Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOYEKOLI 14

“Na ndenge yango bato nyonso bakoyeba ete bozali bayekoli na ngai”

“Na ndenge yango bato nyonso bakoyeba ete bozali bayekoli na ngai”

“Na ndenge yango bato nyonso bakoyeba ete bozali bayekoli na ngai, soki bozali na bolingo na kati na bino.”​—YOA. 13:35.

LOYEMBO 106 Tókolisa bolingo

NA MOKUSE a

Bolingo oyo bato mingi bamonaki epai ya Batatoli ya Yehova etindaki bango básala nini? (Talá paragrafe 1)

1. Nini ekamwisaka bato mingi oyo bayaka na makita na biso? (Talá mpe elilingi.)

 KANISÁ ete mwasi moko ná mobali na ye bayei mpo na mbala ya liboso na makita ya Batatoli ya Yehova na Ndako ya Bokonzi. Ndenge oyo bandeko bayambi bango mpe bolingo oyo bandeko bazali komoniselana ekamwisi bango mpenza. Ntango bazali kozonga ndako, mwasi yango ayebisi mobali na ye: ‘Bato oyo bakeseni mpenza ná bato mosusu oyo tokutaná na bango, mpe nazali kosepela mpenza kozala elongo na bango.’

2. Mpo na nini bandeko mosusu babɛtaka libaku?

2 Bolingo oyo Batatoli ya Yehova bamoniselanaka ekamwisaka mpenza. Nzokande, Batatoli ya Yehova bazali bato ya kozanga kokoka. (1 Yoa. 1:8) Na yango, wana tozali koyeba bandeko ya lisangá, na ntembe te ekozala mpasi te tómona mpe mabunga na bango. (Rom. 3:23) Likambo ya mawa, bandeko mosusu batikaka ete mabunga ya basusu ebɛtisa bango libaku.

3. Na kotalela Yoane 13:34, 35, wapi elembo ya bayekoli ya solo ya Yesu?

3 Talá lisusu vɛrsɛ oyo esimbi motó ya likambo ya lisolo oyo. (Tángá Yoane 13:34, 35.) Wapi elembo ya bakristo ya solo? Ezali bolingo, kasi te ezaleli ya kokoka. Simbá mpe ete, Yesu alobaki te ete: ‘‘Na ndenge yango bokoyeba ete bozali bayekoli na ngai.” Kasi alobaki nde: “Na ndenge yango bato nyonso bakoyeba ete bozali bayekoli na ngai.” Yesu amonisaki ete kaka bayekoli na ye te kasi mpe baoyo bazali bakristo te bakoyeba bayekoli na ye ya solo na bolingo oyo bamoniselanaka.

4. Bato mosusu bakoki koluka koyeba nini mpo na bakristo ya solo?

4 Bato mosusu oyo bazali Batatoli ya Yehova te bakoki komituna boye: ‘Bolingo ekoki mpenza kosalisa biso tóyeba bayekoli ya solo ya Yesu? Ndenge nini Yesu amoniselaki bantoma na ye bolingo? Mpe ndenge nini tokoki kolanda ndakisa ya Yesu lelo oyo?’ Batatoli ya Yehova mpe basengeli kokanisaka na mituna yango. Kosala bongo ekosalisa biso tómonisaka mpenza bolingo, mingimingi ntango esɛngi tókanga motema na mabunga ya bato mosusu.​—Ef. 5:2.

MPO NA NINI KAKA BOLINGO NDE EZALI ELEMBO MPO NA KOYEBA BAYEKOLI YA SOLO YA YESU?

5. Limbolá maloba ya Yesu oyo ezali na Yoane 15:12, 13.

5 Yesu amonisaki polele ete bayekoli na ye bakomoniselana bolingo na ndenge moko ya kokamwa. (Tángá Yoane 15:12, 13.) Simbá ete Yesu ayebisaki bango: “Bólinganaka ndenge ngai nalingi bino.” Yango elimboli nini? Ndenge Yesu amonisaki yango, yango ezali bolingo oyo ezangi moimi, elingi koloba, bolingo oyo etindaka mokristo andima ata kokufa mpo na ndeko na ye soki esengeli. b

6. Ndenge nini Liloba ya Nzambe emonisi ete bolingo ezali na ntina?

6 Liloba ya Nzambe elobeli mingi bolingo. Bato mingi balingaka bavɛrsɛ oyo elobelaka bolingo. Na ndakisa “Nzambe azali bolingo.” (1 Yoa. 4:8) “Osengeli kolinga mozalani na yo lokola yo moko.” (Mat. 22:39) “Bolingo ezipaka ebele ya masumu.” (1 Pe. 4:8) “Bolingo esilaka soki moke te.” (1 Ko. 13:8) Bavɛrsɛ yango mpe bavɛrsɛ mosusu emonisi polele ete ezali mpenza na ntina komonisa ezaleli yango ya kitoko.

