Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOYEKOLI 9

LOYEMBO 75 “Ngai oyo! Tindá ngai”

Okoki mpo na komipesa na Yehova?

Okoki mpo na komipesa na Yehova?

“Nakofuta Yehova eloko nini mpo na bolamu nyonso oyo asalelá ngai?”NZ. 116:12.

NA MOKUSE

Lisolo oyo ekosalisa yo okóma na boyokani makasi ná Yehova mpo ete okóma na mposa ya komipesa na ye mpe kozwa batisimo.

1-2. Moto asengeli kosala nini liboso ya kozwa batisimo?

 NA BOUMELI ya mbula mitano oyo euti koleka, bato koleka milio moko bazwi batisimo mpe bakómi Batatoli ya Yehova. Lokola Timote, mokristo ya siɛklɛ ya liboso, mingi na bango bayekolá solo ‘banda bomwana mpenza.’ (2 Tim. 3:​14, 15) Basusu bayekoli koyeba Yehova ntango bakómi mikóló, basusu kutu ntango bakómi mibange. Eleki mwa ntango, mwasi moko oyo ayekolaki Biblia na Batatoli ya Yehova azwaki batisimo na mbula 97!

2 Soki ozali koyekola Biblia to ozali kobɔkwama na baboti oyo bazali Batatoli ya Yehova, ozali kokanisa kozwa batisimo? Ezali mokano moko ya malamu mpenza! Kasi liboso ya kozwa batisimo, osengeli komipesa na Yehova. Lisolo oyo ekolimbola soki komipesa na Nzambe elakisi nini. Ekosalisa yo mpe omona ntina oyo osengeli te kokakatana komipesa na Nzambe mpe kozwa batisimo, ntango okoki mpo na kosala yango.

KOMIPESA ELAKISI NINI?

3. Pesá bandakisa ya Biblia ya bato oyo bamipesaki na Yehova.

3 Na Biblia, komipesa elakisi kotyama pembeni mpo na mokano moko mosantu. Bayisraele bazalaki ekólo oyo emipesaki na Yehova. Kasi bato mosusu na ekólo Yisraele bamipesaki na Yehova na ndenge mosusu. Na ndakisa, Arona azalaki kolata “elembo mosantu ya komipesa na Nzambe,” oyo ezalaki linzanza ya kongɛnga ya wolo liboso ya tirba na ye. Linzanza yango ya wolo ezalaki komonisa ete atyamaki pembeni mpo na kosalela Yehova na ndenge mosusu, elingi koloba lokola nganga-nzambe monene na Yisraele. (Lev. 8:9) Banaziri mpe bamipesaki na ndenge mosusu. Liloba “Monaziri,” oyo euti na liloba ya Ebre nazir, elimboli “Moto oyo atyami pembeni,” to ‘Moto oyo amipesi.’ Banaziri basengelaki kotosa bipekiseli oyo etyamaki mpo na bango na Mobeko ya Moize.—Mit. 6:​2-8.

4. (a) Na ndenge nini baoyo bamipesi na Yehova batyami pembeni? (b) ‘Komiboya’ yo moko elimboli nini? (Talá mpe elilingi.)

4 Ntango omipesi na Yehova, oponi kokóma moyekoli ya Kristo mpe ondimi ete kosala mokano ya Nzambe nde ekozala likambo oyo eleki ntina na bomoi na yo. Komipesa na Nzambe ekosɛnga ete osala nini? Yesu alobaki: “Soki moto alingi kolanda ngai, amiboya ye moko.” (Mat. 16:24) Maloba ya Grɛki oyo ebongolami na “amiboya ye moko” ekoki mpe kobongolama na “azala lisusu na bomoi mpo na ye moko te.” Soki okómi mosaleli ya Yehova oyo amipesi na ye, osengeli koboya eloko nyonso oyo eyokani te na mokano na ye. (2 Ko. 5:​14, 15) Yango esangisi koboya “misala ya nzoto,” na ndakisa pite. (Gal. 5:​19-21; 1 Ko. 6:18) Mibeko yango ekotya bomoi na yo na nkaka? Okoyoka bongo te soki olingi Yehova mpe ondimi ete mibeko na ye ezali mpo na bolamu na yo. (Nz. 119:97; Yis. 48:​17, 18) Ndeko mobali moko na nkombo Nicholas alobaki boye: “Okoki komona mibeko ya Yehova lokola mabende ya bɔlɔkɔ oyo ezali kopekisa yo kosala oyo yo olingi, to mabende oyo ezingi ndako ya bankɔsi mpo na kobatela yo na likama.”

