Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOYEKOLI 8

LOYEMBO 130 Tólimbisaka

Ndenge nini okoki komekola Yehova na oyo etali kolimbisa?

Ndenge nini okoki komekola Yehova na oyo etali kolimbisa?

“Kaka ndenge Yehova alimbisaki bino na motema moko, bino mpe bósala bongo.”KOL. 3:13.

NA MOKUSE

Lisolo oyo ekolobela makambo oyo tokoki kosala mpo na kolimbisa moto oyo apesi biso mpasi.

1-2. (a) Ntango nini ekoki kozala mingimingi mpasi kolimbisa moto? (b) Ndenge nini Denise amonisaki ezaleli ya kolimbisa?

 EZALAKA mpasi mpo olimbisa basusu? Ezalaka bongo mpo na mingi na biso, mingimingi ntango moto alobi to asali likambo oyo ezokisi biso mpenza. Kasi, tokoki kolongola nkanda mpe kolimbisa. Tózwa ndakisa ya ndeko mwasi moko Denise, a oyo alimbisaki na ndenge ya kokamwa mpenza. Na 2017, Denise ná libota na ye bautaki kotala biro monene ya Batatoli ya Yehova oyo eutaki kofungwama. Ntango bazalaki kozonga ndako, sofɛlɛ moko azwaki mokakatano na motuka na ye mpe atutaki motuka ya libota ya Denise. Na aksida yango, Denise abungisaki makanisi. Ntango alamukaki, ayokaki ete bana na ye bazokaki makasi mpe ete mobali na ye, Brian, akufaki. Ntango akanisaki makambo oyo elekaki, Denise alobaki: “Nayokaki ete nasuki mpe nabulunganaki.” Na nsima, Denise ayokaki ete sofɛlɛ yango azalaki na likama te mpe eloko te elongolaki likebi na ye, mpe asɛngaki Yehova apesa ye kimya.

2 Bakangaki sofɛlɛ yango mpo na ndenge abomaki moto. Soki tribinale ekweisi ye, akokɔta bolɔkɔ. Kasi tribinale eyebisaki Denise ete bakokatela sofɛlɛ yango etumbu na kotalela makambo oyo Denise akoloba. Denise alobi boye: “Nayokaki lokola nde moto akati bansinga ya mpota na ngai mpe atye mungwa ebele na kati, mpo nasengelaki kolobela lisusu ntango oyo elekaki mpasi na bomoi na ngai.” Bapɔsɔ moke kaka na nsima, Denise afandaki na tribinale mpo na koloba liboso ya mobali oyo amemelaki libota na ye mpasi mingi. Denise alobaki nini? Asɛngaki zuzi ayokela mobali yango mawa. b Ntango asilisaki koloba, zuzi alelaki. Zuzi yango alobaki: “Na mbula 25 oyo nasali na mosala oyo, nayoká naino likambo ya boye te na tribinale oyo. Nayoká naino te moto ya libota oyo basali mabe asɛnga ete báyokela moto oyo asali bango mabe mawa. Nayoká naino te moto amonisa bolingo na ndenge oyo mpe alimbisa boye.”

3. Nini etindaki Denise alimbisa?

3 Nini esalisaki Denise alimbisa? Amanyolaki na ezaleli ya kolimbisa ya Yehova. (Mika 7:18) Soki tozali mpenza na botɔndi ndenge Yehova alimbisaka biso, ekotinda biso mpe tólimbisaka basusu.

4. Yehova alingi ete tósala nini? (Baefese 4:32)

4 Yehova alingi tólimbisaka basusu na motema moko kaka ndenge ye alimbisaka biso. (Tángá Baefese 4:32.) Alingi tózalaka pene ya kolimbisa baoyo bazokisi biso. (Nz. 86:5; Luka 17:4) Na lisolo oyo, tokotalela makambo misato oyo ekosalisa biso tólimbisaka lisusu mingi.

