Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOYEKOLI 24

Oyo okoki kosala mpo okokisa mikano na yo ya elimo

Oyo okoki kosala mpo okokisa mikano na yo ya elimo

“Tótika te kosala oyo ezali malamu, mpo na ntango oyo ekoki tokobuka mbuma soki tolɛmbi te.”​—GAL. 6:9.

LOYEMBO 84 Tómipesa

NA MOKUSE a

1. Mikakatano nini mingi kati na biso bakutanaki na yango?

 OSÍ omityela mokano moko boye ya elimo kasi olongaki te kokokisa yango? b Soki ezali bongo, yebá ete ozali yo moko te. Na ndakisa, Philip azalaki na mposa ya kozwaka ntango mingi mpo na kobondela mpe kobongisa lisusu mabondeli na ye, kasi mbala mingi azalaki kozwa ntango te mpo na kosala yango. Erika amityelaki mokano ya kokómaka na likita ya mosala ya kosakola na ngonga; kasi, mbala mingi azalaki kokóma kaka na retare. Tomáš oyo amekaki mbala mingi kotánga Biblia mobimba na mbula moko, alobi boye: “Nazalaki kosepela kotánga Biblia te. Namekaki yango mbala misato, kasi nazalaki kosuka kaka na mokanda ya Balevi.”

2. Mpo na nini tosengeli kolɛmba nzoto te soki tomityeli mokano moko kasi tokokisi yango naino te?

2 Soki omityelaki mokano moko oyo okokisi naino te, tobondeli yo olɛmba nzoto te. Kokokisa ata mokano moko ya moke esɛngaka ntango mpe milende mingi. Kaka mposa oyo ozali na yango ya kokokisa mokano oyo omityeli, ezali komonisa ete ozwaka na motuya mingi boyokani na yo na Yehova mpe olingi kosala oyo okoki na mosala na ye. Yehova asepelaka na milende oyo ozali kosala. Kutu, asɛngaka biso te koleka oyo tokoki kopesa ye. (Nz. 103:14; Mika 6:8) Na yango, omityela mokano oyo okozala na likoki ya kokokisa. Okoki kosala nini mpo okokisa mokano moko oyo omityeli? Tiká tótalela mwa makanisi ya ntina.

ZALÁ NA MPOSA MAKASI

Bondelá Yehova asalisa yo okóma na mposa makasi (Talá paragrafe 3-4)

3. Mpo na nini kozala na mposa makasi ezali na ntina?

3 Kozala na mposa makasi ezali na ntina mingi soki tolingi kokokisa mikano ya elimo. Soki ozali na mposa makasi, okosala nyonso oyo esengeli mpo na kokokisa mokano oyo omityeli. Tokoki kokokanisa mposa makasi na mopɛpɛ oyo etindikaka masuwa mpo ekóma na esika ezali kokende. Soki mopɛpɛ ezali kokoba kopɛpa, ekozala mpasi te mpo masuwa ekóma na esika ezali kokende. Mpe soki mopɛpɛ ezali makasi, masuwa yango ekoki kokóma noki mpenza. Ndenge moko mpe, soki tozali mpenza na mposa makasi, tokokokisa mikano na biso. Ndeko David, oyo afandaka na Salvador alobi boye: “Soki ozali mpenza na mposa ya kosala likambo moko, okosala makasi okokisa yango. Okosala makasi olongola eloko nyonso oyo ekoki kopekisa yo okokisa mokano na yo.” Sikoyo, okosala nini mpo okóma na mposa makasi?

4. Tokoki kobondela mpo na likambo nini? (Bafilipi 2:13) (Talá mpe elilingi.)

4 Bondelá Yehova asalisa yo okóma na mposa makasi. Na nzela ya elimo na ye, Yehova akoki kosalisa yo mpo okokisa mokano na yo. (Tángá Bafilipi 2:13.) Na bantango mosusu, tomityelaka mokano moko mpo toyebi ete tosengeli kokokisa yango, mpe kosala bongo ezali malamu. Kasi ekoki kozala ete tozali mpenza na mposa te ya kokokisa yango. Yango nde likambo ekómelaki ndeko mwasi Norina, oyo afandaka na Ouganda. Amityelaki mokano ya kotambwisa boyekoli ya Biblia, nzokande azalaki mpenza te na mposa makasi ya kokokisa yango mpo azalaki komona ete ayebi koteya malamu te. Nini esalisaki ye? Alobi boye: “Nabandaki kobondela Yehova mikolo nyonso mpo apesa ngai mposa makasi ya koyekola Biblia na moto. Mpo na kosala na boyokani na mabondeli na ngai, nakolisaki makoki na ngai ya koteya. Nsima ya mwa basanza, namonaki ete nakómaki na mposa makasi ya kotambwisa boyekoli ya Biblia. Kaka na mbula yango, nabandaki koyekola na bato mibale Biblia.”

