Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOYEKOLI 26

“Bózongela ngai”

“Bózongela ngai”

Bózongela ngai, mpe ngai nakozongela bino.”​MAL. 3:7.

LOYEMBO 102 ‘Tósalisa bato oyo balɛmbi’

NA MOKUSE *

1. Yehova ayokaka ndenge nini ntango moto oyo atikaki kosalela ye azongeli ye?

NDENGE tomonaki yango na lisolo oyo eleki, Yehova amikokanisi na mobateli ya mpate ya malamu oyo atyelaka mpate na ye mokomoko likebi, mpe alukaka mpate nyonso oyo ebungi. Yehova ayebisaki Bayisraele oyo batikaki ye ete: “Bózongela ngai, mpe ngai nakozongela bino.” Toyebi ete ata lelo mpe ayokaka kaka bongo mpo alobi ete: “Nabongwani te.” (Mal. 3:6, 7) Yesu alobaki ete Yehova mpe baanzelu basepelaka mingi ntango moko ya basaleli ya Yehova oyo abungaki azongeli ye.​—Luka 15:10, 32.

2. Tokolobela nini na lisolo oyo?

2 Tólobela bandakisa misato oyo Yesu asalelaki, oyo ekoki kosalisa biso tóyeba ndenge ya kosalisa baoyo batiká kosalela Yehova. Tokolobela bizaleli oyo tosengeli na yango mpo na kosalisa mpate oyo ebungá ezongela Yehova. Mpe tokomona esengo oyo tokoki kozwa ntango tosalisi baoyo batiká kosakola mpe koyangana na makita bázongela Yehova.

KOLUKA DRAKIMƐ OYO EBUNGI

3-4. Mpo na nini mwasi oyo balobeli na Luka 15:8-10, alukaki na likebi mpenza drakimɛ na ye oyo ebungaki?

3 Tosengeli kosala milende mpo na komona baoyo balingi kozongela Yehova. Na lisese moko oyo Yesu apesaki, oyo ezali na evanzile ya Luka, alobelaki ndenge mwasi moko alukaki drakimɛ na ye oyo ebungaki. Likambo ya ntina na lisese yango ezali milende oyo mwasi yango asalaki mpo na koluka drakimɛ na ye oyo ebungaki.​—Tángá Luka 15:8-10.

4 Yesu alobelaki esengo oyo mwasi yango ayokaki ntango amonaki drakimɛ na ye. Emonani ete na mikolo ya Yesu, soki mwana mwasi abali, mama na ye azalaki kopesa ye drakimɛ zomi na mokolo ya libala na ye. Ekoki kozala ete drakimɛ oyo ebungaki ezalaki moko ya badrakimɛ oyo bapesaki ye na mokolo ya libala na ye. Mwasi yango andimaki ete drakimɛ na ye ekweaki na nse. Na yango, apelisaki mwinda mpo na koluka yango kasi amonaki eloko te. Ekoki kozala ete mwinda na ye ezalaki kopela makasi te mpo esalisa ye amona yango. Nsukansuka, akɔmbɔlaki ndako mobimba. Na kati ya putulu oyo asangisaki, amonaki drakimɛ na ye oyo ezalaki kongɛnga mpo na pole ya mwinda. Motema na ye ekitaki mpenza. Abengaki baninga mpe bato ya kartye mpo na koyebisa bango nsango malamu yango.

5. Mpo na nini ekoki kozala mpasi komona baoyo batiká lisangá?

5 Ndenge ndakisa wana ya Yesu emonisi yango, esɛngaka milende mingi mpo na komona eloko oyo ebungi. Ezali mpe bongo mpo na baoyo batiká kosakola mpe koyangana na makita. Tosengeli kosala milende mpo na koluka bango. Ekoki kozala ete bambula mingi eleká banda batiká koyangana na biso. Ekoki kozala mpe bakendá kofanda na esika moko oyo bandeko bayebi bango te. Kasi toyebi ete sikoyo bato ya ndenge wana bazali na mposa ya kozongela Yehova. Balingi lisusu kosambela Yehova elongo na bandeko na lisangá mpe bazali na mposa ete tósalisa bango.

6. Ndenge nini bandeko nyonso ya lisangá bakoki kopesa mabɔkɔ mpo na koluka baoyo batiká lisangá?

6 Nani azali na mokumba ya koluka baoyo batiká lisangá? Biso nyonso. Ezala bankulutu, babongisi-nzela, bandeko ya libota mpe basakoli nyonso ya lisangá bakoki kosalisa. Ozali na moninga to ndeko moko ya libota oyo atiká lisangá? Okosala nini soki okutani na ndeko moko oyo atiká lisangá ntango ozali kosakola ndako na ndako to na bisika ya bato nyonso? Yebisá ndeko yango ete soki asepeli, okopesa adrɛsi mpe nimero na ye ya telefone epai ya bankulutu ya lisangá na bino mpo báya kotala ye.

