Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOYEKOLI 13

LOYEMBO 127 Lolenge ya moto oyo nasengeli kozala

Koyeba ete Yehova andimaka yo ebɔndisaka

Koyeba ete Yehova andimaka yo ebɔndisaka

“Nandimi yo.”LUKA 3:22.

NA MOKUSE

Ndenge ya kotika kotya ntembe ete Yehova andimaka yo.

1. Basaleli mosusu ya sembo ya Yehova bamitunaka nini?

 KOYEBA ete Yehova andimaka basaleli na ye nyonso ekitisaka motema mpenza! Biblia elobi: “Yehova azali kosepela na bato na ye.” (Nz. 149:4) Kasi, basusu balɛmbaka nzoto mpe bamitunaka na bantango mosusu: ‘Yehova andimaka ngai mpenza?’ Na bantango mosusu, basaleli mosusu ya sembo ya Yehova na ntango ya kala mpe bakómaki na makanisi ya ndenge wana.—1 Sa. 1:​6-10; Yobo 29:​2, 4; Nz. 51:11.

2. Yehova andimaka banani?

2 Biblia emonisi polele ete bato ya kozanga kokoka bakoki kondimama na Yehova. Ndenge nini? Soki tomonisi kondima epai ya Yesu Kristo mpe tozwi batisimo. (Yoa. 3:16) Na ndenge yango, tomonisaka na miso ya bato ete tobongoli motema na masumu na biso mpe tolaki Nzambe ete tokosala mokano na ye. (Mis. 2:38; 3:19) Yehova asepelaka ntango tosali makambo wana mpo na kokóma baninga na ye. Ntango nyonso oyo tozali kosala makasi tótosa elako na biso ya komipesa na Nzambe, Yehova andimaka biso mpe amonaka ete tozali baninga na ye ya motema.—Nz. 25:14.

3. Mituna nini tokotalela sikoyo?

3 Kasi, mpo na nini na bantango mosusu bandeko mosusu bamiyokaka ete Nzambe andimaka bango te? Ndenge nini Yehova amonisaka ete andimi biso? Mpe ndenge nini mokristo akoki komindimisa mpenza ete Nzambe andimaka ye?

NTINA OYO BASUSU BAMIYOKAKA ETE YEHOVA ANDIMAKA BANGO TE

4-5. Ata soki tomiyokaka ete tozali na ntina te, tokoki kondima likambo nini?

4 Banda bomwana, bandeko mosusu kati na biso bamiyokaka ete bazali na ntina te. (Nz. 88:15) Ndeko mobali moko na nkombo Adrián alobi: “Banda bomwana namiyokaka ete nazali na ntina te. Nakanisi lisusu mokolo moko nabondelaki ete libota na biso ekɔta na Paradiso, kasi ngai moko nazalaki komona ete nabongi te kozala kuna.” Tony, oyo abɔkwamá na libota ya Batatoli te alobi boye: “Baboti na ngai bayebisá ngai ata mbala moko te ete balingaka ngai, to basepeli na likambo oyo nasali. Bazalaki kaka komonisa ngai ete nakoki ntango nyonso kosala malamu koleka.”

5 Soki na bantango mosusu tomiyokaka ete tozali na ntina te, tómikundwela ete Yehova ye moko nde abendaki biso epai na ye. (Yoa. 6:44) Amonaka bizaleli ya malamu epai na biso, oyo mbala mosusu biso moko tomonaka te, mpe ayebi motema na biso. (1 Sa. 16:7; 2 Nt. 6:30) Na yango, tokoki kondimela ye ntango alobi ete tozali na motuya.—1 Yoa. 3:​19, 20.

6. Ndenge nini ntoma Paulo amiyokaki mpo na masumu na ye ya kala?

6 Liboso tóyeba solo, basusu kati na biso tozalaki kosala makambo oyo esalaka ete tii lelo tókoba komipesa foti. (1 Pe. 4:3) Ata bakristo ya sembo mpe babundaka na bolɛmbu ya bomoto ya masumu. Na bantango mosusu omonaka ete Yehova akoki kolimbisa yo te? Soki bongo, koyeba ete basaleli mosusu ya sembo ya Yehova mpe babundisaki mayoki ya ndenge wana ekoki kobɔndisa yo. Na ndakisa, ntoma Paulo amimonaki moto ya mawa ntango akanisaki mabunga na ye. (Rom. 7:24) Ya solo, Paulo asilaki kobongola motema mpe azwaki batisimo. Atako bongo, amibengaki “moto oyo aleki moke mpenza na kati ya bantoma” mpe mosumuki “ya liboso mpenza.”—1 Ko. 15:9; 1 Tim. 1:15.

