Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Likanisi mpo na bolukiluki

Likanisi mpo na bolukiluki

Masolo oyo ebimaka na Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET ntango tozali kosala bolukiluki

Masolo yango ekoki kosalisa biso tóyekola makambo ndenge na ndenge. Masolo yango oyo ebimaka na Internet ezali na Ndimbola ya maloba ya Biblia, Étude perspicace des Écritures, Buku ya bolukiluki ya Batatoli ya Yehova, mpe Index des publications des Témoins de Jéhovah.

Elembo ya koluka maloba oyo ezali na Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET ekoki kosalisa yo osalela masolo yango. Soki okomi mwa liloba na elembo ya koluka maloba, okomona mwa maloba ekobima na nse. Liloba “Motó ya likambo” ekobima pene ya maloba oyo ezali na liste ya masolo yango.

Meká kosala boye: Komá liloba “Yehova” na elembo ya koluka maloba (A). Poná liloba “Yehova” oyo ebimi na liloba “Motó ya likambo” na nsuka (B). Okomona masolo ndenge na ndenge oyo ekobima na liloba yango.