LISOLO YA BOYEKOLI 13
Salelá bozalisi mpo na koteya bana na yo makambo etali Yehova
“Nani azalisaki biloko oyo nyonso?”—YIS. 40:26.
LOYEMBO 11 Biloko Nzambe akelá ekumisaka ye
NA MOKUSE a
1. Mposa ya baboti ezalaka nini mpo na bana na bango?
BABOTI, toyebi ete bolingi kosalisa bana na bino báyeba Yehova mpe bálinga ye. Kasi lokola Nzambe amonanaka te, ndenge nini bokoki kosalisa bana na bino bámona Yehova lokola Moto ya solo mpenza mpe bápusana penepene na ye?—Yak. 4:8.
2. Ndenge nini baboti bakoki koteya bana na bango bizaleli ya Yehova?
2 Lolenge eleki malamu ya kosalisa bana bápusana penepene na Yehova ezali ya koyekolaka na bango Biblia. (2 Tim. 3:14-17) Kasi, Biblia emonisi lolenge mosusu oyo bilenge bakoki koyekola makambo etali Yehova. Mokanda ya Masese elobeli tata moko oyo azali kosalisa mwana na ye abosanaka te bizaleli ya Yehova, oyo emonisami na bozalisi. (Mas. 3:19-21) Tokolobela ndenge baboti bakoki kosalela bozalisi mpo na kosalisa bana na bango báyekola makambo etali Yehova.
NDENGE YA KOSALELA BOZALISI MPO NA KOTEYA BANA NA YO
3. Lisalisi nini baboti basengeli kopesa bana na bango?
3 Biblia elobi ete ‘bizaleli ya Nzambe oyo emonanaka te ezali komonana polelepolele banda na kozalisama ya mokili, mpo emonanaka na nzela ya biloko oyo asalá.’ (Rom. 1:20) Baboti, na ntembe te bosepelaka kozwa mwa mopɛpɛ elongo na bana na bino. Bósalela ntango yango mpo na kosalisa bana na bino bámona boyokani oyo ezali kati na ‘biloko oyo Yehova asalá’ mpe bizaleli na ye ya kokamwa. Na yango, tótalela ndenge ndakisa ya Yesu ekoki kosalisa baboti na likambo yango.
4. Na kotalela Luka 12:24, 27-30, ndenge nini Yesu asalelaki bozalisi mpo na koteya bayekoli na ye?
4 Talá ndenge Yesu asalelaki bozalisi mpo na koteya. Na libaku moko, asɛngaki bayekoli na ye bátala bayanganga mpe bafololo lísi. (Tángá Luka 12:24, 27-30.) Yesu akokaki kolobela nyama moko boye to mpe nzete moko boye, kasi aponaki kolobela ndɛkɛ mpe fololo oyo bayekoli na ye bayebaki malamu. Mbala mosusu, bayekoli bazalaki komona ndenge bayanganga ezalaki kopumbwa na likoló, mpe ndenge bafololo ezalaki kobota na elanga. Meká kokanisa ndenge Yesu azalaki kolakisa biloko yango ntango azalaki koloba! Asalaki nini nsima ya kolobela biloko yango? Ateyaki bayekoli na ye liteya ya ntina mingi oyo etali bokabi mpe boboto ya Tata na bango ya likoló: Yehova akoleisa mpe akolatisa basaleli na ye ya sembo kaka ndenge asalaka yango mpo na bayanganga mpe bafololo ya elanga.
5. Biloko nini oyo Nzambe akelá baboti bakoki kosalela mpo na koteya bana na bango makambo etali Yehova?
5 Baboti, ndenge nini bokoki komekola Yesu ntango bozali koteya bana na bino? Okoki koyebisa mwana na yo eloko moko oyo Nzambe akelá oyo osepelaka na yango mingi, na ndakisa nyama to nzete moko. Wana ozali koyebisa mwana na yo likambo yango, osengeli kolimbolela ye oyo eloko yango ezali koteya biso mpo na Yehova. Okoki mpe kotuna mwana na yo mwa mituna mpo na oyo etali nyama to mpe nzete oyo ye alingaka mingi. Soki ozali kolobela eloko moko oyo asepelaka na yango mingi, mbala mosusu akoki kotyela yo likebi mingi ntango ozali koteya ye makambo etali Yehova.
