Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOYEKOLI 18

Okotika ete eloko moko epekisa yo kolanda Yesu?

Okotika ete eloko moko epekisa yo kolanda Yesu?

“Esengo na moto oyo azwi ata eloko moko te ya kobɛta libaku epai na ngai.”​—MAT. 11:6.

LOYEMBO 54 “Nzela yango oyo”

NA MOKUSE *

1. Ekoki kozala ete makambo nini ekamwisaki yo ntango omekaki mpo na mbala ya liboso koyebisa basusu mateya ya Biblia?

OKANISAKA lisusu mbala ya liboso oyo oyebaki mpenza ete ozali na kati ya solo? Mateya ya Biblia oyo ozalaki koyekola ezalaki polele mpe pɛtɛɛ! Okanisaki ete moto nyonso akosepela na makambo oyo okómaki kondima. Ondimisamaki ete mateya ya solo ya Biblia ekosalisa bango bázala na bomoi ya malamu lelo oyo, mpe ekopesa bango elikya kitoko mpo na mikolo ezali koya. (Nz. 119:105) Na ntembe te, na esengo mpenza, oyebisaki bandeko mpe baninga na yo nyonso mateya ya solo oyo okómaki koyekola. Kasi nini esalemaki? Mbala mosusu okamwaki ndenge bato mingi baboyaki makambo oyo oyebisaki bango.

2-3. Na mikolo ya Yesu, ndenge nini bato mingi bazalaki kotalela ye mpe makambo oyo azalaki koteya?

2 Tosengeli kokamwa te soki bato mosusu baboyi kondima mateya ya solo oyo toteyaka bango. Na mikolo ya Yesu, bato mingi baboyaki ye atako asalaki makamwisi oyo emonisaki ete Nzambe azalaki kosalisa ye. Na ndakisa, Yesu asekwisaki Lazare. Yango ezalaki likamwisi oyo ata batɛmɛli na ye bakokaki kowangana yango te. Atako bongo, bakonzi ya Bayuda bandimaki te ete Yesu azalaki Masiya. Kutu balukaki nde koboma ezala Yesu mpe Lazare!​—Yoa. 11:47, 48, 53; 12:9-11.

3 Yesu ayebaki ete bato mingi bakoboya kondima ete azali Masiya. (Yoa. 5:39-44) Ayebisaki mwa etuluku ya bayekoli ya Yoane Mobatisi ete: “Esengo na moto oyo azwi ata eloko moko te ya kobɛta libaku epai na ngai.” (Mat. 11:2, 3, 6) Kasi mpo na nini bato mingi baboyaki kondimela Yesu?

4. Makambo nini tokotalela na lisolo oyo?

4 Na lisolo oyo mpe na lisolo oyo elandi, tokolobela bantina mingi oyo esalaki ete bato mingi na siɛklɛ ya liboso bándimela Yesu te. Tokomona mpe ntina oyo bato mingi ya mikolo na biso baboyaka kondima mateya na biso. Mpe oyo eleki ntina, tokomona mpo na nini tosengeli kozala na kondima makasi epai ya Yesu mpo eloko moko te epekisa biso kolanda ye.

(1) ESIKA OYO YESU AKOLAKI

Bato mingi batikaki kolanda Yesu mpo na esika oyo akolaki. Ndenge nini makambo ya ndenge wana ekoki kotinda bato mosusu lelo oyo bátika kolanda Yesu? (Talá paragrafe 5) *

5. Mpo na nini bato mosusu bazalaki kokanisa ete Yesu azalaki te Masiya oyo alakamaki?

5 Bato mingi baboyaki kondimela Yesu mpo na esika oyo akolaki. Bandimaki ete Yesu azalaki koteya na ndenge ya kokamwa mpenza mpe asalaki makamwisi. Kasi bazalaki kotalela ye kaka lokola mwana ya mosali-mabaya moko boye. Lisusu azalaki moto ya Nazarete, mwa engumba oyo bato mingi bazalaki kokanisa ete ezalaki na ntina mingi te. Ata Natanaele, oyo akómaki moyekoli ya Yesu, alobaki liboso: “Eloko moko ya malonga ekoki nde kobima na Nazarete?” (Yoa. 1:46) Ekoki kozala ete Natanaele azalaki kosepela te na engumba oyo Yesu azalaki kofanda. To mpe ekoki kozala ete azalaki kokanisa esakweli oyo ezali na Mika 5:2, oyo elobaki ete Masiya asengelaki kobotama na Beteleme, kasi na Nazarete te.