Omonaka mibeko ya Yehova lokola mabende ya bɔlɔkɔ oyo ezali kopekisa yo kosala oyo yo olingi, to mabende oyo ezingi ndako ya bankɔsi mpo na kobatela yo na likama? (Talá paragrafe 4)


5. (a) Ndenge nini moto amipesaka na Yehova? (b) Bokeseni ezali wapi kati na komipesa mpe batisimo? (Talá mpe elilingi.)

5 Ndenge nini moto amipesaka na Yehova? Mpo na komipesa, okosala libondeli mpo na kolaka Yehova ete okosambela kaka ye mpe okotya mokano na ye na esika ya liboso na bomoi na yo. Elingi koloba ete olaki Yehova ete okokoba kolinga ye “na motema na yo mobimba, na molimo na yo mobimba, na makanisi na yo nyonso, mpe na makasi na yo nyonso.” (Mrk. 12:30) Libondeli ya komipesa esalemaka na miso ya bato te; etali kaka yo ná Yehova. Kasi, batisimo esalemaka na miso ya bato; emonisaka bato ete osilaki komipesa na Yehova. Komipesa ezali elako moko mosantu, mpe Yehova azelaka ete okokisa yango, kaka ndenge yo mpe olingaka kokokisa yango.—Mos. 5:​4, 5.

Mpo na komipesa na Yehova, osengeli kosala libondeli na esika na yo moko mpo na kolaka ye ete okosambela kaka ye mpe okotya mokano na ye na esika ya liboso na bomoi na yo (Talá paragrafe 5)


MPO NA NINI KOMIPESA NA YEHOVA?

6. Nini etindaka moto amipesa na Yehova?

6 Ntina monene oyo osengeli komipesa na Yehova ezali mpo olingaka ye. Bolingo yango ezali kaka mayoki te. Kasi, euti nde na “boyebi ya solosolo” mpe “bososoli ya elimo,” makambo oyo oyekolaki mpo na Yehova, oyo esalaki ete okóma kolinga ye mingi. (Kol. 1:9) Boyekoli na yo ya Biblia endimisi yo ete (1) Yehova azali moto ya solo, (2) Biblia ezali Liloba na ye, mpe (3) azali kosalela ebongiseli na ye mpo na kosala mokano na ye.

7. Makambo nini epesaka moto mposa ya komipesa na Nzambe?

7 Baoyo bamipesi na Yehova basengeli koyeba mateya ya moboko ya Liloba ya Nzambe mpe kotosa mibeko ya Nzambe na bomoi na bango. Bayebisaka basusu makambo oyo bayekoli, na kotalela makoki na bango. (Mat. 28:​19, 20) Bolingo na bango mpo na Yehova ekolaka, mpe bakómaka na mposa makasi ya kokangama kaka na ye. Yo mpe oyokaka bongo? Soki ozali na bolingo ya ndenge wana, okomona te ete komipesa mpe kozwa batisimo ezali kaka eloko oyo okosala mpo na kosepelisa moto oyo ayekolaka na yo Biblia to mpe baboti na yo; okosala yango mpe te kaka mpo okokana na baninga na yo.

8. Ndenge nini botɔndi ekoki kosalisa yo ozwa ekateli ya komipesa na Yehova? (Nzembo 116:​12-14)

8 Ekateli na yo ya komipesa na Yehova ekoya yango moko ntango okanisi nyonso oyo asalelá yo. (Tángá Nzembo 116:​12-14.) Biblia ebengi Yehova Mopesi ya “likabo nyonso ya malamu mpe libonza nyonso oyo ekoki mpenza.” (Yak. 1:17) Likabo oyo eleki monene ezali mbeka ya Mwana na ye, Yesu. Kanisá naino! Lisiko epesi yo nzela ya kozala na boyokani ná Yehova. Mpe epesi yo elikya ya kozala na bomoi libela na libela. (1 Yoa. 4:​9, 10, 19) Komipesa na Yehova nde lolenge oyo ebongi mpo na komonisa botɔndi mpo na bolingo yango monene, mpe mpo na mapamboli mosusu nyonso oyo Yehova apesi yo. (Mib. 16:17; 2 Ko. 5:15) Ndenge ya komonisa botɔndi ezali na liteya 46 pwɛ 4, ya buku Sepelá na bomoi libela na libela!, oyo ezali mpe na video ya miniti misato oyo elobi Pesá makabo na yo epai ya Nzambe.

