Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOYEKOLI 6

LOYEMBO 18 Tózala na botɔndi mpo na lisiko

Ntina ya kozala na botɔndi ndenge Yehova alimbisaka

Ntina ya kozala na botɔndi ndenge Yehova alimbisaka

“Nzambe alingaki mokili mingi mpenza yango wana apesaki Mwana na ye se moko oyo abotamaki.”YOA. 3:16.

NA MOKUSE

Tosengeli kozala na botɔndi mingi ndenge Yehova alimbisaka masumu na biso. Mpo na yango tokolobela bibongiseli oyo azwaki mpo na kolimbisa masumu.

1-2. Na ndenge nini likambo na biso bato ezali lokola ya elenge mobali oyo paragrafe 1 elobeli?

 KANISÁ elenge mobali moko oyo abɔkwamá na libota moko ya bozwi. Mokolo moko likama esalemi; tata na ye ná mama na ye bakufi na aksida. Nsango yango epesi ye mpasi mingi. Kasi, nsango mosusu ya mabe ezali kozela ye. Bayebisi ye ete baboti na ye basilisaki bozwi ya libota mpe bakɔtaki banyongo ebele. Sikoyo, na esika atikala na bozwi ya baboti na ye, atikali nde na banyongo mpe bankolo mbongo basɛngi ye afuta yango mbala moko. Nyongo yango eleki monene mpe elenge yango azali na likoki te ya kofuta yango.

2 Likambo na biso ekokani mwa moke na oyo ya elenge mobali wana. Adama ná Eva, baboti na biso ya liboso, bazalaki bato ya kokoka mpe bafandaki na paradiso moko kitoko. (Eba. 1:27; 2:​7-9) Bakokaki kosepela na bomoi ya malamu libela na libela. Kasi esalemaki bongo te mpo makambo ebongwanaki. Balongwaki na Paradiso mpe babungisaki elikya ya kozala na bomoi ya seko. Eloko nini bakokaki kotikela bana na bango? Biblia elobi: “Lisumu ekɔtaki na mokili mpo na moto moko [Adama] mpe liwa mpo na lisumu, ndenge moko mpe liwa epalangani epai ya bato nyonso mpo bango nyonso basalaki lisumu.” (Rom. 5:12) Libula oyo Adama atikelá biso ezali lisumu, mpe yango ememaka na liwa. Lisumu yango ezali lokola nyongo moko monene, oyo moko te kati na biso akoki kofuta.—Nz. 49:8.

3. Mpo na nini masumu na biso ezali lokola “banyongo”?

3 Yesu akokanisaki masumu na “banyongo.” (Mat. 6:​12, msl; Luka 11:4) Ntango tosali lisumu, ezali lokola tokɔti nyongo epai ya Yehova. Esɛngaka tófuta mpo na masumu yango. Soki nyongo yango efutami te, ekolongwa kaka ntango tokufi, kozanga elikya ya kozonga na bomoi.—Rom. 6:​7, 23.

4. (a) Kozanga lisalisi, biso bato ya masumu tolingaki kozala ndenge nini? (Nzembo 49:​7-9) (b) Na Biblia, liloba “lisumu” emonisaka nini? (Talá etanda “ Lisumu.”)

4 Tokoki kozwa lisusu nyonso oyo Adama ná Eva babungisaki? Na makasi na biso moko, tokokoka te. (Tángá Nzembo 49:​7-9.) Kozanga lisalisi, tolingaki kozala na elikya te ya bomoi na mikolo ekoya to ya lisekwa. Kutu, liwa na biso elingaki kozala kaka lokola ya banyama.—Mos. 3:19; 2 Pe. 2:12.

5. Ndenge nini Tata na biso ya bolingo asalisi biso tófuta nyongo ya lisumu oyo Adama atikelá biso? (Talá ezipeli.)

5 Tókanisa lisusu elenge mobali oyo tolobelaki na ebandeli. Akomiyoka ndenge nini soki moto moko ya bozwi andimi kofutela ye nyongo na ye nyonso? Na ntembe te akozala na botɔndi mingi mpe akondima lisalisi wana. Ndenge moko mpe, Tata na biso ya bolingo Yehova apesi biso likabo oyo efuti nyongo ya lisumu oyo Adama atikelá biso. Yesu alobelaki yango boye: “Nzambe alingaki mokili mingi mpenza yango wana apesaki Mwana na ye se moko oyo abotamaki, mpo moto nyonso oyo akomonisa kondima epai na ye abomama te kasi azwa bomoi ya seko.” (Yoa. 3:16) Likabo yango epesi biso mpe nzela ya kozala na boyokani malamu na Yehova.

