Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOYEKOLI 24

“Pesá ngai motema moko mpo nabanga nkombo na yo”

“Pesá ngai motema moko mpo nabanga nkombo na yo”

Pesá ngai motema moko mpo nabanga nkombo na yo. Ee Yehova Nzambe na ngai, nazali kokumisa yo na motema na ngai mobimba.”​NZ. 86:11, 12.

LOYEMBO 7 Yehova azali makasi na biso

NA MOKUSE *

1. Kobanga Nzambe elimboli nini, mpe mpo na nini baoyo balingaka Yehova basengeli kobanga ye?

BAKRISTO balingaka Nzambe mpe babangaka ye. Na lisolo oyo, tokolobela ntina ya kobanga Nzambe. Kasi kobanga Nzambe elimboli nini? Bato oyo babangaka Nzambe bazalaka na limemya mozindo mpo na ye. Balingaka te koyokisa Tata na bango ya likoló mpasi na motema mpe kobebisa boninga na bango ná ye.​—Nz. 111:10; Mas. 8:13.

2. Na kotalela maloba ya Mokonzi Davidi oyo ezali na Nzembo 86:11, makambo nini mibale tokolobela?

2 Tángá Nzembo 86:11. Wana ozali kokanisa na maloba ya vɛrsɛ yango, okoki koloba ete mokonzi Davidi ayebaki ntina ya kobanga Nzambe. Tótala sikoyo ndenge oyo tokoki kosalela maloba yango oyo ezali na libondeli ya Davidi. Ya liboso, tokolobela ntina oyo tosengeli kozala na limemya mozindo mpo na nkombo ya Nzambe. Ya mibale, tokolobela ndenge oyo tokoki komonisa limemya mpo na nkombo ya Nzambe na bomoi na biso ya mokolo na mokolo.

MPO NA NINI TOSENGELI KOZALA NA LIMEMYA MAKASI MPO NA NKOMBO YA NZAMBE?

3. Ekoki kozala ete likambo nini esalisaki Moize akoba kozala na limemya mozindo mpo na nkombo ya Nzambe?

3 Kanisá ndenge Moize amiyokaki ntango azalaki na mobenga moko mpe amonaki emonaneli ya nkembo ya Yehova ezali koleka. Buku Étude perspicace des Écritures elobi boye: “Yango ezalaki likambo ya kokamwa oyo moto akokaki komona.” Na ntembe te, Moize ayokaki maloba oyo ya anzelu: “Yehova, Yehova, Nzambe ya motema mawa mpe ya ngɔlu, ayokaka nkanda noki te mpe atondi na motema boboto mpe na solo, abatelaka motema boboto mpo na bankóto, alimbisaka libunga ná kobuka mibeko mpe lisumu.” (Kob. 33:17-23; 34:5-7) Ekoki kozala ete ntango Moize azalaki kosalela nkombo ya Nzambe, Yehova, makambo oyo amonaki na emonaneli yango ezalaki kozongela ye na makanisi. Tokoki kokamwa te soki na nsima, Moize akebisaki Yisraele ete ‘bábanga nkombo yango ya nkembo mpe ya nsɔmɔ.’​—Mib. 28:58.

4. Kokanisa na bizaleli nini ekoki kotinda biso tózala na limemya makasi mpo na Yehova?

4 Ntango tozali kokanisa mpo na nkombo Yehova, tosengeli mpe kokanisa bomoto na ye. Tosengeli mpe kokanisa mpo na bizaleli na ye, na ndakisa nguya, bwanya, bosembo, mpe bolingo na ye. Kokanisa na bizaleli yango mpe bizaleli mosusu ekoki kotinda biso tózala na limemya makasi mpo na ye.​—Nz. 77:11-15.

5-6. (a) Nkombo ya Nzambe elimboli nini? (b) Na kotalela Kobima 3:13, 14 mpe Yisaya 64:8, Yehova asalaka nini mpo na kokokisa mokano na ye?

5 Makambo nini toyebi mpo na ndimbola ya nkombo ya Nzambe? Bato mingi ya mayele balobi ete nkombo ya Nzambe elimboli “akómisaka.” Ndimbola yango ekundweli biso ete eloko moko te ekoki kopekisa Yehova asala likambo oyo akani kosala. Na ndenge nini?

6 Yehova akómaka nyonso oyo esengeli mpo na kosala makambo oyo ekokokisa mokano na ye. (Tángá Kobima 3:13, 14.) Mbala na mbala, mikanda na biso elendisaka biso tókanisa na likoki wana ya kokamwa oyo Nzambe azalaka na yango. Yehova akoki mpe kokómisa basaleli na ye ya kozanga kokoka nyonso oyo esengeli mpo na kosalela ye mpe kokokisa mokano na ye. (Tángá Yisaya 64:8.) Na ndenge yango, Yehova asalaka ete mokano na ye ekokisama. Eloko moko te ekoki kopekisa Yehova akokisa mokano na ye.​—Yis. 46:10, 11.