OKOKI MPO NA KOMIPESA NA YEHOVA MPE KOZWA BATISIMO?

9. Mpo na nini esengeli te kotya moto mbamba amipesa na Nzambe?

9 Okoki komona ete okoki naino te mpo na komipesa na Yehova mpe kozwa batisimo. Mbala mosusu osengeli kosala mwa bambongwana na bomoi na yo mpo eyokana na mibeko ya Yehova, to mbala mosusu osengeli na ntango mpo na kokolisa kondima na yo. (Kol. 2:​6, 7) Bayekoli ya Biblia nyonso bakolaka ndenge moko te, mpe bilenge nyonso bakokisaka masɛngami mpo na komipesa mpe kozwa batisimo na mbula ndenge moko te. Meká kolandela bokoli na yo ya elimo na kotalela makambo oyo okoki kosala mpe komikokanisa na moto mosusu te.—Gal. 6:​4, 5.

10. Okoki kosala nini soki omoni ete okoki naino te mpo na komipesa mpe kozwa batisimo? (Talá mpe etanda “ Mpo na baoyo bazali kobɔkwama na kati ya solo.”)

10 Ata soki omoni ete okoki naino te mpo na komipesa na Yehova, kobá kosala nyonso mpo okokisa mokano yango. Bondelá Yehova apambola milende na yo mpo osala bambongwana oyo esengeli. (Flp. 2:13; 3:16) Tyá motema ete akoyoka mabondeli na yo mpe akoyanola na yango.—1 Yoa. 5:14.

NTINA OYO BASUSU BABANGAKA

11. Ndenge nini Yehova akosalisa biso tótikala sembo epai na ye?

11 Basusu bakoki mpo na komipesa mpe kozwa batisimo, kasi babangaka. Bakoki komituna: ‘Bongo soki na nsima nasali lisumu ya monene mpe balongoli ngai na lisangá?’ Soki obangaka likambo yango, yebá ete Yehova akopesa yo nyonso oyo osengeli na yango mpo ‘omitambwisa na ndenge oyo ebongi na ye mpo osepelisa ye mpenza.’ (Kol. 1:10) Akopesa yo mpe makasi ya kosala oyo ezali malamu. Asili kosalisa bato mosusu mingi mpo básala oyo ezali malamu. (1 Ko. 10:13) Yango wana bato moke kaka nde balongolamaka na lisangá. Yehova apesaka basaleli na ye oyo esengeli mpo bátikala sembo.

12. Tokoki kosala nini mpo tókwea te na lisumu ya monene?

12 Moto nyonso ya kozanga kokoka ayokaka mposa ya kosala makambo ya mabe. (Yak. 1:14) Kasi, yo moko nde okopona soki okokokisa mposa yango to te. Mpo na koloba solo, yo nde okopona ndenge oyo okotambwisa bomoi na yo. Bato mosusu bandimaka likambo yango te, kasi yebá ete okoki kotambwisa bamposa na yo. Mpe ata soki bamposa mosusu ya mabe eyeli yo, okoki koboya kokokisa yango. Mpo na yango, bondeláká mokolo na mokolo. Zalá na programɛ malamu ya boyekoli ya Liloba ya Nzambe. Yanganáká na makita. Bimáká mosala ya kosakola. Kosala makambo yango ntango nyonso ekopesa yo makasi ya kokokisa elako na yo ya komipesa. Mpe kobosana te ete Yehova akosalisa yo osala yango.—Gal. 5:16.

13. Ndakisa nini ya malamu Yozefe atikelá biso?

13 Okomona ete ezali mpasi te okokisa elako na yo ya komipesa soki oyebi liboso oyo okosala soki omekami. Biblia elobeli bato ebele oyo basalaki bongo, atako bango mpe bazalaki bato ya kozanga kokoka. Na ndakisa, mwasi ya Potifare azalaki mbala na mbala kolɛngola Yozefe. Kasi Yozefe azalaki na ntembe te na oyo asengeli kosala. Biblia eyebisi biso ete “aboyaki,” mpe alobaki: “Ndenge nini nakoki kosala mabe monene boye mpe kosalela mpenza Nzambe lisumu?” (Eba. 39:​8-10) Ezali polele ete Yozefe ayebaki oyo asengeli kosala liboso kutu mwasi yango emeka ye. Yango esalisaki ye atɛmɛla komekama ntango ebimaki.

