Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOYEKOLI 11

Ndenge ya komibongisa mpo na batisimo

Ndenge ya komibongisa mpo na batisimo

“Nini ezali kopekisa ngai kobatisama?”​—MIS. 8:36.

LOYEMBO 50 Libondeli na ngai ya komipesa

NA MOKUSE a

Na mokili mobimba, bilenge mpe mikóló bazali kokola na elimo mpe kozwa batisimo (Talá paragrafe 1-2)

1-2. Soki omibongisi naino te mpo na kozwa batisimo, mpo na nini osengeli kolɛmba nzoto te? (Talá elilingi ya ezipeli.)

 SOKI ozali kokana kozwa batisimo, yebá ete omityeli mokano moko ya malamu mpenza. Omibongisi mpo na kozwa yango sikoyo? Soki ezali bongo mpe bankulutu bandimi, mpe soki libaku emonani, kokakatana te mpo na kosala yango. Soki osali yango, okozala mpenza na esengo na mosala ya Yehova.

2 Longola yango, basilá koyebisa yo ete osengeli naino kokola na elimo liboso ozwa batisimo? To yo moko mpe omoni bongo? Soki ezali bongo, kolɛmba nzoto te. Ozala elenge to mokóló, okoki kokola na elimo mpo na kokokisa mokano wana ya ntina mingi.

“NINI EZALI KOPEKISA NGAI?”

3. Mosaleli moko ya mokonzi ya Etiopi atunaki Filipe nini, mpe yango ebimisi mituna nini? (Misala 8:36, 38)

3 Tángá Misala 8:36, 38. Mosaleli moko ya mokonzi ya Etiopi atunaki Filipe mopalanganisi ya nsango malamu boye: “Nini ezali kopekisa ngai kobatisama?” Moto yango ya Etiopi azalaki na mposa ya kozwa batisimo, kasi amibongisaki mpenza mpo na likambo wana ya ntina mingi?

Mosaleli moko ya mokonzi ya Etiopi azalaki na ekateli ya kokoba koyekola makambo etali Yehova (Talá paragrafe 4)

4. Ndenge nini moto ya Etiopi amonisaki ete azalaki na ekateli ya kokoba koyekola?

4 Moto yango ya Etiopi “akendaki na Yerusaleme mpo na kosambela.” (Mis. 8:27) Na yango, asengelaki kozala prozelite; mpe akómaki kosambela na lingomba ya Bayuda. Na ntembe te, ayekolaki makambo etali Yehova na Makomami mosantu ya Ebre. Atako bongo, azalaki na mposa makasi ya koyekola makambo mosusu. Likambo nini moto yango ya Etiopi azalaki kosala ntango Filipe akutanaki na ye na nzela? Azalaki kotánga rulo moko ya mosakoli Yisaya. (Mis. 8:28) Yango ezalaki bilei ya makasi ya elimo. Mosaleli yango ya mokonzi asukaki kaka te na koyekola mwa mateya oyo moto asengeli koyeba na ebandeli, kasi azalaki na mposa ya kokoba koyekola.

5. Moto ya Etiopi asalaki nini na makambo oyo ayekolaki?

5 Moto yango azalaki moto monene mpe azalaki kosalela Kandase, mokonzi mwasi ya ekólo Etiopi; “azalaki kotalela mosolo na ye nyonso.” (Mis. 8:27) Na yango, azalaki na makambo mpe na mikumba mingi ya kokokisa. Atako bongo, azwaki ntango mpo na kosambela Yehova. Asepelaki kaka te na koyekola solo; kasi asalelaki mpe makambo oyo ayekolaki. Yango wana, asalaki mobembo molai longwa na Etiopi mpo na koya kosambela Yehova na tempelo na Yerusaleme. Mobembo yango esengelaki kolya ye ntango mpe mbongo mingi, kasi moto yango azalaki na mposa ya kosambela Yehova ata soki ekosɛnga ye nini.

6-7. Ndenge nini bolingo ya moto ya Etiopi mpo na Yehova ekobaki kokola?