6. Ndakisa ya mama ya Christopher ekoki koteya biso nini?
6 Baboti basengeli kolekisa ntango mingi na kosala bolukiluki mpo na nyama to nzete moko boye liboso ya kolobela oyo yango ezali koteya biso mpo na Yehova? Mpenza te. Yesu alobelaki makambo mingi te na oyo etali ndenge bayanganga esalaka mpo na kolya to makambo oyo esalemaka mpo fololo lísi ekola. Ya solo, mbala mosusu mwana na yo akoki kosepela koyoka masolo ya mozindo na oyo etali bozalisi, kasi na bantango mosusu kotalisa ye kaka eloko moko to kotuna ye mwa motuna ekoki kosalisa ye akanga ntina. Ndeko mobali moko na nkombo Christopher abosanaka te makambo ya bomwana na ye, alobi boye: “Mama na ngai azalaki kolobela mwa makanisi ya mikuse oyo ezalaki kosalisa biso tósepela na biloko oyo Nzambe akelá oyo ezalaki zingazinga na biso. Na ndakisa, ntango tozalaki pene ya bangomba, azalaki mbala mosusu koloba: ‘Talá ndenge bangomba yango ezali milai mpe kitoko! Yehova azali mpenza Nzambe ya kokamwa, boye te?’ To ntango tokómi pene ya mbu azalaki mbala mosusu koloba: ‘Talá bambonge oyo ndenge ezali mpenza na nguya! Yango emonisi ete Nzambe azali mpenza na nguya, boye te?’” Christopher alobi boye: “Mwa makanisi wana ya mikuse, ezalaki kotinda biso tókanisa mpenza na mozindo.”
7. Ndenge nini okoki kosalisa bana na yo bákanisaka na bozalisi?
7 Wana bana na yo bazali kokola, okoki kosalisa bango bákóma kokanisa na mozindo mpo na bozalisi mpe báyekola bizaleli ya Yehova. Okoki kolobela moko ya biloko oyo Yehova akelá mpe kotuna bango, “Yango ekoki koteya yo nini mpo na Yehova?” Biyano oyo bakopesa ekoki mbala mosusu kokamwisa yo.—Mat. 21:16.
NTANGO NINI OKOKI KOSALELA BOZALISI MPO NA KOTEYA BANA NA YO?
8. Libaku nini baboti ya Yisraele bazalaki na yango ntango bazalaki ‘kotambola na nzela’?
8 Yehova asɛngaki baboti ya Yisraele ete báteyaka bana na bango mibeko na ye wana bazali ‘kotambola na nzela.’ (Mib. 11:19) Lokola banzela ezalaki kokatisa bazamba ya Yisraele, yango wana bakokaki komona banyama, bandɛkɛ mpe bafololo ya ndenge na ndenge. Wana bazalaki kotambola na nzela, baboti ya Yisraele bazalaki na mabaku ya kobenda likebi ya bana na bango na bozalisi ya Yehova. Bino baboti, bokoki mpe kozala na mabaku ya ndenge wana ya kosalela bozalisi mpo na koteya bana na bino. Tótala ndenge baboti mosusu basalaki yango.
9. Ndakisa ya Punitha ná Katya ekoki koteya yo nini?
9 Mama moko na nkombo Punitha, oyo afandaka na engumba moko monene na Inde alobi boye: “Ntango tokendaka kotala bato ya libota na biso na mboka, tomonaka yango libaku malamu ya kosalisa bana na biso báyekola makambo etali bozalisi kitoko ya Yehova. Namonaka ete kuna bana na ngai bakangaka malamu mpenza ntina ya bozalisi koleka ndenge ezalaka na bingumba oyo etondi na bato mpe mituka.” Baboti, bóyeba ete bana na bino bakobosana te ntango oyo bolekisaka na bisika kitoko ya ndenge wana. Ndeko mwasi moko na nkombo Katya, oyo afandaka na Moldavie alobi boye: “Makambo ya bomwana na ngai oyo nabosanaka te ezali ntango oyo tolekisá na baboti na ngai na bamboka. Nazalaka na esengo ndenge bateyá ngai kobanda bomwana na ngai natɛlɛmaka, mpe natalaka biloko oyo Yehova asalá, mpe namonaka bizaleli na ye na nzela ya biloko yango.”
10. Baboti bakoki kosala nini soki bazali na likoki te ya kokende na bamboka? (Talá etanda “ Lisalisi mpo na baboti.”)
10 Okosala nini soki ozali na likoki te ya kokende na mboka? Amol, oyo afandaka mpe na Inde alobi boye: “Esika nafandaka, baboti basalaka mosala bangonga mingi, mpe kosala mobembo na mboka ekoki kosɛnga mbongo mingi. Kasi, okoki komona bozalisi ya Yehova mpe kolobela yango soki okei na mwa parkɛ moko to soki ozali likoló ya balcon ya ndako.” Soki otali na likebi mpenza, mbala mosusu okomona biloko oyo Nzambe akelá oyo ezali penepene ya ndako na yo oyo okoki kolakisa bana na yo. (Nz. 104:24) Okoki mbala mosusu komona bandɛkɛ, mwa banyama ya mikemike, banzete mpe bongo na bongo. Karina, oyo afandaka na Allemagne alobi boye: “Mama na ngai azalaki kosepela na bafololo, yango wana ntango nazalaki naino elenge, azalaki kolakisa ngai bafololo ntango tozalaki kotambola elongo.” Baboti bakoki mpe kosalela ebele ya bavideo mpe mikanda mingi oyo ebongiseli ya Yehova ebimisá, oyo ezali kolobela bozalisi mpo na koteya bana na bango. Ya solo, ata soki ofandaka wapi, okoki kosalisa bana na yo mpo bátalaka biloko oyo Nzambe asalá. Sikoyo, tiká tólobela bizaleli mosusu ya Yehova oyo okoki kolakisa bana na yo.
