Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOYEKOLI 25

Bankulutu​—Bózwa mateya na ndakisa ya Gideone

Bankulutu​—Bózwa mateya na ndakisa ya Gideone

“Ntango ekozanga ngai soki nalobeli lisusu Gideone.” ​—EBR. 11:32.

LOYEMBO 124 Tótikala sembo

NA MOKUSE a

1. Na kotalela 1 Petro 5:2, mokumba nini bankulutu bazalaka na yango?

 NA LISANGÁ, bankulutu bazali na mokumba ya kobatela bampate ya Yehova mpo bazali na motuya mingi na miso na ye. Mibali yango oyo bamipesaka mpo na bampate ya Yehova, bazwaka na motuya mingi mpenza mokumba na bango ya kosalela bandeko, mpe basalaka makasi mpo bázala ‘babateli oyo baleisaka bampate.’ (Yir. 23:4; tángá 1 Petro 5:2.) Tozalaka na botɔndi ndenge tozalaka na mibali ya ndenge wana na masangá na biso!

2. Komekama nini bankulutu mosusu bakoki kokutana na yango?

2 Bankulutu bakutanaka na mikakatano mingi ntango bazali kokokisa mikumba na bango. Yango wana, esɛngaka ete básala mosala makasi mpo na kokokisa mokumba yango. Ndeko Tony, nkulutu moko na États-Unis, ayekolaki komonisa lisusu bopɔlɔ mingi ntango andimaki kokokisa mikumba mingi. Alobi: “Ntango maladi ya coronavirus ebandaki, nakómaki kosala makambo mingi mpo na kobongisa makambo etali makita ya lisangá mpe mosala ya kosakola. Kasi ezala nasalaki mosala makasi ndenge nini, nazalaki ntango nyonso kozanga makambo ya kosala te. Nsukansuka, nakómaki na makambo mingi ya kosala tii nakokaki lisusu te kozwa ntango mpo na kotánga Biblia, koyekola ngai moko, mpe kobondela.” Ndeko Ilir, nkulutu moko na Kosovo, akutanaki na mokakatano ya ndenge mosusu. Ntango azalaki na esika oyo bitumba ezalaki, amonaki ete ekómaki mpasi mpo atosa malako ya Teokrasi. Alobi: “Mpiko na ngai emekamaki ntango biro ya filiale epesaki ngai mokumba ya kosalisa bandeko basi mpe mibali oyo bazalaki na esika oyo makama ezalaki mingi. Nazalaki kobanga, mpe ezalaki komonana lokola malako yango ebongaki te.” Ndeko Tim, misionɛrɛ moko na Azia, amonaki ete ezalaki mpasi kosala makambo nyonso oyo asengelaki kosala mokolo na mokolo. Alobi: “Na bantango mosusu, nazalaki komiyoka ete mokumba ya kobatela bandeko elɛmbisi ngai.” Nini ekoki kosalisa bankulutu oyo bazali kokutana na mikakatano ya ndenge wana? 

3. Ndenge nini biso nyonso tokoki kozwa matomba na ndakisa ya mosambisi Gideone?

3 Bankulutu bakoki kozwa mateya na ndakisa ya mosambisi Gideone. (Ebr. 6:12; 11:32) Azalaki mobikisi mpe mobateli ya basaleli ya Nzambe. (Bas. 2:16; 1 Nt. 17:6) Lokola Gideone, bankulutu baponamaka mpo na kobatela basaleli ya Nzambe na ntango ya mpasi mpenza. (Mis. 20:28; 2 Tim. 3:1) Tokoki kozwa mateya na bopɔlɔ, komikitisa, mpe botosi oyo Gideone amonisaki. Ezalaki mpasi ayika mpiko ntango azalaki kokokisa mikumba na ye. Tózala bankulutu to te, tokoki koyekola komonisa botɔndi mpo na bankulutu na biso. Tokoki kosalisa mibali wana oyo basalaka makasi mpo na kobatela biso na lisangá.​—Ebr. 13:17.

NTANGO BOPƆLƆ MPE KOMIKITISA NA YO EMEKAMI

4. Ndenge nini Gideone amonisaki ete azalaki moto ya bopɔlɔ mpe ya komikitisa?

4 Gideone azalaki moto ya bopɔlɔ mpe ya komikitisa. b Ntango anzelu ya Yehova ayebisaki Gideone ete aponamaki mpo na kobikisa Yisraele na mabɔkɔ ya Bamidiane oyo bazalaki na nguya, mobali yango ya komikitisa ayanolaki boye: “Libota na ngai ezali libota oyo eleki moke na kati ya Manase, mpe ngai nazali moto oyo aleki moke na ndako ya tata na ngai.” (Bas. 6:15) Amonaki ete abongaki te mpo na mokumba yango, kasi Yehova ayebaki malamu ete akokoka kosala yango. Na lisalisi ya Yehova, Gideone akokisaki malamu mokumba na ye.