6 Moto yango ya Etiopi ayekolaki epai ya Filipe mateya ya sika ya ntina mingi, moko na yango ezalaki ete Yesu nde azali Masiya. (Mis. 8:34, 35) Koyeba makambo oyo Yesu asalaki mpo na ye, esimbaki mpenza motema na ye. Asalaki nini nsima ya koyekola makambo yango? Akokaki kaka kotikala ndenge azalaki, elingi koloba, prozelite Moyuda moko ya lokumu mingi. Na esika ezala bongo, bolingo na ye mpo na Yehova mpe Mwana na ye ekómaki makasi. Yango etindaki ye azwa ekateli ya ntina mingi na bomoi na ye mpo azwa batisimo lokola moyekoli ya Yesu Kristo. Lokola Filipe amonaki ete moto yango abongaki, yango wana abatisaki ye.

7 Soki yo mpe olandi ndakisa ya moto yango ya Etiopi, okoki komibongisa mpo na batisimo. Yo mpe okozala na likoki ya koloba na mpiko nyonso ete, “Nini ezali kopekisa ngai kobatisama?” Tótala ndenge okoki kolanda matambe oyo moto yango ya Etiopi asalaki: Akobaki koyekola, asalelaki makambo oyo ayekolaki, mpe akobaki kokolisa bolingo na ye mpo na Nzambe.

KOBÁ KOYEKOLA

8. Yoane 17:3 esɛngi yo osala nini?

8 Tángá Yoane 17:3. Maloba oyo ya Yesu esalisaki yo ozwa ekateli ya koyekola Biblia? Soki ɛɛ, ezali mpe bongo mpo na mingi kati na biso. Kasi maloba yango, elendisaka biso mpe tókoba koyekola? Ɛɛ. Tokotika te ‘koyekola koyeba . . . Nzambe ya solo kaka moko.’ (Mos. 3:11) Tokokoba koyekola mpo na seko na seko. Soki tozali koyekola mingi, yango ekosalisa biso tópusana penepene na Yehova.​—Nz. 73:28.

9. Tosengeli kosala nini nsima ya kozwa boyebi ya ebandeli ya Biblia?

9 Ntango tobandi koyekola makambo etali Yehova, tobandaka na mateya ya libosoliboso oyo moto asengeli koyeba. Na mokanda oyo akomelaki Baebre, ntoma Paulo abengaki yango “mateya ya ebandeli.” Azalaki te kotyola ‘mateya yango ya ebandeli’; akokanisaki yango na miliki oyo bana mike bamɛlaka. (Ebr. 5:12; 6:1) Kasi alendisaki bakristo nyonso básuka kaka te na koyekola mateya yango ya ebandeli, kasi báyekola mpe mateya ya mozindo ya Liloba ya Nzambe. Okolisá mposa wana mpo na mateya ya mozindo ya Biblia? Ozali na mposa ya kokoba kokola, to ya kokoba koyekola makambo etali Yehova mpe mokano na ye?

10. Mpo na nini bato mosusu bamonaka ete koyekola ezali mpasi?

10 Kasi koyekola ezalaka mpasi mpo na mingi kati na biso. Bongo yo? Balakisá yo kotánga mpe koyekola malamu na kelasi? Osepelaka koyekola mpe omonaka ete boyekoli yango ememelaka yo matomba? To omonaka ete okokaka te koyekola babuku? Soki ezali bongo, yebá ete ozali yo moko te. Kasi Yehova akoki kosalisa yo. Akoká na makambo nyonso mpe azali Molakisi oyo aleki balakisi nyonso.

