Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOYEKOLI 22

Kobá kotambola na “nzela ya bosantu”

Kobá kotambola na “nzela ya bosantu”

“Balabala moko ya monene ekozala kuna . . . nzela ya Bosantu.”​—YIS. 35:8.

LOYEMBO 31 Tambolá elongo na Nzambe!

NA MOKUSE a

1-2. Ekateli nini ya ntina Bayuda oyo bazalaki kofanda na Babilone basengelaki kozwa? (Ezera 1:2-4)

 MOKONZI apesaki liyebisi! Bayuda oyo basalaki mbula soki 70 na bokangami na Babilone, basengelaki kozonga na mokili na bango Yisraele. (Tángá Ezera 1:2-4.) Kaka Yehova nde akokaki kosala likambo ya bongo. Mpo na nini tolobi bongo? Mpo na koloba solo, bato ya Babilone balingaki te kopesa bakangami na bango bonsomi. (Yis. 14:4, 17) Kasi Babilone ekweisamaki, mpe mokonzi ayebisaki Bayuda ete bakoki kozonga na ekólo na bango. Mpo na yango, Moyuda mokomoko, mingimingi batata ya mabota, basengelaki kozwa ekateli: ya kolongwa na Babilone to ya kotikala kuna. Kozwa ekateli ya bongo ezalaki pɛtɛɛ te. Mpo na nini?

2 Ezalaki mpasi mpo na bato mingi oyo bakómaki mikóló básala mobembo wana ya molai. Mpe lokola Bayuda mingi babotamaki na Babilone, engumba yango ezalaki mboka kaka moko oyo bayebaki malamu. Mpo na bango, Yisraele ezalaki kaka mabele ya bankoko na bango. Ekoki kozala ete Bayuda mosusu bakómaki bato minene na Babilone, yango ekokaki kozala mpasi bátika engumba na bango ya kitoko, mimbongo na bango mpo na kokende na mokili oyo bayebaki te.

3. Lipamboli nini ezalaki kozela Bayuda ya sembo oyo bazongaki na Yisraele?

3 Bayuda oyo bazalaki sembo, bayebaki ete mapamboli oyo bakozwa soki bazongi na Yisraele ezalaki na motuya mingi koleka makambo ya kitoko oyo balingaki kotika na Babilone. Lipamboli oyo elekaki monene ezalaki ya kozongela losambo na bango. Na Babilone ezalaki na batempelo 50 ya bapakano kasi ata tempelo moko ya Yehova ezalaki kuna te. Etumbelo ata moko te ezalaki kuna mpo ete Bayisraele bápesa Yehova bambeka ndenge esɛngisamaki na Mobeko ya Moize, mpe nganga-nzambe moko te azalaki kuna mpo na kopesa bambeka yango. Lisusu, bato oyo bazalaki kosambela banzambe ya lokuta bazalaki mingi koleka baoyo bazalaki kotosa mibeko ya Yehova. Yango wana, Bayuda mingi oyo balingaki Yehova bazalaki kozela na mposa makasi bázonga na mboka na bango, epai bakozongela lisusu losambo ya pɛto.

4. Yehova alakaki ete akosalisa Bayuda na likambo nini ntango bakozonga na Yisraele?

4 Mbala mosusu mobembo wana ya mpasi oyo basalaki longwa na Babilone tii na Yisraele esalaki basanza soki minei, kasi Yehova alakaki ete mokakatano moko te ekopekisa bango kozonga. Mosakoli Yisaya akomaki boye: “Bóbongisa nzela ya Yehova! Bósembolela Nzambe na biso balabala monene na mokili patatalu oyo ekauká . . . Esika ya matutumatutu esengeli kokóma mokili ya patatalu, mpe esika ya mabulumabulu esengeli kokóma lobwaku ya patatalu.” (Yis. 40:3, 4) Meká naino kokanisa: balabala moko ya monene mpe ya malamu na kati ya esobe mpe bangomba. Bato oyo bazali kosala mobembo bakosepela na yango mingi, boye te? Kotambola na balabala ya bongo eleki malamu mingi na esika ya kotambola na balabala ya bangombangomba to mabulumabulu to mpe kokita na mabwaku. Lisusu na balabala yango ya malamu bakotambola noki mpenza.

5. Balabala ya elilingi oyo eutaki na Babilone kino na Yisraele ebengamaki na nkombo nini?

5 Lelo oyo, babalabala mingi ya minene eyebanaka na banimero to na bankombo na yango. Balabala ya elilingi oyo Yisaya alobelaki ezali mpe na nkombo. Alobi: “Mpe ya solo balabala moko ya monene ekozala kuna, ɛɛ nzela; mpe ekobengama Nzela ya Bosantu. Moto ya mbindo akoleka kuna te.” (Yis. 35:8) Elaka yango elakisaki nini mpo na Bayisraele? Mpe yango elakisi nini mpo na biso lelo oyo?

