Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Oyebaki yango?

Oyebaki yango?

Bato ya ntango ya kala bazalaki kosalela papirisi mpo na kosala masuwa?

Papirisi

BATO mingi bayebi malamu ete bambula mingi liboso, bato ya Ezipito bazalaki kosalela papirisi mpo na kokoma. Ezala Bagrɛki ata mpe Baroma bazalaki kosalela yango mpo na kokoma. * Kasi kaka bato moke nde bayebi ete na ntango ya kala, bazalaki kosalela papirisi kaka mpo na kokoma te, kasi mpe mpo na kosala masuwa.

Lolenge mibale ya bamasuwa oyo esalemi na papirisi oyo bamonaki na lilita moko na Ezipito

Eleki sikoyo mbula 2 500, mosakoli Yisaya akomaki ete Bamede ná Baperse bakokɔta na Babilone mpe bakotumba ‘bamasuwa na bango ya papirisi.’ Na nsima, mosakoli Yirimia asakolaki ete ntango Bamede ná Baperse bakokɔta na Babilone, bakotumba “bamasuwa ya papirisi” ya bato ya Babilone mpo bakima te.​—Yis. 18:1, 2; Yir. 51:32.

Biblia ekomamaki na litambwisi ya elimo ya Nzambe. Na yango, tokoki kokamwa te soki bato ya arkeoloji bamoni makambo oyo emonisi ete na ntango ya kala, bato bazalaki kosalela papirisi mpo na kosala masuwa. (2 Tim. 3:16) makambo nini bato ya arkeoloji bamoni? Bato ya arkeoloji bamoni makambo mingi oyo emonisi ete na ntango ya kala bato bazalaki kosalela papirisi na Ezipito mpo na kosala masuwa.

NDENGE NINI BAZALAKI KOSALA MASUWA NA PAPIRISI?

Na malita ya Ezipito, ezalaki na mayemi mpe bililingi na bifelo oyo ezalaki komonisa ndenge bato bazalaki kosangisa papirisi mpe kosala na yango masuwa. Mibali bazalaki kokata papirisi, kokangisa yango mabokemaboke, na nsima kosangisa maboke yango esika moko. Papirisi ezalaka triangle. Na yango, soki bakangisi maboke yango esika moko ekómaka makasi mpenza. Buku moko oyo elobeli lisolo ya Ezipito emonisi ete bamasuwa oyo ezalaki kosalema na papirisi ezalaki kokóma molai ya mɛtrɛ 17, mpe mpo na yango bazalaki kosalela bankayi 10 to 12 na mopanzi moko.

Mayemi oyo ezali komonisa ndenge bato ya Ezipito bazalaki kosala masuwa ya papirisi

MPO NA NINI BATO BAZALAKI KOSALELA PAPIRISI?

Na Ezipito, baparisi ebele ezalaki kokola na lobwaku oyo mai ya ebale Nile ezalaki kosopana. Lisusu, ezalaki mpasi te mpo na kosala bamasuwa na papirisi. Ata na ntango oyo bato bakómaki kosalela mabaya mpo na kosala bamasuwa ya minene, emonani ete baluki-mbisi mpe bato oyo bazalaki kosala bokila, bakobaki kosalela bapapirisi oyo ezalaki kotepatepa mpe bamasuwa ya mike.

Na boumeli ya ntango molai, bato bakobaki kosalela bamasuwa oyo esalemaki na papirisi. Na kotalela Plutarch, mokomi moko ya Grɛki oyo azalaki na bomoi kobanda na siɛklɛ ya liboso tii ya mibale ya ntango na biso, alobi ete bato mosusu bakobaki kosalela bamasuwa oyo esalemaki na papirisi na ntango wana.

^ par. 3 Papirisi ekolaka na bisika oyo mai etíyolaka makasi te. Ekoki kokola na bolai ya mɛtrɛ 5, mpe na bonene ya santimɛtrɛ 15.