11. Ndenge nini Yehova amonisi ete azali “Molakisi monene”?

11 Yehova amibengi “Molakisi na yo monene.” (Yis. 30:20, 21) Azali na motema molai, na boboto, mpe Molakisi oyo amityaka na esika ya basusu. Alukaka makambo ya malamu epai ya bayekoli na ye. (Nz. 130:3) Mpe azelaka te tósala makambo oyo eleki makoki na biso. Kobosana te ete ye moto asalá bɔɔngo na yo​—likabo moko ya kokamwa mpenza. (Nz. 139:14) Tobotamá na mposa ya koyekola. Mozalisi na biso azali na mposa tókoba koyekola mpo na libela, elingi koloba, kosepela na yango. Yango wana ezali likambo ya bwanya ‘kozala na mposa makasi’ ya solo ya Biblia sikoyo. (1 Pe. 2:2) Omityela mikano oyo okoki kokokisa, tángáká mpe yekoláká Biblia mbala na mbala. (Yos. 1:8) Na lisalisi ya Yehova, okokóma kosepela kotánga mpe koyekola makambo mingi oyo etali ye.

12. Mpo na nini tosengeli kotya likebi mingi na bomoi mpe mosala ya Yesu ntango tozali koyekola?

12 Zwáká ntango ya kokanisa na bomoi ya Yesu mpe na mosala na ye mbala na mbala. Kolanda matambe ya Yesu malamumalamu ekosalisa biso mpo tósalela Yehova, mingimingi na ntango oyo ya mpasi. (1 Pe. 2:21) Yesu alobelaki polele mikakatano oyo bayekoli na ye basengelaki kokutana na yango. (Luka 14:27, 28) Atako bongo, azalaki na kondima ete bayekoli na ye bakolonga, kaka ndenge ye mpe alongaki yango. (Yoa. 16:33) Yekoláká makambo mikemike oyo etali bomoi ya Yesu, mpe omityela mikano ya komekola ye na bomoi na yo ya mokolo na mokolo.

13. Eloko nini osengeli kokoba kosɛnga Yehova, mpe mpo na nini?

13 Kozala kaka na boyebi ekoki te. Ntina ya libosoliboso ya kozala na boyebi ezali mpo esalisaka biso tóyekola makambo mingi etali Yehova mpe tókolisa bolingo mpe kondima epai na ye. (1 Ko. 8:1-3) Wana ozali kokoba koyekola, sɛngáká Yehova asalisa yo okolisa kondima mingi epai na ye. (Luka 17:5) Ayanolaka na mabondeli ya ndenge wana. Kondima oyo esimbami na boyebi ya sikisiki ya Nzambe na biso ekosalisa yo okola na elimo.​—Yak. 2:26.

KOBÁ KOSALELA MAKAMBO OYO OZALI KOYEKOLA

Liboso mpela eya, Noa ná bato ya libota na ye basalelaki na bosembo nyonso makambo oyo bayekolaki (Talá paragrafe 14)

14. Ndenge nini ntoma Petro amonisaki ntina ya kosalela makambo oyo tozali koyekola? (Talá mpe elilingi)

14 Ntoma Petro amonisaki ntina oyo bayekoli ya Kristo basengeli kosalela makambo oyo bazali koyekola. Alobelaki masolo ya Biblia oyo etali Noa. Yehova ayebisaki Noa ete akobebisa bato mabe ya ntango na ye na mpela. Mpo Noa ná bato ya libota na ye bábika, basengelaki kosuka kaka te na koyeba ete mpela ezali koya. Kobosana te ete ntoma Petro azalaki kolobela eleko liboso mpela eya “ntango masuwa ezalaki kotongama” (1 Pe. 3:20) Na ntembe te, Noa ná bato ya libota na ye basalelaki makambo oyo bayekolaki epai ya Nzambe na ndenge batongaki ebakata wana ya masuwa. (Ebr. 11:7) Ntoma Petro akokanisaki makambo oyo Noa asalaki na batisimo, akomaki boye: “Eloko oyo ekokani na yango ezali mpe sikoyo kobikisa bino, elingi koloba, batisimo.” (1 Pe. 3:21) Na yango, tokoki kokokanisa mosala oyo ozali kosala sikoyo ya komibongisa mpo na batisimo na mosala oyo Noa ná bato ya libota na ye basalaki na boumeli ya bambula mpo na kotonga masuwa. Mosala nini osengeli kosala mpo na komibongisa mpo na batisimo?