“NZELA YA BOSANTU”​—NA NTANGO YA KALA MPE LELO OYO

6. Mpo na nini balabala yango ebengamaki bosantu?

6 “Nzela ya Bosantu”​—oyo nde nkombo moko kitoko mpenza! Mpo na nini balabala yango ebengamaki bosantu? Mpamba te “moto ya mbindo,” elingi koloba, moto ya etamboli mabe, mosambeli ya bikeko, to mpe moto oyo asalaka masumu mosusu ya minene akokɔta te na ekólo ya Yisraele oyo epɛtolami. Bayuda oyo bazongaki basengelaki kokóma “ekólo moko mosantu” mpo na Nzambe na bango. (Mib. 7:6) Kasi yango elimbolaki nde ete baoyo batikaki Babilone basengelaki kosala bambongwana te mpo na kosepelisa Yehova? Ezali bongo te!

7. Bambongwana nini Bayuda mosusu basengelaki kosala? Pesá ndakisa.

7 Ndenge tomonaki yango liboso, Bayuda mingi babotamaki na Babilone, mpe mingi bamesanaki na makanisi mpe mibeko mosusu ya bato ya Babilone. Bambula mingi na nsima, wana Bayuda ya liboso bazongaki na Yisraele, Ezera ayaki koyeba ete mingi na bango babalaki basi bapakano. (Kob. 34:15, 16; Ezr. 9:1, 2) Na nsima, Guvɛrnɛrɛ Nehemia akamwaki ntango ayaki koyeba ete bana na bango oyo babotamaki na Yisraele bayebaki kutu te monɔkɔ ya Bayuda. (Mib. 6:6, 7; Neh. 13:23, 24) Ndenge nini bana yango balingaki koyekola kolinga Yehova mpe kosambela ye lokola bayebaki Ebre te, monɔkɔ oyo basalelaki mpo kokoma Biblia? (Ezr. 10:3, 44) Na yango, Bayuda yango basengelaki kosala bambongwana mingi, kasi ekozala pɛtɛɛ básala bambongwana yango na Yisraele, epai losambo ya pɛto ezalaki kozongisama malɛmbɛmalɛmbɛ.​—Neh. 8:8, 9.

Kobanda mobu 1919 ya ntango na biso, bankóto ya basi, mibali mpe bana, batiki mangomba ya lokuta mpe bakómi kotambola “na nzela ya bosantu” (Talá paragrafe 8)

8. Mpo na nini makambo oyo esalemaki eleki sikoyo bambula mingi etaleli mpe biso lelo oyo? (Talá elilingi ya ezipeli.)

8 Basusu bakoki koloba ‘Makambo yango ezali na ntina,’ ‘kasi yango etaleli biso na nini lelo oyo mpo ekómelaki Bayuda eleki sikoyo bambula ebele?’ Na ntembe te, yango etaleli biso mpamba te, biso mpe tozali kosala mobembo na “Nzela ya Bosantu.” Ezala tozali bakristo oyo batyami mafuta na elimo to mpe “bampate mosusu,” biso nyonso tosengeli kotikala na “Nzela ya Bosantu” mpo yango ekosalisa biso tótikala na paradiso ya elimo mpe ekomemela biso mapamboli oyo ezali kozela biso na mokili ya sika. b (Yoa. 10:16) Kobanda mobu 1919 ya ntango biso, bamilio ya basi, mibali, mpe bana bazali kolongwa na Babilone monene, lisangá ya mangomba nyonso ya lokuta mpe bazali kosala mobembo na nzela yango ya elilingi. Mbala mosusu yo mpe ozali moko kati na bango. Atako eleki sikoyo mbula soki 100 banda nzela yango efungwamaki, kasi bato mosusu babandaki kobongisa yango bambula mingi liboso ete efungwama.

KOBONGISA NZELA

9. Na kotalela Yisaya 57:14, na ndenge nini mosala ya kobongisa “Nzela ya Bosantu” esalemaki?

9 Yehova azwaki bibongiseli mpo ete Bayuda oyo bazalaki kolongwa na Babilone bákutana na makama te. (Tángá Yisaya 57:14.) Ezali mpe bongo mpo na “Nzela ya Bosantu” lelo oyo? Basiɛklɛ mingi liboso ya mobu 1919, Yehova asalelaki bato oyo bazalaki kobanga ye mpo bábongisa nzela mpo na kobima na Babilone monene. (Talá mpe Yisaya 40:3.) Babongisaki nzela yango mpo na nsima, bato ya mitema sembo bálongwa na mangomba ya lokuta mpe báya kosambela Yehova elongo na basaleli na ye, epai losambo ya pɛto ya Yehova ezongisamaki. Mosala yango ya “kobongisa nzela” esɛngaki makambo nini? Tólobela mwa misala oyo basalaki liboso.

