Mituna ya batángi
Mpo na nini mobali oyo babengi “Songolo” alobaki ete “akobebisa” libula na ye soki abali Ruta? (Ruta 4:1, 6)
Na ntango ya kala, soki mobali oyo abalá akufi kozanga ete abota bana, ezalaki na mwa mituna oyo esengelaki koyanolama: Nini esengelaki kokómela mabele na ye mpe biloko oyo azalaki na yango? Nkombo na ye esengelaki kolimwa mpo na libela? Mibeko ya Moize eyanolaki na mituna yango.
Nini ezalaki kokómela mabele ya moto oyo akufi to mpe akómi mobola mpe atɛki mabele na ye? Ndeko na ye ya mobali to mpe ndeko moko ya libota na ye ya pene nde asengelaki kosomba lisusu mabele yango. Kosala bongo, ezalaki kosala ete mabele yango etikala kaka na kati ya libota.—Lev. 25:23-28; Mit. 27:8-11.
Ndenge nini nkombo ya moto oyo akufi esengelaki kobatelama? Na nzela ya libala ya bosɛmɛki, lolenge ya libala oyo esalemaki mpo na Ruta. Mobali azalaki kobala mwasi ya ndeko na ye oyo akufi mpo abota na ye mwana oyo akozwa nkombo mpe biloko ya mowei. Ebongiseli yango ezalaki mpe kobatela mwasi ya mowei.—Mib. 25:5-7; Mat. 22:23-28.
Tótalela likambo oyo ekómelaki Naomi. Abalanaki na mobali moko na nkombo Elimeleke. Ntango Elimeleke ná bana na bango mibale bakufaki, Naomi atikalaki kaka ye moko kozanga moto oyo asengelaki kosalisa ye. (Ruta 1:1-5) Ntango Naomi azongaki na Yuda, atindaki bokilo na ye Ruta akende kosɛnga Boaze asomba lisusu mabele na bango. Boaze azalaki ndeko ya libota ya pene ya Elimeleke. (Ruta 2:1, 19, 20; 3:1-4) Kasi Boaze ayebaki ete ezalaki na ndeko mosusu ya libota, oyo Biblia ebengi “Songolo,” oyo azalaki ndeko ya libota ya pene mpenza. Ye nde azalaki na lotomo ya kozwa ekateli soki akosomba lisusu mabele ya ndeko na ye oyo akufaki to te.—Ruta 3:9, 12, 13.
Na ebandeli, “Songolo” andimaki kosalisa. (Ruta 4:1-4) Ayebaki ete asengelaki kobimisa mbongo mingi mpo na kosomba mabele yango, kasi ayebaki mpe ete Naomi akómaki mobange mpe akokaki lisusu te kobota mwana oyo asengelaki kozwa mabele ya Elimeleke. Songolo nde asengelaki kozwa mabele yango mpe esengelaki kokóma libula na ye. Emonani ete mabele yango esengelaki kobotela ye mbongo mingi.
Kasi Songolo abongolaki makanisi na ye ntango amonaki ete asengelaki kobala Ruta. Alobaki boye: “Nakoki te kosikola yango mpo na ngai, noki nabebisa libula na ngai moko.” (Ruta 4:5, 6) Mpo na nini abongolaki makanisi na ye?
Soki Songolo to moto mosusu abalaka Ruta mpe soki Ruta abotaka mwana mobali, mwana yango nde asengelaki kozwa mabele ya Elimeleke. Ndenge nini yango ekokaki “kobebisa” “libula” ya Songolo? Biblia elobeli yango te, kasi ekoki kozala mpo na bantina oyo elandi:
Ya liboso, mbala mosusu mbongo oyo asombelaki mabele ya Elimeleke elingaki kokende mpamba, mpo nsukansuka mabele yango esengelaki kozala lisusu ya ye te. Mwana ya Ruta ya mobali nde asengelaki kozwa yango.
Ya mibale, asengelaki kozala na mokumba ya koleisa mpe ya kokokisa bamposa ya Naomi ná ya Ruta.
Ya misato, soki Ruta abotaka bana mosusu na Songolo, bana yango basengelaki kokabola libula yango na bana mosusu nyonso ya Songolo.
Ya minei, soki Songolo azalaka na bana mosusu te, mbɛlɛ mwana mobali oyo Ruta alingaki kobota, asengelaki kozwa mabele ya Elimeleke mpe oyo ya Songolo. Na yango, alingaki kobungisa mabele na ye mpo elingaki kokóma ya mwana oyo azalaki na nkombo ya Elimeleke. Songolo akokaki te kondima kobungisa libula na ye mpo na kosalisa Naomi. Andimaki ete mosikoli mosusu, elingi koloba Boaze nde azwa mokumba yango. Boaze asalaki bongo mpo alingaki “kotɛlɛmisa nkombo ya mowei na libula na ye.”—Ruta 4:10.
Emonani ete Songolo azalaki na mposa ya kobatela nkombo mpe libula na ye. Azalaki mpenza na ezaleli ya moimi. Kasi na esika abatela nkombo na ye, lelo oyo nkombo ya Songolo eyebani kutu te. Azwaki mpe te libaku ya ntina mingi oyo Boaze azwaki, ya kozala na molɔngɔ ya bankɔkɔ ya Masiya, Yesu Kristo. Yango nde ekómelaki Songolo, mpo azalaki na ezaleli ya moimi mpe alingaki te kosalisa moto oyo azalaki na mposa ya lisalisi!—Mat. 1:5; Luka 3:23, 32.