5. Ntango nini ekoki kozala mpasi nkulutu amonisa bopɔlɔ mpe ezaleli ya komikitisa?

5 Bankulutu basalaka makasi mpo na komonisa bopɔlɔ mpe komikitisa na makambo nyonso. (Mik. 6:8; Mis. 20:18, 19) Bamikumisaka te mpo na makoki na bango to makambo oyo basalaka, mpe bamonaka te ete bazali na ntina te mpo na mabunga oyo basalaka. Kasi na bantango mosusu, ekoki kozala mpasi nkulutu amonisa ete azali moto ya komikitisa mpe ya bopɔlɔ. Na ndakisa, akoki kondima mikumba mingi mpe na nsima komona ete ezali mpasi mpo akokisa yango nyonso. To mpe bakoki kolobela ye mabe mpo na ndenge oyo azali kokokisa mokumba moko boye to kokumisa ye mpo na ndenge oyo akokisi mokumba mosusu. Mateya nini oyo bankulutu bakoki kozwa epai ya Gideone oyo ekoki kosalisa bango na makambo ya ndenge wana?

Mpo na kolanda ndakisa ya Gideone, nkulutu ya bopɔlɔ asɛngaka lisalisi, na ndakisa ntango esɛngi kobongisa mosala ya kopesa litatoli na shario (Talá paragrafe 6)

6. Mateya nini bankulutu bakoki kozwa epai ya Gideone na oyo etali komonisa bopɔlɔ? (Talá mpe elilingi.)

6 Sɛngáká lisalisi. Moto ya bopɔlɔ ayebaka esika makoki na ye esuki. Gideone amonisaki ete azalaki moto ya bopɔlɔ na ndenge asɛngaki basusu básalisa ye. (Bas. 6:27, 35; 7:24) Bankulutu ya bwanya basalaka mpe bongo. Ndeko Tony, oyo tolobelaki liboso, alobi boye: “Nabɔkwamá na momeseno ya kondima misala mingi koleka makoki na ngai. Yango wana, namonaki malamu tólobela ezaleli ya bopɔlɔ na losambo na biso na kati ya libota mpe natunaki makanisi ya mwasi na ngai. Natalaki lisusu na jw.org video Pesáká formasyo, tyeláká basusu motema mpe pesáká bango nguya, ndenge Yesu asalaka.” Ndeko Tony abandaki kosɛnga basusu básalisaka ye na misala makasi oyo azalaki na yango. Yango ebimisaki matomba nini? Ndeko Tony alobi: “Misala na lisangá ezali kosalema malamu, mpe nazali na ntango mingi ya kokómisa boyokani na ngai ná Yehova makasi.”

7. Na kotalela Yakobo 3:13, ndenge nini bankulutu bakoki komekola Gideone ntango bato mosusu bazali koloba mabe mpo na bango?

7 Kosilika te soki moto alobi mabe mpo na yo. Bankulutu bamekamaka mpe ntango basusu bazali koloba mabe mpo na bango. Ndakisa ya Gideone ekoki mpe kosalisa bango na likambo yango. Ayebaki ete azali moto ya kozanga kokoka, yango wana asilikaki te ntango bato ya Efraime bazalaki koloba mabe mpo na ye. (Bas. 8:1-3) Gideone ayanolaki bango na nkanda te. Amonisaki ete azali moto ya komikitisa ntango azalaki koyoka makambo oyo bazalaki koloba mpe ndenge alobaki na bango na boboto. Bankulutu ya bwanya bamekolaka Gideone ndenge bayokaka na likebi mpenza mpe balobaka na boboto soki bato mosusu bazali koloba mabe mpo na bango. (Tángá Yakobo 3:13.) Yango esalaka ete kimya ezala na lisangá.

