Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOYEKOLI 16

“Ndeko na yo ya mobali akosekwa”!

“Ndeko na yo ya mobali akosekwa”!

Yesu alobaki na ye ete: “Ndeko na yo ya mobali akosekwa.”​—YOA. 11:23.

LOYEMBO 151 Akobenga

NA MOKUSE a

1. Ndenge nini mwana mobali moko alobelaki elikya oyo azalaki na yango mpo na lisekwa?

 MWANA mobali moko na nkombo Matthew azalaki na maladi moko ya makasi mpenza, yango wana basengelaki kosala ye mapaso ndenge na ndenge. Ntango akómaki na mbula nsambo, ye ná bandeko ya libota na bango bazalaki kotala emisyo ya sanza na sanza ya TV JW®. Pene na nsuka ya programɛ yango, bamonaki video ya miziki moko oyo ezalaki kolakisa moto moko oyo azali koyamba ndeko na ye ya libota oyo asekwi. b Nsima ya programɛ yango, Matthew akendaki epai ya baboti na ye, asimbaki bango na mabɔkɔ, mpe alobaki: “Ata soki nakufi, nakolamuka lisusu na ntango ya lisekwa. Bokozela ngai; mpe nakosekwa.” Kanisá esengo oyo baboti yango bayokaki ntango bayebaki ete mwana na bango azalaki kondimela mpenza elikya ya lisekwa!

2-3. Mpo na nini ezali malamu tokanisaka na elaka ya lisekwa?

2 Biso nyonso tosengeli kokanisaka mbala na mbala na elaka oyo Biblia epesi ya lisekwa na mikolo ezali koya. (Yoa. 5:28, 29) Mpo na nini? Mpo toyebaka te mokolo oyo tokobɛla maladi moko ya makasi to mokolo oyo tokobungisa na mbalakaka ndeko to moninga moko na liwa. (Mos. 9:11; Yak. 4:13, 14) Elikya ya lisekwa oyo tozali na yango ekoki kosalisa biso mpo tóyika mpiko na mikakatano ya ndenge wana. (1 Tes. 4:13) Makomami eyebisi biso ete Tata na biso ya likoló ayebi biso malamu mpe alingaka biso mingi mpenza. (Luka 12:7) Yehova Nzambe ayebi biso malamu mpenza, yango wana akosekwisa biso na bizaleli mpe na makanisi na biso. Yehova alingaka biso mingi mpenza, yango wana azwá bibongiseli mpo tókoka kozala na bomoi libela na libela, mpe ata soki tokufi, akosekwisa biso!

3 Na lisolo oyo, tokolobela ntina oyo tosengeli kondimela elaka ya lisekwa. Na nsima, tokolobela masolo ya Biblia ya kolendisa oyo ezali na maloba oyo ezali na vɛrsɛ oyo esimbi motó ya likambo ya lisolo na biso: “Ndeko na yo ya mobali akosekwa.” (Yoa. 11:23) Na nsuka, tokoyekola ndenge oyo tosengeli kokómisa elikya ya lisekwa likambo ya solo mpo na biso.

NTINA OYO TOSENGELI KONDIMELA ELAKA YA LISEKWA

4. Mpo na kondimela elaka moko, tosengeli komindimisa na makambo nini? Pesá ndakisa.

4 Mpo na kondimela elaka moko, tosengeli komindimisa ete moto oyo alaki yango azali na mposa mpe na nguya, to mpe na makoki ya kokokisa yango. Tózwa ndakisa oyo: Kanisá ete mopɛpɛ moko ya makasi ebebisi ndako na yo. Moninga moko ayei epai na yo mpe alaki yo ete, ‘nakosalisa yo mpo otonga lisusu ndako na yo.’ Alobi yango na motema na ye mobimba, mpe omindimisi ete azali na mposa ya kosalisa yo. Moninga yango azali motongi ya malamu mpenza mpe azali na bisaleli nyonso oyo esengeli, mpe oyebi lisusu ete azali na makoki ya kosala yango. Yango esali ete ondima makambo oyo alaki yo. Ezali mpe bongo mpo na elaka ya Nzambe oyo etali lisekwa? Azali mpenza na mposa mpe na nguya ya kosala yango?

5-6. Mpo na nini tosengeli kondima ete Yehova azali na mposa ya kosekwisa bakufi?