5. Mpo tókóma na mposa makasi ya kokokisa mikano na biso, tokoki komanyola na makambo nini?

5 Manyolá na oyo Yehova asalá mpo na yo. (Nz. 143:5) Ntoma Paulo amanyolaki na boboto monene oyo Yehova amoniselaki ye, mpe yango etindaki ye asala mosala makasi mpo na Yehova. (1 Ko. 15:9, 10; 1 Tim. 1:12-14) Ndenge moko mpe, soki ozali komanyola mingi na makambo oyo Yehova asalá mpo na yo, yango ekopesa yo mposa makasi ya kokokisa mokano na yo. (Nz. 116:12) Talá oyo esalisaki ndeko mwasi moko na Honduras akokisa mokano na ye ya kokóma mobongisi-nzela ya sanza na sanza. Alobi boye: “Nakanisaki ndenge oyo Yehova alingaka ngai. Asalisaki ngai nakɔta na libota na ye. Atyelaka ngai likebi mpe abatelaka ngai. Komanyola na makambo wana ekómisaki makasi bolingo na ngai mpo na ye mpe epesaki ngai mposa makasi ya kobanda mosala ya mobongisi-nzela.”

6. Likambo nini mosusu ekoki kosalisa biso tókóma na mposa makasi ya kokokisa mokano na biso?

6 Kanisá bolamu oyo okozwa soki okokisi mokano na yo. Talá likambo esalisaki Erika, oyo tólobelaki na ebandeli, oyo amityelaki mokano ya kokómaka na ngonga ya malamu. Alobi boye: “Nayaki koyeba ete nazalaki kozanga makambo ebele ya malamu ntango nazalaki kokóma na retare na likita ya mosala ya kosakola. Kasi soki nakómi na ngonga ya malamu, nazalaki na libaku ya kopesa bandeko mbote mpe kolekisa mwa ntango elongo na bango. Nazalaki mpe na likoki ya kolanda makanisi ya ntina mpo nasalela yango na mosala ya kosakola.” Erika atyaki makanisi na ye na bolamu oyo azalaki kozwa ntango azalaki koya na ngonga ya malamu na makita, yango wana akokisaki mokano na ye. Bolamu nini okozwa soki okokisi mokano na yo? Soki mokano na yo ezali ya kotánga Biblia to ya kobongisa lisusu mabondeli na yo, kanisá ndenge yango ekokómisa makasi boninga na yo elongo na Yehova. (Nz. 145:18, 19) Soki mokano na yo ezali ya kokolisa ezaleli moko ya bokristo, kanisá ndenge yango ekokómisa makasi boyokani na yo ná basusu. (Kol. 3:14) Ekozala malamu osala liste ya makambo nyonso oyo etindi yo omityela mokano. Zongeláká liste yango mbala na mbala. Tomáš, oyo tolobelaki liboso, alobi boye: “Soki ezali na bantina oyo ezali kotinda ngai nakokisa mokano moko boye, nasalaka makasi nakokisa yango kaka.”

7. Nini esalisaki Julio ná mwasi na ye bákokisa mokano na bango?

7 Lekisáká ntango elongo na baoyo bakosalisa yo okokisa mokano na yo. (Mas. 13:20) Talá oyo esalisaki Julio ná mwasi na ye mpo bákokisa mokano na bango ya kosala mingi na mosala ya kosakola. Julio alobi boye: “Toponaki baninga oyo bazalaki kolendisa biso mpo tókokisa mokano na biso, mpe tozalaki kolobela yango elongo na bango. Mingi na bango basilaki kokokisa mikano ya bongo, yango wana bakokaki kopesa biso makanisi oyo ebongi. Baninga na biso bazalaki mpe koluka koyeba ndenge makambo ezalaki kotambola, mpe bazalaki kolendisa biso na ntango oyo tozalaki na mposa ya bilendiseli.”

NTANGO TOZALI NA MPOSA TE YA KOSALA LIKAMBO

Salá makasi okokisa mokano na yo (Talá paragrafe 8)

8. Nini ekoki kosalema soki tozali kosala makasi tókokisa mokano oyo tomityeli kaka na mokolo oyo tozali na mposa makasi ya kosala yango? (Talá mpe elilingi.)