7. Mpo na nini Satana akoki te koteya bato bámoniselana bolingo mpe bázala na bomoko?

7 Bato mingi bamitunaka boye: ‘Ndenge nini moto akoki koyeba lingomba ya solo? Mangomba nyonso elobaka ete eteyaka solo, kasi mokomoko na yango eteyaka makambo oyo ekeseni mpo na Nzambe.’ Satana asali mangomba ebele mpo na kotya mobulu na mitó ya bato mpo báyeba te soki lingomba ya solo ezali oyo wapi. Kasi akoki te kosala lingomba moko oyo na mokili mobimba bato na yango bamoniselanaka bolingo. Kaka Yehova nde akoki kosala yango. Ezali bongo mpo bolingo ya solosolo eutaka epai ya Yehova, elingi koloba, kaka baoyo bazali na elimo ya Yehova mpe lipamboli na ye nde bakoki komoniselana bolingo ya solosolo. (1 Yoa. 4:7) Yango wana Yesu alobaki ete bato bakoyeba bayekoli na ye ya solo na bolingo oyo bakomoniselana.

8-9. Bolingo oyo bato mingi bamonaka epai ya Batatoli ya Yehova etindi bango básala nini?

8 Kaka ndenge Yesu amonisaki yango, bato mingi bayebaki bayekoli na ye ya solo na nzela ya bolingo oyo bazalaki komoniselana. Na ndakisa, ndeko mobali moko na nkombo Yan, azali koyeba lisusu liyangani ya liboso akɔtaki oyo esalemaki na stade moko pene ya ndako na ye. Mwa basanza liboso, Yan azalaki na stade yango mpo na kotala lisano ya bale. Alobi boye: “Bato oyo bazalaki na liyangani bakesenaki mpenza na bato oyo bazalaki kotala lisano ya bale. Batatoli ya Yehova bazalaki na bokonde, balataki malamu, mpe bana na bango bazalaki kosala mobulu te.” Abakisi boye: “Oyo eleki nyonso, Batatoli ya Yehova bazalaki kosepela na oyo bazali na yango mpe bazalaki na kimya​—yango nde likambo oyo nazalaki koluka na bomoi na ngai. Nayebaka lisusu te badiskur oyo esalemaki mokolo yango, kasi nabosanaka te bizaleli ya malamu oyo namonaki epai ya Batatoli ya Yehova.” c Etamboli malamu wana, euti na bolingo ya solosolo oyo tomoniselanaka biso nyonso. Lokola tolingaka bandeko na biso tosalelaka bango makambo na boboto mpe na limemya.

9 Ndeko mobali moko na nkombo John, amonaki mpe makambo ya ndenge wana na mbala ya liboso oyo akendaki makita ya lisangá, alobi: “Ezaleli na bango ya boboto ekamwisaki ngai mpenza . . . ezalaki komonana lokola basalaka ata lisumu te. Bolingo na bango ya solosolo endimisaki ngai ete nazwi lingomba ya solo.” d Mbala mingi masolo ya ndenge wana emonisaka ete Batatoli ya Yehova bazali Bakristo ya solo.

10. Ntango nini tozwaka libaku ya komonisa bolingo ya Bokristo? (Talá maloba na nse ya lokasa.)

10 Ndenge tolobaki yango liboso, Motatoli ya Yehova moko te azalaka moto ya kokoka. Na bantango mosusu, bakoki koloba to kosala likambo moko oyo ekoki kopesa biso mpasi. e (Yak. 3:2) Ntango likambo ya bongo esalemi, makambo oyo tokoloba to tokosala ekomonisa soki tolingaka bandeko to te. Ndakisa ya Yesu ekoki koteya biso nini na likambo yango?​—Yoa. 13:15.

NDENGE NINI YESU AMONISELAKI BANTOMA NA YE BOLINGO?

Yesu asalelaki bantoma na ye makambo na bolingo ntango basalaki mabunga (Talá paragrafe 11-13)

11. Bizaleli nini ya mabe Yakobo ná Yoane bamonisaki? (Talá mpe elilingi.)

11 Yesu azalaki koluka te ete bayekoli na ye bázala bato ya kokoka. Kasi, na bolingo nyonso asalisaki bango bábongisa bizaleli na bango ya mabe mpo Yehova andima bango. Na libaku moko, bayekoli na ye mibale, Yakobo ná Yoane, batindaki mama na bango asɛnga Yesu atya bango na bisika eleki lokumu na Bokonzi. (Mat. 20:20, 21) Yango emonisi ete Yakobo ná Yoane bazalaki na lolendo mpe bazalaki koluka bokonzi.​—Mas. 16:18.

