Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOYEKOLI 17

Yehova akosalisa yo ntango okutani na mikakatano ya mbalakaka

Yehova akosalisa yo ntango okutani na mikakatano ya mbalakaka

“Bampasi ya moyengebene ezali mingi,Kasi Yehova abikisaka ye na yango nyonso.”​—NZ. 34:19.

LOYEMBO 44 Libondeli ya moto ya komikitisa

NA MOKUSE a

1. Makambo nini toyebi?

 BISO basaleli ya Yehova toyebi ete Yehova alingaka biso mpe mposa na ye ezali ete tósepela mpenza na bomoi. (Rom. 8:35-39) Toyebi mpe ete tozwaka ntango nyonso matomba soki tozali kosalela mateya ya Biblia. (Yis. 48:17, 18) Tokosala nini soki tokutani na mikakatano ya mbalakaka?

2. Mikakatano nini tokoki kokutana na yango, mpe yango ekoki kotinda biso tómituna mituna nini?

2 Basaleli ya Yehova nyonso bazali kokutana na mikakatano. Na ndakisa, ndeko moko ya libota akoki kosala likambo oyo epesi biso mpasi na motema. Ekoki kozala ete tobɛlaka maladi moko oyo ezali kopekisa biso tósala mingi na mosala ya Yehova. Mbala mosusu tozali konyokwama na mikakatano oyo euti na makama oyo ebimaka yango moko. To ekoki kozala ete bazali konyokola biso mpo na mateya oyo tondimaka. Ntango tokutani na mikakatano ya ndenge wana, tokoki komituna: ‘Mpo na nini yango ezali kokómela ngai? Nasali nde likambo moko ya mabe? Yango emonisi ete Yehova aboyi kopambola ngai?’ Esí ekómela yo omituna bongo? Soki ɛɛ, kolɛmba nzoto te. Basaleli mingi ya Yehova mpe bayokaka bongo.​—Nz. 22:1, 2; Hab. 1:2, 3.

3. Nzembo 34:19 ekoki koteya biso nini?

3 Tángá Nzembo 34:19. Nzembo yango elobeli makanisi mibale ya ntina: (1) Bayengebene bakutanaka na makambo ya mpasi. (2) Yehova abikisaka biso na makambo yango nyonso. Ndenge nini Yehova abikisaka biso? Lolenge moko oyo asalaka yango ezali na ndenge asalisaka biso tótalela bomoi na ndenge ebongi na mokili oyo mabe. Atako Yehova alaki ete tokozala na esengo ntango tozali kosalela ye, alaki te ete tokozala na bomoi oyo ezangi mikakatano lelo oyo. (Yis. 66:14) Alendisi biso tótya makanisi na bomoi oyo tokozala na yango na mikolo ezali koya, na ntango yango, tokozala na bomoi oyo alingaki tózala na yango mpo na libela. (2 Ko. 4:16-18) Liboso ntango yango ekoka, azali kosalisa biso tókoba kosalela ye mokolo na mokolo.​—Bil. 3:22-24.

4. Tokolobela nini na lisolo oyo?

4 Tótala mateya oyo tokoki koyekola epai ya basaleli ya sembo ya Yehova, ezala ya ntango ya kala mpe ya mikolo na biso. Ndenge tokomona yango, tokoki kokutana na mikakatano ya mbalakaka. Kasi soki totyeli Yehova motema, akotika te kosalisa biso. (Nz. 55:22) Wana tozali kotalela bandakisa yango, omituna boye: ‘Nalingaki kosala nini soki nakutanaki na likambo ya bongo? Ndenge nini bandakisa yango ezali kosalisa ngai natyela lisusu Yehova motema mingi koleka? Mateya nini nakoki kosalela na bomoi na ngai moko?’