7. Likambo nini tosengeli kobosana te mpo na masumu na biso ya kala?

7 Tata na biso ya likoló alaki ete akolimbisa biso soki tobongoli motema. (Nz. 86:5) Na yango, soki toyoki mpenza mawa mpo na masumu oyo tosali, tokoki kondima ete Yehova alobaki solo, ete alimbisi biso.—Kol. 2:13.

8-9. Tokoki kosala nini mpo tótika komiyoka ete tokokoka te kosala oyo ekoki mpo na kosepelisa Yehova?

8 Biso nyonso tolingaka kosalela Yehova na makoki na biso nyonso. Kasi, basusu bakoki kokanisa ete bakokoka ata mokolo moko te kosala oyo ekoki mpo Yehova andima bango. Ndeko mwasi moko na nkombo Amanda alobi boye: “Na makanisi na ngai, kopesa Yehova oyo eleki malamu elimbolaki ete nasengeli kosala mingi koleka. Mbala mingi nazalaki koluka kosala oyo eleki makoki na ngai. Soki nalongi te kosala bongo, nazalaki komona lokola Yehova asepeli na ngai te, ndenge ngai moko mpe nazalaki komimona.”

9 Ndenge nini tokoki kotika komiyoka ete tokokoka te kosala oyo ekoki mpo na kosepelisa Yehova? Tóbosana te ete Yehova azali mindɔndɔ to makambo makasimakasi te. Asɛngaka biso ata moke te tósala koleka oyo tokoki mpenza kosala. Asepelaka na nyonso oyo tosalaka mpo na ye, soki eyokani na makoki na biso. Lisusu, kanisá bandakisa ya Biblia ya bato oyo basalelaki Yehova na molimo na bango mobimba. Tólobela Paulo. Amipesaki na molende bambula mingi, asalaki mibembo ya milai mpe afungolaki masangá mingi. Atako bongo, ntango akokaki lisusu kosala mingi te na mosala ya kosakola, Nzambe atikaki nde kondima ye? Te. Paulo akobaki kosala oyo akokaki, mpe Yehova apambolaki ye. (Mis. 28:​30, 31) Ndenge moko mpe, makambo oyo tokoki kosala mpo na Yehova ekoki kozala mingi to moke. Kasi, asepelaka mingi nde na ntina oyo tozali kosala yango. Tótalela sikoyo mwa balolenge oyo Yehova amonisi ete andimaka biso.

NDENGE NINI YEHOVA AMONISI ETE ANDIMI BISO?

10. Ndenge nini tokoki “koyoka” Yehova azali koloba na biso ete andimi biso? (Yoane 16:27)

10 Na nzela ya Biblia. Yehova asepelaka komonisa baoyo alingaka ete andimi bango. Biblia elobeli mabaku mibale ntango Yehova alobaki na Yesu ete azali Mwana na ye ya bolingo, oyo andimi. (Mat. 3:17; 17:5) Okolinga koyoka Yehova azali koyebisa yo mpe ete andimi yo? Yehova alobaka na biso mbala moko boye te; kasi alobi na biso na nzela ya Liloba na ye. Tokoki koyoka Yehova azali koloba ete andimi biso ntango tozali kotánga maloba ya Yesu oyo ezali na Baevanzile. (Tángá Yoane 16:27.) Yesu amekolaki bomoto ya Tata na ye na ndenge ya kokoka. Na yango, ntango tozali kotánga ete Yesu ayebisaki bayekoli na ye oyo bazalaki bato ya kozanga kokoka, kasi bato ya sembo, ete andimi bango, tokoki komona ete Yehova nde azali koyebisa biso maloba yango.—Yoa. 15:​9, 15.

Yehova amonisaka ete andimi biso na ndenge mingi (Talá paragrafe 10)


11. Mpo na nini kokutana na makambo ya mpasi elakisi te ete Yehova atiki kondima biso? (Yakobo 1:12)

11 Na nzela ya makambo oyo asalelaka biso. Yehova alingaka kosalisa biso, na ndakisa na ndenge akokisaka bamposa na biso ya mosuni. Na bantango mosusu, Yehova akoki kopesa nzela tókutana na makambo ya mpasi, ndenge moko na Yobo, moto ya sembo. (Yobo 1:​8-11) Soki tokutani na mikakatano, elakisi te ete Yehova atiki kondima biso. Kasi, yango epesaka biso mabaku ya komonisa ndenge tolingaka Nzambe mingi mpe totyelaka ye motema. (Tángá Yakobo 1:12) Na kati ya mikakatano na biso, tokomona bolingo na ye monene mpe lisalisi na ye wana azali kosalisa biso tóyika mpiko.