NDIMÁ MAYOKI OYO OZALI NA YANGO

5. Na kotalela Masese 12:​18, tokoki koyoka ndenge nini ntango moto alobi to asali biso mabe?

5 Tokoki koyoka mpasi mpenza mpo na likambo oyo moto alobi to asali biso, mingimingi soki moto yango azali moninga ya motema to moto ya libota. (Nz. 55:​12-14) Na bantango mosusu, mpasi oyo tozali koyoka ekoki kozala lokola bazokisi biso. (Tángá Masese 12:18.) Tokoki koluka kosala lokola tozali koyoka eloko te. Kasi kosala bongo ezali lokola ozoki mpe otiki mbeli na mpota yango. Ndenge moko mpe, tókanisa te ete mpasi oyo bapesi biso ekosila yango moko soki toboyi kondima yango.

6. Tokoki koyoka ndenge nini ntango moto alobi to asali biso mabe?

6 Ntango moto alobi to asali biso mabe, mbala mingi toyokaka nkanda. Biblia mpe endimi ete tokoki koyoka nkanda. Kasi, ekebisi biso tótika te nkanda etambwisa biso. (Nz. 4:4; Ef. 4:26) Mpo na nini? Mpo mbala mingi mayoki na biso nde etindaka biso tósala likambo. Mpe mayoki ya nkanda etindaka mpenza te na makambo ya malamu. (Yak. 1:20) Tóbosana te, likambo moko ekoki kopesa biso nkanda, kasi tokoki kopona kotikala na nkanda to te.

Likambo moko ekoki kopesa biso nkanda, kasi tokoki kopona kotikala na nkanda to te

7. Mayoki nini mosusu tokoki kozala na yango ntango moto apesi biso mpasi?

7 Ntango moto asali biso makambo ya mabe, tokoki kozala na mayoki ya ndenge mosusu. Na ndakisa, ndeko mwasi moko na nkombo Ann alobi ete: “Ntango nazalaki mwana moke, papa atikaki mama mpe abalaki mwasi oyo azalaki kokɛngɛla ngai. Nayokaki ete nasundolami. Ntango babotaki bana, namonaki ete bazwi esika na ngai. Ntango nazalaki kokola, nayebaki ete moto te alingaka ngai.” Ndeko mwasi moko na nkombo Georgette alobi ndenge ayokaki ntango mobali na ye asalaki ekobo: “Tozalaki baninga banda bomwana. Tosalaki mosala ya mobongisi-nzela elongo! Motema na ngai ezokaki.” Mpe ndeko mwasi mosusu na nkombo Naomi alobi: “Nakanisaki ata moke te ete mobali na ngai akosala ngai mabe. Na yango ntango abimisaki ete atalaka pornografi na kobombana, namonaki ete akosi ngai mpe asambwisi ngai.”

8. (a) Mpo na nini tosengeli kolimbisaka basusu? (b) Matomba nini tozwaka ntango tolimbisi? (Talá etanda “ Bongo soki totikalá na nsɔmɔ mpo na likambo oyo basalá biso”)

8 Tokoki te koyeba oyo basusu bakoki koloba to kosala biso, kasi tokoki koyeba ndenge oyo biso tokosala. Mpe mbala mingi kolimbisa nde likambo eleki malamu oyo tokoki kosala. Mpo na nini? Mpo tolingaka Yehova, mpe alingi tólimbisaka. Soki tobombi nkanda mpe tolimbisi te, tokoki kosala makambo ya bozoba mpe mbala mosusu kobebisa kolɔngɔnɔ ya nzoto na biso. (Mas. 14:​17, 29, 30) Tótalela ndakisa ya ndeko mwasi moko na nkombo Christine. Alobi boye: “Ntango nazali na nkanda mpo moto apesaki ngai mpasi, nasɛkaka mpenza te. Mbala mingi nalyaka bilyalya. Nalalaka malamu te, ekómaka mpasi napekisa mayoki na ngai, mpe yango ebebisaka boyokani na ngai na mobali na ngai mpe na basusu.”

9. Mpo na nini tosengeli kotika koyoka nkanda na motema na biso?

9 Ata soki moto oyo apesaki biso mpasi asɛngá biso bolimbisi te, tokoki kosala mwa likambo mpo na kokitisa mpasi oyo apesaki biso. Ndenge nini? Georgette alobi: “Ezwaki mwa ntango, kasi natikaki kosilika mpe koyoka nkanda mpo na mobali na ngai ya kala. Nsima na yango, nazwaki mpenza kimya.” Ntango totiki koyoka nkanda, tokomibatela mpo tókóma nkandankanda te na motema na biso. Tokomisala mpe malamu; tokotala liboso mpe tokozongela kosepela lisusu na bomoi. (Mas. 11:17) Kasi okosala nini soki ondimi mayoki oyo ozali na yango, kasi ozali kokoka kaka kolimbisa te?

