Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOYEKOLI 10

LOYEMBO 13 Kristo, ndakisa na biso

‘Kobá kolanda’ Yesu nsima ya batisimo

‘Kobá kolanda’ Yesu nsima ya batisimo

“Soki moto alingi kolanda ngai, amiboya ye moko mpe amema nzete na ye ya mpasi mokolo na mokolo mpe akoba kolanda ngai.”LUKA 9:23.

NA MOKUSE

Lisolo oyo ekoki kosalisa biso nyonso tókanisa ndimbola ya komipesa na biso na Nzambe. Ekoki kosalisa mingimingi baoyo bazwi batisimo sika mpo bátikala sembo.

1-2. Na ndenge nini bomoi ya moto ekómaka malamu koleka nsima ya kozwa batisimo?

 EZALAKA esengo mpenza kozwa batisimo mpe kokɔta na libota ya Yehova. Baoyo bazwá libaku yango bandimaki maloba ya Davidi, oyo alobaki: “Esengo na moto oyo [yo Yehova] oponi mpe obendi mpo afanda na mapango na yo.”—Nz. 65:4.

2 Yehova akɔtisaka moto nyonso kaka boye te na mapango na ye. Ndenge tomonaki yango na lisolo oyo eleki, aponaka kopusana penepene na baoyo bamonisi ete balingi kozala na boyokani na ye. (Yak. 4:8) Ntango omipesi na Yehova mpe ozwi batisimo, opusani penepene na Yehova na ndenge mosusu. Yebá ete nsima ya kozwa batisimo, ‘akosopela yo lipamboli tii okozanga lisusu eloko te.’—Mal. 3:10; Yir. 17:​7, 8.

3. Bakristo oyo bamipesi mpe bazwi batisimo bazali na mokumba nini? (Mosakoli 5:​4, 5)

3 Ya solo, batisimo ezali kaka ebandeli. Nsima ya kokokisa mokano yango, ekosɛnga osala nyonso mpo okokisa elako na yo ya komipesa, ata ntango okutani na komekama to mikakatano. (Tángá Mosakoli 5:​4, 5.) Lokola okómi moyekoli ya Yesu, okosala nyonso mpo olanda ndakisa na ye mpe otosa makambo oyo atindaki. (Mat. 28:​19, 20; 1 Pe. 2:21) Lisolo oyo ekosalisa yo osala bongo.

‘KOBÁ KOLANDA’ YESU ATAKO MIKAKATANO MPE KOMEKAMA

4. Na ndenge nini bayekoli ya Yesu bamemaka ‘nzete ya mpasi’? (Luka 9:23)

4 Nsima ya batisimo, bomoi na yo ekozanga mikakatano te. Kutu, Yesu amonisaki polele ete bayekoli na ye bakomema ‘nzete ya mpasi.’ Mpe basengeli kosala yango “mokolo na mokolo.” (Tángá Luka 9:23.) Yesu alingaki nde koloba ete bayekoli na ye bakobanda komona mpasi ntango nyonso? Te. Alingaki kaka komonisa ete longola mapamboli oyo bakozwa, bakokutana na mikakatano. Mikakatano yango mosusu ekoki kopesa bango mpasi.—2 Tim. 3:12.

5. Mapamboli nini Yesu alaki baoyo bamipimelaka makambo mosusu?

5 Mbala mosusu osilá kokutana na botɛmɛli oyo euti na bandeko ya libota, to mbala mosusu otiká mosala ya mbongo mpo otya Bokonzi na esika ya liboso. (Mat. 6:33) Soki ezali bongo, yebá ete Yehova amoni misala na yo ya sembo. (Ebr. 6:10) Na ntembe te, omoni bosolo ya maloba ya Yesu oyo: “Moto moko te oyo atiki ndako, to bandeko mibali, to bandeko basi, to mama, to tata, to bana, to bilanga mpo na ngai mpe mpo na nsango malamu, akozanga kozwa mbala 100 sikoyo na eleko oyo—bandako, bandeko mibali, bandeko basi, bamama, bana, mpe bilanga, elongo na minyoko—mpe na mokili oyo ezali koya, bomoi ya seko.” (Mrk. 10:​29, 30) Mapamboli oyo ozwi eleki mosika mpenza eloko nyonso oyo omipimelaki.—Nz. 37:4.

