Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Likanisi mpo na koyekola

Likanisi mpo na koyekola

Ozwaka matomba na bandimbola ya bavɛrsɛ ya Biblia oyo ezali na Buku ya bolukiluki ya Batatoli ya Yehova?

Bandimbola yango ekoki kosalisa yo okɔta na mozindo ntango ozali koyekola Liloba ya Nzambe. Bandimbola yango ekoki komonisa ndenge makambo ezalaki ntango vɛrsɛ yango ezalaki kokomama, mpo na nini ekomamaki, ekomamaki mpo na banani, to mpe ndimbola ya maloba mokomoko to mpe ya bafraze.

Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET mpe JW Library® ekosalisa yo okɔta mbala moko na Buku ya bolukiluki kaka na nzela ya vɛrsɛ moko ya Biblia oyo ozali kotalela. Okoki komona ba-référence yango na eteni ya boyekoli na mabongoli nyonso ya Biblia oyo ezali wana.

Ntango ozali kosalela mitindami yango, tyá likebi na badati. Masolo oyo euti kobima ekozala na likoló. Na nsuka ya liste yango, ekozala na masolo ya kala oyo bauti kopesa ndimbola na yango ya sika.

  • Ba-référence ya bavɛrsɛ oyo ezali na Buku ya bolukiluki ezali mpe na Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET.

  • Mpo na komona ba-référence ya bavɛrsɛ na JW Library, tyá na aparɛyi na yo Buku ya bolukiluki mpe soki oyo ya sika ebimi, zwá yango. Okoki kozwa yango soki ofini na butɔ oyo ezali na eteni ya boyekoli ya vɛrsɛ oyo ozali kotánga.