Yesu asakolaki nsango malamu oyo etali ndenge Yehova alimbisi biso na nzela ya mbeka ya lisiko. (Yoa. 3:​16) Na nsima andimaki kokaba bomoi na ye mpo na kopesa lisiko yango (Talá paragrafe 5)


6. Maloba nini ya Biblia tokotalela na lisolo oyo, mpe mpo na nini?

6 Matomba nini tokoki kozwa na likabo yango ya kokamwa oyo esalaka ete masumu, to “banyongo” na biso elimbisama? Eyano ezali na maloba oyo Biblia esaleli, na ndakisa kozongisa boyokani, kozipa masumu, lisiko, kosikolama, mpe kotángama bato ya sembo. Na lisolo oyo, tokolobela ndimbola ya maloba yango mokomoko. Komanyola na bandimbola yango ekobakisa botɔndi na biso mpo na oyo Yehova asali mpo na kolimbisa masumu.

MOKANO: KOZONGISA BOYOKANI

7. (a) Eloko nini lisusu Adama ná Eva babebisaki? (b) Lokola tozali bakitani na bango, tosengeli mpenza kosala nini? (Baroma 5:​10, 11)

7 Adama ná Eva babungisaki kaka elikya ya kozala na bomoi ya seko te; babebisaki mpe boyokani oyo bazalaki na yango na Tata na bango Yehova. Na ebandeli, bazalaki na kati ya libota ya Nzambe. (Luka 3:38) Kasi ntango babukaki mobeko ya Yehova, balongolamaki na libota na ye liboso bábanda kobota bana. (Eba. 3:​23, 24; 4:1) Na yango, lokola tozali bakitani na bango, tosengeli kozongisa boyokani na Yehova. (Tángá Baroma 5:​10, 11.) Na maloba mosusu, tosengeli koluka kokóma baninga na ye. Diksionɛrɛ moko emonisi ete liloba ya Grɛki oyo basaleli na bavɛrsɛ yango mpo na “kozongisa boyokani” ekoki kolimbola “kotika kozala banguna mpe kokóma baninga.” Likambo ya kokamwa, Yehova nde moto azwaki bibongiseli mpo na kozongisa boyokani yango. Ndenge nini?

EBONGISELI: KOZIPA MASUMU

8. (a) Kozipa masumu ezali nini? (b) Mpe yango esalaka nini?

8 Kozipa masumu ezali ebongiseli oyo Yehova azwaki mpo na kozongisa boyokani malamu kati na ye ná bato ya masumu. Yango esɛngi kopesa eloko moko na esika ya eloko mosusu oyo ezali na motuya ndenge moko. Na ndenge yango, eloko oyo ebungaki to ebebaki ekoki kozongisama, to eloko mosusu ekoki kozwa esika na yango. Makomami ya Grɛki ya bokristo emonisi ndenge oyo Yehova asalaki mpo na kozongisa boyokani na nzela ya kozipa masumu. (Rom. 3:​25, msl.) Yango nde epesaka moto nzela ya kozala na kimya elongo na Nzambe mpe kozala na boyokani malamu ná ye.

9. Ebongiseli nini ya ntango mokuse Yehova atyaki mpo masumu ya Bayisraele elimbisamaka?

9 Mpo na kosalisa Bayisraele bázala na boyokani malamu ná ye, Yehova atyaki ebongiseli moko ya ntango mokuse mpo na kolimbisa masumu na bango. Na Yisraele, Mokolo ya kozipa masumu ezalaki molulu ya mbula na mbula. Na mokolo yango, nganga-nzambe monene azalaki kopesa bambeka ya banyama mpo na bato. Ya solo, bambeka ya banyama ekokaki te kozipa libela masumu ya moto mpo nyama ezali na motuya moke liboso ya bato. Kasi, soki Bayisraele oyo babongoli motema bapesi bambeka oyo Yehova asɛngaki, azalaki kondima kolimbisa masumu na bango. (Ebr. 10:​1-4) Longola yango, ebongiseli wana mpe makabo mpo na lisumu oyo bazalaki kopesa ezalaki kokundwela Bayisraele ete kozala moto ya masumu ezali lisɛki te mpe ete bazalaki mpenza na bosɛnga ya eloko oyo ekozipa masumu mpo na libela.