Na boumeli ya basiɛklɛ mingi, bato oyo bazalaki kobanga Nzambe bapesaki mabɔkɔ mpo na kobongisa nzela mpo na kobima na Babilone monene (Talá paragrafe 10-11)

10-11. Ndenge nini mosala ya konyata mpe ya kobongola Biblia esalisaki bato mingi báyeba Biblia? (Talá mpe elilingi)

10 Konyata mikanda. Tii na mobu soki 1450, Biblia ezalaki kokomama na mabɔkɔ. Mosala yango eumelaki mpenza, mpe bakopi yango ya Biblia ezalaki komonana mpenza te mpe ezalaki ntalo mingi. Kasi ntango babimisaki masini ya konyata mikanda, yango esalaki ete ezala mpasi te mpo na konyata Babiblia mingi mpe kokabolela yango bato.

11 Mosala ya kobongola. Na boumeli ya basiɛklɛ mingi, Biblia ezalaki mingimingi na monɔkɔ ya Latin, mpe kaka bato oyo batángaki kelasi mingi nde bakokaki kokanga ntina na yango. Kasi ntango mosala ya konyata mikanda ekómaki kosalema mingi, bato oyo bazalaki kobanga Nzambe bakómaki kobongola Biblia na minɔkɔ mingi oyo bato bazalaki koloba. Yango esalaki ete, bato oyo bazalaki kotánga Biblia bázala na likoki ya kokokanisa makambo oyo bazalaki koteya bango epai ya bakonzi ya mangomba ná makambo oyo Biblia eteyaka mpenza.

Bato oyo bazalaki kobanga Nzambe bapesaki mabɔkɔ mpo na kobongisa nzela mpo na kobima na Babilone monene (Talá paragrafe 12-14) c

12-13. Pesá ndakisa moko oyo emonisi ndenge bayekoli ya sembo ya Biblia bakómaki komonisa polele mateya ya mangomba ya lokuta na siɛklɛ ya 19 ya ntango na biso.

12 Bisaleli mpo na koyekola Biblia. Bato oyo bazalaki koyekola Biblia na mozindo bayekolaki makambo mingi na Liloba ya Nzambe. Kasi bakonzi ya mangomba basilikaki ntango bayekoli wana ya Biblia bakómaki koyebisa bato mosusu makambo oyo bazalaki koyekola. Na ndakisa, na siɛklɛ ya 19 ya ntango na biso, bato mingi ya sembo bakómaki kobimisa batrakte oyo ezalaki komonisa polele mateya ya mangomba ya lokuta.

13 Na mobu soki 1835, moto moko oyo azalaki kobanga Nzambe na nkombo Henry Grew, abimisaki trakte moko oyo ezalaki kolobela ndenge oyo bakufi bakómaka. Na trakte yango, amonisaki na nzela ya Makomami ete moto abotamaka te na molimo oyo ekufaka te, kasi Nzambe nde akoki kopesa moto likabo yango. Na 1837, mokambi ya lingomba moko na nkombo George Storrs amonaki trakte yango wana azalaki kokumba engbunduka. Atángaki trakte yango mpe amindimisaki ete amonaki solo. Azwaki ekateli ya koyebisa bato mosusu makambo oyo ayekolaki. Na 1842, asalaki badiskur ndenge na ndenge oyo ezalaki na motó ya likambo “Motuna​—Bato mabe bakufaka te?” Makambo oyo George Storrs akomaki, esimbaki mpenza motema ya elenge mobali moko na nkombo Charles Taze Russell.

14. Na ndenge nini mosala ya kobongisa nzela ya elimo oyo esalemaki na kala esalisaki ndeko Russell mpe baninga na ye? (Talá mpe elilingi)

14 Na ndenge nini mosala ya kobongisa nzela ya elimo oyo esalemaki na kala esalisaki ndeko Russell mpe baninga na ye? Na boyekoli na bango, bazalaki na babuku oyo elimbolaka maloba ya Biblia, mikanda oyo esalisaka mpo na koluka mikapo ya Biblia, mpe mabongoli ndenge na ndenge ya Biblia, nyonso wana ebongisamaki liboso bábanda mosala na bango. Bolukiluki na makambo ya Biblia oyo Henry Grew, George Storrs, mpe bato mosusu basalaki, esalisaki mpe bango mingi. Ndeko Russell mpe baninga na ye bapesaki mabɔkɔ mpo na kobongisa nzela ya elimo na ndenge babimisaki babuku mpe batrakte ebele oyo ezalaki kolobela makambo ya Biblia.