5 Yehova azali mpenza na mposa ya kosekwisa bakufi? Na ntembe te, azali na yango. Na nzela ya elimo na ye, asalisaki bato mingi oyo bakomaki Biblia, bakoma elaka na ye ya lisekwa mpo na mikolo ezali koya. (Yis. 26:19; Hos. 13:14; Em. 20:11-13) Mpe soki Yehova alaki likambo moko, akokisaka yango. (Yos. 23:14) Yehova azali na mposa makasi ya kozongisa lisusu bakufi na bomoi. Mpo na nini tolobi bongo?

6 Meká kokanisa makambo oyo Yobo alobaki. Ayebaki ete ata soki akufi, Yehova akozala na mposa makasi ya komona ye lisusu na bomoi. (Yobo 14:14, 15.) Yehova ayokaka mpe bongo mpo na basambeli na ye nyonso ya sembo oyo bakufá. Azali na mposa makasi ya kozongisa lisusu bango na bomoi, na nzoto kolɔngɔnɔ mpe na esengo. Bongo bamilio ya bato oyo bakufá kozanga ete báyekola mateya ya solo oyo etali Yehova? Nzambe na biso ya bolingo azali mpe na mposa ya kosekwisa bango. (Mis. 24:15) Mposa na ye ezali ete bato yango bázwa libaku ya kokóma baninga na ye mpe ya kozala na bomoi libela na libela awa na mabele. (Yoa. 3:16) Ezali polele ete, Yehova azali na mposa ya kosekwisa bakufi.

7-8. Mpo na nini tosengeli kondima ete Yehova azali na nguya ya kosekwisa bakufi?

7 Yehova azali mpenza na nguya ya kosekwisa bakufi? Ɛɛ, azali na yango! Azali “Mozwi-ya-Nguya-Nyonso.” (Em. 1:8) Na yango, azali na nguya ya kolonga ata monguna ya ndenge nini, ezala mpe liwa. (1 Ko. 15:26) Koyeba likambo yango epesaka biso makasi mpe ebɔndisaka biso. Tótala ndakisa ya ndeko mwasi Emma Arnold. Ye ná bandeko na ye ya libota bakutanaki na komekama ya makasi na ntango ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba. Emma abɔndisaki mwana na ye ya mwasi mpo bato oyo ye azalaki kolinga mingi bakufaki na kaa ya bakangami ya Banazi, ayebisaki ye boye: “Soki bato oyo bakufá bakosekwa te, yango elingi koloba ete liwa eleki Nzambe na makasi, nzokande ezali bongo te!” Ya solo mpenza, eloko moko te eleki Yehova na makasi! Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso oyo azalisaki bomoi azali na likoki ya kozongisa bato oyo bakufá na bomoi.

8 Ntina mosusu oyo endimisi biso ete Nzambe azali na likoki ya kosekwisa bakufi, ezali ete makanisi na ye ezangi nsuka. Abengaka monzoto mokomoko na nkombo na yango. (Yis. 40:26) Lisusu, abosanaka te baoyo bakufá. (Yobo 14:13; Luka 20:37, 38) Akoki kobosana te ata makambo ya mikemike ya baoyo akosekwisa, ezala bilongi mpe bomoto na bango, makambo oyo basalaki ntango bazalaki na bomoi, mpe makanisi na bango.

9. Mpo na nini tosengeli kondimela elaka ya Yehova ya lisekwa mpo na mikolo ezali koya?

9 Ya solo, tosengeli kondimela elaka ya Yehova ya kosekwisa bato na mikolo ezali koya, mpo toyebi ete azali na mposa mpe na nguya ya kokokisa yango. Tótala ntina mosusu oyo tosengeli kondima ete Nzambe akosekwisa bato ndenge alaki yango: Yehova asilá kosekwisa bato. Na ntango ya kala, apesaki mwa basaleli na ye ya sembo, ata mpe Yesu nguya ya kosekwisa bakufi. Tólobela lisolo ya moto moko kati na bato oyo Yesu asekwisaki, ndenge elobelami na Yoane mokapo 11.

MONINGA YA MOTEMA YA YESU AKUFI

10. Na kotalela Yoane 11:1-3, likambo nini esalemi ntango Yesu auti na Betania mpo na kosakola penepene na Ebale Yordani, mpe asali nini?