NA NTANGO YA KALA

Yehova apambolaki Yakobo na boumeli ya mbula 20 oyo asalelaki Labana, bokilo na ye oyo akosaki ye (Talá paragrafe 5)

5. Mikakatano nini Yakobo akutanaki na yango mpo na Labana? (Talá elilingi ya ezipeli.)

5 Basaleli ya Yehova ya ntango ya kala bakutanaki na mikakatano oyo bazalaki komizela na yango te. Tótalela ndakisa ya Yakobo. Tata na ye ayebisaki ye ete abala mwana mwasi moko ya Labana, ndeko na ye moko ya libota oyo azalaki kosambela Yehova, mpe tata na ye ayebisaki ye ete Yehova akopambola ye mingi. (Eba. 28:1-4) Yakobo asalaki likambo ya malamu. Asalaki mobembo longwa na Kanana mpo na kokende epai ya Labana, oyo azalaki na bana basi mibale: Lea ná Rashele. Yakobo alingaki mingi Rashele, leki ya Lea, mpe andimaki kosalela tata na ye mosala mbula nsambo liboso abala ye. (Eba. 29:18) Kasi makambo esalemaki te ndenge Yakobo akanisaki. Labana akosaki ye na ndenge abalisaki ye Lea, mwana na ye ya liboso. Labana andimaki ete Yakobo abala Rashele pɔsɔ moko na nsima, kaka soki asaleli ye mosala mbula nsambo mosusu. (Eba. 29:25-27) Labana azalaki mpe sembo te ntango asalaki makambo ya mombongo ná Yakobo. Labana abubaki Yakobo mbula 20 mobimba!​—Eba. 31:41, 42.

6. Wapi mikakatano mosusu oyo Yakobo akutanaki na yango?

6 Yakobo akutanaki na mikakatano mosusu. Azalaki na libota moko monene, kasi mbala mingi bana na ye ya mibali bazalaki koyokana malamu te. Kutu batɛkaki ndeko na bango Yozefe na boombo. Bana mibale ya Yakobo, Levi ná Simeone, bamemaki nsɔni na libota mpe bafingisaki nkombo ya Yehova. Longola yango, Rashele mwasi oyo Yakobo alingaki mingi, akufaki ntango azalaki kobota mwana na bango ya mibale. Mpe lokola nzala makasi eyaki na ekólo, esɛngaki ete akende na Ezipito atako akómaki mobange.​—Eba. 34:30; 35:16-19; 37:28; 45:9-11, 28.

7. Ndenge nini Yehova amonisaki Yakobo ete andimamaki epai na ye?

7 Na makambo wana nyonso, Yakobo akobaki kotyela Yehova motema mpe bilaka na ye. Mpe Yehova amonisaki Yakobo ete andimamaki epai na ye. Na ndakisa, atako Labana akosaki ye mbala mingi, Yehova apambolaki Yakobo na mosuni. Meká kokanisa botɔndi oyo Yakobo asengelaki kozala na yango epai ya Yehova ntango akutanaki lisusu na Yozefe, mwana na ye oyo akanisaki ete akufaki! Boninga makasi oyo Yakobo azalaki na yango ná Yehova, esalisaki ye alonga mikakatano oyo akutanaki na yango. (Eba. 30:43; 32:9, 10; 46:28-30) Soki tobateli boninga makasi ná Yehova, biso mpe tokoki kolonga mikakatano oyo ekoki kokómela biso.

8. Mokonzi Davidi azalaki mpenza na mposa ya kosala nini?

8 Mokonzi Davidi asalaki te makambo nyonso oyo akanaki kosala na mosala ya Yehova. Na ndakisa, azalaki mpenza na mposa ya kotongela Nzambe na ye tempelo. Amonisaki mposa na ye epai ya mosakoli Natane. Natane azongiselaki ye boye: “Nyonso oyo ezali na motema na yo, salá, mpamba te Nzambe ya solo azali na yo.” (1 Nt. 17:1, 2) Kanisá ndenge maloba wana elendisaki Davidi! Ntango mosusu abandaki mbala moko kozwa bibongiseli mpo na kobanda mosala wana monene.