12. Liteya nini tokoki kozwa na ndakisa ya Dmitrii?

12 Tótala ndakisa ya ndeko moko na Azia na nkombo Dmitrii. Alongwaki mosala mpe elekaki basanza ebele azalaki kozwa mosala mosusu te. Na yango, azwaki ekateli ya komipesa mingi na mosala ya kosakola mpo na komonisa ete atyelaka Yehova motema. Basanza elekaki lisusu mingi, kasi azwaki kaka mosala te. Na nsima, abɛlaki makasi tii akɔtaki ndako, azalaki kaka kolala na mbeto. Akómaki komimona mobali mpe tata ya ntina te, mpe amitunaki soki Yehova atiki kondima ye. Mokolo moko na mpokwa, mwana na ye ya mwasi abimiselaki ye na papye maloba ya Yisaya 30:15: “Bokozala na nguya soki bofandi nyɛɛ mpe botyeli ngai motema.” Mwana na ye atyaki papye yango pembeni ya mbeto mpe alobaki: “Papa, soki mawa eyeli yo, okoki kokanisa vɛrsɛ oyo.” Dmitrii amonaki ete, na lisalisi ya Yehova, libota na ye ezalaki ntango nyonso na bilei, bilamba, mpe esika ya kofanda oyo ebongi. Alobi boye: “Oyo nasengelaki kosala, ezalaki kotikala kimya mpe kokoba kotyela Nzambe na ngai motema.” Soki ozali na komekama ya ndenge wana, okoki kotya motema ete Yehova azali kokokisa bamposa na yo mpe akosalisa yo oyika mpiko.

Yehova amonisaka ete andimi biso na ndenge mingi (Talá paragrafe 12) a


13. Yehova akoki kosalela banani mpo na komonisa biso ete andimi biso, mpe ndenge nini asalaka yango?

13 Na nzela ya bandeko ya elimo. Yehova asalelaka bandeko na biso ya mibali mpe ya basi mpo na komonisa ete andimi biso. Na ndakisa, akoki kotinda basusu báloba na biso maloba ya kolendisa na ntango oyo ebongi. Ndeko mwasi moko na Azia amonaki likambo yango ntango azalaki na mitungisi makasi. Alongwaki mosala mpe na nsima abɛlaki makasi. Na ntango yango, mobali na ye asalaki lisumu ya monene mpe balongolaki ye nkulutu. Ndeko yango alobaki boye: “Nazalaki koyeba te ntina oyo makambo yango esalemaki. Nazalaki kokanisa ete mbala mosusu nasalaki likambo moko ya mabe mpe Yehova azalaki kosepela na ngai lisusu te.” Ndeko mwasi yango asɛngaki Yehova amonisa ye ete andimi ye. Yehova asalaki yango ndenge nini? Ndeko yango alobi boye: “Bankulutu basololaki na ngai mpe bamonisaki ngai ete Yehova alingaka ngai.” Na nsima, asɛngaki lisusu Yehova asalisa ye. Alobi boye: “Kaka mokolo yango, nazwaki mokanda oyo etuluku moko ya bandeko mibali mpe basi ya lisangá bakomelaki ngai. Wana nazalaki kotánga maloba ya kobɔndisa oyo bakomaki, nandimaki ete Yehova ayokaki libondeli na ngai.” Ya solo, mbala mingi Yehova amonisaka biso ete andimi biso na nzela ya maloba ya boboto ya basusu.—Nz. 10:17.

Yehova amonisaka ete andimi biso na ndenge mingi (Talá paragrafe 13) b


14. Wapi lolenge mosusu oyo Yehova amonisaka ete andimi biso?

14 Yehova amonisaka mpe ete andimi biso na ndenge asalelaka bandeko bápesa biso toli ntango tosengeli na yango. Na ndakisa, na siɛklɛ ya liboso, Yehova asalelaki ntoma Paulo mpo akomela bandeko na ye bakristo mikanda 14. Mikanda yango ezalaki na batoli ya polele kasi ya boboto. Mpo na nini Yehova asalaki ete Paulo akoma batoli yango? Yehova azali Tata ya malamu, mpe apamelaka bana na ye “oyo ye asepelaka” na bango. (Mas. 3:​11, 12) Na yango, soki tozwi toli oyo euti na Biblia, tómona ete ezali elembo oyo emonisi ete Nzambe andimaka biso, kasi te ete atiki kosepela na biso. (Ebr. 12:6) Nini mosusu emonisaka ete Yehova andimi biso?