7. Ndenge nini tokoki kokolisa botɔndi mpo na Tata na biso ya likoló?

7 Tokoki kokolisa botɔndi mpo na Tata na biso ya likoló soki tozali komanyola na makambo oyo asalaka mpe na oyo apesaka biso likoki ya kosala. Na ndakisa, ntango tozali komanyola na biloko ya kokamwa oyo Nzambe asalá, yango ekamwisaka biso mpenza. (Nz. 8:3, 4) Mpe ntango tozali komanyola na ndenge oyo Yehova akómisaka biso oyo esengeli mpo na kosala mokano na ye, tokómaka na limemya makasi mpo na ye. Tosengeli kozala na limemya mozindo mpo na nkombo ya Nzambe, Yehova! Nkombo yango esangisi bomoto ya Tata na biso, makambo nyonso oyo asalaka mpe oyo akosala.​—Nz. 89:7, 8.

“NAKOSAKOLA NKOMBO YA YEHOVA”

Makambo oyo moize ateyaki, ekitisaki bato motema. Ebendaki likebi mingimingi na nkombo mpe na bomoto ya yehova. (Talá paragrafe 8) *

8. Na kotalela Kolimbola Mibeko 32:2, 3, Yehova alingi ete basaleli na ye básala nini na nkombo na ye?

8 Liboso Bayisraele bákɔta na Mokili ya Ndaka, Yehova ateyaki Moize maloba ya loyembo moko. (Mib. 31:19) Na nsima, Moize mpe asengelaki kolakisa Bayisraele loyembo yango. (Tángá Kolimbola Mibeko 32:2, 3.) Soki tomanyoli na vɛrsɛ ya mibale mpe ya misato, tokomona polele ete Yehova alingi ete bato báyeba nkombo na ye, bákanisa te ete basengeli kobenga yango te mpo ezali mosantu mingi. Alingi ete moto nyonso ayeba nkombo na ye! Ezalaki likambo ya esengo mpo na Bayisraele koyoka ete Moize azali kolakisa bango makambo etali Yehova mpe nkombo na ye monene! Kaka ndenge mai ya mbula ekolisaka milona, makambo oyo Moize ateyaki ekómisaki kondima na bango makasi mpe elendisaki bango. Tokoki kosala nini mpo tóteyaka mpe bongo?

9. Ndenge nini tokoki kopesa mabɔkɔ na kosantisama ya nkombo ya Nzambe?

9 Ntango tozali kosakola ndako na ndako to na esika ya bato ebele, tokoki kosalela Biblia mpo na kolakisa bato nkombo ya Nzambe, Yehova. Tokoki kopesa bango mikanda, kolakisa bango bavideo to mpe makambo oyo ezali na jw.org mpo na kokumisa Yehova. Ezala na mosala, na eteyelo, to ntango tozali kosala mibembo, tokoki kozwa mabaku ya kolobela makambo oyo etali Tata na biso ya bolingo mpe bomoto na ye. Ntango toyebisi bato oyo tokutani na bango mokano ya Tata na biso ya bolingo mpo na bato mpe mabele, mpe soki bayoki makambo yango, bakoki komona mpo na mbala ya liboso ndenge Yehova alingaka biso. Ntango tozali koyebisa bato mosusu makambo ya solo oyo etali Tata na biso ya bolingo, tozali kopesa mabɔkɔ na kosantisama ya nkombo ya Nzambe. Makambo oyo toteyaka bato na Biblia ekitisaka bango motema.​—Yis. 65:13, 14.

10. Ntango tozali koyekola na bato Biblia, mpo na nini tosengeli kosuka kaka te na koteya bango mibeko ya sembo ya Nzambe?

10 Ntango tozali koyekola na bato Biblia, mposa na biso ezalaka ete báyeba mpe básalela nkombo ya Nzambe, Yehova. Lisusu, tolingaka kosalisa bango báyeba Yehova malamu. Mpo na kosala bongo, tosengeli kosuka kaka te na koteya bango mibeko, malako mpe ndenge oyo basengeli komitambwisa. Moyekoli ya malamu akoki koyekola mibeko ya Nzambe ata mpe kolinga yango. Kasi bolingo nde esengeli kotinda moyekoli yango atosa Yehova. Kobosana te, Adama ná Eva bayebaki mibeko ya Nzambe kasi bazalaki mpenza kolinga ye te. (Eba. 3:1-6) Yango wana, tosengeli kosuka kaka te na koteya bato mibeko ya sembo ya Nzambe.

11. Ntango tozali koteya bayekoli ya Biblia mibeko ya Nzambe, ndenge nini tokoki kosalisa bango bálinga mpe Yehova, Mopesi-mibeko yango?