15. Kobongola motema ya solosolo esɛngaka nini?

15 Likambo ya liboso oyo tosengeli kosala ezali ya kobongola mpenza mitema na biso. (Mis. 2:37, 38) Kobongola motema ya solosolo ekotinda biso tóbongwana. Otiki kosala makambo nyonso oyo esepelisaka Yehova te, na ndakisa pite, komɛla likaya, to koloba maloba mabe? (1 Ko. 6:9, 10; 2 Ko. 7:1; Ef. 4:29) Soki osali naino yango te, kobá kosala bambongwana. Sololá na ndeko oyo ayekolaka na yo Biblia, to sɛngá bankulutu ya lisangá básalisa yo. Soki ozali elenge mpe ofandaka epai na bino, kobá kosɛnga baboti na yo básalisa yo mpo otika mimeseno nyonso ya mabe oyo ekoki kopekisa yo ozwa batisimo.

16. Kozala na momeseno malamu ya makambo ya elimo esɛngaka makambo nini?

16 Kozala mpe na momeseno malamu ya makambo ya elimo ezali na ntina mingi. Yango esɛngi koyanganaka na makita ya lisangá mpe kopesaka biyano. (Ebr. 10:24, 25) Mpe soki okokisi masɛngami mpo na kobima na mosala ya kosakola, saláká yango mbala na mbala. Soki ozali kobima mbala na mbala na mosala yango oyo ebikisaka bomoi ya bato, okobanda kosepela na yango mingi. (2 Tim. 4:5) Soki ozali naino elenge mpe ofandaka epai na bino, omituna boye: ‘Esɛngaka ete baboti na ngai báyebisa ngai nakende na makita to nabima na mosala ya kosakola? To nasalaka yango kozanga ete bátindika ngai na makasi?’ Soki ozali kosala makambo kozanga ete bátindika yo na makasi, okomonisa ete ozali na kondima, olingaka Yehova, mpe ozali na botondi epai na ye. Makambo yango ezali ‘misala oyo ezali komonisa ete okangami na Nzambe,’ mbeka oyo opesaka Yehova. (2 Pe. 3:11; Ebr. 13:15) Makabo nyonso oyo topesaka na bolingo na biso moko kozanga ete bátindika biso, esepelisaka Nzambe na biso. (Talá mpe 2 Bakorinti 9:7.) Tosalaka makambo yango mpo tosepelaka kopesa Yehova eloko na biso oyo eleki malamu.

KOBÁ KOKOLISA BOLINGO NA YO MPO NA YEHOVA

17-18. Ezaleli nini ya ntina mingi ekosalisa yo osala milende tii ozwa batisimo, mpe mpo na nini? (Masese 3:3-6)

17 Wana ozali kosala milende mpo na kozwa batisimo, yebá ete okokutana na mikakatano. Bato mosusu bakoki kosɛka yo mpo na bindimeli na yo ya sika, bakoki kutu kotɛmɛla to mpe konyokola yo. (2 Tim. 3:12) Wana ozali kosala makasi mpo otika mimeseno ya mabe, na bantango mosusu okoki kokwea kaka na makambo yango. To mpe okoki kozanga komonisa motema molai mpe kolɛmba nzoto mpo ozali kokokisa mokano na yo te. Nini ekosalisa yo oyika mpiko? Ezaleli moko ya ntina mingi, elingi koloba bolingo mpo na Yehova.

18 Bolingo na yo mpo na Yehova ezali ezaleli moko ya malamu, eloko oyo eleki malamu oyo ozali na yango (Tángá Masese 3:3-6.) Soki ozali kolinga Yehova makasi, yango ekosalisa yo olonga mikakatano oyo ozali kokutana na yango. Mbala mingi Biblia elobelaka motema boboto to bolingo ya sembo oyo Yehova azali na yango mpo na basaleli na ye. Yango emonisi ete akosundola basaleli na ye te mpe akotika te kolinga bango. (Nz. 100:5) Nzambe asalá yo na elilingi na ye. (Eba. 1:26) Ndenge nini okoki komonisa bolingo ya ndenge wana?

