LISOLO YA BOYEKOLI 12
LOYEMBO 77 Pole na mokili ya molili
Boyá molili—Tikalá na pole
“Bozalaki kala molili, kasi bozali sikoyo pole.”—EF. 5:8.
NA MOKUSE
Mateya oyo tokoki kozwa na maloba ya elilingi oyo etali molili mpe pole na Baefese mokapo 5.
1-2. (a) Nini etindaki ntoma Paulo akomela Baefese mokanda? (b) Mituna nini tokotalela?
NTANGO ntoma Paulo azalaki na bokangami na Roma, alingaki kolendisa bandeko na ye bakristo. Lokola akokaki te kokende ye moko epai na bango, akomelaki bango mikanda. Akomaki mokanda moko na mobu soki 60 to 61 T.B. epai ya Baefese.—Ef. 1:1; 4:1.
2 Mbula pene na 10 liboso, Paulo alekisaki mwa ntango na Efese, azalaki kosakola mpe koteya nsango malamu. (Mis. 19:1, 8-10; 20:20, 21) Alingaki bandeko na ye mingi mpe azalaki na mposa ya kosalisa bango bátikala sembo epai ya Yehova. Kasi, mpo na nini akomaki makambo etali molili mpe pole epai ya bakristo oyo batyamaki mafuta na elimo? Mpe mateya nini bakristo nyonso bakoki kozwa na toli yango? Tótalela biyano na mituna yango.
BALONGWE NA MOLILI BAKƆTI NA POLE
3. Elilingi nini Paulo asalelaki na mokanda na ye epai ya Baefese?
3 Paulo akomelaki bakristo ya Efese boye: “Bozalaki kala molili, kasi bozali sikoyo pole.” (Ef. 5:8) Awa, Paulo asalelaki molili mpe pole na ndenge ya elilingi mpo na kokesenisa makambo mibale. Tótalela ntina oyo Paulo akokaki koloba ete Baefese bazalaki “kala molili.”
4. Na ndenge nini bato ya Efese bazalaki na molili na losambo?
4 Molili na losambo. Liboso báyekola solo mpe bákóma bakristo, Baefese oyo Paulo akomelaki bazalaki baombo ya lingomba ya lokuta mpe ya biyambayamba. Na engumba ya Efese, ezalaki na tempelo ya nzambe Artemisi, oyo bato ya ntango wana bazalaki kotalela yango lokola moko ya biloko nsambo oyo ezalaki kokamwisa na mokili mobimba. Bato bazalaki kokende na tempelo yango mpo na kosambela bikeko. Basali mpe batɛki bikeko ya nzambe-mwasi Artemisi bazalaki kozwa mbongo mingi. (Mis. 19:23-27) Longola yango, engumba yango etondaki na misala ya maji.—Mis. 19:19.
5. Na ndenge nini bato ya Efese bazalaki na molili na bizaleli?
5 Molili na bizaleli. Bato ya Efese bamipesaki na pite mpe etamboli ya nsɔni na nko. Masolo ya makambo ya mbindo ezalaki kobɛtama mingi na bisika ya bato ebele, ata mpe na bafɛti ya losambo. (Ef. 5:3) Bato mingi ya Efese ‘babungisaki bizaleli nyonso ya malamu,’ maloba oyo elimboli ete “bazalaki koyoka lisusu mpasi te soki basali mabe.” (Ef. 4:17-19) Liboso báyekola oyo ezali mpenza malamu to oyo ezali mpenza mabe, lisosoli ya bato ya Efese ezalaki kotungisama te, bazalaki mpe kokanisa ete bakozongisa monɔkɔ te epai ya Yehova. Yango wana Paulo alobaki ete “bazali na molili na makanisi, mpe batangwi mosika na bomoi oyo euti epai ya Nzambe.”