NDENGE YA KOLONGA MAYOKI YA MABE

10. Mpo na nini tosengeli komipesa ntango mpo motema na biso ebika? (Talá mpe bililingi.)

10 Ndenge nini okoki kolongola mayoki ya mabe? Ya liboso, omipesa ntango mpo motema na yo ebika. Mpo moto oyo abukanaki makasi abika nsima ya kozwa lisalisi ya monganga, esengeli ntango eleka. Ndenge moko mpe, ekoki kosɛnga ntango eleka mpo motema na biso ebika liboso tómona ete tokoki sikoyo kolimbisa na motema moko.—Mos. 3:3; 1 Pe. 1:22.

Esɛngaka ntango mpe lisalisi mpo moto oyo abukani abika; ezali mpe bongo mpo na mpasi ya motema (Talá paragrafe 10)


11. Ndenge nini libondeli ekoki kosalisa yo olimbisaka?

11 Ya mibale, bondelá: sɛngá Yehova asalisa yo olimbisaka. c Ann, oyo tolobelaki, alobi ndenge libondeli esalisaki ye. Alobi boye: “Nasɛngaki Yehova alimbisa moto mokomoko ya libota na biso mpo na makambo oyo tosalaki. Na nsima, nakomelaki tata na ngai ná mwasi na ye ya sika mokanda mpe nayebisaki bango ete nalimbisaki bango.” Ann andimi ete kosala bongo ezalaki pɛtɛɛ te. Kasi abakisi boye: “Nazali na elikya ete lokola nasali makasi ya komekola Yehova na oyo etali kolimbisa, tata na ngai ná mwasi na ye bakoluka koyekola koyeba Yehova.”

12. Mpo na nini tosengeli kotyela Yehova motema na esika ya kolanda mayoki na biso? (Masese 3:​5, 6)

12 Ya misato, tyelá Yehova motema, kolanda mayoki na yo te. (Tángá Masese 3:​5, 6.) Yehova ayebaka ntango nyonso oyo eleki malamu mpo na biso. (Yis. 55:​8, 9) Mpe akosɛnga biso ata moke te tósala likambo oyo ekosala biso mabe. Na yango, ntango alendisaka biso tólimbisaka, tótya motema ete kosala yango ekozala mpo na bolamu na biso. (Nz. 40:4; Yis. 48:​17, 18) Kasi, soki tolandi mayoki na biso, mbala mosusu tokokoka kolimbisa basusu ata moke te. (Mas. 14:12; Yir. 17:9) Naomi oyo tolobelaki liboso, alobi: “Na ebandeli, namonaki ete nazali na ntina malamu ya koboya kolimbisa mobali na ngai lokola azalaki kotala pornografi. Nazalaki kobanga ete asala ngai lisusu mabe to abosana mpasi oyo ayokisaki ngai. Mpe nazalaki komiloba ete Yehova azalaki komitya na esika na ngai. Kasi nakómaki komona ete atako Yehova azali komitya na esika na ngai, elimboli te ete andimi mayoki na ngai. Ayebi ndenge nazali komiyoka mpe ayebi ete ekozwa ntango mpo motema na ngai ebika, kasi alingi mpe ete nalimbisa.” d

LUKÁ KOKÓMA NA MAYOKI YA MALAMU

13. Na kotalela Baroma 12:​18-21, tosengeli kosala nini?

13 Kolimbisa moto oyo azokisaki biso makasi esuki kaka te na kozwa ekateli ya koboya kolobela likambo oyo elekaki. Soki moto oyo apesaki biso mpasi azali ndeko na biso mokristo, mokano na biso ezali ya kosala kimya elongo na ye. (Mat. 5:​23, 24) Na esika ya nkanda, toponaka komonisa motema mawa mpe na esika ya kosilika, tolimbisaka. (Tángá Baroma 12:​18-21; 1 Pe. 3:9) Nini ekoki kosalisa biso tósala yango?

