Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOYEKOLI 11

LOYEMBO 129 Tokoyika mpiko tii na nsuka

Kotika te kosalela Yehova atako makambo ya kolɛmbisa nzoto

Kotika te kosalela Yehova atako makambo ya kolɛmbisa nzoto

“Ondimi komona mpasi mpo na nkombo na ngai.”EM. 2:3.

NA MOKUSE

Tokoki kokoba kosalela Yehova ata soki tokutani na makambo ya kolɛmbisa nzoto.

1. Wapi mwa mapamboli oyo tozali na yango ndenge tozali na kati ya ebongiseli ya Yehova?

 EZALI mpenza lipamboli ndenge tozali na ebongiseli ya Yehova na mikolo ya nsuka oyo ya yikiyiki. Wana makambo ya mokili ezali se kobeba, Yehova apesi biso libota ya elimo, ya bandeko mibali mpe bandeko basi oyo bazali na bomoko. (Nz. 133:1) Lisusu, asalisaka biso tózala na bomoi ya libota ya esengo. (Ef. 5:33–6:1) Mpe apesaka biso bososoli mpe bwanya oyo esengeli mpo tózala na kimya ya solosolo ya motema.

2. Tosengeli kosala nini, mpe mpo na nini?

2 Kasi, tosengeli kosala makasi mpo tókoba kosalela Yehova na bosembo. Mpo na nini? Mpo na bantango mosusu, basusu bakoki kosala makambo oyo ezokisi biso. Tokoki mpe kolɛmba nzoto mpo na mabunga na biso moko, mingimingi soki tosali libunga moko mbala na mbala. Osengeli kokoba kosalela Yehova (1) ntango ndeko moko ya lisangá azokisi yo, (2) ntango molongani na yo alɛmbisi yo nzoto, mpe (3) ntango olɛmbi nzoto mpo na mabunga na yo moko. Na lisolo oyo, tokotalela likambo yango mokomoko. Tokotalela mpe mateya oyo tokoki kozwa na ndakisa ya moto moko ya sembo oyo Biblia elobeli.

KOTIKA TE KOSALELA YEHOVA NTANGO NDEKO MOKO AZOKISI YO

3. Mokakatano nini basaleli ya Yehova bazali na yango?

3 Mokakatano. Bandeko mosusu bazalaka na bizaleli oyo epesaka biso nkanda. Basusu bakoki kosala biso mabe to likambo oyo ezangi boboto. Bandeko oyo bazali na mikumba bakoki kosala mabunga. Makambo yango ekoki kotinda bato mosusu bámituna soki oyo ezali mpenza ebongiseli ya Nzambe. Na esika bákoba kosalela Nzambe “na bomoko” elongo na bandeko ya lisangá, bakoki kobanda kokima baoyo bapesaki bango mpasi to kutu kotika koyangana na makita. (Sef. 3:9) Kosala bongo ezali bwanya? Tótala mateya oyo tokoki kozwa epai ya moto moko oyo Biblia elobeli, oyo akutanaki na likambo ya ndenge wana.

4. Makambo nini Paulo akutanaki na yango?

4 Ndakisa ya Biblia. Ntoma Paulo ayebaki ete bandeko na ye bakristo bazali bato ya kozanga kokoka. Na ndakisa, bandeko mosusu bakaniselaki ye mabe ntango akómaki moyekoli ya Yesu. (Mis. 9:26) Na nsima, basusu batɔngaki ye mpo na kobebisa lokumu na ye. (2 Ko. 10:10) Paulo amonaki ndenge ndeko moko oyo azali na mikumba azwaki ekateli ya mabe oyo mbala mosusu ebɛtisaki basusu libaku. (Gal. 2:​11, 12) Mpe moko ya moninga ya Paulo ya mosala, Marko, asalaki likambo moko oyo elɛmbisaki ye mpenza nzoto. (Mis. 15:​37, 38) Paulo akokaki kotika moko ya makambo yango etinda ye akabwana na bato oyo bapesaki ye mpasi. Kasi, akobaki kotalela bandeko nyonso na ndenge ya malamu mpe abatelaki molende na ye na mosala ya Yehova. Nini esalisaki Paulo akoba?