6. Mpo na nini osengeli kokoba kobundisa “mposa ya nzoto” ata nsima ya batisimo?

6 Osengeli mpe kokoba kobundisa “mposa ya nzoto” ata nsima ya batisimo. (1 Yoa. 2:16) Mpo na koloba solo, ozali kaka moto ya kozanga kokoka, lokola ozali mwana ya Adama. Na bantango mosusu okoki komiyoka lokola ntoma Paulo. Akomaki boye: “Na motema na ngai, nasepelaka mpenza na mobeko ya Nzambe, kasi nazali komona na nzoto na ngai mobeko mosusu oyo ezali kobunda etumba na mobeko ya makanisi na ngai mpe oyo ezali komema ngai mokangami epai ya mobeko ya lisumu oyo ezali na nzoto na ngai.” (Rom. 7:​22, 23) Mbala mosusu okolɛmba nzoto mpo ozali kobundisa bamposa na yo ya kosala lisumu. Kasi, kokanisa elaka oyo opesaki Yehova ntango omipesaki na ye ekopesa yo makasi mingi mpo na kotɛmɛla komekama. Mpo na koloba solo, ntango okutani na komekama, komipesa na yo na Nzambe ekosalisa yo mingi. Ndenge nini?

7. Ndenge nini kozala moto oyo amipesá na Yehova ekosalisa yo otikala sembo epai na ye?

7 Ntango osali libondeli ya komipesa na Yehova, omiboyi yo moko. Yango elimboli ete okoboya kolanda makanisi na yo mpe mikano na yo soki ekosepelisa Yehova te. (Mat. 16:24) Na yango, ntango okutani na komekama, okozala na ntina te ya kolekisa ntango mpo na komituna soki okosala nini. Osilaki koboya makambo nyonso longola kaka moko: kotikala sembo epai ya Yehova. Okozala na ekateli makasi ya kosepelisa Yehova. Okozala kaka lokola Yobo. Ata ntango akutanaki na komekama ya makasi, alobaki na mpiko ete: “Nakotika te bosembo na ngai!”—Yobo 27:5.

8. Ndenge nini kokanisa libondeli na yo ya komipesa na Nzambe ekoki kosalisa yo otɛmɛla komekama?

8 Soki ozali kokanisa libondeli na yo ya komipesa na Yehova, okozwa makasi ya kotɛmɛla ata komekama nini. Na ndakisa, okoluka nde kozala seresere na moto oyo azali molongani na yo te? Okosala bongo te! Osilaki kolaka ete okosala makambo ya bongo te. Na ndenge yango, okomona te mpasi ya kolongola mayoki ya mbindo mpo esili kozwa misisa na motema na yo. ‘Okolongwa’ na “nzela ya basali-mabe.”—Mas. 4:​14, 15.

9. Ndenge nini kokanisa libondeli na yo ya komipesa ekoki mpe kosalisa yo okoba kotya makambo ya elimo na esika ya liboso?

9 Bongo soki balingi kopesa yo mosala ya mosuni oyo ekopekisa yo koyangana na makita nyonso? Okomituna mituna te. Banda kala liboso kutu bálakisa yo mosala yango, osilaki koboya mosala oyo ekopekisa yo koyangana na makita. Na yango, okozala na mposa te ya kokanisa ndenge oyo okoki kosala mpo ekateli ya mabe oyo okoki kozwa elonga. Soki okanisi lisusu ekateli makasi oyo Yesu azalaki na yango ya kosepelisa Tata na ye, okoboya nokinoki mpe na motema moko likambo nyonso oyo oyebi ete ekosepelisa te Nzambe oyo omipesá na ye.—Mat. 4:10; Yoa. 8:29.

10. Ndenge nini Yehova akosalisa yo ‘okoba kolanda’ Yesu nsima ya batisimo?

10 Kobosana te ete komekama mpe mikakatano epesaka moto libaku ya komonisa soki azali na ekateli ya ‘kokoba kolanda’ Yesu. Soki osali bongo, yebá ete Yehova akosalisa yo. Biblia elobi: “Nzambe azali sembo, mpe akotika te ete bómekama koleka oyo bokoki kokangela motema. Ntango bomekami, Nzambe akobongisela bino nzela ya kobima mpo bózala na likoki ya koyikela yango mpiko.”—1 Ko. 10:13.

