Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOYEKOLI 15

Makamwisi oyo Yesu asalaki ekoki koteya biso nini?

Makamwisi oyo Yesu asalaki ekoki koteya biso nini?

“Akatisaki mokili yango mobimba, azalaki kosala malamu mpe kobikisa.”​—MIS. 10:38.

LOYEMBO 13 Kristo, ndakisa na biso

NA MOKUSE a

1. Lobelá likambo oyo esalemaki ntango Yesu asalaki likamwisi na ye ya liboso.

 KANISÁ makambo oyo esalemaki na nsuka ya mobu 29 ya ntango na biso, ntango Yesu abandaki mosala na ye awa na mabele. Yesu elongo na mama na ye Maria mpe bayekoli na ye mosusu babengisami na fɛti moko ya libala na Kana, mwa mboka oyo ezali na nɔrdi ya engumba Nazarete. Maria azali moninga ya bato ya libota ya mwasi mpe ya mobali oyo bazali kobalana, mpe emonani ete azali kosalisa bato oyo bayei na fɛti yango. Kasi wana fɛti ya libala ezali kosalema, vinyo esili. Ezalaki mokakatano moko oyo ekokaki koyokisa mwasi ná mobali mpe mabota na bango nsɔni. b Mbala mosusu motángo ya bato oyo bayaki na fɛti yango elekaki mingi. Na mbala moko Maria ayebisaki mwana na ye ete: “Bazali na vinyo te.” (Yoa. 2:1-3) Yesu asalaki nini? Asalaki likambo moko ya kokamwa mpenza. Abongolaki mai “na vinyo oyo eleki malamu.”​—Yoa. 2:9, 10.

2-3. (a) Ndenge nini Yesu asalelaki likoki oyo azalaki na yango ya kosala makamwisi? (b) Matomba nini tokoki kozwa soki tozali koyekola makamwisi oyo Yesu asalaki?

2 Yesu asalaki makamwisi mosusu mingi na boumeli ya mosala na ye awa na mabele. c Asalelaki likoki oyo azalaki na yango ya kosala makamwisi mpo na kosalisa ebele ya bato. Na ndakisa, na makamwisi mibale oyo asalaki, aleisaki mibali 5 000 mpe na nsima mibali 4 000. Na nyonso, aleisaki bato koleka 27 000 soki totángi mpe basi ná bana oyo bazalaki wana. (Mat. 14:15-21; 15:32-38) Na mabaku yango, Yesu abikisaki mpe bato mingi oyo bazalaki kobɛla. (Mat. 14:14; 15:30, 31) Ebele yango ya bato bakamwaki ndenge Yesu aleisaki mpe abikisaki bango na ndenge ya likamwisi!

3 Lelo oyo, tokoki koyekola mateya mingi na makamwisi oyo Yesu asalaki. Na lisolo oyo, tokolobela mateya mosusu ya ntina mingi oyo ekoki kokómisa kondima na biso makasi na makamwisi oyo Yesu asalaki. Na nsima, tokomona ndenge oyo tokoki komekola komikitisa mpe motema mawa oyo Yesu amonisaki ntango asalaki makamwisi.

MATEYA NA NTINA ETALI YEHOVA MPE YESU

4. Makamwisi ya Yesu ezali koteya biso mateya oyo ekoki kokómisa kondima na biso makasi epai ya nani?

4 Makamwisi ya Yesu ezali koteya biso mateya oyo ekoki kokómisa kondima na biso makasi epai na ye moko mpe epai ya Tata na ye. Kutu Yehova nde azalaki kopesa Yesu nguya ya kosala makamwisi. Misala 10:38 eyebisi biso boye: “Nzambe atyaki ye [Yesu] mafuta na elimo santu mpe na nguya, mpe akatisaki mokili yango mobimba, azalaki kosala malamu mpe kobikisa baoyo nyonso banyokwami na Zabolo; mpo Nzambe azalaki elongo na ye.” Kobosana mpe te ete, na makambo nyonso oyo alobaki mpe asalaki, ata mpe na makamwisi oyo asalaki, Yesu amonisaki na ndenge ya kokoka makanisi mpe mayoki ya Tata na ye. (Yoa. 14:9) Tótala mateya misato oyo tokoki koyekola na makamwisi ya Yesu.