15. Makambo nini esalemaki na mobu 1919?

15 Na mobu 1919, Babilone monene ezalaki lisusu na bokonzi te likoló ya basaleli ya Nzambe. Kaka na mbula yango, “moombo ya sembo mpe ya mayele” ayebanaki, abandaki mosala mpo bato ya mitema sembo bábanda kotambola na “Nzela ya Bosantu.” (Mat. 24:45-47) Mosala oyo bato mosusu basalaki na kala mpo na kobongisa nzela yango, esalisaki bato oyo bakómaki kotambola na balabala monene báyekola makambo mingi mpo na Yehova mpe mikano na ye. (Mas. 4:18) Bakokaki mpe koyokanisa bomoi na bango na makambo oyo Yehova asɛngaka. Yehova amizelaka te ete basaleli na ye básala bambongwana oyo esengeli kaka na mbala moko. Kasi, abongisaka basaleli na ye malɛmbɛmalɛmbɛ. (Talá etanda “ Yehova azali kobongisa basaleli na ye malɛmbɛmalɛmbɛ.”) Biso nyonso tokozala mpenza na esengo ntango tokobanda kosepelisa Nzambe na biso na makambo nyonso oyo tokosala!​—Kol. 1:10.

“NZELA YA BOSANTU” EZALI KAKA YA KOFUNGWAMA

16. Kobanda na mobu 1919, mosala nini ezali kosalema na “Nzela ya Bosantu”? (Yisaya 48:17; 60:17)

16 Nzela nyonso esɛngaka kobongisa yango mbala na mbala. Kobanda na mobu 1919, mosala ya kobongisa “Nzela ya Bosantu” ezali kokoba mpo na kosalisa bato mingi bálongwa na Babilone monene. Moombo ya sembo mpe ya mayele oyo autaki kotyama azali kokoba kosala mosala, mpe na 1921, babimisaki mokanda moko oyo elimbolaka Biblia mpo na kosalisa bayekoli ya sika báyekola mateya ya solo ya Biblia. Nsukansuka babimisaki bakopi soki milio motoba ya mokanda La Harpe de Dieu na minɔkɔ 36, mpe esalisaki bato mingi báyekola solo. Kala mingi te, tozwaki mokanda moko ya sika ya malamu mpenza mpo na koyekola na bato Biblia. Nkombo ya mokanda yango ezali, Sepelá na bomoi libela na libela! Na boumeli ya mikolo oyo ya nsuka, Yehova azali kosalela ebongiseli na ye mpo na kopesa biso ebele ya bilei mpo na kosalisa biso tókoba kotambola na “Nzela ya Bosantu.”​—Tángá Yisaya 48:17; 60:17.

17-18. “Nzela ya Bosantu” ezali komema wapi?

17 Tokoki koloba ete mbala nyonso oyo moto andimi koyekola Biblia, azwi libaku ya kokɔta na “Nzela ya Bosatu.” Basusu batambolaka kaka mwa moke na balabala monene, mpe na nsima batikaka kotambola. Bamosusu bazali na ekateli ya kokoba kotambola na nzela yango tii bakokóma na esika oyo bazali kokende. Wapi esika yango oyo tozali kokende?

18 Baoyo bazali na elikya ya kokende na likoló, “Nzela ya Bosantu” ekomema bango na “paradiso ya Nzambe” na likoló. (Em. 2:7) Mpo na baoyo bazali na elikya ya kozala na bomoi awa na mabele, balabala monene yango ekomema bango na ezaleli ya kokoka na nsuka ya Boyangeli ya Mbula Nkóto ya Kristo. Soki lelo oyo ozali kotambola na balabala yango, kokanisa te makambo oyo otiki na nsima. Mpe kotika te kotambola na balabala yango tii okokóma na mokili ya sika, esika oyo ozali kokende. Totombeli yo “nzela malamu!”

LOYEMBO 24 Boyá na ngomba ya Yehova

a Yehova abengaki balabala monene ya elilingi oyo eutaki na Babilone kino na Yisraele “Nzela ya Bosantu.” Yehova abongisi mpe nzela ya ndenge wana mpo na bato na ye na mikolo na biso? Ɛɛ! Kobanda mobu 1919 ya ntango na biso, bamilio ya bato bazali kolongwa na Babilone monene mpe bazali kotambola na “Nzela ya Bosantu.” Biso nyonso tosengeli kotikala na nzela yango kino tokokóma na esika oyo tozali kokende.

b Talá esakweli ya Yisaya​—Pole mpo na bato nyonso II, nk. 56-57.

c NDIMBOLA YA ELILINGI: Ndeko Russell ná baninga na ye bazalaki kosalela bisaleli mpo na koyekola Biblia oyo ebongisamaki liboso bábanda mosala na bango.