7. Makambo oyo nkulutu moko na nkombo Thomas alobi eteyi yo nini?

7 Makambo nini mpenza bankulutu bakoki kosala mpo na koluka baoyo bazali na mposa ya kozongela Yehova? Tótalela maloba ya Thomas, * nkulutu moko oyo afandaka na Espagne. Asalisá bandeko koleka 40 bázongela kosakola mpe koyangana na makita. Ndeko Thomas alobi boye: “Natunaka naino bandeko ndenge na ndenge soki bayebi bisika oyo bato yango bafandaka. Natunaka mpe basakoli soki bayebi ndeko moko oyo atiká koyangana na makita. Bandeko mingi basepelaka kopesa mabɔkɔ mpo bayebi ete likambo yango etali mpe bango. Na nsima, ntango nakei kotala bandeko yango oyo batiká lisangá, natunaka soki bana mpe bandeko na bango mosusu ya libota bazali ndenge nini. Bandeko mosusu oyo batiká lisangá bazalaki komema bana na bango na makita mpe ekoki kozala ete bana yango mpe mosusu bazalaki basakoli. Bango mpe bazali na mposa ya lisalisi mpo bázongela Yehova.”

SALISÁ BANDEKO OYO BABUNGÁ BÁZONGELA YEHOVA

8. Na kotalela ndakisa ya Yesu oyo ezali na Luka 15:17-24, ndenge nini tata asalelaki mwana na ye oyo abongolaki motema makambo?

8 Bizaleli nini tosengeli komonisa ntango tozali kosalisa baoyo babungá bázongela Yehova? Tokoki kozwa mateya na ndakisa oyo Yesu apesaki ya mwana oyo alongwaki na ndako. (Tángá Luka 15:17-24.) Yesu alimbolaki ndenge oyo nsukansuka mwana yango azongelaki makanisi malamu mpe azwaki ekateli ya kozonga na ndako. Tata apotaki mbangu mpo na kokutana na mwana na ye mpe apwɛpwaki ye mpo mwana yango ayeba ete tata na ye azalaki kolinga ye. Mwana yango ayokaki mpasi mpo na makambo oyo asalaki mpe amonaki ete abongi lisusu te kobengama mwana ya tata yango. Ntango mwana yango abimisaki mayoki na ye, tata amityaki na esika ya mwana yango. Na nsima, tata asalaki likambo oyo emonisaki ete asepelaki ndenge mwana na ye azongaki na ndako. Asalelaki mwana na ye makambo te lokola mosali kasi lokola mwana oyo alingami. Mpo na komonisa yango, tata asalaki fɛti mpe apesaki mwana na ye oyo abongolaki motema bilamba ya kitoko.

9. Bizaleli nini tosengeli komonisa mpo na kosalisa baoyo batiká lisangá bázongela Yehova? (Talá etanda “ Ndenge ya kosalisa baoyo bazali na mposa ya kozongela Yehova.”)

9 Yehova akokani na tata oyo ndakisa yango elobeli. Alingaka bandeko na biso oyo batiká kosakola mpe koyangana na makita, mpe alingi ete bázongela ye. Mpo na komekola Yehova, tokoki kosalisa bango bázongela ye. Mpo na kosala yango, tosengeli kozala na motema molai, komitya na esika na bango, komonisela bango boboto mpe bolingo. Mpo na nini bizaleli yango ezali na ntina, mpe ndenge nini tokoki komonisa yango?

10. Mpo na nini tosengeli komonisa motema molai ntango tozali kosalisa moto azongela Yehova?

10 Tosengeli komonisa motema molai mpo esɛngaka ntango mpo moto azongela Yehova. Bandeko mingi oyo batikaki kosakola mpe koyangana na makita balobi ete mpo bázongela lisusu Yehova, esɛngaki kaka bankulutu mpe bandeko mosusu ya lisangá báyaka kotala bango. Ndeko mwasi moko na nkombo Nancy akomi boye: “Moninga moko ya motema na kati ya lisangá asalisaki ngai mingi. Alingaki ngai lokola ndeko na ye ya mwasi. Akundwelaki ngai bantango ya malamu oyo tolekisaki elongo. Azalaki komonisa motema molai ntango nazalaki kobimisa mayoki na ngai, mpe azalaki kokakatana te mpo na kopesa ngai toli. Amonisaki ete azali mpenza moninga ya solo oyo akoki kosalisa ngai ntango nyonso.”