10. Ebongiseli nini ya libela Yehova azwaki mpo na kolimbisa masumu?

10 Yehova ayebaki ete akotya ebongiseli moko ya libela mpo na kolimbisa masumu. Abongisaki ete Mwana na ye ya bolingo “[akabama] mbala moko mpo na libela mpo na komema masumu ya bato mingi.” (Ebr. 9:28) Yesu apesaki “bomoi na ye lisiko na esika ya bato mingi.” (Mat. 20:28) Lisiko ezali nini?

MOTUYA OYO EFUTAMAKI: LISIKO

11. (a) Na Biblia, lisiko ezali nini? (b) Esɛngaki moto ya ndenge nini mpo lisiko efutama?

11 Na Biblia, lisiko ezali motuya oyo efutami mpo na kozipa masumu mpe kozongisa boyokani. a Na miso ya Yehova, lisiko nde esali ete oyo ebungaki ezonga. Na ndenge nini? Tóbosana te ete Adama ná Eva babungisaki bomoi na bango ya kokoka mpe elikya ya kozala na bomoi libela na libela. Na yango, lisiko esengelaki kozala motuya oyo ekokani na eloko oyo ebungaki. (1 Tim. 2:6) Ekokaki kofutama kaka na mobali ya mokóló oyo (1) azali moto ya kokoka; (2) akoki kozala na bomoi libela na libela na mabele; mpe (3) andimi kokaba, to kopesa bomoi yango mbeka mpo na biso. Kaka soki makambo wana misato ekoki nde bomoi ya moto yango ekokaki kozwa esika, to kozipa, bomoi oyo ebungaki.

12. Mpo na nini Yesu akokaki mpo na kofuta motuya ya lisiko oyo esengelaki?

12 Tótalela makambo misato oyo esalaki ete Yesu akoka mpo na kofuta motuya ya lisiko. (1) Azalaki moto ya kokoka: “asalaki lisumu te.” (1 Pe. 2:22) (2) Na yango, akokaki kozala na bomoi libela na libela na mabele. (3) Andimaki kokufa mpe kokaba bomoi yango mpo na biso. (Ebr. 10:​9, 10) Lokola azalaki moto ya kokoka, Yesu akokanaki na moto ya liboso, Adama, ndenge azalaki liboso asala lisumu. (1 Ko. 15:45) Na yango, na nzela ya liwa na ye, Yesu, alongaki kozipa lisumu ya Adama, elingi koloba, kozongisa eloko oyo Adama abungisaki. (Rom. 5:19) Na bongo, Yesu akómaki “Adama ya nsuka.” Ezali na ntina te moto mosusu ya kokoka aya mpo na kofuta eloko oyo Adama abungisaki. Yesu akufaki “mbala moko mpo na libela.”—Ebr. 7:27; 10:12.

13. Bokeseni ezali wapi kati na ebongiseli ya kozipa masumu mpe lisiko?

13 Boye, bokeseni ezali wapi kati na ebongiseli ya kozipa masumu mpe lisiko? Ebongiseli ya kozipa masumu ezali likambo oyo Nzambe asali mpo na kozongisa boyokani malamu kati na ye ná bato. Lisiko ezali motuya oyo efutami mpo na kozipa masumu ya bato. Motuya yango ezali makila ya Yesu oyo asopaki mpo na biso.—Ef. 1:7; Ebr. 9:14.

MATOMBA: KOSIKOLAMA MPE KOTÁNGAMA BATO YA SEMBO

14. Tokotalela nini sikoyo, mpe mpo na nini?

14 Matomba nini ebongiseli ya kozipa masumu ebimisi? Biblia esaleli maloba ebele mpo na komonisa matomba yango. Atako ndimbola ya maloba yango mosusu ekokaná, liloba mokomoko emonisi likambo moko boye oyo etali ebongiseli ya kozipa masumu oyo esali ete Yehova alimbisaka bato. Tokotalela sikoyo maloba yango, mpe tokomona matomba oyo ememeli mokomoko na biso.

15-16. (a) Na Biblia, liloba “kosikolama” emonisaka nini? (b) Yango etindaka biso tómiyoka ndenge nini?