9. Davidi asalaki nini ntango azwaki nsango moko ya kolɛmbisa nzoto?

9 Eumelaki te, mosakoli ya Yehova azongelaki Davidi mpo na kopesa ye nsango moko ya kolɛmbisa nzoto. Kaka “na butu yango,” Yehova ayebisaki Natane ete Davidi te moto akotongela ye tempelo; kasi, moko ya bana na ye nde akosala yango. (1 Nt. 17:3, 4, 11, 12) Davidi asalaki nini ntango azwaki nsango yango? Abongolaki mokano oyo amityelaki. Atyaki makanisi na ye na kosangisa mbongo mpe bisaleli oyo mwana na ye Salomo akozala na mposa na yango mpo na mosala ya botongi.​—1 Nt. 29:1-5.

10. Ndenge nini Yehova apambolaki Davidi?

10 Kaka nsima ya koyebisa Davidi ete ye te moto akotongela ye tempelo, Yehova asalaki kondimana ná ye. Yehova alakaki Davidi ete mokitani na ye moko akoyangela mpo na libela. (2 Sa. 7:16) Kanisá na mokili ya sika esengo oyo Davidi akozala na yango ntango akoyeba ete azali na bomoi na nse ya Boyangeli ya Mbula Nkóto ya Yesu, Mokonzi oyo autaki na libota na ye! Lisolo oyo esalisi biso tóyeba ete ata soki tosali te makambo nyonso oyo tokanaki mpo na Yehova, Nzambe na biso akoki kopesa biso mapamboli mingi koleka oyo tokanisaki.

11. Ndenge nini Yehova apambolaki bakristo ya siɛklɛ ya liboso atako Bokonzi ya Nzambe eyaki te na ntango oyo bakanisaki? (Misala 6:7)

11 Bakristo ya siɛklɛ ya liboso bakutanaki mpe na mikakatano oyo bakanisaki te. Na ndakisa, bazalaki kozela na motema likoló koya ya Bokonzi ya Nzambe, kasi bayebaki te ntango nini esengelaki koya. (Mis. 1:6, 7) Na yango, basalaki nini? Bakobaki komipesa na mosala ya kosakola. Wana nsango malamu ezalaki kopanzana, bamonaki polele ndenge Yehova azalaki kopambola milende na bango.​—Tángá Misala 6:7.

12. Bakristo ya siɛklɛ ya liboso basalaki nini ntango nzala makasi eyaki?

12 Na ntango moko boye, nzala moko makasi eyaki na “mabele mobimba oyo bato bafandi.” (Mis. 11:28) Nzala yango ezwaki mpe bakristo ya siɛklɛ ya liboso. Meká kokanisa ndenge banyokwamaki mpo na nzala wana ya makasi. Na ntembe te, baboti bakómaki kobanga mpo bazalaki koyeba te ndenge oyo bakokokisa bamposa ya bato ya mabota na bango. Bongo bilenge oyo bazwaki bibongiseli mpo na kosala mingi na mosala ya kosakola? Mbala mosusu bazalaki komituna soki basengeli kozela nzala yango esila bongo bakokokisa mikano na bango. Ezala makambo ya bomoi na bango ezalaki ndenge nini, bakristo yango babatelaki makanisi malamu. Bakobaki kosakola na lolenge nyonso oyo bakokaki, mpe batindelaki bandeko na bango bakristo oyo bazalaki na Yudea biloko ya kobikela oyo bazalaki na yango.​—Mis. 11:29, 30.