11 Mibeko ya Nzambe ezalaka ntango nyonso mpo na bolamu na biso. (Nz. 119:97, 111, 112) Kasi bato oyo toyekolaka na bango Biblia bakoki komona te ete Yehova atyá mibeko yango mpo na bolamu na biso. Na yango, tokoki kotuna moyekoli ya Biblia boye: “Okanisi nini, mpo na nini Nzambe asɛngi basaleli na ye básala likambo boye, mpe apekisi bango básala likambo boye? Yango eteyi biso nini mpo na ye?” Soki tosalisi bayekoli ya Biblia bákanisa mpo na Yehova mpe bákolisa bolingo mpo na nkombo na ye monene, yango ekosalisa biso tósimba mitema na bango. Bakolinga mibeko ya Nzambe kasi mpe Yehova, Mopesi-Mibeko yango. (Nz. 119:68) Kondima na bango ekokóma makasi mpe bakoyika mpiko na mikakatano oyo bakoki kokutana na yango.​—1 Ko. 3:12-15.

“TOKOTAMBOLA NA NKOMBO YA YEHOVA”

Na libaku moko, Davidi atikaki nzela ete motema na ye ekabwana (Talá paragrafe 12)

12. Ndenge nini na ntango moko boye, Davidi alongaki te kobatela motema moko, mpe yango ebimisaki makama nini?

12 Nzembo 86:11 ezali na maloba ya ntina mingi oyo elobi: “Pesá ngai motema moko.” Mokonzi Davidi akomaki maloba yango na litambwisi ya elimo ya Nzambe. Na bomoi na ye, amonaki ete ezalaka mpasi te mpo motema ya moto ekabwana. Na ndakisa, mokolo moko ntango azalaki na nsamba ya ndako na ye, amonaki mwasi ya moto mosusu azali kosukola. Na ntango yango, motema ya Davidi ezalaki moko to ekabwanaki? Ayebaki mobeko ya Nzambe oyo elobi ete: “Osengeli te kolula mwasi ya moninga na yo.” (Kob. 20:17) Atako bongo, Davidi akobaki kaka kotala mwasi yango. Motema na ye ekabwanaki: akokisa mposa na ye epai ya Bate-sheba, to asepelisa Yehova. Atako Davidi azalaki kolinga Yehova mpe kobanga ye bambula mingi, akokisaki mposa na ye ya moimi. Asalaki makambo ya mabe mpenza. Afingisaki nkombo ya Nzambe, mpe apesaki bato mosusu mpasi ata mpe bato ya libota na ye.​—2 Sam. 11:1-5, 14-17; 12:7-12.

13. Nini emonisi ete na nsima Davidi akómaki na motema moko?

13 Yehova apesaki Davidi etumbu, mpe Davidi azongisaki boyokani malamu ná ye. (2 Sam. 12:13; Nz. 51:2-4, 17) Abosanaki te mpasi mpe makambo mabe oyo ebimaki ntango atikaki ete motema na ye ekabwana. Maloba na ye oyo ezali na Nzembo 86:11 ekoki mpe kotángama boye: “Pesá ngai motema oyo ekabwani te.” Yehova asalisaki Davidi akóma na motema mobimba, to oyo ekabwani te? Ɛɛ, mpo na nsima, Liloba ya Yehova elobelaki Davidi lokola moto oyo azali na ‘motema mobimba epai ya Yehova Nzambe na ye.’​—1 Bak. 11:4; 15:3.

14. Motuna nini tosengeli komituna, mpe mpo na nini?

14 Ndakisa ya Davidi ezali kolendisa mpe kokebisa biso. Ndenge akweaki na lisumu monene ezali likebisi epai ya basaleli ya Nzambe lelo oyo. Ezala tobandi kosalela Yehova sika to tosalelaka ye bambula mingi, tosengeli komituna boye: ‘Nakimaka mitambo ya Satana oyo ekoki kokabola motema na ngai?’

Satana akosala nyonso mpo na kokabola motema na yo. Kotikela ye nzela te! (Talá paragrafe 15-16) *

15. Ndenge nini kobanga Nzambe ekoki kobatela biso soki tomoni bililingi oyo elamwisaka mposa ya nzoto?

15 Na ndakisa, okosala nini soki na televizyo to na internet omoni bililingi oyo ekoki kolamwisa mposa ya nzoto? Okoki koloba ete elilingi yango to filme yango ezali mpenza pornografi te. Kasi ekoki kozala te milende oyo Satana azali kosalela mpo na kokabola motema na yo? (2 Ko. 2:11) Elilingi yango ekoki kozala lokola epasola oyo moto asaleli mpo na kopanza eteni ya nzete. Ntango azali kobɛtabɛta epasola makasi, eteni ya nzete yango ekopanzana. Bililingi wana ya mabe ezali lokola epasola. Kotala yango na ebandeli ekoki komonana lokola ezali na likama te, kasi ekoki kotinda moto asala lisumu oyo ekoki kokabola motema na ye mpe kobebisa bosembo na ye. Yango wana, boyá kokɔtisa eloko nyonso ya mbindo na kati ya motema na yo! Kobá kobatela motema na yo mobimba mpo na kobanga nkombo ya Nzambe, Yehova!