5. Na kotalela Matai 20:30-34, nini etindaki Yesu asala makamwisi?

5 Ya liboso, Yesu ná Tata na ye balingaka biso mingi. Ntango Yesu azalaki awa na mabele, amonisaki ete azalaki kolinga bato na ndenge asalaki makamwisi mpo na kosalisa baoyo bazalaki konyokwama. Mokolo moko, bato mibale oyo bakufá-miso basɛngaki ye asalisa bango. (Tángá Matai 20:30-34.) Simbá ete “mawa ekangaki” Yesu mpe abikisaki bango. Liloba ya Grɛki oyo ebongolami na “mawa ekangaki” elimboli mawa makasi oyo moto ayokaka na motema na ye. Mawa ya ndenge wana emonisi bolingo makasi oyo Yesu azalaka na yango. Mawa yango nde etindaki ye aleisa bato oyo bazalaki na nzala mpe abikisa bato ya maba. (Mat. 15:32; Mrk. 1:41) Tóyeba ete Yehova, Nzambe ya “motema mawa,” mpe Mwana na ye balingaka biso mingi mpe bayokaka mpasi ntango tonyokwamaka. (Luka 1:78; 1 Pe. 5:7) Bazelaka na mposa makasi mokolo oyo bakosilisa mikakatano nyonso oyo bato bazali kokutana na yango!

6. Nzambe apesá Yesu nguya ya kosala nini?

6 Ya mibale, Nzambe apesi Yesu nguya ya kosilisa mikakatano nyonso ya bato. Na nzela ya makamwisi oyo asalaki, Yesu amonisaki nguya oyo azali na yango ya kosilisa mikakatano oyo tokoki te kosilisa na makasi na biso moko. Na ndakisa, azali na nguya ya kosikola biso na lisumu mpe na makambo oyo yango ememelá bato, na ndakisa maladi mpe liwa. (Mat. 9:1-6; Rom. 5:12, 18, 19) Makamwisi oyo asalaki emonisaki ete akoki kobikisa maladi ya “ndenge nyonso” ata mpe kosekwisa bakufi. (Mat. 4:23; Yoa. 11:43, 44) Lisusu, azali na nguya ya kokitisa mopɛpɛ ya makasi mpe ya kobengana bilimo mabe. (Mrk. 4:37-39; Luka 8:2) Koyeba ete Yehova apesi Mwana na ye nguya ya kosala makambo ya ndenge wana ezali mpenza kokitisa biso motema!

7-8. (a) Makamwisi oyo Yesu asalaki epesi biso elikya nini? (b) Likamwisi nini ozali kozela na mposa makasi na mokili ya sika oyo ezali koya?

7 Ya misato, tosengeli komindimisa ete mapamboli oyo Nzambe alaki biso na nse ya bokonzi na ye ekokokisama. Makamwisi oyo Yesu asalaki ntango azalaki awa na mabele ezali koteya biso makambo ya minene oyo akosala awa na mabele lokola azali mokonzi ya Bokonzi ya Nzambe. Tótalela makambo oyo ekosalema ntango Kristo akobanda koyangela mabele. Tokozala na nzoto ya kokoka, mpamba te akolongola maladi mpe mbeba nyonso oyo enyokolaka bato. (Yis. 33:24; 35:5, 6; Em. 21:3, 4) Nzala mpe makama oyo ebimaka yango moko ekozala lisusu te. (Yis. 25:6; Mrk. 4:41) Tokozala na esengo mpenza ya koyamba bato oyo tozalaki kolinga ntango bakosekwa. (Yoa. 5:28, 29) Likamwisi nini ozali kozela na mposa makasi na mokili ya sika oyo ezali koya?

8 Ntango azalaki kosala makamwisi, Yesu amonisaki komikitisa mpe ezaleli ya motema mawa, bizaleli oyo biso mpe tosengeli komekola. Tótalela bandakisa mibale, tokolobela liboso fɛti ya libala oyo esalemaki na Kana.