13. Mapamboli nini bakristo bazwaki na ntango ya nzala makasi?

13 Mapamboli nini bakristo bazwaki ntango nzala moko makasi eyaki? Baoyo bazwaki lisungi bamonaki mpenza ete Yehova nde asungaki bango. (Mat. 6:31-33) Kozanga ntembe, bakómaki lisusu na boninga makasi ná bandeko yango oyo basalisaki bango. Lisusu, ezala baoyo bapesaki makabo to baoyo bapesaki mabɔkɔ na mosala yango ya kosunga bandeko, bayokaki esengo oyo eutaka na kopesa. (Mis. 20:35) Yehova apambolaki bango nyonso ndenge basalaki makasi bámesana na mbongwana oyo esalemaki.

14. Nini ekómelaki Barnabasi ná ntoma Paulo, mpe likambo nini esalemaki na nsima? (Misala 14:21, 22)

14 Mbala mingi, bakristo ya siɛklɛ ya liboso bazalaki kokutana na minyoko. Na bantango mosusu bazalaki kokutana na minyoko yango na ntango oyo bazalaki komizela na yango te. Tótala oyo ekómelaki Barnabasi mpe ntoma Paulo ntango bazalaki kosakola na engumba Listra. Na ebandeli, bato bayambaki bango malamu mpe bazalaki koyoka bango. Kasi na nsima, batɛmɛli “bandimisaki ebele wana ya bato,” mpe batɛmɛli yango mosusu babambaki Paulo mabanga mpe batikaki ye pene na liwa. (Mis. 14:19) Kasi Barnabasi ná Paulo bakobaki kosakola na bisika mosusu. Matomba nini emonanaki? ‘Bakómisaki bato mingi bayekoli’, maloba mpe ndakisa na bango elendisaki bandeko na bango bakristo. (Tángá Misala 14:21, 22.) Bato mingi bazwaki matomba lokola Paulo ná Barnabasi batikaki kosakola te atako bakutanaki na minyoko ya mbalakaka. Soki totiki te kosala oyo Yehova azali kosɛnga biso, tokozwa mapamboli.

NA MIKOLO NA BISO

15. Ndakisa ya ndeko Alexander Macmillan eteyi yo nini?

15 Liboso ya mobu 1914, basaleli ya Yehova bazalaki na makambo ebele oyo bazalaki kozela ekokisama. Tózwa ndakisa ya ndeko Alexander Macmillan. Ndenge moko na bandeko mingi ya ntango wana, ndeko Macmillan akanisaki ete mosika te akokende na likoló. Na diskur oyo asalaki na sanza ya 09/1914, alobaki boye: “Oyo ekoki kozala mbala na ngai ya nsuka ya kosala diskur liboso ya bato.” Kasi, yango ezalaki te diskur na ye ya nsuka. Na nsima, ndeko Macmillan ayaki kokoma boye: “Emonani ete bamosusu kati na biso bawelisaki mwa moke mpe bakanisaki ete tokokende na likoló mbala moko na ntango wana.” Abakisaki boye: “Likambo oyo tosengelaki kosala ezalaki ya kozala na mingi ya kosala na mosala ya Nkolo.” Ndeko Macmillan amipesaki na mosala. Azalaki na molende na mosala ya kosakola. Azwaki libaku ya kolendisa bandeko oyo bakangamaki na bolɔkɔ mpo baboyaki kokɔta na makambo ya mokili. Mpe akobaki koyangana na makita ata ntango akómaki mobange mpenza. Matomba nini ndeko Macmillan azwaki lokola asalelaki ntango na ye malamu wana azalaki kozela mbano na ye? Mwa moke liboso akufa na 1966, ndeko Macmillan akomaki boye: “Kondima na ngai ezali makasi kaka ndenge ezalaki liboso.” Oyo nde ndakisa kitoko oyo biso nyonso tosengeli kolanda, mingimingi soki mikakatano oyo tokutani na yango ezali koumela mpenza!​—Ebr. 13:7.

