Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOYEKOLI 10

Mpo na nini osengeli kozwa batisimo?

Mpo na nini osengeli kozwa batisimo?

“Mokomoko na bino abatisama.”​—MIS. 2:38.

LOYEMBO 34 Tambolá na bosembo

NA MOKUSE a

1-2. Mbala mingi makambo nini esalemaka ntango bato bazali kozwa batisimo, mpe osengeli kotalela likambo nini?

 OSILÁ komona bato oyo balingi kozwa batisimo? Na ntembe te, oyokaka ndenge bapesaka biyano na mituna mibale liboso ya kozwa batisimo. Kanisá esengo oyo bandeko na bango ya libota mpe baninga na bango bazalaka na yango. Nsima ya kobima na mai, oyokaka ndenge bato babɛtelaka bango mabɔkɔ mpe esengo oyo ezalaka na bilongi na bango. Pɔsɔ na pɔsɔ, bankoto ya bato basalaka litambe yango, bamipesaka na Nzambe mpe bazwaka batisimo mpo na kokóma Batatoli ya Yehova.

2 Bongo yo? Soki ozali kokana kozwa batisimo, yebá ete ozali na valɛrɛ mingi mpamba te ozali “koluka Yehova.” (Nz. 14:1, 2) Lisolo oyo ekomami mpo na yo, ozala elenge to mokóló. Kasi biso mpe baoyo tosilá kozwa batisimo tosengeli mpe kokómisa ekateli na biso makasi mpo na kosalela Yehova libela na libela. Tólobela bantina misato ya libosoliboso oyo etindaka biso tósalela Yehova.

OLINGAKA SOLO MPE BOSEMBO

Esali sikoyo bankóto ya bambula banda Satana azali kosambwisa nkombo malamu ya Yehova, mpe azali kaka kosala yango (Talá paragrafe 3-4)

3. Mpo na nini basaleli ya Yehova balingaka solo mpe makambo oyo ezali sembo? (Nzembo 119:128, 163)

3 Yehova asɛngaki bato na ye ‘bálinga solo.’ (Zek. 8:19) Yesu asɛngaki bayekoli na ye bákoba kosala makambo ya boyengebene. (Mat. 5:6) Yango elakisi ete moto asengeli kozala na mposa makasi ya kosala oyo ezali sembo, oyo ezali malamu mpe kozala pɛto na miso ya Nzambe. Olingaka solo mpe olingaka oyo ezali sembo? Tomindimisi ete olingaka yango. Oyinaka lokuta mpe makambo oyo ebongi te mpe oyo ezali mabe. (Tángá Nzembo 119:128, 163.) Lokuta ezali moko ya bizaleli ya Satana, moyangeli ya mokili oyo. (Yoa. 8:44; 12:31) Moko ya mokano ya Satana ezali ya kosambwisa nkombo mosantu ya Nzambe na biso Yehova. Satana apanzaka lokuta mpo na Nzambe na biso banda botomboki na Edene. Amonisaka Yehova lokola Nzambe moko ya moimi oyo apimelaka bato makambo ya malamu. (Eba. 3:1, 4, 5) Lokuta oyo Satana akoselaka Yehova ezali kokoba kobebisa makanisi mpe mitema ya bato. Soki moto aboyi “kolinga solo,” Satana akoki kotinda ye asala makambo nyonso ya mabe mpe azala na etamboli ya mbindo.​—Rom. 1:25-31.

4. Ndenge nini Yehova amonisi ete azali “Nzambe ya solo”? (Talá mpe elilingi)

4 Yehova azali “Nzambe ya solo,” mpe ateyaka solo na baoyo balingaka ye. (Nz. 31:5) Na ndenge yango, asalisaka bango mpo Satana akosa bango te. Yehova ateyaka mpe basaleli na ye mpo bázala bato ya sembo. Yango epesaka bango lokumu mpe kimya ya motema. (Mas. 13:5, 6) Asalaki mpe bongo mpo na yo ntango ozalaki koyekola Biblia? Oyekolaki ete banzela ya Yehova nde eleki malamu mpo na moto nyonso mpe mpo na yo moko. (Nz. 77:13) Yango wana olingi kosala oyo ezali sembo na miso ya Nzambe. (Mat. 6:33) Yango wana ozali na mposa ya kosalisa basusu báyeba solo mpe komonisa ete oyo Satana alobaka mpo na Yehova Nzambe ezali lokuta. Ndenge nini okoki kosala yango?