NDENGE YA KOKOBA KOLANDA YESU

11. Wapi moko ya balolenge eleki malamu ya kokoba kolanda Yesu? (Talá mpe elilingi.)

11 Yesu azalaki na molende, mpe atikalaki penepene na Yehova na nzela ya libondeli. (Luka 6:12) Kutu, moko ya balolenge ya malamu oyo okoki kokoba kolanda Yesu nsima ya batisimo ezali ya kokoba kosala makambo oyo ekosalisa yo opusana penepene na Yehova. Biblia elobi: “Ata soki tokei liboso tii wapi, tókoba kaka kotambola na molɔngɔ na nzela moko wana.” (Flp. 3:16) Na bantango mosusu, okoyoka masolo ya bandeko mibali mpe bandeko basi oyo bazwaki ekateli ya kosala lisusu mingi na mosala ya Nzambe. Mbala mosusu bakɔtaki Eteyelo ya bapalanganisi ya nsango malamu ya Bokonzi, to bakendaki esika mposa ezali mingi. Soki okoki komityela mokano ya ndenge wana, salá yango. Basaleli ya Yehova basepelaka kosala mingi na mosala na ye. (Mis. 16:9) Bongo soki ozali na likoki te ya kosala mingi sikoyo? Kokanisa te ete baoyo bakoki kosala yango baleki yo. Bomoi ya bokristo esɛngi koyika mpiko. (Mat. 10:22) Komona mpamba te motuya ya mosala oyo ozali kosalela Yehova na kolanda makoki mpe makambo ya bomoi na yo. Yango ezali lolenge ya ntina mingi ya kokoba kolanda Yesu nsima ya batisimo.—Nz. 26:1.

Nsima ya batisimo, omityela mokano ya kosala makambo oyo ekosalisa yo opusana penepene na Yehova (Talá paragrafe 11)


12-13. Okoki kosala nini soki molende na yo ebandi kokita? (1 Bakorinti 9:​16, 17) (Talá mpe etanda “ Kobá kopota mbangu.”)

12 Bongo soki na ntango moko boye, omoni ete mabondeli na yo ekómi kaka likolólikoló mpe mosala ya kosakola ezali kosepelisa yo lisusu te? Bongo soki botángi na yo ya Biblia ezali kopesa yo lisusu litomba te ndenge ezalaki liboso? Soki likambo ya bongo ekómeli yo nsima ya batisimo, kokanisa mbala moko te ete ozali lisusu na elimo ya Yehova te. Tozali bato ya kozanga kokoka, mpe mayoki na biso ebongwanaka mpambampamba. Soki molende na yo ekiti, kanisá ndakisa ya ntoma Paulo. Asalaki makasi amekola Yesu, kasi ayebaki ete na bantango mosusu azalaki na mposa mpenza te ya kosala oyo asengeli kosala. (Tángá 1 Bakorinti 9:​16, 17.) Alobaki: “[Ata] soki nazali kosala yango na bolingo na ngai moko te, mokumba monene oyo bapesá ngai ezali kaka.” Na maloba mosusu, Paulo azalaki na ekateli ya kokokisa mosala na ye ata soki azali komiyoka ndenge nini na ntango yango.

13 Ndenge moko mpe, kotika te mayoki na yo ya kozanga kokoka ezwela yo bikateli. Zalá na mokano ya kosala oyo ezali malamu ata soki ozali komiyoka ndenge nini. Na nsima, soki okobi kosala oyo ezali malamu, mayoki na yo ekoki kobonga. Ata ndenge nini, kobatela mimeseno malamu ya elimo ekosalisa yo okoba kolanda Yesu nsima ya batisimo. Molende na yo ekolendisa mpe bandeko mosusu.—1 Tes. 5:11.

“KOBÁ KOMIMEKA . . . KOBÁ KOTALA”

14. Osengeli kotalela nini mbala na mbala, mpe mpo na nini? (2 Bakorinti 13:5)

14 Likambo mosusu oyo ekosalisa yo ezali komitalela mbala na mbala. (Tángá 2 Bakorinti 13:5.) Ezali malamu otyaka likebi na bomoi mpe mimeseno na yo mpo otala soki ozali kokoba kobondela mokolo na mokolo, kotánga mpe koyekola Biblia, koyangana na makita, mpe kobima na mosala ya kosakola. Salá makasi osepelaka lisusu mingi kosala makambo yango ya losambo. Okoki komituna boye: ‘Nayebi kolimbwela basusu mateya ya moboko ya Biblia? Nakoki kosala nini mpo nasepela lisusu mingi na mosala ya kosakola? Nalobelaka makambo ya sikisiki na mabondeli na ngai, mpe emonisaka ete natyelaka Yehova motema mobimba? Nayanganaka na makita pɔsɔ nyonso? Nakoki kosala nini mpo nalandaka makita na likebi mpe napesaka biyano ya malamu?’