5. Nini esalisaki Paulo akabwana te na bandeko na ye? (Bakolose 3:​13, 14) (Talá mpe elilingi.)

5 Paulo azalaki kolinga bandeko nyonso. Bolingo na ye mpo na basusu esalisaki ye atya likebi na mabunga na bango te, kasi nde na bizaleli na bango ya malamu. Bolingo esalisaki mpe Paulo asala likambo oyo ye moko akomaki, ndenge ezali na Bakolose 3:​13, 14. (Tángá.) Tótala ndenge asalaki yango na likambo ya Marko. Atako Marko asundolaki Paulo na mobembo ya liboso ya misionɛrɛ, Paulo asilikelaki ye libela te. Na nsima, Paulo akomelaki lisangá ya Kolose mokanda ya kolendisa, alobaki ete Marko azali moninga malamu ya mosala, “libɔndisi mpenza” epai na ye. (Kol. 4:​10, 11) Ntango Paulo azalaki na bolɔkɔ, asɛngaki mpenza Marko aya kosalisa ye. (2 Tim. 4:11) Ezali polele ete Paulo akabwanaki te na bandeko na ye. Liteya nini tokoki kozwa?

Matata ebimaki kati na Paulo, Barnabasi, mpe Marko. Kasi na nsima, ntoma Paulo abosanaki yango mpe asalaki na esengo elongo na Marko (Talá paragrafe 5)


6-7. Ndenge nini tokoki kokoba komonisela bandeko bolingo atako mabunga na bango? (1 Yoane 4:7)

6 Liteya. Yehova alingi ete tókoba kolinga bandeko nyonso ya lisangá. (Tángá 1 Yoane 4:7.) Soki ndeko moko azangi bizaleli mosusu ya bokristo, tómona kaka ete apesi biso mpasi na nko te mpe ete asalaka makasi alanda mitinda ya Biblia. (Mas. 12:18) Nzambe alingaka basaleli na ye ya sembo atako mabunga na bango. Abwakaka biso te ntango tosali mabunga; akangelaka mpe biso nkanda mpo na libela te. (Nz. 103:9) Ezali na ntina mingi tómekola Tata na biso oyo ayebi kolimbisa!—Ef. 4:32–5:1.

7 Tóbosana mpe te ete lokola nsuka ekómi pene, tosengeli kozala na bomoko na bandeko nyonso. Mbala mosusu botɛmɛli ekoya makasi. Bakoki kutu kokɔtisa biso bolɔkɔ mpo na kondima na biso. Soki likambo ya bongo esalemi, tokozala mpenza na mposa makasi ya bandeko na biso. (Mas. 17:17) Tótala likambo oyo ekómelaki Josep, a nkulutu moko na Espagne. Ye ná bandeko mibali mosusu bakɔtaki bolɔkɔ elongo mpo baboyaki kokɔta na makambo ya mokili. Alobi boye: “Na bolɔkɔ, ezalaki mpasi te kosilikela bandeko mpo tozalaki kosala makambo nyonso esika moko. Tosengelaki kokanga motema na makambo ya basusu mpe kolimbisana na motema moko. Yango esalisaki biso tózala kaka na bomoko mpe tóbatelana. Tozalaki elongo na mibali mosusu na bolɔkɔ oyo basalelaka Yehova te. Na libaku moko, lobɔkɔ na ngai ezwaki likama mpe nakokaki kosala makambo ngai moko te. Kasi, ndeko moko asukolaki bilamba na ngai mpe asungaki ngai na makambo mosusu. Namonaki bolingo ya solosolo na ntango oyo nazalaki mpenza na mposa na yango.” Ezali malamu tósilisaka makambo oyo tozali na yango na basusu banda sikoyo!