10 Tángá Yoane 11:1-3. Kanisá likambo oyo esalemaki na Betania na nsuka ya mobu 32 ya ntango na biso. Yesu azali na baninga ya motema na mboka yango, elingi koloba Lazare mpe bandeko na ye mibale ya basi, Maria ná Marta. (Luka 10:38-42) Kasi Lazare azali kobɛla, mpe bandeko na ye ya basi bazali komitungisa. Yesu azali pene na Yordani mpe batindeli ye nsango. Kolongwa na esika oyo Yesu azali mpo na kokóma na Betania ezali mobembo ya mikolo mibale. (Yoa. 10:40) Likambo ya mawa, ntango nsango ya maladi ya Lazare ekómeli Yesu, Lazare akufi. Ata soki Yesu ayebaki ete moninga na ye akufi, atikalaki na esika oyo azalaki na boumeli ya mikolo mibale mpe na nsima, asalaki mobembo na Betania. Na yango, ntango Yesu akómi na Betania, akuti Lazare asili kokufa esali mikolo minei. Yesu azali kokana kosala likambo moko oyo ekosalisa baninga na ye mpe ekokumisa Nzambe.​—Yoa. 11:4, 6, 11, 17.

11. Liteya nini etali boninga tokoki koyekola na lisolo oyo?

11 Lisolo yango eteyi biso likambo etali boninga. Kanisá naino: Ntango Maria ná Marta batindeli Yesu nsango, basengaki te ete aya na Betania. Bayebisaki ye kaka ete moninga na ye ya motema azali kobɛla. (Yoa. 11:3) Ntango Lazare akufaki, Yesu akokaki kosekwisa ye na mosika. Kasi, Yesu amonaki malamu akende na Betania mpo na kozala elongo na baninga na ye Maria mpe Marta. Ozali na moninga oyo akondima kosalisa yo kozanga ete osɛnga ye? Soki ezali bongo, okoki kotya motema ete akosalisa yo na “ntango ya mpasi.” (Mas. 17:17) Ndenge moko na Yesu, mingi kati na biso bazali baninga ya ndenge wana mpo na basusu! Sikoyo tózongela lisolo yango mpo tómona makambo oyo esalemaki na nsima.

12. Na kotalela Yoane 11:23-26, likambo nini Yesu alakaki Marta, mpe mpo na nini asengelaki kondimela elaka yango?

12 Tángá Yoane 11:23-26. Marta ayokaki ete Yesu azali pene ya Betania. Akendaki mbala moko mpo na kokutana na ye mpe alobaki: “Nkolo, soki ozalaki awa mbɛlɛ ndeko na ngai ya mobali akufaki te.” (Yoane 11:21) Ya solo, akokaki kobikisa Lazare. Kasi Yesu azalaki na mposa ya kosala likambo moko ya kokamwa mpenza. Alakaki ete: “Ndeko na yo ya mobali akosekwa.” Apesaki mpe Marta ntina mosusu ya kondimela likambo oyo alakaki, alobaki: “Ngai nazali lisekwa mpe bomoi.” Nzambe apesi Yesu nguya ya kosekwisa bakufi. Liboso, asekwisaki mwana mwasi moko oyo autaki kokufa mpe asekwisaki elenge mobali moko, ekoki kozala ete Yesu asekwisaki ye kaka na mokolo oyo akufaki. (Luka 7:11-15; 8:49-55) Kasi akokoka mpenza kosekwisa moto oyo akufi eleki mikolo minei mpe oyo nzoto na ye ebandi kopɔla?

“LAZARE, BIMÁ!”

Yesu ayokaki mawa makasi mpo na baninga na ye oyo bazalaki kolela (Talá paragrafe 13-14)

13. Ndenge emonisami na Yoane 11:32-35, Yesu asalaki nini ntango amonaki Maria ná bato mosusu bazali kolela? (Talá mpe elilingi)

13 Tángá Yoane 11:32-35. Meká kokanisa likambo oyo esalemaki na nsima. Maria, ndeko mosusu ya Lazare ya mwasi, akei kokutana na Yesu. Azongeli kaka makambo oyo ndeko na ye ya mwasi alobaki: “Nkolo, soki ozalaki awa mbɛlɛ ndeko na ngai ya mobali akufaki te.” Maria ná bato mosusu oyo bazali elongo na ye bazali na mawa makasi. Ntango Yesu amoni mpe ayoki ndenge bazali kolela, mawa ekangi ye makasi mpenza. Lokola ayokelaki baninga na ye mawa, yango esalaki ete alela. Ayebaki mpasi oyo moto ayokaka ntango abungisi moto oyo alingaka mingi na liwa. Na ntembe te, azali na mposa makasi ya kosilisa likambo oyo esali ete bálela!