MAKAMBO MOSUSU OYO EMONISI ETE YEHOVA ANDIMAKA BISO

15. Yehova apesaka elimo santu na ye epai ya banani, mpe mpo na nini yango ekoki kokitisa biso motema?

15 Yehova apesaka elimo santu na ye epai ya bato oyo andimi. (Mat. 12:18) Tokoki komituna boye: ‘Namonisaka bizaleli mosusu ya mbuma ya elimo ya Nzambe na bomoi na ngai?’ Omonaka ete okómi na motema molai mingi epai ya basusu koleka ndenge ezalaki liboso oyeba Yehova? Mpo na koloba solo, soki ozali koyekola komonisa mingi bizaleli ya mbuma ya elimo ya Nzambe, okomona mpe malamu ete Yehova andimi yo!—Talá etanda “ Mbuma ya elimo ezali . . . ”

Ndenge nini okoki komona ete Yehova andimaka yo? (Talá paragrafe 15)


16. Yehova apesi banani mokumba ya kosakola nsango malamu, mpe yango etindaka yo omiyoka ndenge nini? (1 Batesaloniki 2:4)

16 Yehova asepeli kopesa mokumba ya kosakola nsango malamu epai ya baoyo andimi. (Tángá 1 Batesaloniki 2:4.) Talá ndenge kosakola nsango malamu esalisaki ndeko mwasi moko na nkombo Jocelyn. Mokolo moko ntango Jocelyn alamukaki, azalaki mawamawa. Alobi boye: “Nazalaki na makasi te mpe namimonaki ntina te. Kasi, nazalaki mobongisi-nzela, mpe ezalaki mokolo oyo nabimaka mosala ya kosakola. Na yango, nabondelaki mpe nakendaki mosala ya kosakola.” Na ntɔngɔ yango, Jocelyn akutanaki na Mary, mwasi moko ya boboto mpe andimaki koyekola Biblia. Mwa basanza na nsima, Mary alobaki ete mokolo Jocelyn abɛtaki na porte na ye, azalaki kobondela Nzambe asalisa ye. Ntango Jocelyn akanisaki likambo yango, alobi boye: “Nayokaki lokola nde Yehova azalaki koloba na ngai, ‘Nandimi yo.’” Ya solo, moto nyonso te akokutana na makambo ya malamu bongo na mosala ya kosakola. Kasi, tokoki kondima ete Yehova asepelaka ntango tosali makasi tóyebisa basusu nsango malamu.

Ndenge nini okoki komona ete Yehova andimaka yo? (Talá paragrafe 16) c


17. Likambo nini oyekoli mpo na lisiko na maloba ya Vicky? (Nzembo 5:12)

17 Yehova asalelaka motuya ya lisiko epai ya baoyo andimi. (1 Tim. 2:​5, 6) Kasi, tokosala nini soki motema na biso ezali koboya kondima ete Yehova andimaka biso, ata soki tozali na kondima na lisiko mpe tozwá batisimo? Tóbosana te, tokoki kotyela mayoki na biso motema ntango nyonso te, kasi tokoki kotyela Yehova motema. Amonaka ete bato oyo bazali na kondima na lisiko bazali sembo na miso na ye mpe alaki ete akopambola bango. (Tángá Nzembo 5:12; Rom. 3:26) Komanyola na lisiko esalisaki Vicky. Mokolo moko, nsima ya kokanisa mpenza lisiko, alobaki boye: “Yehova amoniselaka ngai motema molai banda kala mpenza. . . . Kasi, ezali lokola nazalaki koloba na ye: ‘Bolingo na yo ekoki te mpo ekóma epai na ngai. Mbeka ya Mwana na yo ekoki te mpo na kozipa masumu na ngai.’” Ntango Vicky amanyolaki na likabo ya lisiko, abandaki koyoka ete Yehova alingaka ye. Biso mpe tokoyoka ete Yehova alingaka biso mpe andimi biso soki tozali kokanisa lisiko.

Ndenge nini okoki komona ete Yehova andimaka yo? (Talá paragrafe 17)


18. Tokoki kondima likambo nini soki tokobi kolinga Tata na biso ya likoló?

18 Ata soki tosali makasi tósalela makanisi oyo tolobeli, na bantango mosusu tokoki kolɛmba nzoto mpe komituna soki Yehova andimaka biso. Soki esalemi bongo, kobosana te ete andimaka “baoyo bazali kokoba kolinga ye.” (Yak. 1:12) Na yango, kobá kopusana penepene na Yehova mpe taláká makambo oyo emonisi yo ete andimi yo. Mpe kobosanaka te ete Yehova “azali mosika te na mokomoko na biso.”—Mis. 17:27.

OKOPESA EYANO NINI?

  • Nini ekoki kotinda basusu bámona ete Yehova asepelaka na bango te?

  • Na banzela nini Yehova amonisi ete andimaka biso?

  • Mpo na nini tokoki kondima ete Nzambe andimaka biso?

LOYEMBO 88 Teyá ngai banzela na yo

a NDIMBOLA YA ELILINGI: Ndenge makambo esalemaki

b NDIMBOLA YA ELILINGI: Ndenge makambo esalemaki

c NDIMBOLA YA ELILINGI: Ndenge makambo esalemaki