16. Makambo nini ya mbalakaka ndeko Herbert Jennings ná mwasi na ye bakutanaki na yango? (Yakobo 4:14)

16 Batatoli ya Yehova mingi bazali kobunda na bamaladi oyo bakanisaki te ete bakobɛla yango mokolo mosusu. Na ndakisa, na lisolo ya bomoi na ye, ndeko Herbert Jennings b alobelaki ndenge ye ná mwasi na ye basepelaki mingi na mosala ya misionɛrɛ na Ghana. Nzokande, na ntango moko boye, akómaki na maladi ya makanisi. Ndeko Jennings asalelaki maloba oyo ezali na mokanda ya Yakobo 4:14, mpe abengaki maladi oyo akómaki na yango “‘lobi’ oyo tokanisaki te.” (Tángá.) Akomaki boye: “Tondimaki bomoi oyo tokómaki na yango, yango wana tomibongisaki mpo na kolongwa na Ghana mpe totikaki baninga nyonso oyo tozalaki na bango mpo na kozonga na Canada [mpo na kozwa lisalisi ya minganga].” Yehova asungaki ndeko Jennings ná mwasi na ye mpe bakobaki kosalela ye na bosembo atako mikakatano oyo bakutanaki na yango.

17. Ndenge nini ndakisa ya ndeko Jennings esalisi bandeko mosusu?

17 Makanisi ya ntina oyo ndeko Jennings alobelaki na lisolo na ye ya bomoi esalisaki bandeko mingi. Ndeko mwasi moko akomaki boye: “Lisolo yango esimbaki mpenza motema na ngai . . . . Komona ndenge ndeko Jennings atikaki mokumba oyo azalaki na yango mpo na kolandela maladi na ye esalisaki ngai natalelaka mikakatano oyo nazali kokutana na yango na ndenge ebongi.” Ndeko mosusu mpe akomaki boye: “Nsima ya kolekisa mbula zomi lokola nkulutu, nayaki kotika mokumba yango mpo nabɛlaki maladi ya motó. Lokola nalɛmbaki mpenza nzoto, mbala mingi nazalaki komitungisa makasi na makanisi ntango nazalaki kotánga masolo ya bomoi ya bandeko . . . Kasi mpiko ya ndeko Jennings elendisaki ngai mingi.” Yango ekundweli biso ete, tokoki kolendisa basusu soki tozali koyika mpiko na mikakatano oyo tokanisaki te ete ekokómela biso. Ata soki bomoi na biso ebongwani na ndenge oyo tokanisaki te, tokoki kokoba kozala ndakisa malamu ya kondima mpe ya mpiko mpo na bato mosusu.​—1 Pe. 5:9.

Soki totyeli Yehova motema, mikakatano ya bomoi oyo eyaka na mbalakaka ekoki kokómisa biso lisusu penepene na ye (Talá paragrafe 18)

18. Ndenge emonisami na bililingi, ndakisa ya mwasi oyo akufelá mobali na Nigeria eteyi yo nini?

18 Makama lokola Coronavirus ebimiselaki basaleli ya Yehova mingi mikakatano. Na ndakisa, ndeko mwasi moko na Nigeria oyo akufelá mobali, azalaki na makoki mingi te ya kobikela. Mokolo moko na ntɔngɔ, nsima ya kolamba kɔpɔ ya nsuka ya loso oyo batikalaki na yango, mwana na ye ya mwasi atunaki ye soki bakolya nini na nsima. Ndeko na biso ya mwasi ayebisaki mwana na ye ete totikali lisusu na eloko te kasi tosengeli kolanda ndakisa ya mwasi moko ya Zarefate, oyo mobali akufá, oyo alambaki bilei ya nsuka batikalaki na yango mpe batyelaki Yehova motema mobimba. (1 Bak. 17:8-16) Liboso kutu bábanda kokanisa soki bakolya nini na moi ya mokolo yango, bazwaki saki ya biloko oyo bandeko batindelaki bango. Saki yango ezalaki na bilei mingi oyo ekokaki kosalisa bango mpo na pɔsɔ mibale to koleka. Ndeko mwasi yango alobaki ete, ayebaki te ete Yehova azalaki koyoka na likebi makambo oyo azalaki koyebisa mwana na ye ya mwasi. Ya solo, soki totyeli Yehova motema, mikakatano ya bomoi oyo eyaka na mbalakaka ekoki kokómisa biso lisusu penepene na ye.​—1 Pe. 5:6, 7.