8. Bandeko oyo bazali na mikumba na lisangá basengeli kosala nini soki basusu bazali kokumisa bango? Pesá ndakisa.

8 Salá ete lokumu nyonso ezonga epai ya Yehova. Ntango bakumisaki Gideone mpo na ndenge alongaki Bamidiane, abendaki likebi ya bato epai ya Yehova. (Bas. 8:22, 23) Ndenge nini bankulutu bakoki komekola Gideone? Basengeli kosala ete lokumu nyonso ezonga epai ya Yehova mpo na makambo oyo basalaka. (1 Ko. 4:6, 7) Na ndakisa, soki bapesi nkulutu moko longonya mpo na makoki na ye ya koteya, akoki kobenda likebi ya bato epai mateya yango euti, elingi koloba, na Liloba ya Nzambe, to na formasyo oyo ebongiseli ya Yehova epesaka biso. Bankulutu bakoki koluka koyeba soki lolenge na bango ya koteya ekumisaka Yehova to ebendaka nde likebi ya bato epai na bango moko. Tótalela ndakisa ya nkulutu moko na nkombo Timothy. Ntango akómaki nkulutu sika, Timothy azalaki kosepela kosala badiskur ya bato nyonso. Alobi boye: “Nazalaki na momeseno ya kobongisa maloba ya ebandeli ya milaimilai mpe kosalela bililingi ya mindɔndɔ. Bato bazalaki kopesa ngai longonya mpo na yango. Likambo ya mawa, yango ezalaki kobenda likebi ya bato epai na ngai moko na esika ebenda likebi na bango na Biblia to epai ya Yehova.” Kendekende, Timothy amonaki ete asengelaki kobongola lolenge na ye ya koteya mpo aboya kobenda likebi ya bato epai na ye moko. (Mas. 27:21) Yango ebimisaki litomba nini? Alobi lisusu boye: “Bato mingi bayebisaka ngai ndenge diskur oyo nasalaki esalisaki bango bálonga mokakatano moko boye, báyikela komekama mpiko, to bápusana lisusu penepene na Yehova. Nakómá koyoka esengo mingi na longonya oyo bapesaka ngai koleka ndenge ezalaki liboso, ntango nazalaki kobenda likebi ya bato epai na ngai moko eleki sikoyo mwa bambula.”

NTANGO BOTOSI TO MPIKO NA YO EMEKAMI

Gideone andimaki kokitisa motángo ya basoda ya limpinga na ye, aponaki mibali 300 ya ekɛngɛ (Talá paragrafe 9)

9. Ndenge nini botosi mpe mpiko ya Gideone emekamaki? (Talá elilingi ya ezipeli.)

9 Ntango Gideone akómaki mosambisi, botosi mpe mpiko na ye emekamaki. Azwaki mokumba moko monene ya kobebisa etumbelo ya Baala oyo tata na ye asalaki. (Bas. 6:25, 26) Na nsima, wana azalaki koyanganisa limpinga ya basoda, Yehova ayebisaki Gideone mbala mibale mobimba ete akitisa motángo ya basoda na ye. (Bas. 7:2-7) Nsukansuka, ayebisaki ye akende kobundisa kaa ya banguna na katikati ya butu.​—Bas. 7:9-11.

10. Ndenge nini botosi ya nkulutu ekoki komekama?

10 Bankulutu basengeli ‘kosepelaka kotosa.’ (Yak. 3:17) Nkulutu oyo azali na botosi asepelaka kotosa makambo oyo Biblia elobi mpe malako oyo ebongiseli ya Nzambe epesaka. Na ndenge yango, apesaka ndakisa malamu mpo na basusu. Kasi na bantango mosusu, botosi na ye ekoki komekama. Na ndakisa, ekoki kokóma mpasi mpo na ye atosa malako ndenge na ndenge oyo ezali kopesama. Na bantango mosusu, akoki komituna soki malako moko oyo epesami ebongi mpenza to ezali ya bwanya. To bakoki kosɛnga ye akokisa mokumba moko oyo ekoki kotya bonsomi na ye na likama. Ndenge nini bankulutu bakoki komekola botosi ya Gideone na makambo ya ndenge wana?

11. Nini ekoki kosalisa bankulutu bázala na botosi?

11 Landáká na likebi mpenza malako mpe saleláká yango. Nzambe ayebisaki Gideone ndenge ya kobebisa etumbelo oyo tata na ye asalaki, esika ya kotonga etumbelo ya sika mpo na Yehova, mpe nyama oyo asengelaki kopesa mbeka. Gideone akakolaki malako yango te, asalaki kaka ndenge Yehova ayebisaki ye. Lelo oyo, bankulutu bazwaka malako oyo eutaka na ebongiseli ya Yehova na nzela ya mikanda oyo batindelaka bango, mayebisi, malako etali boyokani na biso ná Yehova mpe malako etali bokɔlɔngɔnɔ na biso ya nzoto. Tolingaka bankulutu na biso mpo balandaka na likebi mpenza malako ya Teokrasi. Yango wana, lisangá mobimba ezwaka matomba.​—Nz. 119:112.