8 Mpo na koloba solo, mikolo mosusu biso nyonso tozangaka mposa ya kosala likambo. Yango elakisi ete tokokoka te kokokisa mokano na biso? Te. Tózwa ndakisa oyo: Toyebi ete mopɛpɛ ezali na nguya makasi ya kotindika masuwa mpo ekóma na esika ezali kokende. Nzokande, mipɛpɛ nyonso ezalaka na nguya ndenge moko te, mpe mikolo mosusu mopɛpɛ ekoki kozala ata moke te. Yango elingi koloba ete masuwa ekotambola lisusu te? Te, ezali bongo te. Na ndakisa, masuwa mosusu ezalaka na motɛrɛ mpe misusu ezalaka na bankai. Matelo akoki kosalela biloko yango mpo masuwa na ye ekoba kokende epai akani kokóma. Tokoki kokokanisa mposa na biso na mopɛpɛ, mokolo mosusu ekoki kozala makasi mpe mokolo mosusu ekoki kozala bongo te. Ndenge moko mpe, mikolo mosusu tokoki kozanga mposa ya kosala makasi mpo tókokisa mokano na biso. Na yango, soki esɛngi ete tósala makasi mpo na kokokisa mokano na biso kaka na mokolo oyo tozali na mposa makasi, tóyeba ete tokokokisa yango ata moke te. Kaka ndenge matelo alukaka mayele mosusu mpo akóma na esika oyo azali kokende, tokoki kosala makasi tókokisa mokano oyo tomityeli ata na mokolo oyo tozali na mposa te ya kosala yango. Kosala bongo ezali pɛtɛɛ te, kasi yebá ete okozala na esengo mpenza soki okokisi mokano oyo omityeli. Liboso tólobela makambo oyo tokoki kosala, tólobela naino motuna oyo ekoki koyela biso na makanisi.

9. Ezali mabe kosala makasi mpo na kokokisa mokano oyo tomityeli ata na ntango oyo tozali na mposa ya kosala yango te? Limbolá.

9 Yehova alingi ete tósalela ye na esengo mpe na molimo na biso mobimba. (Nz. 100:2; 2 Ko. 9:7) Yango wana, tosengeli kokoba kosala makasi mpo na kokokisa mokano ya elimo oyo tomityeli, ata soki kosala yango ezali kosepelisa biso te? Tótalela ndakisa ya ntoma Paulo. Alobaki boye: “Nazali kobɛtabɛta nzoto na ngai mpe kokómisa yango lokola moombo.” (1 Ko. 9:25-27) Paulo abundaki makasi mpo asala makambo ya malamu oyo Yehova alingaka ata na ntango oyo azalaki te na mposa ya kosala yango. Yehova asepelaki na makambo oyo Paulo asalaki mpo na ye? Ɛɛ, asepelaki mpenza! Mpe Yehova apesaki ye mbano mpo na milende na ye.​—2 Tim. 4:7, 8.

10. Matomba nini tokozwa soki tozali kosala makasi tókokisa mikano oyo tomityeli ata ntango tozali na mposa ya kosala yango te?

10 Ndenge moko mpe, Yehova asepelaka ntango amonaka ete tozali kosala makasi tókokisa mokano oyo tomityeli ata na ntango oyo tozali na mposa ya kosala yango te. Asepelaka mpo ata soki tozali kosepela te na makambo oyo tozali kosala, ayebi ete tozali kosala yango mpo tolingaka ye. Kaka ndenge Yehova apambolaki Paulo, akopambola mpe biso mpo na milende oyo tozali kosala. (Nz. 126:5) Mpe ntango tozali komona ndenge Yehova azali kopambola biso, yango ekotinda biso tókóma na mposa makasi ya kokokisa mokano na biso. Lucyna, ndeko mwasi moko oyo afandaka na ekólo Pologne alobi boye: “Na bantango mosusu, nalingaka te kobima na mosala ya kosakola, mingimingi soki nalɛmbi. Atako bongo, esengo oyo nayokaka nsima ya kosakola ekamwisaka ngai mpenza.” Tótala sikoyo oyo tokoki kosala ntango tozali na mposa te ya kosala likambo moko.       