6. Nini esengelaki kosalisa bato na mikolo ya Yesu báyeba ete azalaki Masiya?

6 Oyo Makomami elobi. Mosakoli Yisaya asakolaki ete banguna ya Yesu bakoluka te koyeba ‘makambo ya libota ya Masiya.’ (Yis. 53:8) Mingi ya makambo yango esakolamaki. Soki bato yango bázwaka ntango ya koyekola na likebi makambo yango nyonso, balingaki koyeba ete Yesu abotamaki na Beteleme mpe ete azalaki mokitani ya Mokonzi Davidi. (Luka 2:4-7) Na yango, Yesu abotamaki na esika oyo Mika 5:2 esakolaki. Kasi mokakatano ezalaki nini? Bato bazalaki mbala moko koloba makambo kozanga ete báluka koyeba makambo nyonso. Yango esalaki ete báboya kondimela Yesu.

7. Mpo na nini bato mingi lelo oyo baboyaka Batatoli ya Yehova?

7 Yango mpe esalemaka lelo oyo? Ɛɛ. Batatoli ya Yehova mingi bazali bato ya bozwi te, mpe bato mingi batalelaka bango lokola “bato batángá kelasi mingi te mpe bato mpamba.” (Mis. 4:13) Basusu mpe bakanisaka ete lokola Batatoli ya Yehova batángá na biteyelo ya teoloji te, bakoki te koteya bato makambo ya Biblia. Basusu mpe balobaka ete lingomba ya Batatoli ya Yehova ezali ya “bato ya Amerika,” nzokande Batatoli ya Yehova mingi bafandaka na États-Unis te. Bayebisá mpe bato mosusu ete Batatoli ya Yehova bandimelaka Yesu te. Na boumeli ya bambula, bato balobaka ete tozali “Bakoministe.” Balobaka mpe ete tozali “bato oyo Amerika etyá mpo na kotɛkelaka bango basekele ya bikólo,” mpe ete “tolekisaka ndelo na makambo ya losambo.” Yango wana, bato mingi baboyaka kokóma Batatoli ya Yehova mpo bayokaka masolo ya ndenge wana, mpe bayebaka te makambo ya solo oyo etali Batatoli ya Yehova.

8. Na kotalela Misala 17:11, bato basengeli kosala nini soki balingi koyeba basaleli ya Nzambe lelo oyo?

8 Oyo moto asengeli kosala mpo abungisa kondima na ye te. Asengeli koluka koyeba makambo malamu. Yango nde Luka, mokomi moko ya Evanzile, asalaki. Asalaki makasi alandela “makambo nyonso malamumalamu uta ebandeli.” Alingaki ete baoyo bakotánga mokanda na ye ‘báyeba mpenzampenza bosolo ya makambo’ oyo bayokaki mpo na Yesu. (Luka 1:1-4) Bayuda oyo bazalaki na Beroya ya kala bazalaki lokola Luka. Ntango bayokaki mpo na mbala ya liboso nsango malamu oyo etali Yesu, bakokanisaki makambo oyo bateyaki bango ná Makomami ya Ebre mpo na koluka koyeba soki ezalaki solo. (Tángá Misala 17:11.) Ndenge moko mpe lelo oyo, bato basengeli koluka koyeba malamumalamu ndenge makambo ezali. Basengeli kokokanisa makambo oyo Batatoli ya Yehova bateyá bango ná oyo Makomami elobi. Basengeli mpe koyekola makambo oyo Batatoli ya Yehova bazali kosala na mikolo na biso. Soki baluki koyeba makambo malamumalamu, bakotika te ezaleli ya kokanisela basusu mabe to mpe makambo oyo bato balobaka ezipa bango miso.

(2) YESU ABOYAKI KOSALA MAKAMWISI MPO NA KOLAKISA BATO ETE AZALAKI MASIYA

Bato mingi batikaki kolanda Yesu mpo aboyaki kosala makamwisi mpo na kolakisa bato ete azali Masiya. Ndenge nini makambo ya ndenge wana ekoki kotinda bato mosusu lelo oyo bátika kolanda Yesu? (Talá paragrafe 9-10) *

9. Likambo nini esalemaki ntango Yesu aboyaki kolakisa elembo oyo euti na likoló?

9 Na mikolo ya Yesu, bato mosusu bazalaki te kosepela na mateya na ye. Balingaki ete Yesu asala makambo mosusu. Bayebisaki ye alakisa bato “elembo moko oyo euti na likoló” mpo na kondimisa bango ete azalaki Masiya. (Mat. 16:1) Ekoki kozala ete basɛngaki ye asala elembo yango mpo na makambo oyo batángaki na Danyele 7:13, 14. Nzokande, yango ezalaki te ntango oyo Yehova atyaki mpo esakweli yango ekokisama. Makambo oyo Yesu azalaki koteya ekokaki mpo na kondimisa bango ete azalaki Masiya. Kasi ntango aboyaki kosala likamwisi oyo bazalaki kosɛnga ye, baboyaki ye.​—Mat. 16:4.