15-16. Ndakisa ya ndeko Robert eteyi yo nini na oyo etali kotɛmɛla komekama?

15 Osengeli mpe kotalela na bosembo bolɛmbu na yo. Ndeko mobali moko na nkombo Robert alobeli ntina ya likambo yango; alobi boye: “Ntango nazalaki na mbula 20, nazwaki mosala oyo ezalaki kozwa ngai ngonga mingi te. Mokolo moko nsima ya mosala, moninga moko ya mosala ya mwasi abengisaki ngai na ndako na ye. Alobaki ete tokozala kaka biso mibale mpe tokolekisa ntango ya malamu. Na ebandeli, nalukaki ndenge ya kokima ye, kasi nsukansuka nayebisaki ye ete naboyi mpe nalimbwelaki ye ntina oyo naboyi. Robert atɛmɛlaki komekama, mpe yango ezali likambo ya malamu. Kasi, na nsima, ntango akanisaki likambo yango, amonaki ete akokaki kosala malamu koleka. Alobi boye: “Naboyaki na mpiko mpenza te, mpe nasalaki nokinoki te lokola Yozefe liboso ya mwasi ya Potifare. (Eba. 39:​7-9) Kutu, nakamwaki ndenge ezalaki mpasi mpo naboya libyangi yango. Likambo wana esalisaki ngai namona ete nasengelaki kokómisa makasi boninga na ngai ná Yehova.”

16 Yo mpe okoki kozwa litomba soki omitaleli ndenge Robert asalaki. Ata ntango otɛmɛli komekama moko, omituna boye: ‘Nazwaki ntango boni liboso naloba ete naboyi?’ Soki omoni ete osengeli kobongisa, kolɛmba nzoto te. Sepelá kutu mpo oyebi sikoyo bolɛmbu na yo. Bondelá mpo na yango, mpe salá oyo esengeli mpo okómisa makasi ekateli na yo ya kotosa mibeko ya Yehova.—Nz. 139:​23, 24.

17. Ndenge nini likambo oyo Robert akutanaki na yango ezalaki na boyokani na nkombo ya Yehova?

17 Lisolo ya Robert esuki wana te. Abakisi boye: “Ntango naboyaki libyangi ya moninga wana ya mosala, alobaki na ngai: ‘Olongi!’ Natunaki ye soki alingi koloba nini. Alobaki ete moninga na ye moko, oyo kala azalaki Motatoli, ayebisaki ye ete Batatoli nyonso ya bilenge basalaka makambo ya mabe na kobombana mpe ete soki bazwi libaku ya ndenge wana, balekisaka yango te. Na yango, ayebisaki moninga wana ete akomeka yango epai na ngai. Na ntango yango, nasepelaki ndenge nakumisaki nkombo ya Yehova.”

18. Ozwi ekateli ya kosala nini nsima ya batisimo? (Talá mpe etanda “ Masolo oyo ekosepelisa yo.”)

18 Ntango omipesi na Yehova mpe ozwi batisimo, omonisi ete olingi kosantisa nkombo na ye ata ndenge nini. Mpe okoki kotya motema ete Yehova ayebi komekama oyo okutanaka na yango mpe mikakatano oyo olongaka. Akopambola milende na yo mpo na kotikala sembo. Yebá ete na nzela ya elimo santu na ye, akoki kopesa yo makasi ya kosala yango. (Luka 11:​11-13) Na lisalisi ya Yehova, okolonga kokoba kolanda Yesu nsima ya batisimo na yo.

OKOPESA EYANO NINI?

  • Na ndenge nini bakristo bamemaka ‘nzete ya mpasi mokolo na mokolo’?

  • Okoki kosala nini mpo ‘okoba kolanda’ Yesu nsima ya batisimo?

  • Na ndenge nini kokanisa libondeli na yo ya komipesa ekoki kosalisa yo otikala sembo?

LOYEMBO 89 Yoká, tosá mpe pambwamá