Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOYEKOLI 21

Yehova akopesa yo makasi

Yehova akopesa yo makasi

“Ntango nazali na bolɛmbu, na ntango wana nde nazali mpenza na nguya.”​—2 KO. 12:10.

LOYEMBO 73 Pesá biso mpiko

NA MOKUSE *

1-2. Mikakatano nini Batatoli ya Yehova mingi bakutanaka na yango?

NTOMA Paulo alendisaki Timote, ata mpe bakristo nyonso, bákokisa mosala na bango malamumalamu. (2 Tim. 4:5) Biso nyonso tozwaka toli yango na lisɛki te. Kasi na bantango mosusu ezalaka pɛtɛɛ te. Bandeko na biso mingi, ezala ya basi to mibali, babangaka kosakola. (2 Tim. 4:2) Na ndakisa, kanisá bandeko na biso oyo bafandaka na bikólo oyo batyelá mosala na biso mwa bipekiseli, to mpe bapekisá yango mpenza. Basakolaka atako bayebi ete bakoki kokanga bango.

2 Basaleli ya Yehova bazali kokutana na mikakatano ya ndenge na ndenge oyo ekoki kolɛmbisa bango nzoto. Na ndakisa, bandeko mingi basalaka mosala makasi kaka mpo na kozwa biloko ya kobikela oyo bato ya mabota na bango basengeli na yango. Bazalaka na mposa ya kosala mingi na mosala ya kosakola, kasi bazalaka na makasi mingi te na nsuka ya pɔsɔ. Bamosusu bakoki kosala mingi te na mosala ya Yehova mpo babɛlaka makasi, to bakómi mibange, to mpe bakɔtá ndako. Bamosusu kutu bamiyokaka ntango nyonso ete bazali na ntina te na miso ya Yehova. Mary, * ndeko mwasi moko oyo afandaka na Moyen-Orient alobi boye: “Esɛngaka nasala milende mingi mpo nabundisa makanisi ya mabe oyo nazalaka na yango oyo elɛmbisaka ngai mpenza. Na nsima, nakómaka komiyoka ete namemi ngambo mpo ezwaka ngai ntango mpe esilisaka ngai makasi na mosala ya kosakola.”

3. Tokotalela nini na lisolo oyo?

3 Ata soki tokutani na mikakatano nini, Yehova akoki kopesa biso makasi oyo tosengeli na yango mpo tókoba kosalela ye na kotalela makoki na biso. Liboso tólobela ndenge oyo Yehova akoki kosalisa biso, tótalela naino ndenge oyo apesaki Paulo mpe Timote makasi mpo bákokisa mosala na bango atako bakutanaki na mikakatano.

YEHOVA APESAKA BISO MAKASI MPO TÓKOBA KOSAKOLA

4. Mikakatano nini Paulo akutanaki na yango?

4 Paulo akutanaki na mikakatano mingi. Azalaki mpenza na mposa ete Yehova asalisa ye ntango banguna na ye babɛtaki ye, batyaki ye na bolɔkɔ, mpe balukaki ata koboma ye. (2 Ko. 11:23-25) Paulo ayokaki nsɔni te mpo na koloba ete na bantango mosusu asengelaki kosala makasi mpo abundisa ezaleli ya kolɛmba nzoto. (Rom. 7:18, 19, 24) Azalaki mpe na maladi moko oyo ezalaki lokola “nzube na kati ya mosuni” na ye, mpe azalaki na mposa ete Nzambe alongola yango.​—2 Ko. 12:7, 8.

