Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

MAKANISI YA BIBLIA

Kolimbisama liboso lisiko epesama

Kolimbisama liboso lisiko epesama

Masumu na biso ekoki kolimbisama kaka na nzela ya mbeka ya lisiko oyo Yesu apesaki ntango asopaki makila na ye. (Ef. 1:7) Nzokande, Biblia elobi: “Nzambe, na ezaleli na ye ya kotika nzela azalaki kolimbisa masumu oyo esalemaki kala,” elingi koloba, liboso Yesu apesa lisiko. (Rom. 3:​25, msl.) Ndenge nini Yehova akokaki kosala yango mpe kaka na ntango yango kotosa bosembo na ye ya kokoka?

Na miso ya Yehova, lisiko ezalaki lokola esili kofutama kaka ntango azwaki ekateli ya kobimisa “mwana” oyo akobikisa baoyo bakozala na kondima epai na ye mpe na bilaka na ye. (Eba. 3:15; 22:18) Nzambe ayebaki ete na ntango oyo atyá, Mwana na ye se moko oyo abotamaki akondima kopesa lisiko. (Gal. 4:4; Ebr. 10:​7-10) Ntango Yesu azalaki awa na mabele lokola momonisi ya Nzambe, azalaki na bokonzi ya kolimbisa masumu liboso lisiko epesama. Asalaki yango na lisalisi ya motuya ya mbeka oyo asengelaki kopesa na nsima mpo na bato oyo bazalaki na kondima.—Mat. 9:​2-6.