12. Ndenge nini bankutulu bakoki kosalela toli ya Baebre 13:17 soki ebongiseli ya Yehova esali mbongwana moko boye?

12 Ndimáká kosembola makambo. Kobosana te ete Yehova asɛngaki Gideone azongisa basoda na ye mingi na ndako. (Bas. 7:8) Mbala mosusu akokaki kokanisa boye: ‘Mbongwana oyo ezali mpenza na ntina? Ekosimba?’ Atako bongo, Gideone atosaki. Lelo oyo, bankulutu bamekolaka Gideone na ndenge batosaka ntango ebongiseli ya Yehova esɛngaka bango básala makambo na kolanda mbongwana oyo euti kosalema. (Tángá Baebre 13:17.) Na ndakisa, na mobu 2014, Lisangani ya Mikóló-Bakambi ebongolaki makambo na oyo etali kofuta mbongo oyo ebimaka mpo na kotonga Bandako ya Bokonzi mpe Bandako ya mayangani. (2 Ko. 8:12-14) Masangá esengeli lisusu te kozongisaka mbongo oyo ebimaka mpo na kotonga Bandako ya Bokonzi to ya mayangani. Kasi, masangá ya mokili mobimba ekómá kobimisa mbongo mpo na kotonga bandako ya Bokonzi to mpe bandako mosusu ya teokrasi na bisika oyo bandeko bazali na mposa na yango, ezala na bisika oyo bandeko bazali na makoki ya kobimisa mbongo mpo na kotonga to te. Ntango José ayaki koyeba mbongwana yango, amitunaki soki ekosimba, akanisaki boye: ‘Ata Ndako ya Bokonzi moko te ekotongama. Makambo esalemaka bongo te na mokili oyo.’ Nini esalisaki José atosa malako yango? Alobi: “Maloba ya Masese 3:5, 6 esalisaki ngai natyela Yehova motema. Mpe makambo ya minene esalemaki mpenza! Tozali kaka te kotonga Bandako ya Bokonzi ebele kasi toyekoli mpe kopesa makabo na lolenge ekeseni mpo bokokani ezala.”

Ata na ekólo oyo mosala na biso epekisami, tokoki na mpiko nyonso kopesa litatoli na ndenge ebongi mpenza (Talá paragrafe 13)

13. (a) Gideone amindimisaki na likambo nini? (b) Ndenge nini bankulutu bakoki komekola ye? (Talá mpe elilingi.)

13 Salá mokano ya Yehova na mpiko nyonso. Gideone atosaki Yehova atako azalaki kobanga mpe mokumba yango ezalaki likama mpo na ye. (Bas. 9:17) Nsima ya kolendisama na Yehova, Gideone amindimisaki mpenza ete Yehova Nzambe akosalisa ye mpo abatela basaleli na ye. Bankulutu oyo bafandaka na bikólo oyo mosala na biso epekisami bamekolaka Gideone. Na mpiko nyonso, batambwisaka makita mpe mosala ya kosakola atako balukaka kokanga bango, kosambisa bango, kosala bango mabe to mpe kobungisa misala na bango. c Na ntango ya bolɔzi monene, bankulutu bakozala na mposa ya mpiko mpo na kotosa malako oyo bakozwa, atako kosala bongo ekoki kobimisela bango makama. Na ndakisa, bakoki kozwa malako etali kosakola nsango oyo ezali lokola mbula ya mabanga mpe makambo oyo tosengeli kosala mpo tóbika na etumba ya Goge ya Magoge.​—Ezk. 38:18; Em. 16:21.

NTANGO EKÓMAKA MPASI KOYIKA MPIKO

14. Mpo na nini ezalaki mpasi Gideone ayika mpiko?

14 Gideone asengelaki kosala makasi mpo na kokokisa mokumba na ye ya mosambisi. Ntango Bamidiane bakimaki etumba na butu wana, Gideone alandaki bango longwa na Lobwaku ya Yizireele tii na Ebale Yordani, oyo mbala mosusu ezingamaki na banzete to matiti. (Bas. 7:22) Gideone asukaki kaka na Ebale Yordani? Te! Atako balɛmbaki, ye ná mibali 300 oyo bazalaki elongo na ye bakatisaki ebale yango mpe bakobaki kolanda bango. Nsukansuka, bakangaki Bamidiane mpe balongaki bango.​—Bas. 8:4-12.

15. Mpo na nini na bantango mosusu ekoki kozala mpasi nkulutu ayika mpiko?

15 Na bantango mosusu, nkulutu akoki kolɛmba mpenza nzoto, kolɛmba na makanisi to kozanga esengo mpo na mokumba oyo azali kokokisa na lisangá mpe na libota na ye. Na bantango ya bongo, ndenge nini bankulutu bakoki komekola Gideone?