11. Mpo na nini komitya na esika ya basusu ezali na ntina mpo na kosalisa moto oyo azali komitungisa?

11 Ntango moto moko azali komitungisa ekoki kozala lokola azoki mpota. Komitya na esika na ye ezali lokola nkisi oyo ekoki kosalisa ye ayoka malamu. Bandeko mingi batiká lisangá bambula mingi mpe bazalaka kaka na nkanda mpo ndeko moko na kati ya lisangá apesaki bango mpasi. Yango wana, bazalaka lisusu na mposa ya kozongela Yehova te. Basusu bakoki kokanisa ete basalelaki bango makambo na kozanga bosembo. Bazalaka na mposa ete moto moko ayoka bango mpo na koyeba ndenge oyo bazali komiyoka. (Yak. 1:19) María, ndeko mwasi moko oyo atikaki lisangá na ntango moko boye alobi: “Nazalaki na mposa ete moto moko ayoka ngai, alendisa ngai mpe apesa ngai toli oyo ekosalisa ngai.”

12. Pesá ndakisa oyo emonisi ete bolingo ya Yehova ezali lokola nsinga.

12 Biblia emonisi ete bolingo ya Yehova epai ya basaleli na ye ezali lokola nsinga. Na ndenge nini? Tótalela ndakisa oyo. Kanisá ete okwei na kati ya libulu moko ya mozindo mpe ozali na likoki te ya kobima yo moko. Mpo na kobima na libulu yango, esengeli kaka moto moko abwakela yo nsinga mpe abenda yo libándá. Yehova alobaki boye mpo na Bayisraele oyo batikaki kosalela ye: “Nazalaki kobenda bango na bansinga ya bolingo.” (Hos. 11:4) Lelo oyo, Nzambe ayokaka mpe bongo mpo na baoyo batiká kosalela ye mpe baoyo bazali kokutana na makambo oyo ezali kotungisa bango. Alingi báyeba ete alingaka bango mpe alingi bázongela ye. Yehova akoki kosalela yo mpo osalisa bato yango bámona ete alingaka bango.

13. Ndenge nini lisolo ya ndeko Pablo emonisi ete bolingo na biso ekoki kosalisa basusu bázongela Yehova?

13 Ezali na ntina tóyebisa bandeko oyo batiká lisangá ete Yehova alingaka bango mpe biso tolingaka bango. Pablo, ndeko mobali oyo tolobelaki na lisolo oyo eleki atikaki lisangá bambula koleka 30. Alobi boye: “Mokolo moko na ntɔngɔ liboso nabima na ndako mpo na kokende mosala, ndeko mwasi moko ya mobange mpe ya boboto ayaki kotala ngai mpe alobaki na ngai na boboto mpenza. Nalelaki lokola mwana moke, nayebisaki ye ete ezalaki lokola Yehova nde atindaki ye mpo aya kosolola na ngai. Ezalaki na ntango yango nde nazwaki ekateli ya kozongela Yehova.”

SALISÁ BATO YA BOLEMBU

14. Na kotalela ndakisa ya Yesu oyo ezali na Luka 15:4, 5, mobateli ya mpate asali nini nsima ya komona mpate na ye oyo ebungaki?

14 Tosengeli kokoba kosalisa mpe kolendisa bandeko oyo batiká kosakola mpe koyangana na makita. Ndenge moko na mwana oyo abungaki na ndakisa oyo Yesu apesaki, bandeko yango bakoki kozala na mawa oyo ekoki koumela. Mpe lokola bazali na mokili ya Satana, ekoki kozala ete bazali lisusu na boyokani ya malamu te na Yehova. Tosengeli kosalisa bango bákóma lisusu na kondima makasi epai ya Yehova. Na ndakisa ya mpate oyo ebungaki, Yesu amonisi ndenge mobateli ya mpate amemi mpate na mapeka mpe azongisi yango na etonga. Mobateli ya mpate alekisaki ntango mingi mpe apesaki makasi na ye mpo na komona mpate oyo ebungaki. Kasi ayebi ete mpate yango ezali kaka na mposa ya lisalisi. Amemi yango mpo ezali na makasi te ya kotambola yango moko kino na etonga.​—Tángá Luka 15:4, 5.

15. Ndenge nini tokoki kosalisa bato ya bolɛmbu oyo balingi kozongela Yehova? (Talá etanda “ Esaleli moko ya ntina mingi.”)