10. Ndenge nini Yesu akokisaki makambo oyo Yisaya akomaki mpo na Masiya?

10 Oyo Makomami elobi. Mosakoli Yisaya akomaki boye mpo na Masiya: “Akoganga te, akotombola mongongo na ye mpe te, mpe akoyokisa mongongo na ye na balabala te.” (Yis. 42:1, 2) Yesu asalaki mosala na ye kozanga ete abenda likebi ya bato epai na ye. Atongaki te batempelo ya minene, alataki te bilamba ya lokumu oyo bakonzi ya mangomba bazalaki kolata, mpe alukaki te ete bato bábenga ye na bibengeli ya lokumu. Ntango azalaki kosamba, Yesu aboyaki kosala likamwisi kaka mpo na kosepelisa Mokonzi Herode, atako bomoi na ye ezalaki na likama. (Luka 23:8-11) Yesu asalaki makamwisi, kasi mokano na ye ya libosoliboso ezalaki ya kosakola nsango malamu. Ayebisaki bayekoli na ye boye: “Ezali mpo na yango nde nabimaki.”​—Mrk. 1:38.

11. Makanisi nini ya libunga bato mosusu bazalaka na yango lelo oyo?

11 Yango mpe esalemaka lelo oyo? Ɛɛ. Lelo oyo, bato mingi bakamwaka komona bandako-nzambe ya minene oyo etongamá na biloko ya ntalo. Bakamwaka mpe komona bakonzi ya mangomba oyo bazalaka na bibengeli ya lokumu ndenge na ndenge. Longola yango, bakamwaka mpe komona milulu oyo bato mingi bayebaka te ete eutá na mimeseno ya bapakano. Kasi bato mingi oyo bakendaka na mangomba yango, bayebaka te makambo mingi na ntina etali Nzambe mpe mikano na ye. Nzokande, bato oyo bayaka na makita na biso, bayekolaka makambo oyo Yehova asɛngaka biso mpe ndenge ya kosala mokano na ye. Bandako ya Bokonzi na biso ezalaka pɛto mpe etongamá na ndenge ya mindɔndɔ te. Bandeko oyo bakambaka balataka te bilamba oyo ekeseni ná oyo ya bato mosusu, mpe bazalaka te na bibengeli moko boye ya lokumu. Makambo oyo toteyaka mpe oyo tondimaka eutaka na Biblia. Atako bongo, bato mingi baboyaka kondima mateya na biso mpo tosalaka te milulu oyo ekamwisaka bato na losambo na biso. Lisusu, toteyaka te makambo oyo bazalaka na mposa ya koyoka.

12. Ndenge Baebre 11:1, 6 emonisi yango, kondima na biso esengeli kosimbama na nini?

12 Oyo tosengeli kosala mpo tóbungisa kondima na biso te. Ntoma Paulo ayebisaki bakristo ya Roma ete: “Kondima eutaka na likambo oyo moto ayoki. Mpe likambo oyo moto ayoki eyaka na nzela ya liloba ya Kristo.” (Rom. 10:17) Yango wana, tokokómisa kondima na biso makasi soki tozali koyekola Makomami, kasi te soki tozali kosangana na milulu oyo euti na mimeseno ya bapakano ata soki bato mingi basepelaka na yango. Tosengeli kokómisa kondima na biso makasi na nzela ya boyebi ya sikisiki mpo ‘soki moto azali na kondima te akoki kosepelisa Nzambe ata moke te.’ (Tángá Baebre 11:1, 6.) Na yango, tosengeli te koluka komona elembo oyo euti na likoló mpo tóndima ete tozali na solo. Koyekola na mozindo mateya ya Biblia oyo ekómisaka kondima makasi, ekoki kosalisa biso tóndima ete tozali na solo mpe tólongola bantembe nyonso.