11. Ndenge nini Yehova akoki kosalisa biso tókóma na ezaleli ya komipekisa?

11 Bondelá Yehova asalisa yo okóma na ezaleli ya komipekisa. Komipekisa ezali ezaleli oyo esalisaka biso tózala na bokonzi likoló ya mayoki mpe makambo oyo tosalaka. Mbala mingi liloba yango emonisaka koboya kosala likambo moko ya mabe. Tosengeli mpe kozala na ezaleli ya komipekisa mpo tósala makambo ya malamu, mingimingi soki mosala yango ezali mpasi mpe tozali na mposa ya kosala yango te. Kobosana te ete komipekisa ezali moko ya bizaleli ya mbuma ya elimo. Na yango, sɛngáká Yehova apesa yo elimo santu na ye mpo okolisa ezaleli wana ya ntina mingi. (Luka 11:13; Gal. 5:22, 23) David, oyo tolobelaki liboso, amonisi ndenge oyo libondeli esalisaki ye. Azalaki na mposa ya kosalaka boyekoli na ye moko mbala na mbala. Alobi boye: “Nabondelaki Yehova asalisa ngai nakolisa ezaleli ya komipekisa. Na lisalisi na ye, nasalaki programɛ malamu ya boyekoli mpe nakómaki kosala boyekoli na ngai mbala na mbala.”

12. Ndenge nini mitinda oyo ezali na Mosakoli 11:4 esalisaka biso tókokisa mikano ya elimo oyo tomityeli?

12 Kozela te makambo nyonso ekóma malamu. Na mokili oyo, ekozala te na ntango moko boye oyo makambo nyonso ekozala malamu. Na yango, soki tozeli ete makambo nyonso ekóma malamu, tokokokisa ata moke te mokano na biso. (Tángá Mosakoli 11:4.) Ndeko mobali moko na nkombo Dayniel alobi boye: “Ekozala na ntango moko te ya malamu. Tosengeli te kozela ntango ya malamu, tosengeli kobanda mbala moko.” Ndeko mobali moko na nkombo Paul, oyo afandaka na Ouganda, alobeli ntina mosusu oyo tosengeli te kozongisaka makambo nsima: “Soki tobandi ata na ntango ya mikakatano, tokopesa Yehova libaku ya kopambola biso.”​—Mal. 3:10.     

13. Wapi matomba ya komityela naino mikano ya mikemike?

13 Bandá mokemoke. Tokoki kozanga mposa ya kokokisa mokano na biso mpo tozali komona ete ezali mpasi. Soki ezali bongo mpo na yo, ekozala malamu okabola mokano oyo omityeli na bitenibiteni. Soki ozali na mokano ya kokolisa ezaleli moko, ekozala malamu obanda naino kokokisa yango na makambo ya mikemike. Soki mokano na yo ezali ya kotánga Biblia mobimba, ekozala malamu omityela mokano ya kotánga yango na boumeli ya mwa ntango moke. Tomáš, oyo tolobelaki na ebandeli ya lisolo oyo, azalaki na mokakatano ya kotánga Biblia na boumeli ya mbula moko. Alobi boye: “Nayaki komona ete nazalaki kokende mbangu mingi. Nazwaki ekateli ya kobandela lisusu, kasi na mbala oyo, natyaki programɛ ya kotángaka mwa bavɛrsɛ na mokapo moko mikolo nyonso mpe komanyola likoló na yango. Yango esalaki ete nakóma kosepela kotánga Biblia.” Lokola Tomáš’ akómaki na mposa makasi ya kotánga, akómaki kotánga na boumeli ya ntango molai. Nsukansuka, atángaki Biblia mobimba. c

KOLƐMBA NZOTO TE SOKI OZWI MWA KWƆKƆSƆ

14. Makambo nini ekoki kopekisa biso tókokisa te mikano oyo tomityeli?

14 Likambo ya mawa, ata soki tozali na mposa makasi to tomipesi disiplini kwɔkɔsɔ ekoki komonana. Na ndakisa, “makambo oyo ekanami te” ekoki kolya biso ntango oyo tosengeli na yango mpo na kosala makasi tókokisa mokano oyo tomityeli. (Mos. 9:11) Tokoki kokutana na mokakatano oyo ekoki kolɛmbisa biso nzoto mpe kosala ete tózala lisusu na makasi mingi te. (Mas. 24:10) Nzoto na biso ya kozanga kokoka ekotinda biso tósala likambo oyo ekoki kopekisa biso tókokisa mokano oyo tomityeli. (Rom. 7:23) To mpe tokoki kolɛmba. (Mat. 26:43) Nini ekoki kosalisa biso tólonga ntango tozwi kwɔkɔsɔ moko boye?