5. Ndenge nini okoki kopesa solo mpe makambo oyo ezali sembo mabɔkɔ?

5 Okoki kopona lolenge ya bomoi oyo ekosalisa yo oloba ete: “Naboyi lokuta ya Satana, mpe nazali kolongisa solo. Naponi ete Yehova azala moyangeli na ngai, mpe nalingi kosala oyo ezali sembo na miso na ye.” Ndenge nini okosala yango? Soki obondeli Yehova, omipesi epai na ye mpe na nsima ozwi batisimo mpo na komonisa liboso ya bato nyonso ete omipesi na ye. Soki ozali kolinga solo mpe oyo ezali sembo yango ekosalisa yo ozwa ekateli ya kozwa batisimo.

OLINGAKA YESU KRISTO

6. Na kotalela Nzembo 45:4, wapi bantina oyo mpo na yango tosengeli kolinga Yesu Kristo?

6 Mpo na nini olingaka Yesu Kristo? Talá mwa bantina yango na Nzembo 45:4. (Tángá.) Yesu alingaka solo, komikitisa, mpe bosembo. Soki olingaka solo mpe bosembo, na ntembe te olingaka mpe Yesu Kristo. Kanisá ndenge Yesu alongisaki solo mpe makambo oyo ezali sembo na mpiko nyonso. (Yoa. 18:37) Kasi ndenge nini Yesu alingaka komikitisa?

7. Komikitisa ya Yesu ezali kokamwisa yo na nini?

7 Ndakisa ya Yesu emonisi ete azalaki kolinga komikitisa. Na ndakisa, azalaki kozongisa lokumu nyonso epai ya Tata na ye, kasi epai na ye moko te. (Mrk. 10:17, 18; Yoa. 5:19) Omiyokaka ndenge nini mpo na komikitisa ya Yesu? Na ntembe te, yango etindaka yo olinga Mwana ya Nzambe mpe olanda ye. Mpo nani Yesu azali na komikitisa? Mpo alingaka mpe amekolaka Tata na ye oyo azali na komikitisa. (Nz. 18:35; Ebr. 1:3) Na ntembe te, ndenge oyo Yesu amekolaka na ndenge ya kokoka bizaleli ya Tata na ye etindaka yo opusana penepene na ye!

8. Mpo na nini tosepelaka ndenge Yesu azali mokonzi na biso?

8 Tolingaka Yesu azala Mokonzi na biso mpo azali moyangeli oyo aleki malamu. Yehova ye moko apesaki Mwana na ye formasyo mpe aponaki ye azala mokonzi. (Yis. 50:4, 5) Kanisá ndenge oyo Yesu amipimelaki makambo mosusu. (Yoa. 13:1) Lokola Yesu azali mokonzi na yo, ebongi mpenza olinga ye. Alobaki ete baoyo balingaka ye mpenza, elingi koloba, baoyo abengi bango baninga na ye, bamonisaka ete balingaka ye na ndenge batosaka mibeko na ye. (Yoa. 14:15; 15:14, 15) Ezali mpenza lokumu kozala moninga ya Mwana ya Nzambe!

9. Na ndenge nini batisimo ya bakristo ya solo ekokani na oyo ya Kristo?

9 Yesu asɛngi ete bayekoli na ye bázwa batisimo. (Mat. 28:19, 20) Ye moko azali ndakisa na likambo yango. Batisimo na ye ekeseni na oyo ya bayekoli na ye na makambo mosusu. (Talá etanda “ Ndenge batisimo ya Yesu ekeseni na oyo ya bayekoli na ye”) Kasi ekokani na makambo mosusu. Ntango azwaki batisimo, Yesu amonisaki epai ya bato nyonso ete alingi kosala mokano ya Tata na ye. (Ebr. 10:7) Ndenge moko mpe, bayekoli ya Yesu mpe bazwaka batisimo mpo na komonisa na bato nyonso ete bamipesi na Yehova Nzambe. Bamipesi sikoyo mpo na kosala mokano na ye, kasi oyo ya bango moko te. Na ndenge yango, balandaka ndakisa ya Nkolo na bango.

10. Mpo na nini bolingo na yo mpo na Yesu esengeli kotinda yo ozwa batisimo?

10 Ondimi ete Yesu azali Mwana ya Nzambe se moko oyo abotamaki mpe Mokonzi oyo Nzambe aponá mpo ayangela biso. Oyebi ete Yesu azali na komikitisa, mpe amekolaka Tata na ye na ndenge ya kokoka. Oyekoli ete aleisaki bato oyo bazalaki na nzala, abɔndisaki baoyo balɛmbaki nzoto, mpe abikisaki bato ya maladi. (Mat. 14:14-21) Omoni ndenge azali kotambwisa lisangá na ye lelo oyo. (Mat. 23:10) Mpe oyebi ete akosala lisusu makambo mingi na mikolo ezali koya lokola azali Mokonzi ya Bokonzi ya Nzambe. Ndenge nini okoki komonisa ete olingaka Yesu? Soki ozali kolanda ndakisa na ye. (Yoa. 14:21) Okosala yango soki omipesi na Yehova mpe ozwi batisimo.