6. Mpo na nini Paulo akokaki koloba ete Baefese bazalaki “sikoyo pole”?
6 Kasi, bato mosusu ya Efese batikalaki na kati ya molili te. Paulo akomaki ete bazalaki “sikoyo pole na boyokani na Nkolo.” (Ef. 5:8) Bandimaki pole, solo oyo ezali na Makomami. (Nz. 119:105) Bato yango basundolaki misala ya lingomba na bango ya lokuta mpe etamboli ya mbindo. Bakómaki “bamekoli ya Nzambe” mpe bazalaki kosala makasi básambela Yehova mpe básepelisa ye.—Ef. 5:1.
7. Na ndenge nini bomoi na biso ekokani na oyo ya bakristo mingi ya Efese?
7 Ndenge moko mpe, liboso tóyeba solo, tozalaki na molili na makambo ya losambo mpe na bizaleli. Basusu kati na biso bazalaki kosala bafɛti ya mangomba ya lokuta; basusu bazalaki na bomoi ya mbindo. Kasi, ntango toyekolaki mibeko ya Yehova na oyo etali malamu ná mabe, tosalaki bambongwana. Tobandaki koyokanisa bomoi na biso na masɛngami na ye ya sembo. Mpe yango ememeli biso matomba mingi. (Yis. 48:17) Kasi, ata sikoyo etumba ezali kaka. Tosengeli kozala ntango nyonso mosika na molili oyo totiká mpe ‘kokoba kotambola lokola bana ya pole.’ Ndenge nini tokoki kosala yango?
BOYÁ MOLILI
8. Na kotalela Baefese 5:3-5, Baefese basengelaki koboya makambo nini?
8 Tángá Baefese 5:3-5. Mpo na kotikala mosika na molili na oyo etali bizaleli, bakristo ya Efese basengelaki kokoba koboya misala oyo esepelisaka Yehova te. Yango ezalaki kaka misala ya pite te, kasi mpe masolo ya mbindo. Paulo akundwelaki Baefese ete basengelaki koboya makambo ya ndenge wana soki balingi kozwa “libula na Bokonzi ya Kristo mpe ya Nzambe.”
9. Mpo na nini tosengeli koboya likambo nyonso oyo ekoki komema biso na pite?
9 Biso mpe tosengeli kokoba kobunda mpo tómikɔtisa te na “misala oyo ezangi kobota mbuma, oyo ezali ya molili.” (Ef. 5:11) Bandakisa mingi emonisi ete ezalaka mpasi te mpo moto oyo ameseni kotala, koyoka, to kolobela makambo ya mbindo, asala makambo ya mabe. (Eba. 3:6; Yak. 1:14, 15) Na ekólo moko, bandeko ebele bakómaki “baninga” na nzela ya site Internet moko ya kosolola na bato. Na ebandeli, mingi na bango bazalaki kolobela makambo ya elimo. Kasi na nsima, masolo yango ebebaki. Bakómaki kolobela mingi kaka makambo ya kosangisa nzoto. Na nsima, bandeko yango mingi bandimaki ete masolo wana ya mbindo etindaki bango básala pite.
10. Satana alukaka kosala biso nini? (Baefese 5:6)
10 Mokili ya Satana elukaka kokosa biso, kotinda biso tóndima ete makambo oyo Yehova alobi ete ezali lisumu mpe mbindo ezali mabe te. (2 Pe. 2:19) Ezali likambo ya kokamwa te! Moko ya mayele mabe oyo Zabolo asalelaka banda kala ezali ya kotya mobulu na mitó ya bato mpo báyeba te kokesenisa malamu ná mabe. (Yis. 5:20; 2 Ko. 4:4) Ezali likambo ya kokamwa te ndenge bafilme, baemisyo ya televizyo, mpe basite Internet mingi elendisaka makanisi oyo eyokani te na mibeko ya sembo ya Yehova! Satana alukaka kokosa biso tókanisa ete misala mpe bomoi ya mbindo ezali mabe te, mpe kutu esepelisaka mpe ezali na likama te.—Tángá Baefese 5:6.
11. Ndenge nini likambo oyo ekómelaki Angela emonisi ntina ya kosalela toli ya bwanya oyo ezali na Baefese 5:7? (Talá mpe elilingi.)