KOTIKA TE KOSALELA YEHOVA NTANGO MOLONGANI NA YO ALƐMBISI YO NZOTO

8. Mokakatano nini babalani bakoki kozala na yango?

8 Mokakatano. Makambo ezangaka te na libala nyonso. Biblia elobi polele ete bato oyo babali bakokutana na “mikakatano na bomoi na bango.” (1 Ko. 7:28) Mpo na nini? Mpo libala esangisaka bato mibale ya kozanga kokoka, moto na moto na bizaleli na ye, makambo oyo alingaka, mpe oyo alingaka te. Ekoki mpe kozala ete mwasi ná mobali bautá na mimeseno moko te to babɔkwamá ndenge moko te. Kendekende, bakoki kobimisa bizaleli mosusu oyo emonanaki te liboso bábalana. Makambo oyo tolobeli ekoki kobimisa matata. Na esika bándima ete mokomoko azali na mbeba mpe na nsima básala makasi básilisa yango, bakoki kobanda kopesana foti. Bakoki kutu komona ete malamu bákabwana to báboma libala. Kasi kosundola libala nde ekobongisa makambo? b Tótalela moto moko oyo Biblia elobeli, oyo atikalaki sembo atako azalaki na libala ya mpasi mpenza.

9. Mokakatano nini Abigaile azalaki na yango?

9 Ndakisa ya Biblia. Abigaile azalaki mwasi ya Nabale, oyo Biblia elobi ete azalaki makambo makasimakasi mpe bizaleli mabe. (1 Sa. 25:3) Na ntembe te, kofanda na moto ya ndenge wana ezalaki mpasi mpo na Abigaile. Abigaile azwaki nde libaku malamu ya kokima libala yango? Ɛɛ, ntango Davidi, oyo asengelaki kokóma mokonzi ya Yisraele, ayaki koboma mobali ya Abigaile mpo afingaki ye ná bato na ye. (1 Sa. 25:​9-13) Abigaile akokaki kokima, mpe kopesa Davidi nzela ya kosala likambo oyo akanaki. Kasi, Abigaile asalaki nyonso mpo Davidi aboma Nabale te. (1 Sa. 25:​23-27) Mpo na nini asalaki bongo?

10. Ekoki kozala nini nde etindaki Abigaile atikala sembo na libala ya mpasi?

10 Abigaile alingaki Yehova mpe azalaki kotalela libala lokola Ye. Na ntembe te ayebaki makambo oyo Nzambe alobaki na Adama ná Eva ntango abalisaki bango. (Eba. 2:24) Abigaile ayebaki ete na miso ya Yehova libala ezali ebongiseli mosantu. Alingaki kosepelisa Nzambe, mpe yango etindaki ye asala nyonso oyo akokaki mpo na kobikisa libota na ye, ata mpe mobali na ye. Asalaki nokinoki mpo na kopekisa Davidi aboma Nabale. Lisusu, asɛngaki bolimbisi mpo na mabe oyo asalaki te. Ezali polele ete Yehova alingaki mwasi yango ya mpiko oyo alukaki bolamu ya basusu. Mateya nini basi ná mibali bakoki kozwa na ndakisa ya Abigaile?

11. (a) Yehova asɛngi nini epai ya bato oyo babalá? (Baefese 5:33) (b) Liteya nini ozwi na ndenge Carmen asalaki mpo libala na ye ekufa te? (Talá mpe elilingi.)

11 Liteya. Yehova asɛngi bato oyo babalá bátosa ebongiseli ya libala ata soki molongani na bango azali na bizaleli mabe. Na ntembe te, Nzambe asepelaka ntango amonaka bato oyo babalá bazali kosala makasi mpo na kosilisa matata na bango mpe komoniselana bolingo oyo ezangi moimi mpe limemya. (Tángá Baefese 5:33.) Tótalela ndakisa ya Carmen. Mbula soki 6 nsima ya kobala, Carmen abandaki koyekola Biblia na Batatoli ya Yehova mpe na nsima azwaki batisimo. Carmen alobi boye: “Mobali na ngai asepelaki te. Akómaki koyokela Yehova zuwa. Azalaki kofinga ngai mpe koloba ete akosundola ngai.” Atako bongo, Carmen atikalaki sembo na libala na ye. Na boumeli ya mbula 50, asalaki makasi akoba kolinga mpe komemya mobali na ye. Alobi boye: “Wana bambula ezalaki koleka, nakómaki na bososoli mingi mpe nayekolaki koloba na mobali na ngai na mayele. Lokola nayebi ete libala ezali mosantu na miso ya Yehova, nasalaki nyonso oyo nakokaki mpo na kobatela yango. Nasundolá libala na ngai te mpo nalingaka Yehova.” c Soki mikakatano ebimi na libala na yo, okoki kotya motema ete Yehova akosunga yo mpe akosalisa yo otikala sembo.