BIZALELI YA YEHOVA “OYO EMONANAKA TE EZALI KOMONANA POLELEPOLELE”
11. Ndenge nini baboti bakoki kosalisa bana na bango bámona bolingo ya Yehova?
11 Mpo na kosalisa bana na yo bámona bolingo ya Yehova, okoki kolobela ndenge oyo banyama mingi esalelaka bana na yango makambo na boboto. (Mat. 23:37) Okoki mpe kolobela biloko ndenge na ndenge oyo Nzambe akelá oyo biso tosepelaka na yango. Karina, oyo tolobelaki liboso alobi boye: “Ntango tozalaki kotambola libanda, mama azalaki kolendisa ngai natɛlɛmaka mpo na kotala ndenge bafololo ndenge na ndenge ezali na lolenge na yango moko mpe ndenge kitoko na yango emonisaka bolingo ya Yehova. Bambula mingi na nsima, nakobaka kotala na likebi mpenza bafololo mpe ndenge oyo langi na yango mokomoko ekeseni na mosusu. Yango esalisaka ngai nabosana te ndenge oyo Yehova alingaka biso mingi mpenza.”
12. Na kotalela Nzembo 139:14, ndenge nini baboti bakoki kosalisa bana na bango bámona bwanya ya Nzambe? (Talá mpe elilingi.)
12 Salisá bana na yo bámona bwanya ya Nzambe. Yehova azali na bwanya mingi koleka biso. (Rom. 11:33) Na ndakisa, okoki koyebisa mwana na yo ndenge mai emataka na likoló mpo na kosala mapata mpe na nsima ndenge mapata yango esopaka mai na pɛtɛɛ nyonso na bisika ndenge na ndenge. (Yobo 38:36, 37) Okoki mpe komonisa ye ndenge oyo nzoto na biso esalemá na ndenge moko ya kokamwa mpenza. (Tángá Nzembo 139:14.) Tótala ndenge tata moko na nkombo Vladimir asalaki yango. Alobi boye: “Mokolo moko mwana na biso ya mobali akweaki na velo mpe azokaki. Nsima ya mwa mikolo, mpota na ye ekaukaki. Ngai ná mwasi na ngai toyebisaki ye ete Yehova akelaki baselile ya nzoto na biso na likoki ya komibikisaka yango moko. Toyebisaki ye ete tomoná naino te likambo ya bongo na biloko oyo bato basalá. Na ndakisa, motuka emibongisaka yango moko te nsima ya kosala aksida. Yango esalisaki mwana na biso amona bwanya oyo Yehova azali na yango.”
13. Na kotalela Yisaya 40:26, ndenge nini baboti bakoki kosalisa bana na bango bámona nguya ya Nzambe?
13 Yehova asɛngi biso tótombola miso na likoló mpe tókanisa ndenge nguya na ye ezali kobatela minzoto nyonso. (Tángá Yisaya 40:26.) Okoki kolendisa bana na yo bátalaka na likoló mpe bákanisaka na biloko oyo bazali komona. Ndeko mwasi moko na nkombo Ting-Ting oyo afandaka na Taiwan abosanaka te ndenge makambo ezalaki na bomwana na ye, alobi boye: “Mokolo moko, mama na ngai amemaki ngai na mboka moko epai miinda ezalaka mingi te mpo tómona malamu kongɛnga ya minzoto na likoló. Ezalaki na ntango oyo nazalaki kobundana na mbamba ya baninga mpe nazalaki koyeba te soki nakokoba kosalela Yehova na bosembo nyonso. Mama alendisaki ngai nakanisa na nguya oyo Yehova asalelaki mpo na kokela minzoto, mpe nabosana te ete Yehova akoki mpe kosalela nguya yango mpo na kosalisa ngai nalonga ata komekama nini. Nsima ya kotala bozalisi na boumeli ya mobembo yango, nazwaki ekateli ya koluka koyeba Yehova malamu koleka, mpe nakómaki na mposa makasi ya kosalela ye.”
14. Ndenge nini baboti bakoki kosalela bozalisi mpo na kosalisa bana na bango bámona ete Yehova azali Nzambe moko ya esengo?