11 Satana alingi tózala baninga ya bato oyo bakosala ete tókoka te kokangama na mibeko ya Yehova. Yango wana Paulo alendisaki Baefese ete: “Bósala te ndenge bango basalaka,” elingi koloba, baoyo basalaka oyo ezali mabe na miso ya Nzambe. (Ef. 5:7) Tosengeli komikundwela ete baninga na biso ezali kaka te baoyo tomonanaka boye na miso. Ezali mpe baoyo tosololaka na bango na nzela ya Internet, likama oyo ezalaki te mpo na Baefese ya siɛklɛ ya liboso. Angela, a oyo afandaka na Azia, amonaki ete basite ya kosolola na bato ekoki kozala likama mpenza. Alobi boye: “Ekoki kozala motambo, kobebisa makanisi na yo na ndenge ya nse nse. Ezalaki lisusu kosala ngai mabe te kozala na ‘baninga’ oyo batosaka mitinda ya Biblia te. Nsukansuka nakómaki kondima ete ezali malamu kozala na bomoi oyo esepelisaka Yehova te.” Likambo ya esengo, bankulutu ya boboto basalisaki Angela asala mbongwana oyo esengeli. Alobi boye: “Sikoyo natyaka makanisi na ngai nyonso na makambo ya elimo kasi te na basite ya kosolola na bato.”
12. Nini ekosalisa biso tókangama na mibeko ya Yehova na oyo etali mabe ná malamu?
12 Tosengeli kobundisa makanisi ya mokili oyo elobi ete pite ezali mabe te. Biso toyebi ete ezali mabe. (Ef. 4:19, 20) Ezali malamu tómituna boye: ‘Nasalaka makasi naboya kolekisa ntango kaka mpamba elongo na baninga ya mosala, baninga ya kelasi, to bato mosusu oyo bamemyaka te mibeko ya sembo ya Yehova? Nakɔtelaka na mpiko nyonso mibeko ya Yehova ata soki bato mosusu bakoki kobenga ngai moto oyo alekisaka ndelo?’ Ndenge 2 Timote 2:20-22 emonisi yango, ekoki mpe kosɛnga tókeba ntango tozali kopona baninga na kati ya lisangá. Tóbosana te ete bato mosusu bakoki te kosalisa biso tótikala sembo na mosala na biso epai ya Yehova.
TÓTAMBOLA “LOKOLA BANA YA POLE”
13. ‘Kokoba kotambola lokola bana ya pole’ elimboli nini? (Baefese 5:7-9)
13 Paulo alendisaki bakristo ya Efese kaka te bákoba koboya molili, kasi mpe ‘bákoba kotambola lokola bana ya pole.’ (Tángá Baefese 5:7-9.) Yango elimboli nini? Na mokuse, elimboli ete tosengeli komitambwisa lokola bakristo ya solo ntango nyonso. Mpo na kosala yango, tosengeli kotánga mpe koyekola Biblia mpe mikanda ya moombo ya sembo na likebi. Ezali mpe na ntina tótalela mingimingi ndakisa mpe mateya ya Yesu Kristo, “pole ya mokili.”—Yoa. 8:12; Mas. 6:23.
14. Ndenge nini elimo santu ekoki kosalisa biso?
14 Tosengeli mpe na lisalisi ya elimo santu ya Nzambe mpo tókoba komitambwisa lokola “bana ya pole.” Mpo na nini? Mpo ezali etumba monene kotikala pɛto na mokili oyo ya mbindo. (1 Tes. 4:3-5, 7, 8) Elimo santu ekoki kosalisa biso tóbundisa makanisi ya mokili, ata mpe filozofi ná ndenge na yango ya kotalela makambo oyo eyokani te na makanisi ya Nzambe. Elimo santu ekoki mpe kosalisa biso tómonisa “boboto na makambo nyonso [mpe] bosembo.”—Ef. 5:9.