Nini esalisaki Paulo akokisa mosala na ye? (Talá paragrafe 5-6) *

5. Makambo nini Paulo akokisaki atako akutanaki na mikakatano?

5 Yehova apesaki Paulo makasi mpo akokisa mokumba na ye atako akutanaki na mikakatano mingi. Tótalela makambo oyo Paulo akokisaki. Na ndakisa, ntango azalaki mokangami na ndako moko na Roma, asakolaki nsango malamu na molende liboso ya bakonzi ya Bayuda mpe ntango mosusu liboso ya bakonzi ya Leta. (Mis. 28:17; Flp. 4:21, 22) Asakwelaki mpe bakɛngɛli mingi ya mokonzi, ata mpe bato nyonso oyo bazalaki koya kotala ye. (Mis. 28:30, 31; Flp. 1:13) Kaka na ntango yango, Nzambe asalelaki ye mpo akoma mikanda oyo esalisaki bakristo ya ntango ya kala, mpe oyo ezali kosalisa biso lelo oyo. Lisusu, ndakisa ya Paulo epesaki bandeko oyo bazalaki na lisangá ya Roma makasi, mpe yango esalisaki bango bázala na “mpiko mingi lisusu mpo na kosakola Liloba ya Nzambe na kobanga te.” (Flp. 1:14) Atako Paulo akokaki lisusu kosala mingi te, asalaki oyo akokaki, mpe yango esalaki ete ‘makambo na ye etambola malamu mpo nsango malamu ekende liboso.’​—Flp. 1:12.

6. Na kotalela 2 Bakorinti 12:9, 10, nini esalisaki Paulo akokisa mosala na ye?

6 Paulo ayebaki ete makambo nyonso oyo asalaki na mosala ya Yehova ezalaki na makasi na ye moko te, kasi nde oyo ya Nzambe. Ayebaki ete nguya ya Nzambe ezalaki “kokóma ya kokoka na kati ya bolɛmbu.” (Tángá 2 Bakorinti 12:9, 10.) Na nzela ya elimo santu na ye, Yehova apesaki Paulo nguya mpo akokisa malamumalamu mosala na ye atako akutanaki na minyoko, batyaki ye na bolɔkɔ, mpe mikakatano mosusu.

Nini esalisaki Timote akokisa mosala na ye? (Talá paragrafe 7) *

7. Mikakatano nini Timote asengelaki koyikela mpiko mpo akokisa mosala na ye?

7 Timote, oyo azalaki moninga ya mosala ya Paulo, asengelaki mpe kotyela nguya ya Nzambe motema mpo akokisa mosala na ye. Ntango Paulo asalaki mibembo na ye ya milai ya mosala ya misionɛrɛ, akendaki elongo na Timote. Lisusu, Paulo atindaki ye na mibembo mosusu mpo akende kotala masangá mpe kolendisa yango. (1 Ko. 4:17) Timote akokaki komona ete abongi te. Ntango mosusu mpo na yango nde Paulo ayebisaki ye: “Moto atyola bolenge na yo te.” (1 Tim. 4:12) Lisusu, na ntango yango, Timote azalaki na nzube na ye moko na mosuni, elingi koloba, ‘bamaladi oyo azalaki kobɛlabɛla.’ (1 Tim. 5:23) Kasi Timote ayebaki ete nguya ya elimo santu ya Yehova ekopesa ye makasi oyo asengelaki na yango mpo asakola nsango malamu mpe asalela bandeko na ye.​—2 Tim. 1:7.

YEHOVA APESAKA BISO MAKASI MPO TÓTIKALA SEMBO ATAKO MIKAKATANO

8. Ndenge nini Yehova apesaka basaleli na ye makasi lelo oyo?

8 Lelo oyo, Yehova apesaka basaleli na ye “nguya oyo eleki makasi” mpo bákoba kosalela ye na bosembo nyonso. (2 Ko. 4:7) Tólobela makambo minei oyo Yehova apesaka biso mpo tózala makasi mpe tótikala sembo epai na ye. Makambo yango ezali: Libondeli, Biblia, bandeko na biso bakristo, mpe mosala ya kosakola.

Yehova apesaka biso makasi na nzela ya libondeli (Talá paragrafe 9)