14. Likambo oyo Yesu asalaki ntango amonaki Maria azali kolela, ezali koteya biso nini mpo na Yehova?

14 Likambo oyo Yesu asalaki ntango amonaki Maria azali kolela ezali koteya biso ete Yehova azali Nzambe oyo atondi na motema mawa. Mpo na nini tolobi bongo? Ndenge tomonaki yango na lisolo oyo eleki, Yesu amekolaka na ndenge ya kokoka makanisi mpe mayoki ya Tata na ye. (Yoa. 12:45) Na yango, ntango totángaka ete Yesu alelaki mpo ayokelaki baninga na ye oyo bazalaki na mpasi mawa makasi, yango esalisi biso tómona ete Yehova mpe ayokelaka biso mawa ntango amonaka ete tozali kolela mpo tozali na mpasi. (Nz. 56:8) Na ntembe te, yango etindaka biso tópusana penepene na Nzambe na biso oyo atondi na motema mawa!

Yesu amonisaki ete azali na nguya ya kosekwisa bakufi (Tala paragrafe 15-16)

15. Ndenge emonisami na Yoane 11:41-44, likambo nini esalemaki na lilita ya Lazare? (Talá mpe elilingi)

15 Tángá Yoane 11:41-44. Yesu akómi na lilita ya Lazare mpe asɛngi bálongola libanga oyo bazipaki yango. Marta aboyi, alobi ete nzoto na ye esengeli kolumba nsolo. Yesu azongiselaki ye ete: “Nayebisaki yo te ete soki ondimi, okomona nkembo ya Nzambe?” (Yoa. 11:39, 40) Na nsima, Yesu atombolaki miso na likoló mpe abondelaki na miso ya bato nyonso. Alingaki kopesa Yehova lokumu mpo na makambo nyonso oyo esengelaki kosalema na nsima. Bongo Yesu agangaki na mongongo makasi ete “Lazare, bimá!” Mpe Lazare abimaki na lilita! Yesu asalaki likambo oyo bato mosusu bakoki komona ete ekoki kosalema te.

16. Ndenge nini lisolo oyo ezali na Yoane mokapo 11 ekómisi kondima na biso makasi na elikya ya lisekwa?

16 Lisolo oyo ezali na Yoane mokapo 11 ekómisi kondima na biso makasi na elikya ya lisekwa. Na ndenge nini? Kobosana te ete Yesu alakaki Marta ete: “Ndeko na yo ya mobali akosekwa.” (Yoane 11:23) Ndenge moko na Tata na ye, Yesu azali na mposa mpe na nguya ya kokokisa elaka yango. Mpisoli oyo abimisaki emonisi ete azali na mposa makasi ya kosekwisa bato oyo bakufá mpe ya kosilisa mpasi nyonso oyo bato bayokaka mpo na liwa. Mpe na ntango oyo Lazare abimaki na lilita, Yesu amonisaki lisusu ete azali na nguya ya kosekwisa bakufi. Lisusu, kanisá makambo oyo Yesu ayebisaki Marta: “Nayebisaki yo te ete soki ondimi, okomona nkembo ya Nzambe?” (Yoane 11:40) Tozali na ntina mpenza ya kondima ete elaka ya Nzambe oyo etali lisekwa ekokokisama. Kasi, tosengeli kosala nini mpo elikya yango ekóma likambo ya solo mpo na biso?