14. Okoki kosala nini mpo okwea te na komekama?

14 Ndenge nini okoki kozala na ekateli lokola oyo ya Yozefe? Okoki komibongisa banda sikoyo mpo na oyo okosala soki omekami. Yekolá koboya mbala moko kosala makambo oyo Yehova ayinaka, ata mpe kokanisa yango. (Nz. 97:10; 119:165) Yango ekosalisa yo okwea te ntango omekami. Okoyeba oyo okosala. Osilaki kobongisa nzela oyo okolanda.

15. Ndenge nini moto akoki komonisa ete azali ‘koluka Yehova na mposa makasi’? (Baebre 11:6)

15 Mbala mosusu oyebi ete ozwi solo mpe ete olingi kosalela Yehova na motema na yo mobimba, kasi eloko moko ezali kopekisa yo omipesa na Yehova mpe ozwa batisimo. Ndakisa ya Mokonzi Davidi ekoki kosalisa yo. Okoki kosɛnga Yehova boye: “Ee Nzambe, talá ngai malamumalamu mpe yebá motema na ngai. Talá ngai malamumalamu mpe yebá makanisi oyo etungisaka ngai. Moná soki kati na ngai ezali na nzela moko oyo eyokisaka mpasi, mpe tambwisá ngai na nzela ya seko.” (Nz. 139:​23, 24) Yehova apambolaka baoyo “bazali koluka ye na mposa makasi.” Soki ozali kosala makasi omipesa na Nzambe mpe ozwa batisimo emonisi ete ozali koluka ye.—Tángá Baebre 11:6.

KOBÁ KOPUSANA PENEPENE NA YEHOVA

16-17. Ndenge nini Yehova akoki kobenda baoyo bazali kobɔkwama na kati ya solo? (Yoane 6:44)

16 Yesu alobaki ete Yehova nde abendaka bayekoli na ye. (Tángá Yoane 6:44.) Kanisá likambo yango ya kokamwa mpe ndenge oyo etali yo. Yehova amonaka eloko ya malamu kati na moto mokomoko oyo abendaka epai na ye. Amonaka ete moto yango azali “eloko na ye moko,” to “eloko na ye ya motuya.” (Mib. 7:6; msl.) Ezali mpe bongo mpo na yo.

17 Kasi, mbala mosusu ozali elenge oyo azali kobɔkwama na kati ya solo. Mbala mosusu omonaka ete baboti kaka nde bazali kobenda yo. Atako bongo, Biblia elobi: “Bópusana penepene na Nzambe, mpe ye akopusana penepene na bino.” (Yak. 4:8; 1 Nt. 28:9) Ntango osali makasi opusana penepene na Yehova, ye mpe akopusana penepene na yo. Yehova amonaka te ete ozali kaka na kati ya ebele ya bato. Abendaka moto mokomoko, ata mpe moto mokomoko oyo azali kobɔkwama na kati ya solo. Ntango moto asali makasi apusana penepene na Yehova, ye mpe apusanaka, ndenge Yakobo 4:8 emonisi yango.—Talá mpe 2 Batesaloniki 2:13.

18. Tokotalela nini na lisolo oyo elandi? (Nzembo 40:8)

18 Ntango omipesi na Yehova mpe ozwi batisimo, omonisi elimo oyo Yesu amonisaki. Amimonisaki epai ya Tata na ye na bolingo nyonso mpo na kosala nyonso oyo asɛngaki ye. (Tángá Nzembo 40:8; Ebr. 10:7) Na lisolo oyo elandi, tokotalela makambo oyo ekoki kosalisa yo okoba kosalela Yehova na bosembo nsima ya kozwa batisimo.

OKOPESA EYANO NINI?

  • Komipesa na Yehova elimboli nini?

  • Ndenge nini botɔndi ekoki kotinda moto amipesa na Yehova?

  • Nini ekosalisa yo okima kosala lisumu ya monene?

LOYEMBO 38 Akokómisa yo makasi