(3) YESU ALANDAKI TE MIMESENO OYO BAYUDA MINGI BAZALAKI NA YANGO

Bato mingi batikaki kolanda Yesu mpo aboyaki kolanda makambo mosusu oyo etali mimeseno na bango. Ndenge nini makambo ya ndenge wana ekoki kotinda bato mosusu lelo oyo bátika kolanda Yesu? (Talá paragrafe 13) *

13. Nini etindaki bato mingi báboya kondimela Yesu?

13 Na mikolo ya Yesu, bayekoli ya Yoane Mobatisi bakamwaki mpo bayekoli ya Yesu bazalaki kokila bilei te. Yesu ayebisaki bango ete bazalaki na ntina ya kokila bilei te lokola azalaki naino na bomoi. (Mat. 9:14-17) Atako bongo, Bafarisai mpe batɛmɛli mosusu ya Yesu bafundaki ye mpo azalaki te kolanda bonkɔkɔ mpe mimeseno na bango. Basilikaki mpo azalaki kobikisa bato ya maladi na mokolo ya Sabata. (Mrk. 3:1-6; Yoa. 9:16) Bazalaki komikumisa ete batosaka mibeko oyo etali Sabata, nzokande bazalaki komitungisa te ndenge bazalaki kosala mombongo na tempelo. Ntango Yesu apamelaki bango mpo na likambo yango, basilikaki mpenza. (Mat. 21:12, 13, 15) Lisusu, bato oyo Yesu ateyaki na sinagoga ya Nazarete basilikaki makasi mpenza ntango asalelaki bandakisa ya lisolo ya bana ya Yisraele mpo na komonisa bango ete bazalaki bato ya moimi mpe bazangaki kondima. (Luka 4:16, 25-30) Bato mingi baboyaki kondimela Yesu mpo aboyaki kosala makambo oyo bakanisaki ete asengelaki kosala.​—Mat. 11:16-19.

14. Mpo na nini Yesu atɛmɛlaki mimeseno ya bato oyo eyokanaki te na Makomami?

14 Oyo Makomami elobi. Na nzela ya mosakoli Yisaya, Yehova alobaki ete: “Bato oyo babɛlɛmi na ngai na monɔkɔ na bango, mpe bakumisi ngai kaka na mbɛbu na bango, mpe batye motema na bango mosika na ngai, mpe kobanga oyo bazali kobanga ngai ekómi nde mobeko ya bato oyo bazali koteya bango.” (Yis. 29:13) Yesu azalaki na ntina ya kotɛmɛla mimeseno ya bato oyo eyokanaki te na Makomami. Baoyo bazalaki kokanisa ete mibeko mpe mimeseno ya bato ezalaki na ntina mingi koleka Biblia, baboyaki Yehova mpe Masiya oyo ye atindaki.

15. Mpo na nini bato mingi lelo oyo basepelaka na Batatoli ya Yehova te?

15 Yango mpe esalemaka lelo oyo? Ɛɛ. Bato mingi basilikaka ndenge Batatoli ya Yehova basanganaka elongo na bango te na milulu oyo eyokani te na Makomami, na ndakisa fɛti ya mbotama mpe Noele. Basusu basilikaka ndenge Batatoli ya Yehova baboyaka kosala milulu ya ekólo, mpe ndenge balandaka te mimeseno ya kokunda ebembe oyo eyokani te na Liloba ya Nzambe. Baoyo babɛtaka libaku mpo Batatoli ya Yehova basalaka milulu wana te, bakoki kokanisa ete Nzambe andimaka mpenza ndenge oyo bazali kosambela ye. Nzokande bakoki kosepelisa ye te soki bazali kolanda mimeseno ya mokili na esika ya kolanda mateya ya polele oyo ezali na Biblia.​—Mrk. 7:7-9.

16. Na kotalela Nzembo 119:97, 113, 163-165, tosengeli kosala nini, mpe tosengeli koboya kosala nini?

16 Oyo tosengeli kosala mpo tóbungisa kondima na biso te. Tosengeli kolinga makasi mpenza mibeko mpe mitinda ya Yehova. (Tángá Nzembo 119:97, 113, 163-165.) Soki tolingaka mpenza Yehova, tokoboya mimeseno nyonso oyo esepelisaka ye te. Tokotika nzela te ete eloko moko ekóma na ntina mingi koleka bolingo na biso mpo na Yehova.

(4) YESU ABONGOLAKI TE MAKAMBO YA POLITIKI

Bato mingi batikaki kolanda Yesu mpo aboyaki kokɔta na makambo ya politiki. Ndenge nini makambo ya ndenge wana ekoki kotinda bato mosusu lelo oyo bátika kolanda Yesu? (Talá paragrafe 17) *

17. Bato mingi na mikolo ya Yesu bazalaki kozela ete Masiya asala nini?

17 Bato mosusu na mikolo ya Yesu bazalaki na mposa ete mbongwana esalema mbala moko na makambo ya politiki. Bazalaki kozela ete Masiya alongola bango na boyangeli mabe ya Baroma. Kasi ntango balukaki ete Yesu akóma mokonzi na bango, aboyaki. (Yoa. 6:14, 15) Banganga-nzambe, ata mpe bato mosusu, bazalaki kobanga ete Yesu asala mbongwana na makambo ya politiki. Yango elingaki kosala ete Baroma básilika mpe bábɔtola bokonzi oyo bapesaki banganga-nzambe. Lokola bazalaki kobanga likambo yango, Bayuda mingi baboyaki Yesu.