Bankulutu ya bolingo balendisaka bandeko oyo bazali na mposa ya lisungi (Talá paragrafe 16-17)

16-17. (a) Na kotalela Yisaya 40:28-31, nini esalisaki Gideone ayika mpiko? (b) Bankulutu bakoki komindimisa na nini? (Talá mpe elilingi.)

16 Tyá motema ete Yehova akopesa yo makasi. Gideone atyaki motema ete Yehova akopesa ye makasi, mpe Yehova apesaki ye yango. (Bas. 6:14, 34) Gideone ná bato na ye bazalaki kolanda bakonzi mibale ya Midiane na makolo wana bakonzi yango bazalaki kokima likoló ya bakamela na bango. (Bas. 8:12, 21) Kasi, na lisalisi ya Nzambe, Bayisraele bakangaki bango mpe balongaki bango. Ndenge moko mpe, bankulutu bakoki kotyela Yehova motema, moto oyo “alɛmbaka te, asilaka makasi mpe te.” Akopesa bango makasi na ntango oyo bazali na mposa na yango.​—Tángá Yisaya 40:28-31.

17 Tózwa ndakisa ya Matthew, ndeko moko ya Komite ya boyokani elongo na minganga. Nini esalisaka ye ayika mpiko? Ndeko Matthew alobi: “Namonaka bosolo ya maloba oyo ezali na Bafilipi 4:13. Mbala mingi ntango nalɛmbi mpenza mpe namiyoki ete nakokoka lisusu te, nazalaki kotingama na mabondeli mpe kosɛnga Nzambe apesa ngai makasi ya nzoto mpe ya makanisi oyo nasengeli na yango mpo na kosalisa bandeko na ngai. Na bantango yango, nazalaki koyoka ndenge elimo ya Yehova ezalaki kopesa ngai makasi, mpe kosalisa ngai nayika mpiko.” Lokola Gideone, bankulutu na biso basalaka makasi mpenza mpo na kobatela basaleli ya Nzambe, atako ezalaka ntango nyonso pɛtɛɛ te. Nzokande, bankulutu basengeli koyeba esika makoki na bango esuki, mpe koyeba ete bakoki te kosala makambo nyonso oyo basepelaka kosala. Atako bongo, bakoki kotya motema ete Yehova akoyoka mabondeli na bango mpo na kosɛnga lisalisi mpe akopesa bango makasi ya koyika mpiko.​—Nz. 116:1; Flp. 2:13.

18. Na mokuse, ndenge nini bankulutu bakoki komekola Gideone?

18 Bankulutu bakoki koyekola makambo mingi epai ya Gideone. Bankulutu basengeli komonisa ezaleli ya bopɔlɔ mpe ya komikitisa ntango balingi kondima mikumba mosusu likoló ya oyo bazali na yango mpe ntango bazali kolobela bango mabe to mpe kokumisa bango. Basengeli komonisa botosi mpe mpiko, mingimingi lokola nsuka ya mokili oyo ekómi mpenza pene. Lisusu, basengeli kotya motema ete ezala mokakatano nini bakoki kokutana na yango, Nzambe akoki kopesa bango makasi. Na ntembe te, tozwaka na motuya mosala makasi oyo bankulutu basalaka mpe ‘tokobaka kolɛngɛla bato ya ndenge wana.’​—Flp. 2:29.

LOYEMBO 120 Tómekola motema pɛtɛɛ ya Kristo

a Yehova aponaki Gideone mpo akamba mpe abatela basaleli na ye na eleko moko ya mpasi mingi na lisolo ya ekólo Yisraele. Gideone akokisaki mokumba yango na bosembo mpenza na boumeli ya mbula soki 40. Atako bongo, akutanaki na mikakatano mingi mpenza. Tokolobela ndenge ndakisa na ye ekoki kosalisa bankulutu lelo oyo ntango bamekami.

b Bopɔlɔ ezali ndeko ya komikitisa. Tomonisaka ete tozali bato ya bopɔlɔ ntango tomitalelaka na ndenge ebongi mpe toyebaka esika makoki na biso esuki. Tomonisaka ete tozali bato ya komikitisa ntango tomemyaka basusu mpe tomonaka ete baleki biso. (Flp. 2:3) Mbala mingi, moto ya bopɔlɔ azalaka mpe moto ya komikitisa.

c Talá lisolo “Kobá kosambela Yehova na ntango ya epekiseli” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 07/2019, nk. 10-11, par. 10-13.