12. Kaka Yakobo ná Yoane nde bamonisaki bizaleli ya mabe? Limbolá.

12 Kaka Yakobo ná Yoane te nde bamonisaki bizaleli ya mabe na libaku yango. Talá ndenge bantoma mosusu bamiyokaki mpo na likambo yango: “Ntango bamosusu zomi bayokaki bongo, bayokaki mabe mpo na bandeko wana mibale.” (Mat. 20:24) Ekoki kozala Yakobo, Yoane, mpe bantoma mosusu babendanaki na maloba. Mbala mosusu bantoma mosusu balobaki boye: ‘Bozali kokanisa ete bino nde boleki biso yango wana bozali kosɛnga esika eleki lokumu na Bokonzi? Biso nyonso tozali kosala mosala makasi elongo na Yesu. Biso nyonso tobongi na esika wana ya lokumu oyo bozali kosɛnga!’ Ezala bongo to te, bantoma batikaki mpo na mwa ntango ete likambo yango ebebisa bolingo ya bondeko oyo bazalaki na yango.

13. Ndenge nini Yesu azalaki kotalela mabunga ya bantoma na ye? (Matai 20:25-28)

13 Yesu asalaki nini na likambo yango? Asilikelaki bango te. Alobaki te ete nakei koluka mibali mosusu ya malamu, oyo bakozala na komikitisa mingi mpe bakomoniselana bolingo ntango nyonso. Asalaki bongo te, kasi amoniselaki bango motema molai mpe asololaki na mibali yango ya sembo. (Tángá Matai 20:25-28.) Akobaki kosalela bango makambo na bolingo, atako wana ezalaki mbala ya liboso te, ya nsuka mpe te oyo bantoma bazalaki koluka koyeba soki nani aleki bamosusu.​—Mrk. 9:34; Luka 22:24.

14. Makambo ezalaki ndenge nini esika bantoma ya Yesu bakolaki?

14 Kozanga ntembe, Yesu azalaki mpe kotalela makambo oyo bantoma na ye bakutaná na yango. (Yoa. 2:24, 25) Bakolaki epai bakonzi ya mangomba bazalaki koteya bato ete moto azalaka na ntina kaka soki azali na esika ya lokumu. (Mat. 23:6; talá mpe video Les premiers sièges dans les synagogues, video oyo ezali na nɔti ya boyekoli na mokanda ya Matai 23:6 na Français.) Bakonzi ya mangomba ya Bayuda bazalaki mpe komimona sembo koleka moto nyonso. f (Luka 18:9-12) Yesu ayebaki ete kokola na esika ya ndenge wana ekokaki kobebisa ndenge bantoma bazalaki komitalela mpe ndenge bazalaki kotalela basusu. (Mas. 19:11) Azalaki na bokatikati na makambo oyo azalaki komizela epai ya bantoma na ye mpe azalaki kosilika te soki basali mabunga. Ayebaki ete bazalaki na makanisi malamu, yango wana na motema molai mpenza ateyaki bango bákóma na komikitisa mpe bolingo, na esika báluka koleka basusu.

NDENGE NINI TOKOKI KOMEKOLA NDAKISA YA YESU?

15. Likambo oyo ekómelaki Yakobo ná Yoane ekoki koteya biso nini?

15 Tokoki kozwa mateya mingi na likambo oyo ekómelaki Yakobo ná Yoane. Basalaki mabe ndenge basɛngaki esika eleki lokumu na Bokonzi. Kasi bantoma mosusu mpe basalaki mabe ndenge batikaki ete likambo yango ebebisa bomoko na bango. Kasi Yesu, asalelaki bantoma yango nyonso 12 makambo na boboto mpe na bolingo. Yango eteyi biso nini? Likambo ezali kaka te mabe oyo moto asali, kasi mpe oyo biso tokosala ntango ndeko asali libunga to abɛtisi biso libaku. Nini ekoki kosalisa biso? Ntango ndeko moko apesi biso nkanda, tokoki komituna boye: ‘Mpo na nini likambo yango epesi ngai nkanda makasi boye? Yango emonisi nde ezaleli moko ya mabe oyo nazali na yango oyo nasengeli kobongisa? Ndeko yango azali nde na likambo moko oyo ezali kotungisa ye? Ezala soki nazali na ntina ya kosilika mpo na likambo asali, nakoki te komonisa bolingo mpe kolekisa likambo yango?’ Soki tozali komonisela bato bolingo mbala na mbala, yango ekomonisa mpenza ete tozali bayekoli ya solo ya Yesu.