9. Ndenge nini libondeli ekoki kosalisa biso?

9 Yehova apesaka biso makasi na nzela ya libondeli. Ndenge Baefese 6:18 emonisi yango, Paulo alendisi biso tóbondelaka Nzambe “na libaku nyonso.” Nzambe akoyanola na mabondeli na biso mpe akosalisa biso. Jonnie, oyo afandaka na Bolivie, amonaki ndenge Yehova asalisaki ye ntango akutanaki na mikakatano ebele. Mwasi ná baboti na ye babɛlaki maladi ya makasi kaka na ntango moko. Ezalaki mpasi mpo Jonnie akokisa bamposa na bango nyonso. Mama na ye akufaki, mpe ezwaki ntango mingi mpo mwasi mpe tata na ye bábika na maladi oyo bazalaki na yango. Jonnie alobi boye mpo na ntango wana ya mpasi: “Ntango nazalaki komitungisa makasi, kobondela Yehova ntango nyonso mpe koyebisa ye ndenge oyo nazalaki mpenza komiyoka, esalisaki ngai.” Yehova apesaki Jonnie makasi oyo asengelaki na yango mpo ayika mpiko. Ronald, nkulutu moko na Bolivie, ayaki koyeba ete mama na ye azalaki na maladi ya kanser. Sanza moko na nsima, mama na ye akufaki. Nini esalisaki ye ayika mpiko? Alobi boye: “Ntango nabondelaka Yehova, nayebisaka ye makambo nyonso oyo ezali na motema na ngai. Nayebi ete Yehova ayebi ngai malamu koleka moto mosusu nyonso, ata mpe koleka ngai moko.” Na bantango mosusu, tokoki komiyoka lokola tokokoka te koyikela mikakatano na biso mpiko. Tokoki mpe koyeba te makambo oyo tosengeli kobondela mpo na yango. Kasi Yehova asɛngi biso tóbondela ye ata soki ezali mpasi tóyebisa ye ndenge oyo tozali komiyoka.​—Rom. 8:26, 27.

Yehova apesaka biso makasi na nzela ya Biblia (Talá paragrafe 10)

10. Ndenge emonisami na Baebre 4:12, mpo na nini kotánga Biblia mpe komanyola likoló ya makambo oyo tozali kotánga ezali na ntina?

10 Yehova apesaka biso makasi na nzela ya Biblia. Kaka ndenge Paulo atyelaki Makomami motema mpo azwa makasi mpe libɔndisi, biso mpe tosengeli kosalaka bongo. (Rom. 15:4) Ntango tozali kotánga Liloba ya Nzambe mpe kokanisa na mozindo likoló na yango, Yehova akoki kosalela elimo na ye mpo na kosalisa biso tóyeba malamu ndenge oyo Biblia ekoki kosalisa biso. (Tángá Baebre 4:12.) Ronald oyo touti kolobela, alobi boye: “Nasepelaka mingi ndenge nasalaka milende natangaka Biblia butu nyonso. Namanyolaka mingi likoló ya bizaleli ya Yehova, mpe ndenge oyo atyelaka basaleli na ye likebi. Yango epesaka ngai lisusu makasi.”

11. Ndenge nini Biblia elendisaki ndeko mwasi moko oyo azalaki na mawa makasi?

11 Ntango tozali komanyola na Liloba ya Nzambe, yango ekoki kosalisa biso tótalela mikakatano na biso na ndenge ya malamu. Tótalela ndenge Biblia esalisaki ndeko mwasi moko oyo mobali akufá mpe oyo azalaki na mawa makasi. Nkulutu moko ayebisaki ye ete akoki kozwa mateya ya ntina mingi soki ayekoli mokanda ya Yobo. Ntango atángaki yango, mbala moko abandaki kopamela Yobo mpo na makanisi ya mabe oyo azalaki na yango. Na makanisi na ye ayebisaki Yobo boye: “Yobo! Kokanisa kaka mikakatano na yo te!” Kasi na nsima, ayaki komona ete ye mpe azalaki na makanisi ndenge moko na oyo ya Yobo. Yango esalisaki ye abongola makanisi na ye, mpe epesaki ye makasi ya koyika mpiko na mawa makasi oyo azalaki na yango ndenge abungisaki mobali na ye na liwa.

