Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOYEKOLI 18

Tólendisanaka na makita ya lisangá

Tólendisanaka na makita ya lisangá

“Tótyelanaka likebi . . .  tólendisanaka.”​—EBR. 10:24, 25.

LOYEMBO 88 Teyá ngai banzela na yo

NA MOKUSE a

1. Mpo na nini topesaka biyano na makita?

 MPO NA NINI toyanganaka na makita ya lisangá? Ya liboso, mpo na kokumisa Yehova. (Nz. 26:12; 111:1) Toyanganaka mpe na makita mpo na kolendisana na bantango oyo ya mpasi. (1 Tes. 5:11) Ntango totombolaka lobɔkɔ mpe topesaka biyano, tokokisaka mikano yango mibale.

2. Mabaku nini tozalaka na yango mpo na kopesa biyano na makita na biso?

2 Pɔsɔ nyonso, tozwaka mabaku ya kopesa biyano na makita na biso. Na ndakisa, na nsuka ya pɔsɔ, tokoki kopesa biyano na boyekoli ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli na lisangá. Na makita ya katikati ya pɔsɔ, tokoki kopesa biyano na lisolo Biloko ya motuya ya elimo, na Boyekoli ya Biblia na lisangá, mpe na masolo mosusu ya bato nyonso.

3. Mikakatano nini tokoki kokutana na yango ntango tolingi kopesa biyano, mpe ndenge nini Baebre 10:24, 25 ekoki kosalisa biso?

3 Biso nyonso tolingaka kokumisa Yehova mpe kolendisa bandeko na biso. Kasi tokutanaka na mikakatano mibale ntango tolingi kopesa biyano. Mbala mosusu tobangaka kopesa biyano, to mpe tolingaka koloba mingi kasi baponaka biso mingi te. Nini ekoki kosalisa biso na likambo yango? Makambo oyo ntoma Paulo akomelaki Baebre ekosalisa biso tózwa eyano. Ntango azalaki kolobela ntina ya koyangana elongo, Paulo alobaki ete tosengeli kotya makanisi na ‘kolendisanaka.’ (Tángá Baebre 10:24, 25.) Ntango toyebi ete tokoki kolendisa bamosusu ata na mwa eyano ya mokuse, kozanga ntembe, tokobanga te koloba. Mpe soki baponi biso mbala mingi te, tokoki kozala na esengo mpo basusu na lisangá bakozwa libaku ya kopesa biyano.​—1 Pe. 3:8.

4. Wapi makambo misato oyo tokolobela na lisolo oyo?

4 Na lisolo oyo, tokolobela libosoliboso ndenge oyo tokoki kolendisana na lisangá ya moke epai bato ya kopesa biyano bazali mingi te. Na nsima, tokolobela ndenge oyo tokoki kolendisana na lisangá ya monene epai bato mingi batombolaka mabɔkɔ mpo na kopesa biyano. Mpe na nsuka, tokolobela oyo tokoki kosala mpo ete makambo oyo tokoloba na biyano na biso elendisa mpenza basusu.

TÓLENDISANA NA LISANGÁ YA MOKE

5. Ndenge nini tokoki kolendisana na esika oyo bayangani bazali mingi te?

5 Na lisangá ya moke to mpe na etuluku, ezalaka na bato mingi te oyo motambwisi akoki kopona mpo bápesa biyano. Na bantango mosusu, esɛngaka azela mwa moke liboso moto moko atombola lobɔkɔ mpo na kopesa eyano. Makita ya ndenge wana ekoki kolɛmbisa, mpe ezali mpasi mpo elendisa bandeko. Okoki kosala nini mpo na yango? Tomboláká lobɔkɔ mbala na mbala. Soki osali bongo, okoki kolendisa bamosusu mpo bákóma na momesano ya kopesaka biyano.

6-7. Tokoki kosala nini mpo tóbangaka mingi te ntango tolingi kopesa eyano?

6 Bongo soki likanisi kaka ya kopesa eyano ebangisaka yo? Yango ekómelaka bato mingi. Nzokande, soki olingi mpenza kolendisa bandeko na yo, ekozala malamu osala oyo okoki mpo obangaka mingi te. Okoki kosala nini?