LITEYA NA NTINA ETALI KOMIKITISA

9. Na kotalela Yoane 2:6-10, likambo nini Yesu asalaki na fɛti moko ya libala?

9 Tángá Yoane 2:6-10. Ntango vinyo esilaki na fɛti ya libala, esengelaki kaka Yesu asala likambo moko? Te. Esakweli moko te elobaki ete Masiya akobimisa vinyo na ndenge ya likamwisi. Kanisá ndenge olingaki komiyoka soki masanga esilaka na fɛti na yo ya libala! Emonani ete Yesu ayokelaki libota yango mawa, mingimingi mwasi ná mobali oyo bazalaki kobalana, alingaki te báyoka nsɔni. Na yango, ndenge tolobaki yango liboso, asalaki likamwisi. Abongolaki litre soki 390 ya mai na vinyo moko ya kitoko mpenza. Mbala mosusu abongolaki mai mingi wana na vinyo mpo ndambo etikala mpo na kosalisa mwasi ná mobali yango bázwa mwa mbongo ya kobikela. Na ntembe te, likambo yango ekitisaki mwasi ná mobali yango motema!

Mpo na komekola Yesu, kolobelaka te na ndenge ya lolendo makambo oyo ozali kosala (Talá paragrafe 10-11) e

10. Wapi makanisi mosusu ya ntina oyo ezali na mokanda ya Yoane mokapo 2? (Talá mpe elilingi.)

10 Meká kotalela makanisi mosusu ya ntina oyo ezali na mokanda ya Yoane mokapo 2. Simbá ete Yesu ye moko te nde atondisaki bilokó yango na mai. Na esika Yesu ye moko nde asala yango, asɛngaki basaleli básala yango mpo abenda likebi ya bato epai na ye moko te. (Vɛrsɛ 6, 7) Nsima ya kobongola mai na vinyo, Yesu ye moko te nde amemelaki mokambi ya fɛti mwa ndambo ya vinyo. Kasi, atindaki basaleli básala yango. (Vɛrsɛ 8) Yesu azwaki te kɔpɔ ya vinyo mpo na kolakisa yango bato na lolendo nyonso ete, ‘Bómeka vinyo oyo nauti kosala!’

11. Likamwisi oyo Yesu asalaki ekoki koteya biso nini?

11 Likamwisi oyo Yesu asalaki ya kobongola mai na vinyo ekoki koteya biso nini? Yango eteyi biso komikisa. Yesu atutaki ntolo te mpo na likamwisi oyo asalaki; kutu amikumisaki te mpo na makambo nyonso oyo asalaki. Nzokande, na komikitisa nyonso, azalaki mbala na mbala kozongisa lokumu nyonso epai ya Tata na ye. (Yoa. 5:19, 30; 8:28) Soki tomekoli Yesu na komonisáká ezaleli ya komikitisa, tokomikumisa te mpo na makambo nyonso oyo tozali kosala. Ata soki tosali nini na mosala ya Yehova, tómikumisa mpo na biso moko te, kasi nde mpo na Nzambe ya malamu koleka oyo tozali kosalela. (Yir. 9:23, 24) Tosengeli kopesa ye lokumu oyo abongi na yango. Kutu, tokoki kosala ata likambo moko te ya malamu kozanga lisalisi ya Yehova.​—1 Ko. 1:26-31.

12. Wapi lolenge mosusu oyo tokoki komekola komikitisa ya Yesu? Pesá ndakisa.

12 Tótala lolenge mosusu oyo tokoki komekola komikitisa ya Yesu. Kanisá likambo oyo: Nkulutu moko alekisi ntango mingi mpo na kosalisa mosaleli na misala moko oyo azali elenge abongisa diskur na ye. Yango esali ete mosaleli wana ya misala asala diskur moko ya kolendisa mpenza, mpe bandeko nyonso ya lisangá basepeli. Na nsima ya makita, ndeko moko ayei epai ya nkulutu yango mpe alobi: ‘Ndeko songolo asali diskur moko ya kitoko mpenza!’ Nkulutu yango asengeli nde koloba: ‘Ezali bongo, kasi nalekisaki ntango mingi mpo na kosalisa ye’, to na komikitisa nyonso asengeli nde koloba: ‘Ya solo, asepelisi ngai mingi mpenza.’ Soki tozali na komikitisa, tokomikumisa te mpo na makambo ya malamu oyo tozali kosalela basusu. Koyeba ete Yehova amonaka mpe azwaka na motuya makambo oyo tosalaka, epesaka biso esengo mpenza. (Talá mpe Matai 6:2-4; Ebr. 13:16) Ya solo, tosepelisaka Yehova ntango tómekolaka Yesu na likambo etali komonisa ezaleli ya komikitisa.​—1 Pe. 5:6.