19. Minyoko nini ndeko Aleksey Yershov akutanaki na yango?

19 Na bambula oyo euti koleka, bandeko na biso mingi bakutanaki na minyoko ya mbalakaka. Tótala ndakisa ya ndeko Aleksey Yershov, oyo afandaka na Russie. Ntango ndeko Yershov azwaki batisimo na 1994, basaleli ya Yehova na ekólo yango bazalaki na mwa bonsomi. Nzokande, na bambula oyo elandaki, makambo ebongwanaki na Russie. Na 2020, basoda bakɔtelaki ye na ndako mpe babɔtɔlaki biloko na ye mingi. Basanza mingi na nsima, guvɛrnema efundaki ye na tribinale ete azali mosali-mabe. Mpo na koyeisa makambo ndongo, bifundeli yango eutaki na makambo oyo ezalaki na bavideo oyo moto moko asalaki. Na boumeli ya mbula koleka moko, moto yango azalaki komonisa lokola nde azalaki kosepela koyekola Biblia. Nzokande azalaki moto ya lokuta mpenza.

20. Ndeko Yershov asalaki nini mpo akómisa makasi boyokani na ye ná Yehova?

20 Monyoko ya ndeko Yershov ebimisaki litomba? Ɛɛ. Boyokani na ye ná Yehova ekómaki lisusu makasi. Alobi boye: “Ngai ná mwasi na ngai tokómá kobondela elongo mbala na mbala. Nayei koyeba ete nakokaki te koyika mpiko na minyoko yango kozanga lisalisi ya Yehova.” Abakisi: “Boyekoli na ngai moko esungaka ngai nalonga ezaleli ya kolɛmba nzoto. Namanyolaka na bandakisa ya basaleli ya sembo ya Yehova ya ntango ya kala. Ezali na masolo mingi na Biblia oyo emonisi ntina ya kobatela kimya mpe kotyela Yehova motema.”

21. Toyekoli nini na lisolo oyo?

21 Toyekoli nini na lisolo oyo? Na mokili oyo, tokutanaka na mikakatano oyo eyelaka biso na mbalakaka. Atako bongo, Yehova asalisaka ntango nyonso basaleli na ye soki bazali kotyela ye motema. Ndenge emonisami na vɛrsɛ oyo esimbi motó ya likambo ya lisolo oyo, “bampasi ya moyengebene ezali mingi, kasi Yehova abikisaka ye na yango nyonso.” (Nz. 34:19) Tiká ete tóboya kotya makanisi na bampasi na biso, kasi tótya nde makanisi na lisalisi ya nguya ya Yehova. Na yango, ndenge moko na ntoma Paulo, tokoki koloba: “Na makambo nyonso nazali na makasi na lisalisi ya moto oyo apesaka ngai nguya.”​—Flp. 4:13.

LOYEMBO 38 Akokómisa yo makasi

a Na bantango mosusu tokoki kokutana na makambo oyo ekanami te, kasi tokoki komindimisa ete Yehova akosalisa basaleli na ye ya sembo. Ndenge nini Yehova asalisaki basaleli na ye na ntango ya kala? Ndenge nini azali kosalisa biso lelo oyo? Kotalela bandakisa oyo ezali na Biblia mpe ya mikolo na biso ekosalisa biso tózala na kondima makasi ete soki totyeli Yehova motema, akosalisa mpe biso.

b Talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 01/12/2000, nk. 24-28.