7 Okoki kotalela lisusu masolo ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli  b oyo elobeli likambo yango, mpe yango ekoki kosalisa yo. Na ndakisa, komibongisa malamu. (Mas. 21:5) Soki ozali na momesano ya komibongisa malamu, ekozala mpasi te mpo opesa biyano. Lisusu, pesáká biyano ya mikuse. (Mas. 15:23; 17:27) Kopesa eyano ya mokuse ekosala ete obanga mingi te. Mbala mosusu, eyano ya mokuse oyo ekoki kozala kaka na fraze moko to mibale ekosalisa bandeko bákanga ntina mbala moko, na esika ya kopesa eyano ya molai oyo ezali na makanisi kilikili. Eyano ya mokuse oyo opesi na maloba na yo moko, ekomonisa ete omibongisaki malamu mpe okangi mpenza ntina ya lisolo oyo bozali kolobela.

8. Ndenge nini Yehova atalelaka milende oyo osalaka?

8 Okosala nini soki omeki kosalela makanisi yango kasi ozali kolonga kaka te kopesa biyano mbala moko, mbala mibale, to koleka? Zalá na kondima ete Yehova akosepela na milende nyonso ozali kosala. (Luka 21:1-4) Yehova asɛngaka biso te tósala makambo oyo eleki makoki na biso. (Flp. 4:5) Luká koyeba oyo okoki kosala, omityela mokano ya kosala yango mpe sɛngá Yehova apesa yo kimya ya motema. Na ebandeli, okoki kotya mokano ya kopesa eyano moko ya mokuse.

TÓLENDISANA NA LISANGÁ YA MONENE

9. Mikakatano nini ekoki komonana na masangá ya minene?

9 Soki lisangá na bino ezali na basakoli mingi, bokoki kozala na mokakatano mosusu. Mbala mosusu bandeko mingi batombolaka mabɔkɔ mpo na kopesa biyano, yango esalaka ete mbala mingi bámona lobɔkɔ na yo te. Na ndakisa Danielle, asepelaka mingi kopesa biyano na makita. c Amonaka ete yango ezali lolenge moko ya kosambela Yehova, ya kolendisa basusu, mpe ya kokómisa makasi kondima na ye na mateya ya Biblia. Kasi ntango akómaki na lisangá moko ya monene, bazalaki kopona ye mbala mingi te, kutu ntango mosusu bazalaki kopona ye ata mbala moko te na boumeli ya likita mobimba. Alobi: “Nasilikaki. Namonaki lokola nazangisaki libaku moko monene. Ntango ekómi kosalema mbala na mbala, okobanda komituna soki bazali kosala yango na nko to te.”

10. Tokoki kosala nini mpo tózwa mabaku mingi ya kopesa biyano na makita?

10 Esí ekómela yo omiyoka lokola Danielle? Soki ezali bongo, okoki kokóma na likanisi ete otika kopesa biyano mpe olanda na yo kaka makita. Kasi kolɛmba nzoto te. Okoki kosala nini? Okoki kobongisa biyano mingi mpo na eteni mokomoko ya makita. Na bongo, soki baponi yo te na ebandeli ya boyekoli, okozala na mabaku ya kopesa biyano ata na boumeli ya makita. Ntango ozali kobongisa Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya boyekoli, kanisá ndenge paragrafe mokomoko eyokani na motó ya likambo ya lisolo yango. Soki osali bongo, okozanga te biyano ya malamu ya kopesa na boumeli ya boyekoli yango. Lisusu, okoki komibongisa mpo na kopesa biyano na baparagrafe oyo ezali kolobela mateya ya mozindo ya Biblia oyo ezalaka mpasi mingi mpo na kolimbola. (1 Ko. 2:10) Mpo na nini? Mpamba te, ekoki kozala na bato moke kaka oyo batomboli mabɔkɔ na eteni wana ya boyekoli. Okosala nini soki osaleli makanisi yango kasi nsima ya makita mingi ozwi kaka te libaku ya kopesa eyano? Okoki kokutana na ndeko oyo akotambwisa lisolo yango mpe koyebisa ye motuna ya paragrafe oyo okosepela koyanola.