15 Ekoki kosɛnga ntango mpe makasi mpo na tósalisa baoyo batiká koyangana na makita mpe kosakola bálonga makambo oyo ezali kopekisa bango kozongela Yehova. Kasi na nzela ya elimo ya Yehova, Liloba na ye, mpe mikanda oyo ebongiseli ya Yehova ezali kobimisa, tokoki kosalisa bango bázongisa lisusu boyokani ya malamu ná Yehova. (Rom. 15:1) Ndenge nini tokoki kosala yango? Nkulutu moko oyo aumeli mingi alobi boye: “Esɛngaka koyekola Biblia na bandeko oyo batiká kosakola mpe koyangana na makita soki bazwi ekateli ya kozongela Yehova.” * Soki basɛngi yo oyekola Biblia ná ndeko moko oyo atiká kosakola mpe koyangana na makita, osengeli kosepela mpenza na libaku yango. Nkulutu yango abakisi boye: “Mosakoli oyo azali koyekola Biblia ná ndeko oyo atiká kosakola mpe koyangana na makita, asengeli kozala moninga malamu oyo ndeko yango akotyela motema mpe oyo akoki koyebisa makambo na ye.”

ESENGO NA LIKOLÓ MPE NA MABELE

16. Nini emonisi ete baanzelu basalisaka biso?

16 Bandakisa mingi emonisi ete baanzelu basalisaka biso tókutana na bandeko oyo batiká kosakola mpe koyangana na makita oyo bazali na mposa ya kozongela Yehova. (Em. 14:6) Na ndakisa, ndeko mobali moko oyo atikaki kosakola mpe koyangana na makita na nkombo Silvio, oyo afandaka na ekólo Équateur, abondelaki Yehova atinda moto moko mpo na kosalisa ye. Ntango azalaki kobondela, bankulutu mibale babɛtaki na porte na ye, bayaki kotala ye. Na boumeli ya ntango oyo balekisaki, bankulutu yango basepelaki ndenge basalisaki ye.

17. Litomba nini tokozwa soki tosalisi moto moko oyo alɛmbaki na elimo?

17 Tokozwa esengo mingi ntango tosalisi moto oyo alɛmbaki na elimo azongela Yehova. Tótala oyo ndeko mobali moko na nkombo Salvador, oyo azali mobongisi-nzela, mpe atyelaka bandeko oyo balɛmbá na elimo likebi alobi: “Ntango nakanisaka bandeko oyo batikaki lisangá kasi bazongeli Yehova, nakokaka te kokanga motema mpe na bantango mosusu, esengo esalaka ete nalela. Nayokaka esengo mingi ndenge nazwi likoki ya kosala elongo na Yehova mpo na kosalisa mosaleli na ye alongwa na mokili ya Satana mpe azongela lisangá.”​—Mis. 20:35.

18. Soki otiká kosakola mpe koyangana na makita, likambo nini osengeli kobosana te?

18 Ata soki otiká koyangana na makita mpe kosakola, yebá ete Yehova alingaka yo kaka. Alingi ete ozongela ye. Osengeli kosala milende mpo na kozongela ye. Kaka lokola tata oyo tolobelaki na ndakisa oyo Yesu apesaki, Yehova azali kozela ete ozongela ye mpe akoyamba yo na esengo.

LOYEMBO 103 Babateli ya mpate​—Makabo oyo ezali bato

^ par. 5 Yehova alingi ete baoyo nyonso batiká kosakola mpe koyangana na makita bázongela ye. Tokoki kolendisa bango bándima libyangi ya Yehova oyo elobi: “Bózongela ngai.” Na lisolo oyo, tokolobela ndenge oyo tokoki kosala yango.

^ par. 7 Topesi bango bankombo mosusu.

^ par. 15 Bandeko mosusu oyo batiká kosakola mpe koyangana na makita bakoki kozwa lisalisi soki bayekoli mikapo mosusu ya buku Ndenge ya kotikala na kati ya bolingo ya Nzambe. Kasi basusu bazwaki lisalisi ntango bazongelaki mikapo ya buku Pusaná penepene na Yehova. Komite ya mosala nde ekopona bandeko oyo babongi mpo na koyekola na bandeko ya ndenge wana.

^ par. 68 NDIMBOLA YA BILILINGI: Bandeko mibali misato ndenge na ndenge bazali kosalisa ndeko mobali oyo azali na mposa ya kozongela Yehova. Bamonisi yango na ndenge bazwi nimero na ye ya telefone, bamonisi ye ete balingaka ye mpe bazali koyoka ye na likebi.