14. Tosengeli kosala makasi ya kosala nini, mpe mpo na nini?

14 Tosengeli kosala makasi tótalela moto oyo apesaki biso mpasi ndenge Yehova atalelaka ye. Yehova alukaka komona malamu oyo ezali epai ya bato. (2 Nt. 16:9; Nz. 130:3) Mbala mingi, tomonaka epai ya basusu kaka eloko oyo tozali koluka—ezala malamu to mabe. Ntango tozali koluka komona nde bizaleli malamu ya basusu, ekozala mpasi te tólimbisa bango. Na ndakisa, ndeko mobali moko na nkombo Jarrod alobi boye: “Ezalaka mpasi te nalimbisa ndeko moko ntango nakokanisi mabe oyo asali ngai na ebele ya makambo oyo nasepelaka na yango epai na ye.”

15. Ndenge nini koyebisa moto ete olimbisi ye ekoki kosalisa yo?

15 Ezali mpe na ntina oluka koyebisa moto oyo apesaki yo mpasi ete olimbisi ye. Mpo na nini? Talá oyo Naomi alobi: “Mobali na ngai atunaki ngai, ‘Olimbisi ngai?’ Ntango nalingaki koloba ete, ‘Nalimbisi yo,’ nakokaki te. Namonaki ete nalimbisaki ye mpenza te na motema na ngai. Na nsima, nalongaki koyebisa ye maloba yango ya nguya ete: ‘Nalimbisi yo.’ Nakamwaki komona ete maloba yango elelisaki mobali na ngai mpo motema na ye ekitaki, mpe ngai moko namiyokaki malamu mpenza. Banda wana, nakómá kotyela ye lisusu motema mpe boninga ezongá makasi na libala na biso.”

16. Oyekoli nini na likambo etali kolimbisa?

16 Yehova alingi ete tólimbisaka. (Kol. 3:13) Atako bongo, na bantango mosusu tobundaka mpo na kolimbisa basusu. Kasi mpo na kolonga kosala yango, tosengeli kondima mayoki ya mabe oyo tozali na yango mpe kosala makasi tólongola yango. Na nsima, tóluka kokóma na mayoki mosusu, mayoki ya malamu.—Talá etanda “ Makambo misato ya kosala mpo na kolimbisa.”

KANISÁ MATOMBA YA KOLIMBISA BASUSU

17. Matomba nini tokozwa mpo tozali kolimbisa basusu?

17 Tozali na bantina mingi ya kolimbisa basusu. Tótalela kaka mwa ndambo. Ya liboso, tokomekola mpe tokosepelisa Tata na biso ya motema mawa, Yehova. (Luka 6:36) Ya mibale, tokomonisa ete tozali na botɔndi mingi ndenge Yehova alimbisaka biso. (Mat. 6:12) Mpe ya misato, tokozala na nzoto kolɔngɔnɔ mpe tokozala na boninga makasi na basusu.

18-19. Matomba nini ekoki komonana soki tolimbisi?

18 Ntango tolimbisi basusu, tokoki kozwa mapamboli oyo tokanisaki te. Na ndakisa, talá oyo ekómelaki Denise, oyo tolobelaki liboso. Atako ayebaki yango te na ntango wana, mobali oyo atutaki bango akanaki komiboma soki basilisi kosambisa ye. Kasi, ndenge Denise alimbisaki ye esimbaki mpenza motema na ye mpe andimaki koyekola Biblia na Batatoli ya Yehova.

19 Tokoki komona ete kolimbisa ezali moko ya makambo oyo eleki mpasi oyo tokoki kosala, kasi ekoki mpe kozala moko ya makambo oyo ekopesa biso litomba monene. (Mat. 5:7) Na yango, mokomoko na biso asala nyonso oyo akoki mpo na komekola Yehova na oyo etali kolimbisa.

LOYEMBO 125 “Esengo na bato ya motema mawa!”

a Topesi bango bankombo mosusu.

b Na likambo ya ndenge wana, mokristo ye moko asengeli kozwa ekateli mpo na oyo akosala.

c Talá na jw.org bavideo ya banzembo “Tólimbisanaka,” “Limbisá mpe bosaná,” mpe “Tózongisa boninga.”

d Atako kotala pornografi ezali lisumu mpe epesaka mpasi mingi, na kotalela Makomami, yango epesi moto nzela te ya koboma libala na molongani na ye oyo atalaka pornografi.