11. Bafilipi 2:4 elendisi biso tósala nini?

11 Tángá Bafilipi 2:4. Na lisalisi ya elimo ya Yehova, ntoma Paulo alendisaki Bakristo ete bátyaka likebi kaka na matomba na bango moko te. Ndenge nini tokoki kosalela toli yango na makita? Ezali soki tozali kokanisa basusu, oyo lokola biso, bazali mpe na mposa ya kopesa biyano.

Kaka ndenge otikaka basusu báloba ntango bozali kosolola, tikeláká mpe basusu nzela bápesaka biyano na makita (Talá paragrafe 12)

12. Wapi lolenge ya malamu ya kolendisa bandeko na biso na makita? (Talá mpe elilingi)

12 Kanisá na likambo oyo. Ntango ozali kosolola na baninga na yo, okobanda koloba mingi kozanga kotikela bango ntango ya koloba? Okosala bongo te! Okotikela bango mpe nzela bálobaka. Ndenge moko mpe na makita, tosengeli kotikelaka bandeko mosusu ntango ya koloba. Kutu, lolenge moko oyo eleki malamu ya kolendisa bandeko na biso, ezali ya kopesa bango libaku ya kolobela kondima na bango. (1 Ko. 10:24) Tótala ndenge oyo tokoki kosala yango.

13. Tokoki kosala nini mpo tópesa bandeko mingi libaku ya kopesa biyano na makita?

13 Likambo ya liboso ya kosala, ezali ya kopesa biyano ya mikuse mpo na kotikela bandeko mosusu mpe ntango ya koloba. Bankulutu mpe bandeko oyo bakómeli na elimo bakoki kopesa ndakisa na likambo yango. Ata ntango ozali kopesa eyano ya mokuse, kolobelaka makambo ebeleebele te. Soki okɔmbɔli makambo nyonso na paragrafe, bandeko mosusu bakozanga likambo ya koloba. Na ndakisa, na paragrafe oyo bapesi biso makanisi mibale: kopesa biyano ya mikuse mpe koboya kolobela makambo ebeleebele. Soki baponi yo moto ya liboso opesa eyano na paragrafe moko, ekozala malamu olobela kaka likambo moko.

Ntango nini tokoki komona malamu tótombola lobɔkɔ na biso te na makita? Talá paragrafe 14) f

14. Nini ekoki kosalisa yo oyeba mbala boni osengeli kotombola lobɔkɔ? (Talá mpe elilingi)

14 Salelá bososoli mpo na koyeba mbala boni okopesa biyano. Soki ozali kotombola lobɔkɔ mbala na mbala, okoki kotya ndeko oyo azali kotambwisa boyekoli mbamba mpo aponaka kaka yo mbala na mbala atako bato mosusu bazwi naino libaku ya koloba te. Bandeko mosusu bakoki kolɛmba kotombola mabɔkɔ.​—Mos. 3:7.

15. (a) Tosengeli kosala nini soki baponi biso te? (b) Ndenge nini bandeko oyo batambwisaka boyekoli bakoki komonisa ete bazali kotyela bandeko nyonso likebi? (Talá etanda “ Soki ozali kotambwisa boyekoli.”)

15 Ntango bandeko mingi batomboli lobɔkɔ na ntango ya boyekoli, ekoki kozala mpasi tópesa biyano mbala mingi ndenge tozalaki kokanisa. Na bantango mosusu, ndeko oyo azali kotambwisa akoki kopona biso te. Yango ekoki kolɛmbisa biso nzoto, kasi tosengeli kosala makasi tósilika te.​—Mos. 7:9.

16. Ndenge nini tokoki kolendisa bandeko mosusu oyo bazali kopesa biyano?

16 Soki ozwi libaku te ya kopesa biyano mbala mingi ndenge ozalaki kokanisa, ekozala malamu oyoka bandeko mosusu na likebi ntango bazali kopesa biyano mpe na nsima ya makita, pesá bango longonya mpo na biyano na bango. Longonya oyo okopesa bandeko ekolendisa bango kaka ndenge biyano oyo olingaki kopesa elingaki kosala yango. (Mas. 10:21) Kopesa longonya ezali lolenge mosusu ya kolendisa bandeko na biso.