18. Bisakweli nini na ntina etali Masiya bato mingi bazalaki komona mpamba?

18 Oyo Makomami elobi. Atako bisakweli mingi emonisaki ete nsukansuka Masiya akolonga etumba, bisakweli mosusu emonisaki ete asengelaki naino kokufa mpo na masumu na biso. (Yis. 53:9, 12) Kasi mpo na nini Bayuda bazalaki na makanisi mabe na ntina etali Masiya? Bato mingi na mikolo ya Yesu bazalaki komona mpamba bisakweli nyonso oyo elakaki te ete mikakatano na bango ekosila mbala moko na ntango wana.​—Yoa. 6:26, 27.

19. Makanisi nini ya mabe etindaka bato mingi báboya koyoka nsango na biso?

19 Yango mpe esalemaka lelo oyo? Ɛɛ. Lelo oyo, bato mingi baboyaka biso mpo toboyaka kokɔta na makambo ya politiki. Balingaka ete tópona mokonzi moko na ntango ya maponami. Nzokande soki toponi moto moko boye ayangela biso, yango ekomonisa ete tozali koboya Yehova. (1 Sa. 8:4-7) Bato mosusu bakanisaka ete tosengeli kotonga biteyelo ná balopitalo mpe kosalisa bato oyo bazali kokelela. Lokola totyaka makanisi na biso nyonso na mosala ya kosakola na esika ya koluka kosilisa mikakatano ya mokili oyo, yango esalaka ete bato báboya biso.

20. Ndenge maloba ya Yesu oyo ezali na Matai 7:21-23 emonisi yango, mokano na biso ya libosoliboso esengeli kozala nini?

20 Oyo tosengeli kosala mpo tóbungisa kondima na biso te. (Tángá Matai 7:21-23.) Mokano na biso ya libosoliboso esengeli kozala ya kosala mosala oyo Yesu apesaki biso. (Mat. 28:19, 20) Tosengeli komipesa soki moke te na makambo ya politiki to mpe koluka kosilisa mikakatano ya mokili oyo. Tolingaka bato mpe totyelaka mikakatano na bango likebi, kasi toyebi ete lolenge eleki malamu ya kosalisa bazalani na biso ezali ya koteya bango makambo etali Bokonzi ya Nzambe mpe kosalisa bango bákóma baninga ya Yehova.

21. Tosengeli kozwa ekateli ya kosala nini?

21 Na lisolo oyo, tomoni bantina minei oyo etindaki bato na siɛklɛ ya liboso báboya Yesu. Tomoni mpe ete makambo yango ekoki kotinda bato mosusu báboya bayekoli ya Yesu lelo oyo. Kasi esuki kaka wana te. Na lisolo oyo elandi, tokolobela mpe bantina mosusu minei oyo etindaka bato báboya kolanda Yesu. Tiká ete tózwa ekateli ya kokoba kolanda Yesu mpe ya kobatela kondima na biso makasi!

LOYEMBO 56 Monisá solo

^ par. 5 Atako Yesu azalaki Moteyi Monene oyo alekaki bateyi nyonso ya mokili, bato mingi ya ntango na ye baboyaki kolanda ye. Mpo na nini? Na lisolo oyo tokolobela bantina minei. Tokomona mpe ntina oyo bato mingi ya mikolo na biso babɛtaka libaku mpo na makambo oyo bayekoli ya solo ya Yesu balobaka mpe basalaka. Oyo eleki ntina, tokomona mpo na nini tosengeli kozala na kondima makasi epai ya Yesu mpo biso mpe tóbɛta libaku te.

^ par. 60 NDIMBOLA YA ELILINGI: Filipe azali kolendisa Natanaele akutana na Yesu.

^ par. 62 NDIMBOLA YA ELILINGI: Yesu azali kosakola nsango malamu.

^ par. 64 NDIMBOLA YA ELILINGI: Yesu azali kobikisa mobali moko oyo lobɔkɔ na ye ekauká wana batɛmɛli na ye bazali kotala.

^ par. 66 NDIMBOLA YA ELILINGI: Yesu amati na ngomba kaka ye moko.