Yehova apesaka biso makasi na nzela ya bandeko na biso bakristo (Talá paragrafe 12)

12. Ndenge nini Yehova apesaka biso makasi na nzela ya bandeko na biso bakristo?

12 Yehova apesaka biso makasi na nzela ya bandeko na biso bakristo. Lolenge mosusu oyo Yehova apesaka biso makasi ezali na nzela ya bandeko na biso bakristo. Paulo akomaki ete azalaki na mposa makasi ya ‘kolendisana’ elongo na bandeko na ye bakristo. (Rom. 1:11, 12) Mary, oyo tolobelaki liboso, asepelaka mingi kozala elongo na bandeko na ye bakristo. Alobi boye: “Yehova asalelaki bandeko oyo bayebaki kutu te mikakatano na ngai. Balobaki mwa maloba oyo elendisaki ngai, to mpe bakomelaki ngai mwa makambo oyo nazalaki mpenza na mposa na yango. Yango esalisaki ngai mpe nasolola na bandeko basi mosusu oyo bazalaki mpe na mikakatano lokola oyo ya ngai, mpe nazwa mateya na makambo oyo bakutanaki na yango. Mpe bankulutu basalisaka ngai ntango nyonso namona ete nazali na ntina mingi na kati ya lisangá.”

13. Ndenge nini tokoki kolendisana na makita ya lisangá?

13 Esika moko oyo eleki malamu oyo tokoki kolendisana, ezali na makita na biso ya lisangá. Ntango okei na makita, okoki kolendisa bandeko mosusu soki oyebisi bango ete olingaka bango mpe ete osepelaka na oyo basalaka. Na ndakisa, mokolo moko liboso likita ebanda, Peter oyo azali nkulutu ayebisaki ndeko mwasi moko oyo mobali na ye azali Motatoli ya Yehova ete: “Komona yo na makita elendisaka biso mpenza. Oyaka ntango nyonso ná bana na yo motoba oyo bamibongisaka malamu mpo na kopesa biyano.” Ndeko mwasi yango abimisaki mai ya miso mpo na komonisa botɔndi na ye mpe alobaki: “Nabombela yo te, nazalaki mpenza na mposa ya koyoka maloba ya boye lelo.”

Yehova apesaka biso makasi na nzela ya mosala ya kosakola (Talá paragrafe 14)

14. Ndenge nini mosala ya kosakola esalisaka biso?

14 Yehova apesaka biso makasi na nzela ya mosala ya kosakola. Ntango toyebisaka basusu mateya ya solo oyo ezali na Biblia, tomiyokaka malamu ezala bato bandimi koyoka biso to te. (Mas. 11:25) Ndeko mwasi moko na nkombo Stacy alobeli ndenge oyo mosala ya kosakola ekoki kopesa biso makasi. Ntango ndeko moko ya libota na bango abimisamaki na lisangá, ayokaki mawa makasi, mpe akobaki komituna boye: ‘Ezali na likambo moko oyo nakokaki kosala mpo na kosalisa ye?’ Ezalaki mpasi mpo Stacy atika kokanisa likambo yango. Kasi nini esalisaki ye ayika mpiko na likambo yango ya mpasi? Mosala ya kosakola! Ntango amipesaki na mosala ya kosakola, akómaki kotya makanisi na ye nyonso na bato ya teritware oyo bazalaki na mposa ya lisalisi na ye. Alobi boye: “Na ntango wana ya mpasi, Yehova apesaki ngai moyekoli moko ya Biblia oyo akolaki nokinoki na elimo. Yango elendisaki ngai mingi. Mosala ya kosakola nde esalisaki ngai mingi mpenza.”

15. Makambo oyo ndeko mwasi Mary alobi, ekoki koteya yo nini?

15 Makambo ya bomoi ekoki kosala ete bandeko mosusu bákóma kokanisa ete bazali na likoki te ya kosakola mingi. Soki yo mpe omiyokaka bongo, kobosana te ete Yehova asepelaka na oyo osalaka na kotalela makoki na yo. Tótalela lisusu ndakisa ya Mary. Ntango akendaki kofanda na esika oyo bato balobaka monɔkɔ mosusu, azalaki komimona ntina te. Alobi boye: “Na ntango moko boye na mosala ya kosakola, nazalaki kopesa kaka likanisi ya mokuse, kotánga vɛrsɛ ya Biblia, to mpe kopesa moto trakte.” Azalaki komona ete bato oyo bazalaki koloba monɔkɔ yango malamu bazalaki na ntina mingi koleka ye. Kasi abongolaki makanisi na ye. Akómaki komona ete Yehova akoki kosalela ye ata soki alobaka monɔkɔ yango malamu te. Alobi boye: “Mateya ya Biblia ezalalaka mpasi te, mpe ebongolaka bomoi ya bato.”