Liteya nini okoki kozwa na ndenge Abigaile asalaki oyo akokaki mpo na kobikisa libota na ye? (Talá paragrafe 11)


KOTIKA TE KOSALELA YEHOVA NTANGO MABUNGA NA YO MOKO ELƐMBISI YO

12. Mokakatano nini tokoki kozala na yango ntango tosali lisumu ya monene?

12 Mokakatano. Tokoki mpenza kolɛmba nzoto soki tosali lisumu ya monene. Biblia elobi ete mpo na masumu na biso, tokoki koyoka ete motema na biso “ebukani mpe etutami.” (Nz. 51:17) Ndeko mobali moko na nkombo Robert asalaki makasi bambula mingi mpo akóma mosaleli na misala. Kasi, asalaki lisumu ya monene oyo etindaki ye amona ete awanganaki Yehova. Alobi boye: “Lisosoli na ngai etungisaki ngai mingi mpenza lokola nde namemi kilo ya babriki. Na nsima, nayokaki lokola nabɛli. Nalelaki mpe nabondelaki Yehova. Nakómaki kutu kokanisa ete Nzambe akomona lisusu te ntina ya koyoka ngai. Akoyoka ngai mpo na nini? Ngai moto nasundolaki ye.” Soki tokwei na lisumu, tokoki kolɛmba nzoto mpo motema na biso oyo etutami ezali kokanisa ete Yehova alingi biso lisusu te. (Nz. 38:4) Soki oyoki ndenge wana, talelá ndakisa ya moto moko ya sembo oyo Biblia elobeli, oyo akobaki kosalela Yehova atako asalaki lisumu ya monene.

13. Lisumu nini ya monene ntoma Petro asalaki, mpe nini ememaki ye kuna?

13 Ndakisa ya Biblia. Na butu oyo babomaki Yesu, ntoma Petro asalaki mabunga ebele oyo ememaki ye na kosala lisumu ya monene. Ya liboso, Petro amityelaki motema koleka ndelo, atutaki ntolo ete akotikala sembo ata soki bantoma mosusu basundoli Yesu. (Mrk. 14:​27-29) Na nsima, na elanga Getesemane, mbala misato mobimba, Petro alongaki kosɛnzɛla te. (Mrk. 14:​32, 37-41) Lisusu, ntango ebele ya bato bayaki kokanga Yesu, Petro asundolaki ye. (Mrk. 14:50) Nsukansuka, Petro awanganaki Yesu mbala misato, alapaki kutu ndai ete mabe eyela ye soki ayebi ye. (Mrk. 14:​66-71) Petro amiyokaki ndenge nini ntango amonaki ete asali lisumu ya monene? Alɛmbaki nzoto mpe alelaki makasi, mbala mosusu ayokaki ete amemi ngambo. (Mrk. 14:72) Kanisá mpasi oyo Petro ayokaki ntango moninga na ye Yesu abomamaki bangonga na nsima. Na ntembe te Petro amimonaki mpamba mpenza!

14. Nini esalisaki Petro akoba kosalela Yehova? (Talá ezipeli.)

14 Petro alongaki kokoba kosalela Yehova mpo na bantina ebele. Akimaki basusu te; akendaki epai ya bandeko na ye ya elimo mpe na ntembe te babɔndisaki ye. (Luka 24:33) Lisusu, ntango Yesu asekwaki, abimelaki Petro, mbala mosusu mpo na kolendisa ye. (Luka 24:34; 1 Ko. 15:5) Na nsima, na esika Yesu apamela Petro mpo na mabunga na ye, ayebisaki moninga na ye Petro ete akozwa mikumba minene. (Yoa. 21:​15-17) Petro ayebaki ete asalaki lisumu ya monene, kasi atikaki te komeka kosala oyo ezali sembo. Mpo na nini? Mpo amindimisaki ete Nkolo na ye Yesu azalaki kaka kolinga ye. Mpe bandeko na ye ya elimo bakobaki kosunga ye. Liteya nini tokoki kozwa na ndakisa ya Petro?