16. Ntango tomekami mpo na kosala likambo moko ya mabe, mituna nini tosengeli komituna?

16 Longola bililingi oyo elamwisaka mposa ya nzoto, Satana asalelaka mpe makambo mosusu mpo na komeka biso. Tokosala nini? Ekoki kozala pɛtɛɛ tókanisa ete makambo yango ezali mpenza mabe te. Na ndakisa, tokoki kokanisa boye: ‘Ata soki nasali makambo yango, nakolongolama na lisangá te, mpo makambo yango ezali mpenza mabe te.’ Makanisi ya bongo ezali mpenza libunga. Ekozala malamu tómituna boye: ‘Satana azali te kosalela komekama oyo mpo na kokabola motema na ngai? Soki nakokisi bamposa wana ya mabe, ekomema nsɔni na nkombo ya Nzambe? Likambo yango ekosala ete napusana penepene ya Nzambe na ngai to ekokómisa ngai nde mosika na ye? Manyolá na mituna yango, bondelá mpo na kosɛnga bwanya mpo oyanola na bosembo nyonso na mituna wana. (Yak. 1:5) Kosala bongo ekozala libateli ya solosolo. Yango ekoki kosalisa yo otɛmɛla komekama na mpiko nyonso, kaka ndenge Yesu asalaki ntango alobaki: “Longwá, Satana!”​—Mat. 4:10.

17. Mpo na nini ezali malamu te ete motema na biso ekabwana? Pesá ndakisa.

17 Ezali malamu te ete motema na biso ekabwana. Kanisá ete bato ya ekipi moko ya lisano bayokanaka te. Basusu bazali koluka lokumu na bango moko, mwa ndambo bazali kolanda mibeko ya lisano te, mpe basusu bazali kotosa antrenɛrɛ te. Ekipi ya ndenge wana ekolonga te na lisano. Nzokande, ekipi oyo basani na yango bazali na bomoko, elongaka. Mpo motema na yo ezala lokola ekipi wana oyo elongaka, makanisi na yo, bamposa na yo, mpe mayoki na yo esengeli kozala mobimba epai ya Yehova. Kobosana te ete Satana akoluka kokabola motema na yo. Alingi ete makanisi na yo, bamposa na yo, mpe mayoki na yo eboya kotosa mibeko ya Yehova. Kasi motema na yo esengeli kozala mobimba mpo na kosalela Yehova. (Mat. 22:36-38) Kotika nzela soki moke te ete Satana akabola motema na yo!

18. Na kotalela Mika 4:5, ozwi ekateli ya kosala nini?

18 Lokola Davidi, okoki kobondela boye: “Pesá ngai motema moko mpo nabanga nkombo na yo.” Salá nyonso oyo okoki mpo na kosala na boyokani na libondeli yango. Mokolo na mokolo, salá ete bikateli na yo, ezala ya minene to ya mike, emonisa ete ozali kozwa nkombo mosantu ya Nzambe, Yehova, na limemya mpenza. Soki osali bongo, okomonisa mpenza ete ozali Motatoli ya Yehova, oyo asalaka na boyokani na nkombo yango. (Mas. 27:11) Mpe biso nyonso tokozala na likoki ya koloba lokola mosakoli Mika ete: “Tokotambola na nkombo ya Yehova Nzambe na biso mpo na ntango oyo etyami ndelo te, ɛɛ seko na seko.”​—Mika 4:5.

LOYEMBO 41 Yoká libondeli na ngai

^ par. 5 Na lisolo oyo, tokolobela libondeli oyo Davidi asalaki oyo ezali na Nzembo 86:11, 12. Kobanga nkombo ya Nzambe, Yehova elimboli nini? Mpo na nini tosengeli kozala na limemya makasi mpo na nkombo yango monene? Mpe ndenge nini kobanga nkombo ya Nzambe ekobatela biso ntango tomekami?

^ par. 53 NDIMBOLA YA BILILINGI: Moize ateyaki basaleli ya Nzambe loyembo oyo ekumisaki Yehova.

^ par. 57 NDIMBOLA YA BILILINGI: Eva atɛmɛlaki te bamposa ya mabe. Kasi biso, toboyaka kotala bililingi to kotánga bamesaje oyo elamwisaka bamposa ya mabe mpe oyo ekoki kofingisa nkombo ya Nzambe.