TOKOKI KOSALA NINI MPO ELIKYA YA LISEKWA EKÓMA LIKAMBO YA SOLO MPO NA BISO

17. Likambo nini tosengeli kobosana te ntango tozali kotánga masolo ya Biblia oyo elobeli lisekwa?

17 Tángáká mpe manyoláká na lisekwa oyo esalemá na ntango ya kala. Biblia elobeli masolo mwambe ya bato oyo basekwaki awa na mabele. c Mpo na nini te kotánga lisolo yango mokomoko na likebi? Wana ozali kosala yango, kobosana te ete ezalaki mpenza bato ya solo, elingi koloba basi, mibali, mpe bana. Luká mateya oyo okoki koyekola na masolo yango. Kanisá ndenge oyo ndakisa yango mokomoko ezali komonisa mposa mpe nguya oyo Nzambe azali na yango ya kozongisa bakufi na bomoi. Likambo eleki ntina, kanisáká na lisekwa oyo eleki nyonso, elingi koloba, lisekwa ya Yesu. Kobosana te ete bato mingi bamonaki ndenge oyo asekwaki mpe yango ezali kokómisa kondima na biso makasi.​—1 Ko. 15:3-6, 20-22.

18. Ndenge nini okoki kosalela malamu banzembo na biso oyo elobeli elikya ya lisekwa? (Talá maloba na nse ya lokasa.)

18 Yokáká, yembáká mpe kanisáká na mozindo na “nzembo ya elimo” oyo elobeli elikya ya lisekwa. d (Ef. 5:19) Banzembo yango ekómisaka lisekwa likambo ya solo mpenza mpo na biso mpe ekómisaka kondima na biso makasi na elikya yango ya kitoko. Yokáká banzembo yango, yekoláká yango malamu, mpe bólobelaka bandimbola ya maloba na yango na ntango ya losambo na kati ya libota. Kangá na motó mpe kanisáká maloba ya banzembo yango. Na yango, soki okutani na komekama to obungisi ndeko to moninga moko na liwa, elimo ya Yehova ekosalisa yo okanisa lisusu banzembo yango mpo ebɔndisa mpe epesa yo makasi.

19. Makambo nini tosengeli komona na makanisi na ntina etali lisekwa? (Talá etanda “ Mituna nini okotuna bango?”)

19 Monáká makambo na makanisi. Yehova apesá biso likoki ya komimona na mokili ya sika. Ndeko mwasi moko alobi boye: “Nalekisaka ntango mingi mpo na komimona na mokili ya sika, lokola nde nazali koyoka nsolo ya bafololo na Paradiso.” Moná lokola nde okutani na mibali mpe basi oyo Biblia elobeli. Ozali kozela na mposa makasi kokutana na nani? Mituna nini okotuna moto yango? Kanisá mpe ete okutani lisusu na bandeko mpe baninga na yo oyo bakufá! Kanisá mpe makambo ya liboso oyo okoyebisa bango, ndenge oyo okoyamba bango, mpe esengo oyo okoyoka ntango okomona bango.

20. Tosengeli kozala na ekateli nini?

20 Tozali mpenza na botondi epai ya Yehova mpo na elaka ya lisekwa! Tóyeba ete elaka yango ekokokisama, mpo Yehova azali na mposa mpe na nguya ya kokokisa yango. Tosengeli kozala na ekateli ya kokómisa kondima na biso makasi na elikya wana ya kitoko. Soki tosali bongo, tokopusana lisusu penepene na Nzambe oyo alaki mokomoko na biso ete, ‘Ndeko na yo akosekwa!

LOYEMBO 147 Nzambe alaki biso bomoi ya seko

a Soki obungisa ndeko to moninga moko na liwa, na ntembe elaka ya lisekwa esengeli kobɔndisa yo mingi mpenza. Kasi ndenge nini okoki kolimbolela basusu ntina oyo ondimelaka elaka yango? Mpe ndenge nini okoki kokómisa kondima na yo makasi na elikya ya lisekwa? Ntina ya lisolo oyo ezali ya kokómisa kondima na biso makasi na elikya ya lisekwa.

b Video ya miziki yango ezalaki na motó ya likambo, Yango oyo na miso mpe ebimaki na emisyo ya sanza ya 11/2016.

c Talá etanda “Bato mwambe oyo basekwaki, oyo Biblia elobeli” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 01/08/2015, lok. 4.

d Talá banzembo oyo elandi na buku “Tóyembela Yehova na esengo”:Omimona na mokili ya sika” (Loyembo 139), “Tyá miso na yo na mbano!” (Loyembo 144), mpe “Akobenga” (Loyembo 151). Talá mpe na jw.org banzembo oyo alandi: “Yango oyo na miso,” “Na mokili ya sika,” mpe “Ekoya.”