15. Soki tozwi kwɔkɔsɔ, yango emonisi nde ete tolongi te? Limbolá. (Nzembo 145:14)

15 Kobosana te ete soki ozwi kwɔkɔsɔ yango elimboli te ete olongi te. Biblia elobi ete tokoki kokutana na mikakatano mbala na mbala. Kasi, elobi mpe ete tokoki kotɛlɛma lisusu soki Yehova asalisi biso. (Tángá Nzembo 145:14.) Mobali moko na nkombo Philip, oyo tolobelaki liboso, alobi boye: “Natyaka makanisi na ngai te na mbala boni oyo nakokisi te mokano namityelaki. Kasi nde, na bantango boni oyo nasali lisusu makasi nakokisa mokano namityelaki.” David, oyo tolobelaki liboso alobi boye: “Nasalaka makasi natalela te kwɔkɔsɔ oyo nakutani na yango lokola mokakatano, kasi nde lokola mabaku ya komonisa Yehova ete nalingaka ye mingi.” Soki ozali kokende liboso ata soki ozwi kwɔkɔsɔ, okomonisa Yehova ete olingi kosepelisa ye. Na ntembe te, Yehova akosepela mpenza soki amoni ete ozali kosala makasi mpo na kokokisa mokano na yo ya elimo, ata soki kosala yango ezali pɛtɛɛ te.

16. Soki tozwi kwɔkɔsɔ yango ekoki koteya biso nini?

16 Zwá mateya na kwɔkɔsɔ oyo okutani na yango. Kanisá na makambo oyo ebimiseli yo kwɔkɔsɔ yango, mpe omituna boye: Ezali na likambo moko oyo nakoki kobongola mpo kwɔkɔsɔ mosusu ekómela ngai lisusu te? (Mas. 27:12) Kasi na bantango mosusu, soki okutani na kwɔkɔsɔ yango ekoki komonisa ete mokano oyo omityelaki ebongaki te mpo na yo. Soki omoni ete ezali mpe bongo mpo na yo, kanisá lisusu na mokano oyo omityelaki mpo na koyeba soki ebongi mpenza mpo na yo. d Yehova akomona yango mabe te soki okokisi te mokano oyo ebongaki te mpo na yo.​—2 Ko. 8:12.

17. Mpo na nini tosengeli kobosana te makambo oyo tosilá kokokisa?

17 Kobosana te mikano oyo osilá kokokisa. Biblia elobi ete “Nzambe azangi boyengebene te mpo abosana mosala na bino.” (Ebr. 6:10) Yo mpe osengeli kobosana te makambo oyo osilá kosala. Kanisáká mikano oyo osilá kokokisa. Ekoki kozala, boninga malamu na Yehova, koyebisa bato mosusu makambo etali ye, to mpe kozwa batisimo. Kaka ndenge osilaki kokende liboso mpe kokokisa mikano ya yango na kala, okoki mpe kokoba kokokisa mokano oyo omityeli.​—Flp. 3:16.

Sepelá na mobembo oyo ozali kosala (Talá paragrafe 18)

18. Likambo nini tosengeli kobosana te kosala wana tozali kosala makasi tókokisa mokano oyo tomityeli? (Talá mpe elilingi.)

18 Na lisalisi ya Yehova, okoki kokokisa mokano omityeli kaka ndenge matelo akómaka na esika oyo azali kokende. Kasi kobosana te ete, bamatelo mingi basepelaka mpe kosala mibembo. Ndenge moko mpe, lokola ozali kosala makasi okokisa mokano ya elimo oyo omityeli, kobosanaka te kotala ndenge oyo Yehova azali kosalisa mpe kopambola yo wana ozali kosala makasi okokisa mokano oyo omityeli. (2 Ko. 4:7) Soki otiki te, okozwa mapamboli mingi mpenza.​—Gal. 6:9.

LOYEMBO 126 Kɛngɛláká, tɛlɛmá ngwi, zalá makasi

a Ebongiseli ya Yehova elendisaka biso mbala na mbala tómityela mikano ya elimo. Kasi tokosala nini soki tomityelaki mokano moko boye kasi tozali kolonga te kokokisa yango? Lisolo oyo ekopesa biso makanisi ndenge na ndenge oyo ekoki kosalisa biso tókokisa mikano na biso.

b NDIMBOLA YA MALOBA: Mokano ya elimo ekoki kozala milende oyo ozali kosala mpo na kokokisa to kobongisa likambo moko boye, mpo okoka kosalela Yehova mingi koleka mpe osepelisa ye. Na ndakisa, okoki kotya mokano ya kokolisa ezaleli moko ya bokristo to kobongisa likambo moko mpo osalela Yehova malamu, ekoki kozala, kotánga Biblia, boyekoli na yo moko, to mpe mosala ya kosakola.

c Talá buku Zwá matomba na eteyelo ya mosala ya Teokrasi, nk. 10-11, par. 4.

d Mpo na koyeba makambo mosusu, talá lisolo “Omityela mikano oyo ekoki na yo mpo okoba kosalela Yehova na esengo,” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15/07/2008, lisolo ya boyekoli.