LISOLO YA BOMOI
“Nazalaki ata moke te ngai moko”
MAKAMBO mingi na bomoi ekoki kosala ete omiyoka lokola mwana etike: liwa ya bato oyo olingaki, kofanda na esika oyo omesaná na yango te, mpe ntango ozali kaka yo moko. Ngai nakutaná na makambo nyonso wana. Kasi, ntango nakanisaka ndenge oyo nalekisi bomoi na ngai, namonaka sikoyo ete nazalaki mpenza ata moke te ngai moko. Tiká nayebisa bino ntina oyo nalobi bongo.
NDAKISA YA BABOTI NA NGAI
Tata ná Mama bazalaki bandimi ya molende ya Katolike. Kasi ntango bayekolaki na Biblia ete nkombo ya Nzambe ezali Yehova, bakómaki Batatoli ya Yehova ya molende. Tata atikaki kosala bikeko ya Yesu. Na yango, asalelaki mayele na ye ya mosali-mabaya mpo na kokómisa ndako na biso Ndako ya Bokonzi ya liboso na San Juan del Monte, na Manille, engumba-mokonzi ya Philippines.
Nabotamá na 1952, mpe baboti na ngai bakómaki koteya ngai banzela ya Yehova, kaka ndenge bazalaki kosala yango mpo na bayaya na ngai ya mibali minei mpe ya basi misato. Ntango nazalaki kokola, tata na biso azalaki kolendisa ngai natángaka mokapo moko ya Biblia mokolo nyonso, mpe ayekolaki na ngai mikanda mingi ya ebongiseli ya Yehova. Soki libaku ezwami, baboti na biso bazalaki kobengisa bakɛngɛli-batamboli mpe bandeko ya Betele oyo bayei kosala badiskur báya kolala na ndako na biso. Biso nyonso na libota tozalaki koyoka esengo mingi mpe kozwa malendisi na masolo ya bandeko yango, mpe yango etindaki biso nyonso tótya mosala ya Yehova na esika ya liboso na bomoi na biso.
Tata ná Mama batikelá ngai ndakisa malamu na oyo etali kozala na kondima. Ntango mama abɛlaki mpe akufaki, ngai ná Tata tokómaki babongisinzela na 1971. Kasi na 1973, ntango nakómaki na mbula 20, tata mpe akufaki. Kobungisa baboti nyonso mibale epesaki ngai mawa mpe namiyokaki ete natikali ngai moko. Kasi elikya ya Biblia oyo “esalisaka biso tótɛlɛma ngwi mpe tótya ntembe te” esalisaki ngai nalɛmba te mpe napikama makasi na makanisi mpe na elimo. (Ebr. 6:19) Mwa moke nsima ya liwa ya tata na biso, nandimaki kokóma mobongisi-nzela monene mosika, na esanga ya Coron, na etúká ya Palawan.
NGAI MOKO NA MIKAKATANO NA BISIKA OYO BATINDAKI NGAI
Nazalaki na mbula 21 ntango nakómaki na Coron. Lokola nakolaki na engumba, nakamwaki komona
ete kura, mai ya pɔmpi mpe mituka ezalaki mpenza te. Mwa bandeko bazalaki kuna, kasi nazalaki na moninga te na mosala ya mobongisi-nzela mpe na bantango mosusu nazalaki kosakola ngai moko. Na sanza ya liboso, nazalaki kokanisa mingi mpenza libota mpe baninga na ngai. Na butu, nazalaki kotala minzoto na likoló mpe mai ya miso ezalaki kobima ngai. Nayokaki mposa ya kotika mokumba na ngai mpe kozonga ndako.Na bantango wana oyo nazalaki ngai moko, nazalaki kosopela Yehova motema na ngai. Nazalaki komikundwela makanisi ya kolendisa oyo natángá na Biblia mpe na mikanda na biso. Mbala mingi Nzembo 19:14 ezalaki koyela ngai na makanisi. Namonaki ete Yehova akozala “Libanga na ngai mpe Mosikoli na ngai” soki nazali komanyola na makambo oyo esepelisaka ye, na ndakisa misala mpe bizaleli na ye. Lisolo moko oyo ebimaki na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli “Ozali kaka yo moko te” a esalisaki ngai mingi. Natángaki yango mbala na mbala. Namonaki ete ntango nazali ngai moko, nazali nde elongo na Yehova, mpe yango ezalaki mabaku malamu mpenza ya kobondela, koyekola mpe komanyola.
