba bamonaki ete basengeli kozwa lifuti mingi koleka

Zalá na botɔndi, mpe kozelaka te basusu bápesa yo mingi. (1 Tes. 5:18) Mekolá ntoma Paulo, oyo azelaki te ete bandeko ya Korinti bápesa ye lisalisi ya biloko mingi ya mosuni, atako azalaki na lotomo ya kosala yango. (1 Ko. 9:​11-14) Tosengeli kozala na botɔndi mpo na lipamboli nyonso oyo tozwi mpe komizela te basusu bápesa biso mingi.

Ntoma Paulo, azelaki lisalisi ya biloko ya mosuni te

Zalá na komikitisa. Soki moto azali kokanisa ete azali na ntina mingi, mbala mingi akómaka komona ete asengeli kozwa mingi koleka oyo azali na yango. Komikitisa elongolaka makanisi wana ya mabe.

Komikitisa ya mosakoli Danyele esalaki ete azala na motuya na miso ya Yehova

Mosakoli Danyele azali ndakisa malamu na oyo etali komonisa komikitisa. Autaki na libota ya lokumu, azalaki kitoko, na mayele, mpe na makoki oyo ekokaki kotinda ye amona ete abongaki kaka básalela ye makambo koleka basusu mpe azwa mikumba oyo azwaki. (Dan. 1:​3, 4, 19, 20) Kasi, Danyele azalaki kaka na komikitisa, mpe ezaleli yango esalaki ete azala na motuya na miso ya Yehova.—Dan. 2:30; 10:​11, 12.

Tiká ete tóboya ezaleli ya moimi mpe komona ete toleki basusu, oyo bato mingi bazali na yango na mokili lelo oyo. Kasi, tókoba kosepela na lipamboli nyonso oyo Yehova apesi biso na nzela ya boboto monene na ye.