LINƆ́NGI YA MOSƐNZƐLI—NIMERO YA BOYEKOLI Sanza ya Juin 2020

Nimero oyo ezali na masolo ya boyekoli mpo na 03-30/08/2020.

“Nkombo na yo esantisama”

Lisolo ya boyekoli 23: 03-09/08/2020. Likambo nini ezali na ntina mingi mpo na bato mpe baanzelu? Mpo na nini ezali na ntina mingi mpe yango etali biso na nini? Biyano na mituna yango mpe na mituna mosusu ekokómisa boyokani na biso na Yehova makasi.

“Pesá ngai motema moko mpo nabanga nkombo na yo”

Lisolo ya boyekoli 24: 10-16/08/2020. Na lisolo oyo, tokolobela libondeli oyo Davidi asalaki oyo ezali na Loyembo 86:11, 12. Kobanga nkombo ya Nzambe, Yehova elimboli nini? Mpo na nini tosengeli kozala na limemya makasi mpo na nkombo yango monene? Mpe ndenge nini kobanga nkombo ya Nzambe ekobatela biso ntango tomekami?

Mituna ya batángi

“Mbuma ya elimo” ezali kaka bizaleli oyo Bagalatia 5:22, 23 elobeli?

‘Ngai moko nakoluka bampate na ngai’

Lisolo ya boyekoli 25: 17-23/08/2020. Mpo na nini bato mingi oyo basalelá Yehova bambula mingi na bosembo batiká lisangá? Nzambe ayokaka ndenge nini mpo na bango? Lisolo oyo ekoyanola na mituna yango. Ekolobela mpe mateya oyo tokoki kozwa na ndenge oyo Yehova asalelaki bato mosusu makambo na ntango ya kala oyo batikaki kosalela ye mpo na mwa ntango.

“Bózongela ngai”

Lisolo ya boyekoli 26: 24-30/08/2020. Yehova alingi ete baoyo nyonso batiká kosakola mpe koyangana na makita bázongela ye. Tokoki kolendisa bango bándima libyangi ya Yehova oyo elobi: “Bózongela ngai.” Na lisolo oyo, tokolobela ndenge oyo tokoki kosala yango.