Mwa moke nsima ya kokóma na Coron, nakómaki nkulutu. Lokola nazalaki ngai moko kaka nkulutu, pɔsɔ nyonso nazalaki kotambwisa Eteyelo ya mosala ya Teokrasi, Likita ya mosala, Boyekoli ya mokanda, mpe boyekoli ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli. Nazalaki mpe kosala badiskur ya bato nyonso pɔsɔ nyonso. Na yango, nazalaki lisusu na ntango te ya komiyoka ete nazali ngai moko!
Nasepelaki ndenge mosala ya kosakola na Coron ezalaki kobota mbuma—nsukansuka bayekoli na ngai mosusu ya Biblia bazwaki batisimo. Kasi ezalaki mpe na mikakatano. Na bantango mosusu, nasengelaki kotambola bangonga ebele mpo na kokóma na teritware, mpe nazalaki koyeba te esika oyo nakolala ntango nakómi. Teritware ya lisangá ezalaki mpe na bisanga mingi ya mikemike. Nazalaki mbala mingi kokende kuna na bwato ya motɛrɛ na mbonge ya mbu, atako nayebaki kobɛta mai te. Kasi na mikakatano wana nyonso, Yehova abatelaki ngai mpe asalisaki ngai. Na nsima, namonaki ete Yehova azalaki kobongisa ngai mpo na mikakatano ya makasi na mokumba oyo nazwaki na nsima.
NA PAPOUASIE-NOUVELLE-GUINÉE
Na 1978, batindaki ngai na Papouasie-Nouvelle-Guinée, na nɔrdi ya Australie. Papouasie-Nouvelle-Guinée ezali ekólo ya bangombangomba, mpe monene na yango kaka lokola Espagne. Nakamwaki koyeba ete bato ya ekólo yango soki milio misato balobaka minɔkɔ koleka 800. Likambo ya esengo, bato mingi bakokaki koloba Pidgin mélanésien, oyo eyebani mingi na nkombo ya Tok Pisin.
Batindaki ngai mpo na mwa ntango na lisangá ya Anglais na engumba-mokonzi, Port Moresby. Kasi na nsima nakendaki na lisangá ya monɔkɔ ya Tok Pisin mpe nabandaki koyekola monɔkɔ yango. Nazalaki kosalela maloba oyo nazalaki koyekola na kelasi na mosala ya kosakola. Yango esalisaki ngai nayeba monɔkɔ yango noki. Eumelaki te, nakómaki kosala badiskur na monɔkɔ ya Tok Pisin. Nakamwaki mpenza ntango nakómaki mokɛngɛli ya zongazonga ya masangá ya monɔkɔ ya Tok Pisin na bitúká mingi ya minene, liboso kutu nakokisa mbula mobimba na Papouasie-Nouvelle-Guinée.
Lokola masangá ezalaki mosikamosika, nasengelaki kosala mayangani ya zongazonga ebele mpe
mibembo mingi. Na ebandeli, namiyokaki ete nazali kaka ngai moko na bisika oyo namesanaki na yango te: ekólo ya sika, monɔkɔ ya sika, mpe mimeseno ya sika. Nakokaki te kosala mibembo na nzela ya mabele mpo banzela ezalaki ya bangombangomba mpe mabangamabanga. Yango wana nazalaki mbala mingi kosala mibembo na mpɛpɔ bapɔsɔ mingi. Na bantango mosusu, mwa mpɛpɔ ya moke ya malamu mpenza te ezalaki komema kaka ngai moko. Mibembo yango ezalaki kobangisa ngai kaka lokola mibembo ya bwato!Lokola bato bazalaki mpenza na batelefone te, nazalaki kosolola na masangá na nzela ya mikanda. Mbala mingi, nazalaki kokóma liboso ete mokanda na ngai ekóma mpe nasengelaki kotuna esika oyo Batatoli ya Yehova bazali. Atako bongo, mbala nyonso oyo nazalaki kokutana na bandeko, bazalaki koyamba ngai malamu mpe yango ezalaki kosalisa ngai namona ntina ya milende oyo nazalaki kosala. Namonaki lobɔkɔ ya Yehova na makambo mingi mpe boyokani na ngai ná ye ekómaki lisusu makasi.
Na likita na ngai ya liboso na esanga ya Bougainville, mwasi moko ná mobali na ye bayaki epai na ngai na esengo mpe batunaki ngai, “Ozali koyeba biso lisusu?” Namikundwelaki ete napesaki babalani yango litatoli ntango nakómaki na Port Moresby. Nabandaki koyekola Biblia ná bango mpe na nsima natikaki bango epai ya ndeko moko na teritware yango. Bakómaki sikoyo basakoli oyo bazwi batisimo! Yango ezalaki moko ya mapamboli mingi oyo nazwaki na boumeli ya mbula misato oyo nalekisaki na Papouasie-Nouvelle-Guinée.