LITEYA NA NTINA ETALI MOTEMA MAWA

13. Na kotalela Luka 7:11-15, likambo nini Yesu amoni pene ya porte ya engumba Naine, mpe asali nini?

13 Tángá Luka 7:11-15. Kanisá likambo moko oyo esalemaki na mobu 31 ya ntango na biso. Yesu asalaki mobembo na Naine, engumba moko ya Galile oyo ezalaki pene ya Shuneme, epai mosakoli Elisha asekwisaki mwana ya mwasi moko elekaki bambula soki 900. (2 Ba. 4:32-37) Ntango Yesu akómi pene ya porte ya engumba, amoni ndenge bato bazali kolongwa na engumba mpo na kokende kokunda ebembe. Bato bazali na mawa mpenza, mwasi yango abungisi mwana kaka moko oyo azalaki na ye. Kasi mwasi yango azalaki kaka ye moko te; ebele ya bato ya engumba bazalaki elongo na ye. Yesu atɛlɛmisi bato yango oyo bazali kokende kokunda ebembe mpe asali likambo moko ya kokamwa mpo na mwasi yango: asekwisi mwana na ye! Oyo ezali moto ya liboso oyo Yesu asekwisaki kati na bato misato oyo basekwaki oyo Baevanzile elobeli.

Mpo na komekola Yesu, lukáká ndenge ya komonisa motema mawa na baoyo babungisi moto na liwa (Talá paragrafe 14-16)

14. Wapi makanisi mosusu ya ntina oyo ezali na Luka mokapo 7? (Talá mpe elilingi.)

14 Tótalela makanisi mosusu ya ntina oyo ezali na Luka mokapo 7. Simbá ete “ntango [Yesu] amonaki” mwasi yango oyo azalaki kolela, na mbala moko “ayokelaki ye mawa.” (Vɛrsɛ 13) Mbala mosusu, ntango amonaki ndenge mwasi yango azalaki kolela mpe kotambolatambola liboso ya nzoto ya mwana na ye, yango etindaki Yesu ayokela ye mawa. Yesu asukaki kaka te na koyokela mwasi yango mawa; amoniselaki ye mpe motema mawa. Asololaki na ye, kozanga ntembe, na mongongo moko ya kokitisa motema, mpe alobaki na ye: “Tiká kolela.” Na nsima, asalaki likambo moko mpo na kosalisa mwasi yango. Azongisaki mwana na ye na bomoi mpe “apesaki ye na mama na ye.”​—Vɛrsɛ 14, 15.

15. Likamwisi oyo Yesu asalaki ekoki koteya biso nini?

15 Likamwisi oyo Yesu asalaki ya kosekwisa mwana ya mwasi oyo mobali akufá ekoki koteya biso nini? Eteyi biso ete tosengeli komonisaka motema mawa na baoyo bazali na mawa mpo bakufeli moto. Na ntembe te, tokoki te kosekwisa bato ndenge Yesu asalaki yango. Kasi, lokola Yesu, tokoki komonisela bato oyo bazali na mpasi motema mawa soki tozali kotala na likebi makambo oyo ezali kosalema. Tokoki komonisa motema mawa soki tolobi to tosali likambo moko oyo tokoki mpo na kobɔndisa bango. d (Mas. 17:17; 2 Ko. 1:3, 4; 1 Pe. 3:8) Ezala mwa maloba moke to likambo moko oyo tokoki kosala ekolendisa mpenza.

16. Ndenge emonisami na elilingi, liteya nini ozwi epai ya mama moko oyo autaki kobungisa mwana na ye na liwa?

16 Tótalela likambo moko oyo esalemaki. Eleki mwa bambula, ntango bandeko bazalaki koyemba na ndako ya Bokonzi, ndeko mwasi moko amonaki mama moko pene na ye azalaki kolela. Loyembo yango ezalaki kolobela elikya ya lisekwa, mpe mama yango autaki kokufela mwana na ye ya mwasi. Lokola ndeko mwasi yango ayebaki yango, apusanaki pene ya mama yango, asimbaki ye na lipeka mpe bakobaki koyemba elongo. Na nsima mama yango alobaki boye: “Nakómaki kolinga bandeko mingi mpenza.” Azalaki na botɔndi mingi ndenge akendaki na makita. Mama yango alobi: “Kuna nde esika tozwaka lisalisi,” elingi koloba, “na Ndako ya Bokonzi.” Tóyeba ete Yehova amonaka mpe azwaka na motuya mingi ata makambo ya mike oyo tosalaka mpo na komonisa motema mawa na baoyo bakufeli moto mpe “baoyo elimo etutami.”​—Nz. 34:18.