14 Biloko oyo Yehova akelá emonisaka ete azali Nzambe ya esengo mpe ayebi kosɛkisa. Bato ya siansi bamoni ete banyama mingi esakanaka, ezala bandɛkɛ ata mpe bambisi. (Yobo 40:20) Naino omoná te mwana na yo azali kosɛka ntango nyama moko ezali kosakana? Mbala mosusu ntango nyau moko ezali kolanda bale to bambwa ya mike ezali kosakana. Mbala ya nsima oyo okomona bana na yo bazali kosɛka ntango bamoni nyama moko ezali kosakana, kobosana te koyebisa bango ete tosalelaka Nzambe moko ya esengo!—1 Tim. 1:11.
BOTALELAKA BOZALISI YA YEHOVA NA LIBOTA NA BINO
15. Na kotalela Masese 20:5, nini ekoki kosalisa baboti báyeba makambo oyo ezali na mitema ya bana na bango? (Talá mpe elilingi.)
15 Na bantango mosusu, baboti bakoki komona ete ezali mpasi mpo bana na bango báyebisa bango mikakatano oyo bazali kokutana na yango. Soki ezali mpe bongo mpo na yo, ekosɛnga ete oluka koyeba makanisi ya bana na yo. (Tángá Masese 20:5.) Baboti mosusu bamonaka ete ezali pɛtɛɛ kosala bongo ntango bazali kotala bozalisi elongo na bana na bango. Mpo na nini? Ntina ya liboso ezali ete ezala bana mpe baboti bakotya makanisi na bango nyonso na biloko yango. Masahiko, tata moko oyo afandaka na Taiwan alobeli ntina mosusu, alobi boye: “Ntango tozali kozwa mwa mopɛpɛ elongo na bana na biso, na ndakisa, kotambola likoló ya bangomba to na libongo, bamiyokaka malamu mpenza. Kosala bongo esalisaka bango bábanga te koyebisa biso makambo oyo ezali na mitema na bango.” Katya, oyo tolobelaki liboso alobi boye: “Mbala mingi nsima ya kelasi, tozalaki kokende elongo na mama na parkɛ moko. Kuna, nazalaki koyebisa ye makambo oyo nakutanaki na yango na kelasi mpe makambo oyo ezalaki kotungisa ngai.”
16. Ndenge nini mabota ekoki komiyoka malamu mpe kosepela ntango bazali kotala bozalisi?
16 Ntango bato ya libota moko bazali kolekisa ntango elongo mpo na kotala bozalisi ya Yehova, yango ekoki kosalisa bango bámiyoka malamu mpe bázala na esengo. Yango ekosala ete bolingo na bango ekóma lisusu makasi. Biblia elobi ete ezali na “ntango ya kosɛka” mpe “ntango ya kopumbwapumbwa.” (Mas. 3:1, 4.) Yehova akelá bisika ya kitoko na mabele mpo tósalaka makambo oyo tolingaka. Bato mingi basepelaka kolekisa ntango na mabongo mpe na baparkɛ. Bana mosusu basepelaka kopota mbangu mpe kosakana na baparkɛ, kotala banyama, to mpe kosukola na ebale, na laki, to mpe na mbu. Tozali mpenza na mabaku mingi ya kosepela na biloko oyo Yehova akelá wana tozali kolekisa ntango libanda mpo na kozwa mwa mopɛpɛ!
17. Mpo na nini baboti basengeli kosalisa bana na bango mpo básepela na bozalisi?
17 Na mokili ya sika ya Nzambe, baboti ná bana na bango bakosepela na bozalisi ya Yehova na ndenge oyo esalemá naino te. Na ntango yango, tokozala na ntina te ya kobanga banyama; banyama mpe ekobanga biso te. (Yis. 11:6-9) Tokosepela na biloko oyo Yehova asalá mpo na seko. (Nz. 22:26) Kasi baboti, bózela te ntango yango ekoka mpo na kosalisa bana na bino mpo bábanda kosepela na bozalisi. Wana bozali kosalela bozalisi mpo na koteya bana na bino makambo ya Yehova, mbala mosusu bakozala na likanisi moko na Mokonzi Davidi oyo alobaki ete: “Ee Yehova . . . mosala moko te ezali lokola misala na yo.”—Nz. 86:8.
LOYEMBO 134 Bana bazali mokumba Nzambe apesi
a Bandeko mingi babosanaka te bantango oyo balekisá na baboti na bango oyo bazali bakristo mpo na kotala bozalisi. Babosanaka te ndenge baboti na bango bazalaki kosalela mabaku wana mpo na koteya bango makambo etali bomoto ya Yehova. Soki ozali na bana, ndenge nini okoki kosalela bozalisi mpo na koteya bango bizaleli ya Nzambe? Lisolo oyo ekoyanola na motuna yango.