NDENGE MOSUSU YA KOLENDISANA

17. (a) Ndenge nini baboti bakoki kosalisa bana na bango bápesa biyano oyo ebongi? (b) Na kotalela video, wapi makambo minei ya kosala mpo na kobongisa eyano? (Talá mpe maloba na nse ya lokasa)

17 Wapi ndenge mosusu ya kolendisana na makita? Soki ozali moboti, salisá bana na yo ya mike bábongisaka biyano oyo ebongi na kotalela mbula na bango. (Mat. 21:16) Na bantango mosusu, ekoki kozala ete lisolo moko ezali kolobela mikakatano ya libala to bizaleli ya pɛto, kasi ekoki kozala na paragrafe moko to mibale oyo mwana akoki kopesa eyano. Lisusu, salisá bana na yo báyeba ntina oyo bakopona bango te ntango nyonso oyo batomboli mabɔkɔ. Soki osali bongo, ekosalisa bango bálɛmba nzoto te ntango bazali kopona bato mosusu.​—1 Tim. 6:18. d

18. Tokoki kosala nini mpo tóboya kobenda likebi ya bato epai na biso ntango tozali kopesa eyano? (Masese 27:2)

18 Biso nyonso tokoki kobongisa biyano ya malamu oyo ezali kokumisa Yehova mpe kolendisa bandeko na biso Bakristo. (Mas. 25:11) Atako na bantango mosusu tokoki kolobela makambo oyo tokutanaki na yango, tosengeli koboya kolobela mingi makambo etali biso moko. (Tángá Masese 27:2; 2 Ko. 10:18) Tosengeli kolobelaka mingimingi makambo etali Yehova, Liloba na ye, mpe basaleli na ye. (Em. 4:11) Kasi, soki motuna ya paragrafe moko esɛngi tólobela makambo na biso moko, ekozala malamu kosala bongo. Paragrafe oyo elandi ekopesa ndakisa ya likambo yango.

19. (a) Matomba nini ekomonana soki tozali kotyela moto nyonso na makita likebi? (Baroma 1:11, 12) (b) Nini esepelisaka yo na likambo etali kopesa biyano na makita?

19 Atako ezali te na mibeko ya sikisiki oyo elobeli ndenge ya kopesa biyano, biso nyonso tosengeli kosala makasi mpo tólendisanaka ntango tozali kopesa biyano. Yango ekoki kosɛnga tólobaka ntango nyonso te. To mpe ekoki kolakisa kosepela na libaku oyo tozwi ya koyanola mpe koyeba ete bato mosusu mpe bayaki kaka kotika biso te. Na makita, soki totye makanisi na matomba ya bato mosusu, biso nyonso tokoki ‘kolendisama na kondima ya bamosusu.’​—Tángá Baroma 1:11, 12.

LOYEMBO 93 Pambolá makita na biso

a Tolendisanaka ntango topesaka biyano na makita. Nzokande, bato mosusu babangaka kopesa eyano na makita. Bamosusu basepelaka kopesa biyano, kasi bamonaka ete baponaka bango mbala mingi te. Na yango, ndenge nini tokoki kotyelanaka likebi mpo biso nyonso tólendisama? Mpe ndenge nini tokoki kopesa biyano oyo ekotinda bandeko na biso bázala na bolingo mpe bámipesa na misala ya malamu? Na lisolo oyo, tokolobela likambo yango.

b Mpo na koyeba makanisi mosusu, talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 01/2019, nk. 8-13; mpe ya 01/09/2003, nk. 19-22.

c Topesi bango bankombo mosusu.

e Talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15/07/2013, lok. 32, mpe ya 01/09/2003, nk. 21-22.

f NDIMBOLA YA ELILINGI: Na lisangá moko ya monene, ndeko mobali oyo asilaki kopesa eyano, atikeli bato mosusu nzela bápesa biyano na makita.