OLINGAKA YEHOVA NZAMBE

11. Wapi ntina ya libosoliboso oyo mpo na yango osengeli kozwa batisimo, mpe mpo na nini olobi bongo?

11 Wapi likambo eleki ntina oyo esengeli kotinda yo ozwa batisimo? Yesu amonisaki mobeko ya Nzambe oyo eleki monene, alobaki: “Osengeli kolinga Yehova Nzambe na yo na motema na yo mobimba mpe na molimo na yo mobimba mpe na makanisi na yo nyonso mpe na makasi na yo nyonso.” (Mrk. 12:30) Maloba yango emonisi ndenge oyo olingaka Nzambe?

Yehova nde apesaka biso biloko eleki kitoko oyo tosepelaka na yango mpe oyo tokokoba kosepela na yango (Talá paragrafe 12-13)

12. Mpo na nini olingaka Yehova? (Talá mpe elilingi)

12 Ezali na bantina mingi oyo esengeli kotinda yo olinga Yehova. Na ndakisa, oyei koyeba ete Yehova azali “liziba ya bomoi” mpe azali mopesi ya “Likabo nyonso ya malamu mpe libonza nyonso oyo ekoki mpenza.” (Nz. 36:9; Yak. 1:17) Biloko nyonso ya malamu oyo osepelaka na yango eutaka epai ya Nzambe na biso ya bolingo.

13. Mpo na nini lisiko ezali likabo oyo eleki malamu?

13 Lisiko ezali likabo ya malamu koleka oyo Yehova apesá biso. Mpo na nini tokoki koloba bongo? Meká kokanisa boyokani oyo ezali kati na Yehova mpe Mwana na ye. Yesu alobaki: “Tata alingi ngai” mpe “ngai nalingaka Tata.” (Yoa. 10:17; 14:31) Boyokani oyo ezali kati na bango ekómaki makasi na boumeli ya bambula ebele. (Mas. 8:22, 23, 30) Kanisá mpasi oyo Nzambe ayokaki ntango andimaki Mwana na ye anyokwama mpe akufa. Yehova alingaka bato mingi mpenza ata mpe yo, yango wana apesaki Mwana na ye mbeka mpo yo elongo na bato mosusu bókoka kozala na bomoi libela na libela. (Yoa. 3:16; Gal. 2:20) Yango nde ntina ya libosoliboso oyo mpo na yango tolingaka Nzambe.

14. Wapi ekateli eleki malamu oyo okoki kozwa na bomoi na yo?

14 Bolingo na yo mpo na Yehova ekómaka makasi nsima ya koyekola makambo etali ye. Na ntembe te, olingi kopusana penepene na ye ezala sikoyo mpe libela na libela. Mpe okoki kosala yango. Na boboto nyonso azali kosɛnga yo osepelisa motema na ye. (Mas. 23:15, 16) Okoki kosala yango kaka na maloba te kasi mpe na misala. Lolenge oyo ozali kotambwisa bomoi na yo ekomonisa ete olingaka mpenza Yehova. (1 Yoa. 5:3) Yango nde ekateli eleki malamu oyo okoki kozwa na bomoi na yo.

15. Ndenge nini okoki komonisa bolingo na yo mpo na Yehova?

15 Ndenge nini okoki komonisa bolingo na yo mpo na Yehova? Ya liboso, na lisalisi ya libondeli moko ya ntina mingi oyo na nzela na yango okomipesa na Nzambe kaka moko ya solo. (Nz. 40:8) Na nsima, okomonisa yango na miso ya bato nyonso na nzela ya batisimo. Ndenge tolobelaki yango liboso na lisolo oyo, batisimo ezali likambo moko ya esengo mpe ya ntina mingi na bomoi. Obandi bomoi moko ya sika mpo na Yehova, kasi mpo na yo moko te. (Rom. 14:8; 1 Pe. 4:1, 2) Yango ezali mpenza ekateli moko ya monene mpe ya ntina mingi mpenza. Ekosalisa yo ozala na bomoi eleki malamu mpenza. Na ndenge nini?