15 Na Biblia, kosikolama emonisaka kolongwa na bokangami, to kolongwa na ngambo mpo lisiko efutamaki. Ntoma Petro alobelaki yango boye: “Boyebi mpenza ete ezalaki te na biloko oyo ekoki kobeba, na palata to na wolo, nde bosikolamaki [to, “bozwaki bonsomi”] na lolenge ya bomoi ya mpambampamba oyo bankɔkɔ na bino batikelaki bino. Kasi ezalaki nde na makila moko ya motuya, lokola oyo ya mwana-mpate ezangi mbeba mpe ezangi litɔnɔ, makila ya Kristo.”—1 Pe. 1:​18, 19, msl.

16 Na nzela ya mbeka ya lisiko, tokoki kolongwa na boyangeli mabe ya lisumu mpe ya liwa. (Rom. 5:21) Ya solo, tozali na ntina ya kozala na botɔndi mingi epai ya Yehova mpe Yesu mpo na kosikolama oyo tozwi na nzela ya makila to bomoi ya motuya ya Yesu.—1 Ko. 15:22.

17-18. (a) Kotángama bato ya sembo elimboli nini? (b) Matomba nini yango ememeli biso?

17 Kotángama bato ya sembo elimboli ete ngambo oyo tozalaki na yango elongwe mpe misala na biso ya mabe oyo ekomamaki ebomami. Ntango Yehova asali bongo, abuki te mibeko na ye oyo etali bosembo. Atángi biso bato ya sembo na makasi na biso moko te; andimi mpe te masumu na biso. Kasi, lokola tozali na kondima na ebongiseli ya kozipa masumu mpe na lisiko oyo efutamaki, nde Yehova azwi ntina ya koboma banyongo na biso.—Rom. 3:24; Gal. 2:16.

18 Yango ememeli mokomoko na biso matomba nini? Baoyo baponami mpo na koyangela elongo na Yesu na likoló basili kotángama bato ya sembo lokola bana ya Nzambe. (Tito 3:7; 1 Yoa. 3:1) Masumu na bango esili kolimbisama. Ezali lokola nde basalá ata masumu te, mpe na bongo bakokisi masɛngami mpo na kozala na kati ya Bokonzi. (Rom. 8:​1, 2, 30) Baoyo bazali na elikya ya bomoi na mabele batángami bato ya sembo lokola baninga ya Nzambe, mpe masumu na bango elimbisami. (Yak. 2:​21-23) Ebele mpenza ya bato, oyo bakobika na Armagedone, bazali na elikya ya kokufa ata mokolo moko te. (Yoa. 11:26) “Bato ya sembo” mpe “bato oyo bazangi bosembo,” oyo basilá kokufa bakozonga na bomoi na lisekwa. (Mis. 24:15; Yoa. 5:​28, 29) Nsukansuka, basaleli nyonso ya Yehova ya botosi awa na mabele bakozwa “bonsomi ya bana ya Nzambe oyo etondi na nkembo.” (Rom. 8:21) Wana lipamboli monene oyo euti na ebongiseli ya kozipa masumu: kozongisa boyokani ya kokoka ná Tata na biso, Yehova!

19. Ndenge nini likambo na biso ebongá? (Talá mpe etanda “ Ndimbola na yango mpo na biso.”)

19 Ya solo, tozalaki na elikya te lokola elenge mobali oyo tolobelaki na ebandeli, oyo abungisaki nyonso mpe atikalaki na nyongo monene oyo akokaki kofuta te. Kasi, Yehova asalisi biso. Tozwi elikya mpo na ebongiseli ya kozipa masumu mpe lisiko oyo efutamaki. Kondima na biso epai ya Yesu Kristo epesi biso nzela ya kosikolama na lisumu mpe na liwa. Masumu na biso ekoki mpe kobomama, lokola nde tosalá yango te. Kasi oyo eleki ntina, tokoki sikoyo kozala na boyokani malamu na Tata na biso ya bolingo, Yehova.

20. Tokolobela nini na lisolo oyo elandi?

20 Ntango tozali komanyola na oyo Yehova ná Yesu basalelá biso, motema na biso etondaka na botɔndi. (2 Ko. 5:15) Kozanga lisalisi na bango, tolingaki kozala ata na elikya moko te! Kasi, Yehova asalaka mpenza nini ntango alimbisaka mokomoko na biso? Yango nde tokolobela na lisolo oyo elandi.

LOYEMBO 10 Tópesa Yehova Nzambe na biso nkembo!

a Na minɔkɔ mosusu, liloba “lisiko” ebongolami na liloba oyo elimboli mpenzampenza “motuya ya bomoi,” to “eloko oyo bafuti.”