16. Ndakisa ya Yesu ekoki koteya biso lisusu nini?

16 Ndakisa ya Yesu eteyi mpe biso ete tosengeli koluka koyeba bandeko na biso malamu. (Mas. 20:5) Toboyi te, Yesu akokaki koyeba makambo oyo ezali na motema ya moto. Biso tokokoka kosala yango te. Kasi tokoki komonisa motema molai mpo na kozanga kokoka ya bandeko na biso. (Ef. 4:1, 2; 1 Pet. 3:8) Ekozala pɛtɛɛ kosala yango soki toluki koyeba makambo mingi mpo na bango. Tótalela ndakisa moko.

17. Litomba nini mokɛngɛli moko ya zongazonga azwaki ntango ayaki koyeba ndeko mobali moko malamu?

17 Mokɛngɛli ya zongazonga moko oyo asalaka na ɛsti ya Afrika abosanaka te ndeko mobali moko oyo ye azalaki kokanisa ete azalaki na boboto te. Mokɛngɛli ya zongazonga yango asalaki nini? Alobi boye: “Na esika nakima ndeko yango, nazwaki ekateli ya koluka koyeba ye malamu.” Kosala bongo, esalisaki mokɛngɛli ya zongazonga yango ayeba esika oyo ndeko mobali yango akolaki mpe oyo esalaki ete akómá na ezaleli wana. Mokɛngɛli ya zongazonga abakisi boye: “Ntango nayebaki ndenge ezalaki pɛtɛɛ te mpo asala bambongwana oyo asalaki mpe akóma koyokana malamu na bato mosusu mpe ndenge oyo abongwanaki, nakómaki kosepela na ye. Tokómaki baninga ya motema.” Na yango, soki tozali kosala makasi tóyeba bandeko na biso malamu, ekozala mpasi te mpo tómonisela bango bolingo.

18. Mituna nini tosengeli komituna soki ndeko moko ayokisi biso mpasi? (Masese 26:20)

18 Na bantango mosusu tokoki komona malamu tókutana na ndeko moko oyo ayokisaki biso mpasi. Kasi, tosengeli liboso komituna mituna oyo: ‘Nayebi mpenza makambo nyonso?’ (Mas. 18:13) ‘Asalaki likambo yango na nko?’ (Mos. 7:20) ‘Esí ekómela ngai mpe nasala libunga ya ndenge wana?’ (Mos. 7:21, 22) ‘Soki nakei kokutana na ndeko yango, ekobimisa te likambo mosusu ya monene koleka oyo nazali koluka kosilisa?’ (Tángá Masese 26:20.) Soki tozwi ntango ya kotalela mituna yango, tokoki komona ete bolingo oyo tolingaka bandeko na biso ekoki kotinda biso tólekisa likambo yango.

19. Ozwi ekateli ya kosala nini?

19 Batatoli ya Yehova bamonisi mpenza ete bazali bayekoli ya solo ya Yesu. Mokomoko na biso amonisaka ete azali moyekoli ya solo ya Yesu ntango amonisaka bolingo epai ya bandeko na biso atako bazali bato ya kozanga kokoka. Soki tosali bongo, tokosalisa bato mosusu báyeba lingomba ya solo, mpe báya kosambela Yehova, Nzambe ya bolingo elongo na biso. Tiká ete tózala na ekateli makasi ya kokoba komonisa bolingo oyo ezali elembo ya Bakristo ya solo.

LOYEMBO 17 “Nalingi”

a Bato mingi babendamaka na solo mpo na bolingo ya solosolo oyo bamonaka epai na biso. Kasi, tozali bato ya kozanga kokoka, yango wana na bantango mosusu ekoki kozala mpasi tómonisela ndeko moko bolingo. Tótala mpo na nini bolingo ezali na ntina mingi mpe ndenge oyo tokoki kolanda ndakisa ya Yesu ntango basusu bazali kosala mabunga.

c Talá lisolo “Sikoyo bomoi na ngai ekómi na ntina,” Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 01/11/2012, nk. 13-14.

d Talá lisolo “Ezalaki komonana lokola nde nazali na bomoi ya malamu,” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 01/05/2012, nk. 18-19.

e Lisolo oyo ezali kolobela te masumu ya minene oyo ekosɛnga bankulutu bálandela makambo, na ndakisa masumu oyo elobelami na 1 Bakorinti 6:9, 10.

f Bamonisi ete ntango mingi na nsima, Rabi moko alobaki boye: “Na mokili ezali te na bato ya sembo 30 lokola Abrahama. Soki bazali 30, ngai ná mwana na ngai ya mobali tozali na kati; soki bazali 10, ngai ná mwana na ngai ya mobali tozali na kati; soki bazali mitano, ngai ná mwana na ngai ya mobali tozali; soki mibale, ezali ngai ná mwana na ngai ya mobali; kasi soki ezali kaka moto moko, wana ezali ngai.”