16. Na kotalela Nzembo 41:12, Yehova akosala nini mpo na baoyo bapesi bomoi na bango na mosala na ye?

16 Yehova azali Nzambe oyo ayebi mpenza kokaba. Ata soki opesi ye eloko nini, yebá ete akopesa yo ntango nyonso mingi koleka oyo ozali kopesa ye. (Mrk. 10:29, 30) Akopesa yo mbano mpe bomoi oyo eleki malamu mpenza ezala na mokili mabe oyo elingi ebomama. Mpe yango ezali kaka ebandeli. Bomoi oyo obandi nsima ya kozwa batisimo ezali lokola mobembo oyo esengeli kosuka te. Osengeli kokoba kosalela Tata na yo ya bolingo libela na libela. Bolingo oyo esangisi yo na Tata na yo esengeli kokoba kokola, mpe okozala na bomoi moko ya molai, mpo na ntango oyo etyami ndelo te, lokola ye.​—Tángá Nzembo 41:12.

17. Eloko nini okoki kopesa Yehova oyo azalaka na yango te?

17 Ntango ozwi ekateli ya komipesa na Yehova mpe kozwa batisimo, ozali na libaku ya kopesa eloko moko eleki motuya mingi mpo na Tata na yo. Apesá yo biloko nyonso ya malamu, bantango moko ya esengo mingi oyo okoki kobosana yango soki moke te. Yo mpe okoki kopesa Moto oyo asalá likoló ná mabele eloko moko oyo azalaka na yango ntango nyonso te, elingi koloba mosala na yo ya sembo. (Yobo 1:8; 41:11; Mas. 27:11) Yango ezali mpenza lolenge eleki malamu ya kosalela bomoi na yo! Na ntembe te, bolingo na yo mpo na Yehova nde esengeli kotinda yo ozwa batisimo.

OZALI KOZELA NINI?

18. Mituna nini okoki komituna?

18 Na yango, okopesa eyano nini na motuna: Okozwa batisimo mokolo nini? Yo moko nde okoki kopesa eyano na motuna yango. Kasi ekozala na ntina soki omituni, ‘nazali kozela nini?’ (Mis. 8:36) Kobosana te bantina misato oyo tolobeli. Ya liboso, olingaka solo mpe boyengebene. Omituna boye, ‘Nalingi komona mokolo oyo moto nyonso akoloba solo mpe akosala oyo ezali malamu?’ Ya mibale, olingaka Yesu Kristo. Omituna boye, ‘Nalingi ete Mwana ya Nzambe azala Mokonzi na ngai mpe nalingi mpenza kolanda ndakisa na ye?’ Ya misato, oyo eleki ntina, olingaka Yehova. Omituna boye, ‘Nalingi kosalela Yehova Nzambe na ngai mpo na kosepelisa motema na ye?’ Soki oyanoli ɛɛ na mituna yango, ekozala malamu ozwa batisimo.​—Mis. 16:33.

19. Mpo na nini osengeli te kokakatana mpo na kozwa batisimo? Pesá ndakisa. (Yoa. 4:34)

19 Soki ozali kokakatana mpo na kozwa batisimo, talelá ndakisa moko Yesu asalelaki. (Tángá Yoane 4:34.) Simbá ete Yesu akokanisaki kosala mokano ya Tata na ye na bilei. Mpo na nini? Mpamba te bilei ezalaka malamu mpo na biso. Yesu ayebaki ete makambo nyonso oyo Yehova asɛngaka biso tósala ezalaka mpo na bolamu na biso. Yehova akolinga te kosɛnga biso tósala likambo moko oyo ekopesa biso mpasi. Mposa ya Yehova ezali ete ozwa batisimo? Ɛɛ. (Mis. 2:38) Na yango, zalá na kondima ete soki osali yango ekozala mpo na bolamu na yo. Soki okokakatana te kolya bilei oyo eleki kitoko, kasi mpo na nini okokakatana kozwa batisimo?

20. Tokolobela nini na lisolo oyo elandi?

20 Ozali kozela nini? Bato mingi bakoki kopesa eyano oyo, “Nabongami naino te.” Simbá ete ekateli ya komipesa na Yehova mpe kozwa batisimo ezali ekateli eleki ntina oyo moto akoki kozwa na bomoi. Yango wana, esɛngaka ntango, milende, mpe kokanisa malamu liboso ya kozwa yango. Kasi soki ozali mpenza na mposa ya kozwa batisimo, okoki kosala nini mpo omibongisa? Tokolobela eyano ya motuna yango na lisolo oyo elandi.

LOYEMBO 28 Tózala baninga ya Yehova

a Batisimo ezali litambe moko ya ntina mingi mpo na moyekoli nyonso ya Biblia. Nini ekoki kotinda moyekoli ya Biblia asala litambe yango? Na mokuse, ezali bolingo. Kasi bolingo mpo na likambo nini mpe mpo na nani? Na lisolo oyo, tokozwa biyano na mituna yango mpe tokolobela lolenge ya bomoi oyo moto asengeli kozala na yango nsima ya kozwa batisimo.