Okoki komonisa botondi na yo mpo na Yehova mokolo na mokolo (Talá paragrafe 19) b

19. Ndenge nini okoki kokolisa botondi mpo na nyonso oyo Yehova asalelaka yo? (Bagalatia 2:20)

19 Banda naino na komonisa botondi. (1 Tes. 5:18) Mokolo na mokolo, omitunaka boye: ‘Ndenge nini Yehova amoniseli ngai bolingo?’ Na nsima, salá makasi opesaka Yehova matondi na libondeli; lobeláká makambo ya sikisiki oyo asaleli yo. Monáká mpenza ndenge Yehova amoniselaka yo bolingo, kaka ndenge ntoma Paulo amonaki yango. (Tángá Bagalatia 2:20.) Omituna boye, ‘Nakosepela mpe komonisela ye bolingo?’ Kolinga Yehova ekosalisa yo okoba kotɛmɛla komekama mpe oyika mpiko na mikakatano. Ekosalisa yo otika te momeseno malamu ya makambo ya elimo, mpe okoba komonisela Tata na yo bolingo mokolo na mokolo.

20. Likambo nini osengeli kosala mpo na komipesa na Yehova, mpe ekateli yango ezali mpenza na ntina?

20 Na nsima, bolingo na yo mpo na Yehova ekotinda yo osala libondeli moko ya ntina mingi. Okomipesa na Nzambe na nzela ya libondeli yango. Kobosana te, soki omipesi na Yehova, yebá ete ozali na elikya ya kokóma moto na ye mpo na libela. Ntango omipesi na Yehova, olaki ye ete okosalela ye ezala na ntango ya mpasi to ya bisengo. Ekosɛnga lisusu te osala elaka yango mpo na mbala ya mibale. Na yango, ntango tomipesi na Yehova, tozwi ekateli moko ya ntina mingi. Kasi, kobosana likambo oyo te: Okozwa bikateli mingi na bomoi na yo, mingi na yango ekozala bikateli ya malamu, kasi ekateli moko te ekozala malamu koleka ekateli ya kopesa bomoi na yo epai ya Yehova. (Nz. 50:14) Satana akosala nyonso mpo na kolɛmbisa bolingo na yo mpo na Yehova, na elikya ete otikala sembo te epai na ye. Kotika soki moke te ete Satana alonga yo! (Yobo 27:5) Bolingo makasi oyo ozalaka na yango mpo na Yehova ekosalisa yo otosa elaka na yo ya kosalela ye mpo na libela, mpe opusana lisusu penepene ya Tata na yo ya likoló.

21. Mpo na nini tokoki koloba ete batisimo ezali nsuka te, kasi ezali nde ebandeli?

21 Nsima ya komipesa na Yehova, sololá na bankulutu ya lisangá na bino mpo na kozwa ekateli ya mibale ya ntina mingi. Kasi kobosana te ete batisimo ezali nsuka te, ezali nde ebandeli. Yango ezali ebandeli ya bomoi oyo ezangi nsuka mpo na kosalela Yehova. Na yango, kolisá bolingo makasi mpo na Tata na yo banda sikoyo. Omityela mikano mpo bolingo na yo ekola mokolo na mokolo. Makambo wana nde ekotinda yo ozwa batisimo. Ekozala mokolo moko ya ntina mingi. Kasi yango ezali kaka ebandeli. Tiká ete bolingo na yo mpo na Yehova mpe Mwana na ye ekoba kokola mpo na libela!

LOYEMBO 135 Yehova alobi: “Zalá mayele, mwana na ngai”

a Mpo tókola na elimo mpe tókokisa masɛngami mpo na kozwa batisimo, tosengeli kozala na makanisi malamu. Tosengeli mpe kosala makambo oyo ebongi. Tokotalela ndakisa ya mosaleli moko ya mokonzi ya Etiopi mpo na koyeba makambo oyo bayekoli ya Biblia basengeli kosala mpo bákokisa masɛngami mpo na kozwa batisimo.

b NDIMBOLA YA ELILINGI: Ndeko mwasi moko ya elenge azali koyebisa Yehova na libondeli ete azali na botondi mingi mpo na oyo apesá ye.