Yoane 21:​15-17 emonisi ete Yesu akobaki kolinga Petro, mpe yango esalisaki Petro akoba kosalela Yehova (Talá paragrafe 14)


15. Yehova alingi tóndima likambo nini? (Nzembo 86:5; Baroma 8:​38, 39) (Talá mpe elilingi.)

15 Liteya. Yehova alingi tómindimisa ete alingaka biso mpe ete azalaka pene ya kolimbisa. (Tángá Nzembo 86:5; Baroma 8:​38, 39.) Ntango tosali lisumu, toyokaka ete tomemi ngambo. Mayoki yango ezali mabe te mpe ebongi. Kasi, tosengeli kokanisa te ete Yehova akolinga biso lisusu te to ete akolimbisa biso te. Kasi, tosengeli nde koluka lisalisi nokinoki. Robert, oyo tolobelaki liboso, alobi boye: “Nakweaki na lisumu mpo namityelaki motema ete nazali na makasi ya kotɛmɛla komekama.” Amonaki ete asengelaki kosolola na bankulutu. Alobi boye: “Ntango kaka nasalaki yango, nayokaki mbala moko lokola Yehova ayambi ngai na mabɔkɔ na ye ya bolingo. Bankulutu bazalaki kaka kolinga ngai. Basalisaki ngai nandima ete Yehova atikaki te kolinga ngai.” Biso mpe tokoki komindimisa ete Yehova alingaka biso mingi mpe alimbisi biso soki tobongoli motema, toluki lisalisi, mpe tosali makasi tózongela lisusu te mabunga na biso. (1 Yoa. 1:​8, 9) Kondima likambo yango ekosalisa biso tótika te kosalela Nzambe ntango tobɛti libaku to tosali lisumu.

Oyokaka to okoyoka ndenge nini na mosala makasi oyo bankulutu basalaka mpo na kopesa lisungi? (Talá paragrafe 15)


16. Mpo na nini ozwi ekateli ya kokoba kosalela Yehova?

16 Yehova asepelaka mpenza na milende oyo tosalaka mpo na kosalela ye na mikolo ya nsuka oyo ya mpasi. Na lisalisi ya Yehova, tokoki kokoba kosalela ye atako makambo ya kolɛmbisa nzoto. Tokoki kokolisa bolingo mpo na bandeko nyonso ya lisangá mpe kolimbisa bango ata soki bazokisi biso. Tokoki komonisa ete tolingaka mpenza Nzambe mpe tomemyaka ebongiseli ya libala soki tozali kosala oyo tokoki mpo na kosilisa matata oyo ebimi na libala na biso. Mpe soki tosali lisumu, tokoki kosɛnga Yehova asalisa biso, tóndima ete alingaka biso mpe alimbisi biso, mpe tókoba kokende liboso na mosala na ye. Tóyeba ete tokozwa mapamboli ebele soki ‘totiki te kosala oyo ezali malamu.’—Gal. 6:9.

NDENGE NINI TOKOKI KOKOBA KOSALELA YEHOVA NTANGO . . .

  • ndeko moko azokisi biso?

  • molongani na biso alɛmbisi biso nzoto?

  • mabunga na biso moko elɛmbisi biso nzoto?

LOYEMBO 139 Omimona na mokili ya sika

a Topesi bango bankombo mosusu.

b Biblia elendisi te kokabwana mpe emonisi polele ete moto oyo akabwani na molongani na ye azali na lotomo te ya kobala lisusu. Kasi, makambo mosusu ya mabe etindaki bakristo mosusu bákanisa kokabwana na molongani na bango. Talá maloba na nsuka ya lisolo 4 “Kokabwana na molongani” na buku Sepelá na bomoi libela na libela!