BOYEKOLI OYO EKOKI MPENZA KOLENDISA BISO

17. Toyekoli nini na lisolo oyo?

17 Koyekola masolo ya Baevanzile oyo elobeli makamwisi oyo Yesu asalaki ekoki mpenza kolendisa biso. Masolo yango eteyaka biso ete Yehova ná Yesu balingaka biso mingi mpenza, ete Yesu azali na nguya ya kosilisa mikakatano nyonso ya bato, mpe tokoki mpenza kozala na kondima ete makambo nyonso oyo Nzambe alaki biso mpo na mikolo ezali koya na nse ya Bokonzi na ye, ekokokisama mpenza mosika te. Wana tozali kotalela masolo yango, tosengeli mpe kokanisa na mozindo ndenge oyo tokoki komekola bizaleli ya Yesu. Mpo na nini te kosala programɛ ya boyekoli na yo moko to mpe kotya programɛ na ntango ya losambo na kati ya libota mpo na koyekola makamwisi oyo Yesu asalaki? Okomona mateya oyo okoki kozwa na masolo yango mpe koyebisa yango basusu. Soki osali bongo, okozanga te makambo mingi ya kolendisa basusu!​—Rom. 1:11, 12.

18. Tokolobela nini na lisolo oyo elandi?

18 Pene na nsuka ya mosala na ye, Yesu asekwisaki moto ya nsuka na bato misato oyo asekwisaki ntango azalaki awa na mabele. Kasi lisekwa yango ekesanaki na oyo ya bato mosusu, mpo Yesu asekwisaki mpenza moninga na ye ya motema oyo akufaki esalaki mikolo minei. Mateya nini tokoki kozwa na lisolo yango? Mpe ndenge nini tokoki kokómisa kondima na biso makasi na elikya ya lisekwa? Lisolo oyo elandi ekoyanola na mituna yango.

LOYEMBO 20 Opesá Mwana na yo

a Akitisaki mopɛpɛ ya makasi, abikisaki bato ya maladi, mpe asekwisaki bakufi. Kotánga masolo ya makamwisi oyo Yesu asalaki, epesaka mpenza esengo! Masolo yango ekomami na Biblia kaka te mpo na kosepelisa biso, kasi mpe mpo na koteya biso. Koyekola masolo yango ekokómisa kondima na biso makasi epai ya Yehova mpe epai ya Yesu, mpe ekosalisa biso tómona bizaleli ya malamu oyo tosengeli kokolisa.

b Moto moko ya mayele na makambo ya Biblia alobi boye: “Na Yisraele, bato bazalaki komona ete koyamba bapaya ezalaki mokumba na bango, mpe moto oyo azalaki koyamba bapaya azalaki komindimisa ete azalaki na biloko oyo esengeli mpo na bango. Moto oyo ayambi bapaya na fɛti ya libala asengelaki kopesa bango biloko mingi ya kolya mpe ya komɛla.”

c Baevanzile elobeli makamwisi koleka 30 oyo Yesu asalaki. Yesu asalaki mpe makamwisi mosusu mingi, kasi Biblia elobeli mokomoko na yango te. Mokolo moko, “engumba mobimba” eyaki epai na ye mpe “abikisaki bato mingi oyo bazalaki kobɛla.”​—Mrk. 1:32-34.

d Mpo na koyeba makambo oyo okoki kosala to koloba mpo na kobɔndisa bato oyo bazali na mawa mpo bakufeli moto, talá lisolo “Bɔndisáká baoyo moto na bango akufi ndenge Yesu asalaki yango,” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 01/11/2010.

e NDIMBOLA YA ELILINGI: Wana Yesu atɛlɛmi, mwasi ná mobali oyo bazali kobala mpe bato oyo bayei na fɛti ya libala na bango, bazali komɛla vinyo.