16. Nini ekoki kosalisa baoyo bakɔtá ndako bázala na makasi?

16 Yehova amonaka mpe asepelaka na mposa oyo tozalaka na yango ya kosakola ata soki tokɔtá ndako. Na yango, akoki kosalisa biso tósakwela baoyo bayaka kotala biso to mpe minganga. Soki tokokanisi makambo oyo tozali kosala sikoyo ná oyo tozalaki kosala kala, tokoki kolɛmba nzoto. Kasi soki tobosani te ndenge oyo Yehova azali kosalisa biso sikoyo, tokozala na makasi ya koyika mpiko mpe ya kobatela esengo na biso ata soki tokutani na mokakatano nini.

17. Na kotalela Mosakoli 11:6, mpo na nini tosengeli kokoba kosakola ata soki tozali komona ete mosala na biso ezali kobota mbuma mbala moko te?

17 Toyebi te soki mboto nini ya solo oyo tozali kolona ekozwa misisa mpe ekobanda kokola. (Tángá Mosakoli 11:6.) Na ndakisa, Barbara, ndeko mwasi moko oyo azali na mbula mwa moke koleka 80, apesaka litatoli mbala na mbala na telefone mpe na kokoma mikanda. Na moko ya mikanda oyo akomaki, atyaki mpe nimero ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 01/03/2014 oyo ezalaki na motó ya likambo: “Makambo oyo Nzambe asalelá yo.” Kozanga koyeba, atindaki mokanda yango epai ya mwasi moko ná mobali na ye oyo bazalaki lisusu Batatoli ya Yehova te. Mwasi yango ná mobali na ye batángaki zulunalo yango mbala na mbala. Mobali yango amonaki lokola nde Yehova azalaki kosolola mbala moko na ye. Na nsima, mwasi yango ná mobali na ye bazongelaki koyangana na makita. Mpe nsukansuka, bazongelaki lisusu mosala ya kosakola atako balɛmbaki na elimo na boumeli ya mbula koleka 27. Kanisá ndenge Barbara alendisamaki ntango amonaki mbuma malamu ya mokanda oyo akomaki!

Yehova apesaka biso makasi na nzela ya (1) libondeli, (2) Biblia, (3) bandeko na biso bakristo, mpe (4) mosala ya kosakola (Talá paragrafe 9-10, 12, 14)

18. Tosengeli kosala nini mpo Nzambe apesa biso makasi?

18 Yehova apesi biso makambo mingi mpo na kopesa biso makasi. Na ndakisa libondeli, Biblia, bandeko na biso bakristo, mpe mosala ya kosakola. Ntango tozali kosalela makambo yango, tomonisaka ye ete totyaka motema ete akoki kosalisa biso, mpe ete azalaka na mposa ya kosala bongo. Tiká ete tótyelaka ntango nyonso Tata na biso ya likoló motema, oyo asepelaka “komonisa makasi na ye mpo na bolamu ya baoyo motema na bango ezali mobimba epai na ye.”​—2 Nt. 16:9.

LOYEMBO 61 Batatoli, bókende liboso!

^ par. 5 Tozali kobika na ntango moko ya mikakatano mpenza, kasi Yehova apesaka biso lisalisi oyo tosengeli na yango mpo tóyikela yango mpiko. Na lisolo oyo, tokolobela ndenge oyo Yehova asalisaki ntoma Paulo mpe Timote mpo bákoba kosalela ye atako bakutanaki na mikakatano. Tokolobela mpe makambo minei oyo Yehova apesá biso mpo tóyika mpiko lelo oyo.

^ par. 2 Topesi bango bankombo mosusu.

^ par. 53 NDIMBOLA YA BILILINGI: Ntango azali mokangami na ndako moko na Roma, Paulo azali kokomela masangá ebele mikanda, mpe kosakwela baoyo bazali koya kotala ye.

^ par. 55 NDIMBOLA YA BILILINGI: Timote azali kolendisa bandeko ntango ayei kotala masangá.