LIBOTA MOKE YA MOLENDE
Liboso nalongwa na Coron na 1978, nayebanaki na Adel, ndeko mwasi moko ya kitoko, mpe azalaki na elimo ya komipimela. Azalaki mobongisi-nzela ya sanza na sanza mpe azalaki kobɔkɔla bana na ye mibale, Samuel ná Shirley. Azalaki mpe kosalisa mama na ye oyo akómaki mobange. Na sanza ya mitano na 1981, nazongaki na Philippines mpo na kobala Adel. Nsima ya libala na biso, tosalaki mosala ya mobongisi-nzela mpe tosalisaki libota elongo.
Atako nazalaki na libota, natyamaki lisusu mobongisi-nzela monene na 1983 mpe batindaki ngai na Esanga Linapacan, na etúká ya Palawan. Tokendaki libota mobimba na esika yango oyo ezalaki ata na Motatoli ya Yehova moko te. Mama ya Adel akufaki mbula soki moko na nsima. Kasi, tokobaki komipesa na mosala ya kosakola, mpe yango esalisaki biso tóyikela mpasi wana mpiko. Na Linapacan, tokómaki koyekola Biblia na bato ebele oyo bazalaki kokola malamu mpe tomonaki ete tosengeli na mwa Ndako ya Bokonzi. Yango wana totongaki Ndako ya Bokonzi biso moko. Kaka mbula misato nsima ya kokóma na biso, tozalaki na esengo ya komona bato 110 bayangani na Ekaniseli, mpe mingi bakolaki tii bazwaki batisimo nsima ya kolongwa na biso wana.
Na 1986, batindaki ngai na esanga ya Culion, oyo ezalaki na kartye moko ya bato ya maladi ya maba. Nsima na yango, Adel mpe akómaki mobongisi-nzela monene. Na ebandeli, tozalaki kobanga kosakwela bato oyo bilongi ebebá na maladi ya maba. Kasi bandeko ya teritware yango bayebisaki biso ete bato yango ya maladi ya maba bazalaki kozwa nkisi ya monganga mpe maladi yango ekokaki mpenza te kozwa bato mosusu. Bato yango Luka 5:12, 13.
mosusu bazalaki koyangana na makita na ndako ya ndeko mwasi moko. Mwa moke na nsima, tolongolaki kobanga mpe tokómaki na esengo ya koyebisa elikya ya Biblia epai ya bato yango oyo bazalaki komiyoka ete Nzambe ná bato basundoli bango. Tosepelaki komona ndenge bato oyo bazalaki na maladi mabe wana bakómaki na esengo mpo bazwi elikya ete mokolo mosusu bakozala na nzoto ya kokoka.—Ndenge nini bana na biso bamesanaki na bomoi na Culion? Ngai ná Adel tobengisaki bilenge basi mibale ya Coron báya kofanda na biso mpo bana na biso bázala na baninga ya malamu. Samuel, Shirley, ná bandeko basi yango mibale bazalaki kosepela na mosala ya kosakola oyo ezalaki kobota mbuma, bazalaki koyekola na bana mingi, wana ngai ná Adel tozalaki koyekola na baboti ya bana yango. Kutu, na ntango moko boye tokómaki koyekola na mabota 11. Mosika te, tokómaki na bayekoli ya Biblia ebele, mpe tofungolaki lisangá ya sika!
Na ebandeli, nazalaki kaka ngai moko nkulutu. Na yango, Betele esɛngaki ngai natambwisaka makita ya pɔsɔ mpo na basakoli mwambe oyo bazalaki na Culion, mpe nasalaka yango mpo na basakoli libwa na mboka moko Marily, oyo ezalaki mosika na ngonga misato na bwato. Nsima ya kosala makita kuna, tozalaki kotambola libota mobimba bangonga mingi na etúká ya ngombangomba mpo na kokende koyekola Biblia na bato na mboka moko Halsey.
Nsukansuka, lokola bato mingi bandimaki solo na Marily mpe na Halsey, totongaki Bandako ya Bokonzi na bamboka yango. Kaka ndenge ezalaki na Linapacan, bandeko ná bayekoli ya Biblia nde bapesaki bisaleli mingi mpe basalaki mosala ya botongi. Ndako oyo etongamaki na Marily ekokaki kokɔta bato 200 mpe koyeisama monene, yango esalisaki biso tósalaka mayangani ya mike wana.