15. Ndenge nini tokoki kozwa elimo santu? (Baefese 5:19, 20)
15 Lolenge moko oyo tokoki kozwa elimo santu ezali ya kosɛnga yango na libondeli. Yesu alobaki ete Yehova akopesa “elimo santu na baoyo bazali kosɛnga ye yango.” (Luka 11:13) Mpe ntango tosanzolaka Yehova elongo na makita, tozwaka mpe elimo santu. (Tángá Baefese 5:19, 20.) Nguya ya elimo santu ya Nzambe ekosalisa biso tózala na bomoi oyo esepelisaka Nzambe.
16. Nini ekosalisa biso tózwa bikateli ya malamu? (Baefese 5:10, 17)
16 Ntango tolingi kozwa bikateli ya minene, tosengeli kososola “soki mokano ya Yehova ezali nini” mpe na nsima kosala na boyokani na yango. (Tángá Baefese 5:10, 17.) Soki toyebi malamu mitinda ya Biblia oyo tokoki kosalela na likambo oyo tozali na yango, tokozala mpenza na makanisi ya Nzambe na likambo yango. Mpe soki tosaleli mitinda na ye, tokolonga kozwa bikateli ya malamu.
17. Kosalela ntango na biso malamu elimboli nini? (Baefese 5:15, 16) (Talá mpe elilingi.)
17 Paulo apesaki mpe bakristo ya Efese toli ete básalelaka ntango na bango malamu. (Tángá Baefese 5:15, 16.) “Moto mabe,” monguna na biso Satana, akosepela tópesa ntango mingi na makambo ya mokili tii tózala na ntango te mpo na makambo ya Nzambe. (1 Yoa. 5:19) Ekozala mpasi te mokristo atya biloko ya mosuni, kotánga kelasi, to mosala na ye liboso ya mabaku mosusu ya kosalela Yehova. Soki esalemi bongo, ekomonisa ete makanisi ya mokili ekɔteli ye. Ya solo, makambo yango ezali mabe te, kasi esengeli ata moke te kozwa esika ya liboso na bomoi na biso. Mpo na kotambola “lokola bana ya pole,” tosengeli ‘kosalela ntango na biso malamu mpenza,’ kotya likebi na makambo oyo ezali mpenza na ntina.
18. Donald asalaki nini mpo asalela ntango na ye malamu koleka?
18 Lukáká mabaku ya kosalela Yehova mingi koleka. Yango nde Donald, oyo afandaka na Afrique du Sud asalaki. Alobi boye: “Natalelaki bomoi na ngai mpe nabondelaki Yehova asalisa ngai nasala mingi na mosala ya kosakola. Nabondelaki ye mpo nazwa mosala oyo ekotikela ngai ntango ya kosakola mingi. Na lisalisi ya Yehova, nazwaki mosala oyo ebongi. Ngai ná mwasi na ngai tokɔtaki na mosala ya ntango nyonso elongo.”
19. Ndenge nini tokoki kokoba kotambola “lokola bana ya pole”?
19 Na ntembe te, mokanda ya Paulo epai ya Baefese esalisaki bango na bomoi na bango ya bokristo. Toli yango oyo eutaki na Nzambe ekoki mpe kosalisa biso. Ndenge tomoni yango, ekoki kosalisa biso na kopona malamu kominanola mpe baninga na biso. Ekoki kosalisa biso tóyekolaka Biblia mbala na mbala mpo tókoba kotambola na pole. Mpe emonisi ntina ya elimo santu, oyo ekoki kobota bizaleli ya malamu epai na biso. Kosalela makambo oyo Paulo akomaki ekoki kosalisa biso tózwaka bikateli ya malamu, oyo eyokani na makanisi ya Yehova. Soki tosali makambo yango, tokolonga koboya molili ya mokili oyo mpe tokotikala na pole!
OKOPESA EYANO NINI?
-
“Molili” mpe “pole” nini Baefese 5:8 elobeli?
-
Ndenge nini tokoki koboya “molili”?
-
Ndenge nini tokoki ‘kokoba kotambola lokola bana ya pole’?
LOYEMBO 95 Pole ezali kongɛnga se kongɛnga
a Topesi bango bankombo mosusu.
b NDIMBOLA YA ELILINGI: Kopi ya kala ya mokanda ya ntoma Paulo epai ya Baefese.