NALELI, NAMIYOKI ETE NAZALI NGAI MOKO, MPE NAZWI LISUSU ESENGO
Na 1993 ntango bana na biso bakómaki mikóló, ngai ná Adel tobandaki mosala ya zongazonga na Philippines. Na nsima na mobu 2000, nakɔtaki Eteyelo mpo na kobongisa basungi mpo na kozwa formasyo ya kokóma molakisi na eteyelo yango. Namonaki ete nakokoka mokumba yango te, kasi Adel azalaki ntango nyonso kolendisa ngai. Akundwelaki ngai ete Yehova akopesa ngai makasi ya kokokisa mokumba yango ya sika. (Flp. 4:13) Adel ayebaki ete ekosalema bongo mpo ye moko azalaki kokokisa mokumba na ye ná maladi na nzoto.
Na mobu 2006 ntango nazalaki kotángisa, bazwaki Adel na maladi ya Parkinson. Epesaki biso mpasi mingi! Ntango nayebisaki ye ete tótika mikumba na biso mpo na kosalisa ye, Adel alobaki: “Nabondeli yo, luká monganga oyo akoki kosalisa ngai, mpe nayebi ete Yehova akosalisa biso tókoba na mosala na biso.” Na boumeli ya bambula motoba oyo elandaki, Adel akobaki kosalela Yehova kozanga komilelalela. Ntango azalaki kokoka lisusu kotambola te, akómaki kosakola na kiti ya bibɔsɔnɔ. Ntango akómaki na mokakatano ya koloba, akómaki kopesa biyano ya maloba moko to mibale na makita. Bandeko mingi bazalaki mbala na mbala kotindela Adel bamesaje ya botɔndi mpo na ndakisa na ye ya malamu ya koyika mpiko tii ntango akufaki na 2013. Nalekisaki mbula koleka 30 ná Adel, mwasi na ngai ya sembo mpe oyo nalingaki mingi, na yango ntango akufaki, nakómaki lisusu komiyoka mawamawa mpe ngai moko.
Adel alingaki nakoba na mokumba na ngai, yango wana nasalaki bongo. Nakobaki komipesa na mosala ya Yehova, mpe yango esalisaki ngai namiyoka ete nazali mpenza ngai moko te. Kobanda mobu 2014 tii 2017, nazalaki kotala masangá ya monɔkɔ ya Tagalog na bikólo oyo batyelaki mosala na biso bipekiseli. Nsima na yango, natalaki masangá ya monɔkɔ ya Tagalog na Taïwan, na États-Unis, mpe na Canada. Na mobu 2019, natángisaki na bakelasi ya Eteyelo ya bapalanganisi ya nsango malamu ya Bokonzi na monɔkɔ ya Anglais na Inde mpe na Thaïlande. Mikumba yango epesaki ngai esengo mingi. Nayokaka esengo mingi ntango namipesi mobimba na mosala ya Yehova.
LISALISI EZANGAKA TE
Na mokumba nyonso ya sika, nakómaka kolinga mingi bandeko oyo nakuti, na yango kotika bango ezalaka pɛtɛɛ te. Na bantango ya bongo, nayekolá kotyela Yehova motema mobimba. Namoni mbala na mbala lobɔkɔ na ye, mpe yango esalisi ngai nandima na motema mobimba mbongwana nyonso oyo ekómeli ngai. Lelo, nazali mobongisi-nzela monene na Philippines. Namesani na lisangá na ngai ya sika, oyo ekómá libota oyo esalisaka ngai mpe esungaka ngai. Nazali mpe na esengo komona ndenge Samuel ná Shirley bazali komekola kondima ya mama na bango.—3 Yoa. 4.
Ya solo, nakutani na mikakatano mingi na bomoi na ngai, kati na yango komona ndenge mwasi na ngai anyokwamaki mpe akufaki na maladi moko ya mpasi mpenza. Nasengelaki mpe komesana na bambongwana mingi na bomoi na ngai. Kasi, namoni ete Yehova “azali mosika te na mokomoko na biso.” (Mis. 17:27) Lobɔkɔ ya Yehova ezali “mokuse mingi te” mpo na kosalisa mpe kopesa basaleli na ye makasi, ata soki bazali na bisika oyo bazali bango moko. (Yis. 59:1) Yehova, Libanga na ngai, azali elongo na ngai bomoi na ngai mobimba, mpe nazali na botɔndi mingi epai na ye. Nazalaki ata moke te ngai moko.
a Talá lisolo “Vous n’êtes jamais seul” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15/12/1972, nk. 745-751.